Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/12 nk. 19-24
  • Otosaka nani—Nzambe to bato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Otosaka nani—Nzambe to bato?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli kotosa Nzambe to kotosa bato?
  • Bato oyo bazali kobunda na Nzambe bakolonga te
  • Basakoli ya mpiko na mikolo na biso
  • Bóbanga bango te
  • “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • ‘Tokoki te kotika koloba mpo na Yesu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nganga-nzambe monene oyo akatelaki Yesu etumbu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Eloko moko te ekokaki kopekisa bango
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/12 nk. 19-24

Otosaka nani​—Nzambe to bato?

“Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—MISALA 5:29.

1. (a) Boyekoli na biso esimbami na mokapo nini? (b) Mpo na nini bakangaki bantoma?

BAZUZI ya tribinale monene ya Bayuda bazali na nkanda makasi. Bato oyo batyaki na bolɔkɔ balimwe. Bato yango ezali bayekoli ya Yesu Klisto, moto oyo tribinale yango ekatelaki etumbu ya liwa mwa bapɔsɔ liboso. Sikoyo, balingi kosambisa bayekoli na ye. Ntango bakɛngɛli bakei kozwa bango na bolɔkɔ, bakuti baporte ekangamá, kasi na kati moto azali te. Moto moko ayebisi bakɛngɛli ete bantoma bazali na tempelo, bazali koteya makambo ya Yesu Klisto​—likambo kaka oyo bakangelaki bango! Mbala moko, bakɛngɛli bakei na tempelo, bakangi bantoma mpe bamemi bango na tribinale.​—Misala 5:17-27.

2. Anzelu moko atindaki bantoma básala mosala nini?

2 Ndenge nini bantoma yango babimaki na bolɔkɔ? Anzelu moko nde abimisaki bango. Asalaki bongo mpo abikisa bango na minyoko? Te. Ezalaki mpo bato ya Yelusaleme báyoka nsango malamu etali Yesu Klisto. Anzelu atindaki bantoma ‘bákoba koloba na bato ya ekólo maloba nyonso etali bomoi oyo.’ (Misala 5:19, 20) Yango wana, ntango bakɛngɛli ya tempelo bamonaki bantoma, bakutaki bango bazali kosakola, mpo na kotosa etinda ya anzelu.

3, 4. (a) Ntango bayebisaki Petelo ná Yoane básakola lisusu te, bango bazongisaki nini? (b) Bantoma mosusu mpe balobaki nini?

3 Mwa mikolo liboso, bato mibale kati na basakoli wana ya mpiko: ntoma Petelo ná ntoma Yoane, basambaki na tribinale wana; Yozefe Kaifa, zuzi-mokonzi, akundwelaki bango yango. Alobaki boye: “Topesaki bino mitindo polelepolele ete bókoba te koteya na [nkombo ya Yesu], kasi, talá! botondisi Yelusaleme na mateya na bino.” (Misala 5:28) Na ntembe te Kaifa akamwaki te ntango amonaki lisusu Petelo ná Yoane na tribinale yango. Mbala ya liboso oyo bapekisaki bantoma yango kosakola, bango bazongisaki boye: “Soki ezali likambo ya boyengebene na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. Kasi na oyo etali biso, tokoki te kotika kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” Lokola mosakoli Yilimia na ntango ya kala, Petelo ná Yoane bakokaki te kotika kokokisa mokumba na bango ya kosakola.​—Misala 4:18-20; Yilimia 20:9.

4 Na mbala oyo, ezalaki kaka Petelo ná Yoane te, kasi bantoma nyonso​—ata mpe Matiasi, oyo autaki koponama sika—​nde bayebisaki bazuzi makanisi na bango. (Misala 1:21-26) Ntango balobaki na bango ete básakola lisusu te, bango bazongisaki na mpiko nyonso ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29.

Tosengeli kotosa Nzambe to kotosa bato?

5, 6. Mpo na nini bantoma baboyaki kotosa mobeko ya tribinale?

