-
“Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
-
-
Lokola bantoma, biso mpe tosakolaka “ndako na ndako”
16. Ndenge nini bantoma bamonisaki ete bazalaki na ekateli ya kopesa litatoli malamumalamu, mpe ndenge nini tolandaka ndakisa na bango mpo na kosakola?
16 Bantoma balekisaki ntango te, bazongelaki mbala moko mosala ya kopesa litatoli. Kozanga kobanga, “mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako,” bakobaki “koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo.”d (Mis. 5:42) Basakoli yango ya molende bazalaki na ekateli makasi ya kopesa litatoli malamumalamu. Tomoni mpe ete bazalaki komema nsango yango na bandako ya bato, ndenge Yesu Kristo alobaki na bango. (Mat. 10:7, 11-14) Na ntembe te, basalelaki mayele wana mpo na kotondisa Yerusaleme na mateya na bango. Lelo oyo, eyebani malamu ete Batatoli ya Yehova basakolaka na kolanda ndakisa ya bantoma. Lokola tokendaka na ndako mokomoko ya teritware na biso, tomonisaka polele ete biso mpe tolingi kopesa litatoli malamumalamu mpo moto nyonso azwa libaku ya koyoka nsango malamu. Tokoki nde koloba ete Yehova apamboli mosala na biso ya kosakola ndako na ndako? Ɛɛ! Bamilio ya bato bandimi nsango ya Bokonzi na ntango oyo ya nsuka, mpe mingi bayokaki yango mpo na mbala ya liboso ntango Motatoli moko abɛtaki na porte na bango.
-