LITEYA 21
Ndenge nini nsango malamu ezali kosakolama?
Etikali moke Yehova asalela Bokonzi na ye mpo na kosilisa bampasi na biso nyonso. Lokola nsango yango ezali malamu mpenza, tosengeli kobomba yango te mpo na biso moko. Yesu alingaki ete bayekoli na ye báyebisa bato nyonso nsango malamu ya bokonzi yango. (Matai 28:19, 20) Ndenge nini Batatoli ya Yehova batosaka mobeko ya Yesu?
1. Ndenge nini Matai 24:14 ezali kokokisama lelo oyo?
Yesu alobaki: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.” (Matai 24:14) Batatoli ya Yehova bazalaka na esengo ya kosala mosala yango mpo ezali na ntina mingi. Tosakolaka nsango malamu na mokili mobimba na minɔkɔ koleka 1 000! Lokola mosala yango ezali monene, esɛngaka milende mingi mpe esɛngaka kobongisa makambo malamu. Mosala yango esalemaka kaka na lisalisi ya Yehova.
2. Milende nini tosalaka mpo na kosakwela bato?
Tosakolaka esika nyonso oyo bato bazali. Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, tosakolaka “ndako na ndako.” (Misala 5:42) Yango esalaka ete tósolola na bamilio ya bato mbula na mbula. Lokola bato bazalaka ntango nyonso te na ndako, tosakolaka mpe na bisika ya bato nyonso. Tolukaka ntango nyonso mabaku ya koyebisa bato makambo etali Yehova mpe makambo oyo akani kosala.
3. Nani nde asengeli kosakola nsango malamu?
Mokristo nyonso ya solo asengeli kosakwela bato nsango malamu. Tozwaka mosala yango na lisɛki te. Tosalaka nyonso mpo na kosakola mpo toyebi ete yango ekoki kobikisa bomoi ya bato. (Tángá 1 Timote 4:16.) Bafutaka biso mbongo te mpo na mosala yango, mpo Biblia elobi ete: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:7, 8) Moto nyonso te nde andimaka nsango na biso. Kasi, tokobaka kosakola mpo na kotosa Yehova mpe mpo na kosepelisa ye.
KƆTÁ NA MOZINDO
Luká koyeba makambo oyo Batatoli ya Yehova basalaka mpo na kosakola na mokili mobimba. Mpe talá ndenge oyo Yehova asalisaka bango.
Batatoli ya Yehova bazali kosakola na mokili mobimba: (A) Costa Rica, (B) États-Unis, (C) Bénin, (D) Thaïlande, (E) Yap, (F) Suède
4. Tosalaka makasi mpo na kosakwela bato nyonso
Batatoli ya Yehova basalaka milende mingi mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato na bisika nyonso. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.
Nini ekamwisi yo na milende oyo Batatoli ya Yehova basalaka mpo na kosakwela bato?
Tángá Matai 22:39 mpe Baroma 10:13-15, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:
Ndenge nini mosala ya kosakola emonisaka ete tolingaka bato?
Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo basakolaka nsango malamu?—Talá vɛrsɛ 15.
5. Tozali kosala elongo na Nzambe
Masolo mingi emonisi ete Yehova azali kotambwisa mosala na biso. Na ndakisa, na ekólo Nouvelle-Zélande, ndeko Paul azalaki kosakola ndako na ndako mpe akutanaki na mwasi moko na nsima ya midi. Nzokande, na ntɔngɔ ya mokolo yango, mwasi yango abondelaki Nzambe, abengaki ye na nkombo na ye, Yehova, mpe asɛngaki ete atinda moto moko aya kotala ye. Ndeko Paul alobi boye: “Nsima ya ngonga misato, nakómaki liboso ya ndako na ye.”
Tángá 1 Bakorinti 3:9, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Ndenge nini likambo oyo ndeko moko na Nouvelle-Zélande akutanaki na yango emonisi ete Yehova azali kotambwisa mosala ya kosakola?
Tángá Misala 1:8, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Mpo na nini tozali na mposa ete Yehova asalisa biso mpo na kosakola?
Oyebaki yango?
Na likita na biso ya kati ya pɔsɔ, tozwaka formasyo oyo esalisaka biso tóyeba kosakola. Soki osilá kokende na likita yango, okanisi nini mpo na formasyo yango?
6. Tosakolaka mpo na kotosa mobeko ya Yehova
Na siɛklɛ ya liboso, banguna balukaki kopekisa bayekoli ya Yesu kosakola. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonisaki ete bazali na lotomo ya kosakola na ndenge bazalaki “kokɔtela nsango malamu . . . na nzela ya mibeko.” (Bafilipi 1:7) Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova basalaka bongo.a
Tángá Misala 5:27-42, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Mpo na nini tokotika kosakola te? —Talá vɛrsɛ 29, 38, mpe 39.
SOKI MOTO ATUNI YO: “Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakendaka kosakola ndako na ndako?”
Okopesa ye eyano nini?
NA MOKUSE
Yesu nde atindaki bayekoli na ye básakola nsango malamu na bikólo nyonso. Yehova azali kosalisa basaleli na ye básala mosala yango.
Bozongeli
Ndenge nini nsango malamu ezali kosakolama na mokili mobimba?
Ndenge nini mosala ya kosakola ezali komonisa ete tolingaka bato mosusu?
Okanisi ete mosala ya kosakola ekoki kopesa moto esengo? Mpo na nini?
MAKANISI MOSUSU
Talá ndenge Batatoli ya Yehova basakwelaka bato na bingumba minene.
Kampanye spesiale mpo na kopesa litatoli na bisika ya bato ebele na Paris (5:11)
Batatoli ya Yehova basalaki nini mpo na kosakwela bato oyo bakimá bitumba?
Yoká ndenge moto moko alobeli ntina oyo azalaki na esengo ya kolekisa bomoi na ye mobimba na mosala ya kosakola.
Luká koyeba makambo oyo tolongaki na batribinale, oyo esalisaki biso tósakola nsango malamu.
“Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale” (Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, mokapo 13)
a Nzambe nde apesá biso mobeko ya kosakola. Yango wana, biso Batatoli ya Yehova tozelaka te ete bakonzi ya mokili bápesa biso nzela mpo tósakola nsango malamu.