5 Bantoma bazalaki batosi mibeko; bakokaki te koboya kaka mpamba kotosa mobeko moko oyo tribinale epesi. Kasi, moto moko te, ata soki azali na bokonzi nini, azali na lotomo ya kopekisa moto mosusu kotosa mobeko ya Nzambe. Yehova azali “Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.” (Nzembo 83:18) Azali “Mosambisi ya mokili mobimba,” kasi mpe Mopesi monene ya mibeko mpe Mokonzi ya seko. Mobeko nyonso ya tribinale oyo epekisi kotosa mobeko moko ya Nzambe ebongi te na miso ya Nzambe.​—Genese 18:25; Yisaya 33:22.

6 Bato mosusu ya mayele mingi na mibeko bandimaka likanisi yango. Na ndakisa, William Blackstone, moto moko ya mayele mingi na mibeko na ekeke ya 18 na Angleterre, akomaki ete tosengeli te kotika nzela na mobeko moko ya bato etɛmɛla “mobeko epemami” oyo ezali na Biblia. Na bongo, bazuzi ya Sanedrina balekisaki ndelo ntango bayebisaki bantoma ete bátika kosakola. Bantoma bakokaki kotosa mobeko wana te.

7. Mpo na nini mosala ya kosakola ezalaki kopesa banganga-nzambe bakonzi nkanda?

7 Banganga-nzambe bakonzi bayokaki nkanda ntango bantoma bayebisaki bango ete bakoki kotika kosakola te. Banganga-nzambe mosusu, ata mpe Kaifa ye moko, bazalaki Basadukai; bango bazalaki kondima lisekwa te. (Misala 4:1, 2; 5:17) Nzokande, bantoma bazalaki kotika te koloba ete Yesu asekwaki. Longola yango, banganga-nzambe bakonzi mosusu basalaki makambo mingi mpo bakonzi ya Loma bálinga bango. Ntango bazalaki kosambisa Yesu, bayebisaki banganga-nzambe bakonzi bándima Yesu lokola mokonzi na bango, bango bakakatanaki te koloba na mongongo makasi ete: “Tozali na mokonzi mosusu te kaka Kaisala.” (Yoane 19:15)a Bantoma basukaki kaka te na koloba ete Yesu asekwaki, kasi bazalaki mpe koteya ete longola nkombo ya Yesu, “ezali na nkombo mosusu te na nse ya likoló oyo epesami na kati ya bato oyo na nzela na yango tosengeli kobikisama.” (Misala 2:36; 4:12) Banganga-nzambe bamonaki ete soki bato mingi bakómi kondima ete Yesu asekwaki mpe azali Mokonzi na bango, Baloma bakoya mpe bakonzi ya Bayuda bakobungisa ‘esika na bango mpe ekólo na bango.’​—Yoane 11:48.

8. Toli nini ya bwanya Gamaliele apesaki bazuzi ya Sanedrina?

8 Emonanaki ete makambo ekotambola malamu te mpo na bantoma ya Yesu Klisto. Bazuzi ya Sanedrina bazalaki mpenza na mokano ya koboma bango. (Misala 5:33) Kasi, makambo ebongwanaki. Gamaliele, moto moko ya mayele na Mibeko, atɛlɛmaki mpe ayebisaki baninga na ye ete bákende mbangu te. Alobaki na bango na bwanya nyonso ete: “Soki mwango wana to mosala wana euti na bato, ekokweisama; kasi soki euti na Nzambe, bokokoka kokweisa bango te.” Na nsima, Gamaliele abakisaki boye: “Soki boye te, bokoya mbala mosusu komonana ete bozali bato oyo bazali mpenza kobunda na Nzambe.”​—Misala 5:34, 38, 39.

9. Nini emonisi ete mosala ya bantoma eutaki epai ya Nzambe?

9 Likambo ya kokamwa, bazuzi bandimaki toli ya Gamaliele. Lisolo elobi ete bazuzi ya Sanedrina “babengisaki bantoma, babɛtaki bango fimbo, mpe bapesaki bango mitindo ete bátika koloba na nkombo ya Yesu, mpe batikaki bango bákende.” Kasi, na esika bantoma bábanga, bazalaki kaka na ekateli ya kotosa etinda ya kosakola oyo anzelu apesaki bango. Yango wana, nsima ya kotika bango, “mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, [bantoma] bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.” (Misala 5:40, 42) Yehova apambolaki milende na bango. Na ndenge nini? “Liloba ya Nzambe ekobaki kokola, mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza na kati ya Yelusaleme.” Kutu, “ebele moko ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.” (Misala 6:7) Na ntembe te likambo yango ezalaki mpenza kotungisa banganga-nzambe bakonzi! Makambo emonanaki polele: Mosala ya bantoma eutaki mpenza epai ya Nzambe!

