Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/9 nk. 8-9
  • ‘Tokoki te kotika koloba mpo na Yesu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tokoki te kotika koloba mpo na Yesu’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bakangami kaka na ekateli na bango
  • Bazwi mbano mpo na botosi na bango
  • “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Otosaka nani—Nzambe to bato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Gamaliele—Ye oyo ateyaki Saulo moto na Talasia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Eloko moko te ekokaki kopekisa bango
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/9 nk. 8-9

“Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”

‘Tokoki te kotika koloba mpo na Yesu’

TOZALI na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) na kati ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda na Yelusaleme. Bazuzi ya Sanedrina balingi kosambisa bayekoli 12 ya Yesu. Mpo na nini? Mpamba te bazalaki koteya makambo etali Yesu. Mpo na ntoma Petelo ná Yoane, ezali mbala ya mibale báya na tribinale yango. Kasi, mpo na bantoma mosusu, ezali mbala ya liboso.

Nganga-nzambe monene akundweli bantoma 12 mobeko oyo apesaki bango mbala ya liboso. Na mbala wana, ntango apekisaki ntoma Petelo ná Yoane koteya makambo etali Yesu, bango balobaki boye: “Soki ezali likambo ya boyengebene na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. Kasi na oyo etali biso, tokoki te kotika kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” Bayekoli ya Yesu babondelaki mpo Nzambe apesa bango mpiko mpe bakobaki kosakola nsango malamu.​—Misala 4:18-31.

Lokola nganga-nzambe monene amoni ete mobeko oyo apesaki bango na mbala ya liboso esimbaki te, na mbala oyo, alobi boye: “Topesaki bino mitindo polelepolele ete bókoba te koteya na nkombo wana, kasi, talá! botondisi Yelusaleme na mateya na bino, mpe bozali na mokano mpenza ya koyeisa makila ya moto wana likoló na biso.”​—Misala 5:28.

Bakangami kaka na ekateli na bango

Na mpiko nyonso, Petelo ná bantoma mosusu balobaki boye: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29) Ya solo, tosengeli kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato, soki bato basɛngi biso tósala makambo oyo eyokani te na mibeko ya Yehova Nzambe.a

Maloba ya bantoma esengelaki mpenza kosimba mitema ya bazuzi ya Sanedrina. Soki batunaki bango esengeli kotosa nani kati na Nzambe mpe bato, na ntembe te balingaki koyanola kozanga kokakatana ete: “Esengeli kotosa Nzambe.” Kutu, bazalaki kondima ete Nzambe azali Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba.

Petelo, oyo emonani ete azalaki koloba na nkombo ya bantoma nyonso, alobaki ete bazali kosakola mpo na kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato. Na bongo, amonisaki ete kofunda bantoma ete bazangi botosi ezali lokuta. Bazuzi ya Sanedrina bayebi masolo ya ekólo na bango oyo emonisi ete ezalaki na bato oyo baponaki kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato. Basi mibale na Ezipito babangaki Nzambe na esika ya kobanga Falao, ntango babatelaki bomoi ya bana mibali ya Baebele. (Exode 1:15-17) Mokonzi Yizikiya atosaki Yehova, kasi Mokonzi Senakeriba te oyo asɛngisaki ye ete ye mpe ekólo mobimba ya Yisalaele bámipesa na lobɔkɔ na ye. (2 Mikonzi 19:14-37) Makomami ya Liebele, oyo bazuzi ya Sanedrina bayebaki malamu, elobi ete Yehova asɛngi na basaleli na ye ete bátosaka ye.​—1 Samwele 15:22, 23.

Bazwi mbano mpo na botosi na bango

Maloba ya bantoma ya Yesu ete “tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato” esimbaki mpenza motema ya zuzi moko. Gamaliele, zuzi oyo bazalaki kopesa limemya mingi na Sanedrina, asɛngaki bábimisa bantoma libándá mpe ntango atikalaki ye moko ná bazuzi mosusu apesaki bango toli. Gamaliele alobelaki masolo ya kala, mpe amonisaki ete ebongi te kotɛmɛla mosala oyo bantoma bazalaki kosala. Asukisaki na maloba oyo: “Bólanda bato wana te, kasi bótika bango; . . . soki boye te, bokoya mbala mosusu komonana ete bozali bato oyo bazali mpenza kobunda na Nzambe.”​—Misala 5:34-39.

Maloba ya Gamaliele etindaki bazuzi bátika bantoma. Atako babɛtaki bantoma, balɛmbaki mosala na bango te. Kutu, Biblia elobi boye: “Mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.”​—Misala 5:42.

Nzambe apambolaki mpenza bantoma mpo bamonisaki ete mpo na bango, Nzambe aleki bakonzi nyonso. Lelo oyo, baklisto ya solo bazali mpe kolanda ndakisa ya bantoma. Batatoli ya Yehova batosaka Yehova lokola Moyangeli oyo aleki likoló. Soki basɛngi bango básala makambo oyo eyokani te na mibeko ya Nzambe, balobaka lokola bantoma ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2006, Sɛtɛmbɛ/Ɔkɔtɔbɛ.

[Etanda/Bililingi na lokasa 9]

OSILÁ KOMITUNA?

Ndenge nini Luka ayebaki maloba oyo Gamaliele ayebisaki bazuzi mosusu na nkuku? Ekoki kozala ete Nzambe nde ayebisaki ye maloba ya Gamaliele na nzela ya elimo santu. To mpe, Paulo (oyo Gamaliele atángisaki) ayebisaki Luka makambo oyo Gamaliele alobaki. To mpe Luka atunaki zuzi moko ya Sanedrina oyo azalaki kokɔtela bantoma.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto