Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Komonana ya nsuka mpe Pantekote ya mobu 33
NA NTANGO moko, Yesu akamati bibongiseli mpo ete bantóma na ye zomi na moko balanda ye na ngomba ya Galilai. Emonani lokola ete, bayekoli mosusu bayoki mpe lisoló ya bokutani yango, mpe bato koleka 500 bakei na bokutani wana. Oyo nde esengo ntango Yesu abimeli bango mpe abandi koteya bango!
Kati na makambo mosusu, Yesu alimboli bango ete Nzambe asili kopesa ye bokonzi nyonso kati na likoló mpe na mabelé. Alobi na bango ete, ’’Bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.”
Omoni? Mibali, basi mpe bana bazwi mokumba bobele moko: oyo ya kozalisa bayekoli. Yesu apesi bango elikya, mpamba te banguna bakomeka kopekisa bango ete basakola te mpe balakisa te. Alobi na bango: “Mpe tala, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.” Yesu azali elongo na bayekoli na ye na nzela na elimo santu, mpo na kosalisa bango ete bakokisa mokumba na bango.
Nsima na lisekwa na ye, Yesu azali komimonisa liboso na bayekoli na ye ete azali na bomoi, na boumeli ya mikolo 40. Na ntango ya bomonani yango, azali koloba na bango na ntina na Bokonzi na Nzambe mpe na ntina na mikumba na bango ya bayekoli. Mokolo moko, abimelaki nkutu Yakobo ndeko na ye moko ya mobali, mpe andimisaki mobali yango oyo kino ntango wana azalaki naino mondimi te ete, azali mpenza Klisto.
Wana bantóma bazali naino na Galilai, emonani lokola ete Yesu asengi bango bazonga na Yelusaleme. Kuna, bayangani elongo na Yesu, ye oyo alobi na bango ete: “Bolongwa na Yelusaleme te, kasi bozela elaka na Tata. Bosili koyoka yango na monoko na ngai; Yoane abatisaki na mai, nde bino bokobatisama na’elimo santu na nsima na mikolo mingi te.”
Na nsima, Yesu akutani lisusu na bantóma na ye mpe amemi bango na líbanda ya mboka Betania, oyo ezali na nkiteli ya ngomba na Olive. Likambo na kokamwa, atako nyonso oyo auti koloba mpo na bozongi na ye na likoló oyo mikolo misili kobelema, bazali kokanisa bobele ete Bokonzi na ye ekotyama awa na mabelé. Yango wana batuni ye ete: “Motei, okozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?”
Na esika ya komeka lisusu kosembola makanisi na bangó, Yesu alobi bobele ete: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaká bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te.” Na nsima, kolobeláká lisusu makasi na ntina na mosala oyo basengeli kokokisa, alobi na bango ete: “Bokozwa nguya wana elimo santu ekokitela bino, mpe bokozala bataloli na ngai kati na Yelusaleme, na Yudea mobimba, na Samaria, mpe kino nsuka na mokili.”
Na miso na bango moko, Yesu abandi komata na likoló, na nsima lipata ezipi ye liboso na bango. Nsima na kotika nzoto na ye ya mosuni abuti na likoló lokola moto na elimo. Bazomi na moko bazali wana, kotaláká bobele na likoló, wana mibali mibale na bilamba mpembe babimi pene na bango. Ezali baanzelu balati nzoto ya mosuni, oyo balobi na bango ete: “Mibali na Galilai, botelemi kotala na likoló mpo na nini? Yesu oyo moko, oyo alongwi na bino kokamatama na likoló, akoya bobele bongo na motindo emoni bino ye kokóta na likoló.”
Motindo nini Yesu auti kotika mabelé? Kozanga makelele to kelelo mpe bobele bayekoli na ye ya sembo nde bamoni ye. Akozonga bobele motindo wana: ekozala na makelele te to kelelo mpe te, mpe bobele bayekoli na ye ya sembo nde bakososola ete azongi mpe abandi koyangela kati na nguya ya Bokonzi. Bongo bantóma bakiti na ngomba ya Olive, bakatisi lobwaku ya cédron mpe bazongi na Yelusaleme, esika oyo bakolongwa te mpo na kotósa etinda na Yesu. Mikolo zomi na nsima, na ntango na elambo na Bayuda na Pantekote ya mobu 33, pene na bayekoli 120 bayangani na Yelusaleme kati na chambre moko kuna na likoló. Na mbala moko, ndako mobimba etondi na makelele makokani na oyo ya mopepe makasi. Ndémo lokola móto emonani, mpe efandi mokomoko likoló na moyekoli moko na moko; bango nyonso babandi koloba na minoko mikeseni. Ezali bongo kosopama na elimo santu oyo Yesu alakaki bango! Matai 28:16-20; Luka 24:49-52; 1 Bakolinti 15:5-7; Misala 1:3-15; 2:1-4.
◆ Epai na banani Yesu apesi malako na ye ya nsuka likoló na ngomba moko ya Galilai, mpe malako yango mazali nini?
◆ Ndenge nini Yesu apesi elikya epai na bayekoli na ye, mpe motindo nini akozala elongo na bango?
◆ Yesu abimeli bayekoli na ye na boumeli ya mikolo boni nsima na lisekwa na ye, mpe ateyi bango makambo nini?
◆ Yesu abimeli nani oyo amonani lokola ete, azalaki moyekoli na ye te liboso ete akufa?
◆ Komonana mibale nini ya nsuka oyo Yesu amonani elongo na bantoma na ye, mpe makambo nini maleki wana?
◆ Na ndimbola nini Yesu akozonga bobele na motindo oyo ye akei?
◆ Likambo nini lisalemi na Pantekote ya mobu 33?