Bato oyo bazali kobunda na Nzambe bakolonga te

10. Mpo na nini Kaifa akokaki kokanisa ete bakolongola ye mokumba na ye te, kasi mpo na nini tokoki koloba ete amikosaki?

10 Na ekeke ya liboso, bakonzi ya Loma nde bazalaki kopona nganga-nzambe monene ya Bayuda. Yozefe Kaifa azalaki moto ya bozwi mingi; Valerius Gratus nde aponaki ye nganga-nzambe monene mpe aumelaki na mokumba yango koleka banganga-nzambe monene mingi oyo bazalaki liboso na ye. Mbala mosusu Kaifa akanisaki ete azwaki mokumba wana mpo ayebaki koyokana na bapaya mpe mpo azalaki moninga ya Pilato, kasi te na nguya ya Nzambe. Ezala bongo to te, amikosaki na ndenge atyelaki bato motema. Mbula misato mpamba nsima ya kosambisa bantoma na Sanedrina, bakonzi ya Loma balingaki lisusu Kaifa te mpe balongolaki ye mokumba ya nganga-nzambe monene.

11. Ponsi Pilato asukaki ndenge nini mpe ebongiseli ya Bayuda esukaki ndenge nini, mpe yango epesi yo liteya nini?

11 Lucius Vitellius, guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Sulia, oyo azalaki mokonzi ya Pilato nde apesaki mitindo ya kolongola Kaifa mokumba ya nganga-nzambe monene; mpe Pilato, moninga ya Kaifa akokaki kosala eloko moko te. Kutu, mbula moko na nsima, balongolaki ye moko Pilato na bokonzi mpe babengaki ye na Loma mpo akende kosamba liboso ya amperɛrɛ mpo na makambo minene oyo bafundaki ye. Mpo na bakonzi ya mangomba oyo batyelaki Kaisala motema, Baloma balongolaki ‘esika na bango mpe ekólo na bango.’ Yango esalemaki na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.) ntango basoda ya Loma babebisaki engumba Yelusaleme mobimba, ná tempelo, ná ndako ya Sanedrina. Maloba ya mokomi ya nzembo emonanaki mpenza solo ete: “Ndimelá bana ya mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te”!​—Yoane 11:48; Nzembo 146:3.

12. Ndenge nini bomoi ya Yesu ezali komonisa ete kotosa Nzambe ezali nzela ya bwanya?

12 Nzokande, Nzambe aponaki Yesu Klisto oyo asekwi ete azala Nganga-nzambe monene ya tempelo monene ya elimo. Moto moko te akoki kolongola ye mokumba wana. Kutu, Yesu “azali na bakitani te na kati ya bonganga-nzambe na ye.” (Baebele 2:9; 7:17, 24; 9:11) Nzambe aponaki mpe Yesu azala Mosambisi ya bato oyo bazali na bomoi mpe ya baoyo bakufá. (1 Petelo 4:5) Na mokumba na ye wana, Yesu ye moko akokata soki Yozefe Kaifa ná Ponsi Pilato bakoki kozonga na bomoi.​—Matai 23:33; Misala 24:15.

Basakoli ya mpiko na mikolo na biso

13. Na ntango na biso, mosala nini emonani ete eutaki epai ya bato, mpe mosala nini emonani ete euti epai ya Nzambe? Nini emonisi yo yango?

13 Ndenge kaka ezalaki na ekeke ya liboso, na mikolo na biso mpe bato mingi bazali “kobunda na Nzambe.” (Misala 5:39) Na ndakisa, na ekólo Allemagne, ntango Batatoli ya Yehova baboyaki kokumisa Adolf Hitler ete azali Motambwisi na bango, Hitler alapaki ndai ete akosilisa bango nyonso. (Matai 23:10) Azalaki na nyonso oyo esengeli mpo na kosilisa bango. Banazi bakangaki bankóto ya Batatoli mpe batyaki bango na bakaa ya bakangami. Kutu, babomaki Batatoli mosusu. Kasi, Banazi balongaki te kosukisa ekateli ya Batatoli ya kosambela kaka Nzambe, mpe balongaki te kosilisa basaleli nyonso ya Nzambe. Mosala ya baklisto yango eutaki epai ya Nzambe, kasi epai ya moto te, mpe mosala ya Nzambe ekoki kobebisama te. Mbula 60 na nsima, basaleli ya sembo ya Yehova oyo babikaki na bakaa ya bakangami bazali kokoba kosalela Yehova ‘na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba mpe na makanisi na bango nyonso,’ nzokande nkombo ya Hitler mpe ya lingomba na ye ya Nazi etikalá kaka na masolo ya makambo mabe oyo basalaki.​—Matai 22:37.

14. (a) Banguna bazali kosala nini mpo na kokosela basaleli ya Nzambe makambo, mpe yango ebimisi makambo nini? (b) Makambo yango ekosala basaleli ya Nzambe mabe mpo na libela? (Baebele 13:5, 6)

14 Na boumeli ya bambula nyonso oyo eleki banda na ntango ya Banazi, ebele ya bato bameki kobundisa Yehova ná basaleli na ye. Na mikili mosusu ya Mpoto, bakonzi ya mangomba mpe ya politiki bazali kosalela mayele mabe mpo na kolatisa Batatoli ya Yehova nkombo ya ‘mwa lingomba ya mabe,’ ndenge kaka balobaki mpo na baklisto na ekeke ya liboso. (Misala 28:22) Nzokande, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme) endimaki ete ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ezali lingomba mpenza, kasi te mwa lingomba. Banguna na biso bayebi yango malamu. Kasi, bazali kotika te kokosela Batatoli makambo. Mpo na yango, baklisto mosusu balongoli bango na misala. Batatoli oyo bazali bana-kelasi bazali kotungisa bango na biteyelo. Mpo na kobanga bato, bakóló-ndako mosusu, bazali kokata bakɔntra na Batatoli oyo, banda kala bafutelaka bisika na bango mpo na kosala makita. Na mwa bisika mosusu, bakonzi ya Leta baboyaki ata kopesa bato mosusu lotomo ya bana-mboka kaka mpo bazali Batatoli ya Yehova! Atako bongo, Batatoli bazali kozonga nsima te.

15, 16. Lokola bazali kotɛmɛla mosala na bango, Batatoli ya Yehova ya France basalaki nini, mpe mpo na nini bazali kokoba kosakola?

15 Na ndakisa, bato mingi ya France bakanisaka malamu mpe bakaniselaka bato mabe te. Kasi, na ekólo yango, banguna mosusu basali nyonso mpo Leta abimisa mibeko oyo ekozongisa mosala ya Bokonzi nsima. Batatoli ya Yehova basali nini liboso ya makambo yango? Babakisi kutu molende na mosala ya kosakola na ndenge oyo emonaná naino te mpe yango eboti mbuma malamu. (Yakobo 4:7) Na ndakisa, na nsima ya sanza motoba, motángo ya bayekoli ya Biblia ebakisamaki na ndenge ya kokamwa (bokoli ya 33%)! Na ntembe te Zabolo azali na nkanda makasi na komona ete na France, bato ya mitema sembo bazali kondima nsango malamu. (Emoniseli 12:17) Bandeko na biso ya France bazali na elikya ete maloba ya mosakoli Yisaya ekokokisama epai na bango: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama.”​—Yisaya 54:17.

16 Batatoli ya Yehova balukaka minyoko te. Kasi, mpo na kotosa mobeko oyo Nzambe apesi baklisto nyonso, bakoki te mpe bakotika te koloba makambo oyo bayoki. Basalaka makasi bátosa mibeko ya Leta na esika nyonso oyo bafandi. Kasi, soki mibeko ya bato epekisi bango kotosa mibeko ya Nzambe, basengeli kotosa Nzambe lokola moyangeli.

Bóbanga bango te

17. (a) Mpo na nini tosengeli te kobanga banguna na biso? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela bato oyo bazali konyokola biso?

17 Banguna na biso bazali na likama monene. Bazali kobunda na Nzambe. Yango wana, na kolanda maloba ya Yesu, na esika tóbanga bato oyo bazali konyokola biso, tobondelaka kutu mpo na bango. (Matai 5:44) Tobondelaka ete soki bamosusu bazali kotɛmɛla Nzambe na kozanga koyeba, ndenge Saulo moto ya Talasi asalaki, na boboto na ye, Yehova afungola bango miso mpo bámona solo. (2 Bakolinti 4:4) Saulo akómaki ntoma Paulo mpe bakonzi ya ntango na ye banyokolaki ye mingi. Kasi, akobaki koyebisa baninga na ye bandimi ete “bámikitisa mpe bátosa baguvɛrnema mpe bakonzi mpo bazali bayangeli, bámibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu, báloba mabe mpo na moto te, bázala te bato balingá-bitumba, bázala te bato ya makambo makasimakasi, bámonisa boboto mpenza epai ya bato nyonso.” (Tito 3:1, 2) Batatoli ya Yehova ya France mpe ya bikólo mosusu basalaka makasi ya kolanda toli wana.

18. (a) Na balolenge nini Yehova akoki kobikisa basaleli na ye? (b) Ndenge nini makambo nyonso wana ekosuka?

18 Nzambe alobaki na mosakoli Yilimia ete: “Nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo.” (Yilimia 1:8) Ndenge nini Yehova akoki kobikisa biso ntango bazali konyokola biso lelo oyo? Akoki kopesa zuzi moko makanisi ya malamu, ndenge asalaki epai ya Gamaliele. To mpe akoki kosala ete mokonzi moko ya mabe to oyo azali kotɛmɛla biso alongwa na mbalakaka mpe mokonzi mosusu ya malamu akóma na esika na ye. Kasi, na bantango mosusu Yehova akoki kotika nzela ete basaleli na ye bányokwama. (2 Timote 3:12) Soki Nzambe atiki nzela bányokola biso, akopesa biso ntango nyonso makasi ya koyika mpiko. (1 Bakolinti 10:13) Ezala likambo nini oyo Nzambe atiki nzela, toyebi ndenge oyo ekosuka: Baoyo bazali kobundisa basaleli ya Nzambe bazali nde kobunda na Nzambe, mpe bato oyo bazali kobunda na Nzambe, bakolonga te.

19. Mokapo ya mobu 2006 ezali nini, mpe mpo na nini mokapo yango ebongi?

19 Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bakokutana na bolɔzi. (Yoane 16:33) Yango wana, maloba ya Misala 5:29 ebongi mpenza mpo na ntango na biso: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” Na bongo, maloba yango ekozala mokapo ya mobu 2006 mpo na Batatoli ya Yehova. Tiká ete na boumeli ya mbula oyo elingi kobanda mpe mpo na libela, tózwa ekateli ya kotosa Nzambe lokola Moyangeli ata na likambo nini!

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Kaisala” oyo banganga-nzambe bakonzi bakumisaki na miso ya bato nyonso na mokolo yango ezalaki Tibɛli, amperɛrɛ ya Loma, moto ya makambo mabe mpe mobomi-bato. Eyebanaki mpe ete Tibɛli azalaki na ezaleli ya kosangisa nzoto na ndenge ya bosɔtɔ.​—Danyele 11:15, 21.

Okoki kopesa eyano?

• Bantoma batikelaki biso ndakisa nini ya kolendisa ntango batɛmɛlaki bango?

• Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato?

• Banguna na biso bazali mpenza kobunda na nani?

• Makambo ekosuka ndenge nini mpo na baoyo bazali koyikela minyoko mpiko?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]

Mokapo ya mobu 2006: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29

[Elilingi na lokasa 19]

“Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”

[Elilingi na lokasa 21]

Kaifa atyelaki bato motema na esika ya kotyela Nzambe motema

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto