Mokapo ya Ntuku Mibale na Mwambe
Pole mpo na bikólo
1, 2. Mpo na nini pole ezali na ntina mingi, mpe molili ya ndenge nini ezipi mabelé lelo oyo?
POLE eutaka epai ya Yehova, ‘ye oyo apesaka moi mpo na pole na ntango ya moi mpe mibeko epai ya sanza mpe minzoto mpo na pole na butu.’ (Yilimia 31:35) Ata kaka mpo na ntina yango, ebongi tóndima ete azali Liziba ya bomoi, mpamba te pole elimboli bomoi. Soki mabelé ezwaka ntango nyonso molunge mpe pole oyo euti na moi te, mbɛlɛ bomoi ndenge toyebi yango ezalaka te. Mbɛlɛ mabelé oyo tofandi ezali na bikelamu ya bomoi te.
2 Yango wana, ntango Yehova asakoli ete eleko na biso ekozala ntango moko ya molili kasi ya pole te, likambo yango esengeli mpenza kobenda likebi na biso. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Yisaya akomaki boye: “Talá, molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota.” (Yisaya 60:2) Maloba yango ezali nde kolobela molili ya elimo, kasi molili ya solosolo te; atako bongo, tosengeli kozwa likambo yango na lisɛki te. Nsukansuka, baoyo bazangi pole ya elimo bakokoka te kozala na bomoi, se ndenge baoyo bazangi pole ya moi bakoki te kotikala na bomoi.
3. Na mikolo oyo ya molili, epai wapi tokoki koluka pole?
3 Na ntango oyo ya molili, tosengeli mpenza na pole oyo Yehova azali kopesa. Ezali na ntina mingi ete tótika Liloba ya Nzambe engɛngisa nzela na biso na kotángáká Biblia mokolo na mokolo soki likoki ezali. (Nzembo 119:105) Makita ya boklisto epesaka biso nzela ya kolendisana ete tótikala na “nzela ya bayengebene.” (Masese 4:18; Baebele 10:23-25) Makasi oyo tozwaka na koyekola Biblia na molende mpe na bokutani ya malamu elongo na baklisto mosusu esalisaka biso tózinda te na molili ya “mikolo [oyo] ya nsuka,” oyo ekokóma makasi koleka na ‘mokolo monene ya nkanda ya Yehova.’ (2 Timote 3:1; Sefania 2:3) Mokolo wana ezali koya noki mpenza! Ekoya mpenza kaka ndenge mokolo mosusu oyo ekokani na yango eyelaki bafandi ya Yelusaleme ya ntango ya kala.
Yehova ‘asambisi’
4, 5. (a) Na ndenge nini Yehova ayeli Yelusaleme? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete kaka mwa ndambo ya bato nde bakobika ntango Yelusaleme ekobomama na mobu 607 L.T.B.? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
4 Na bavɛrsɛ ya nsuka ya esakweli kitoko ya Yisaya, Yehova amonisi polele makambo oyo ekosalema liboso ya mokolo ya nkanda na ye. Totángi boye: ‘Yehova akoya kati na mɔtɔ mpe na makalo na ye lokola mopɛpɛ ya makasi ete azongisa nkanda na ye na nkɛlɛ mpe mpamela na ye na ndemo ya mɔtɔ. Mpo ete Yehova akosambisa na mɔtɔ mpe na mopanga na ye epai ya nyonso bazali na nzoto; mpe baoyo bakobomama na Yehova bakozala mingi mpenza.’—Yisaya 66:15, 16.
5 Maloba wana esengeli kosalisa bato ya ntango ya Yisaya bákanga ntina ete likama ezali liboso na bango. Etikali moke bato ya Babilone, oyo Yehova akosalela bango mpo na kopesa etumbu, bakoya kobunda na Yelusaleme, mpe makalo na bango ekotombola putulu lokola mopɛpɛ ya makasi esalaka. Komona ndenge bazali koya ekobangisa mpenza! Yehova akosalela banguna wana mpo na kopesa bitumbu na ye ya makasi na “nyonso bazali na nzoto,” elingi koloba Bayuda nyonso oyo bazali sembo te. Ekozala lokola nde Yehova ye moko azali kobunda na bato na ye. “Nkɛlɛ” na ye ekozonga nsima te. Bayuda mingi “bakobomama na [Yehova].” Na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), esakweli wana ekokisamaki.a
6. Misala nini ya mabe ezali kosalema na Yuda?
6 Yehova azali nde na ntina ya ‘kosambisa’ basaleli na ye? Ɛɛ! Mbala na mbala na boyekoli na biso ya mokanda ya Yisaya, tomonaki ete Bayuda, ata bazalaki bato oyo bamipesi na Yehova, bamikɔtisaki na losambo ya lokuta—mpe Yehova azalaki komona misala na bango. Tomoni yango lisusu na maloba oyo elandi ya esakweli yango: ‘Baoyo bakomisantisa mpe bakomipɛtola mpo na kokɔta na bilanga; nsima ya moto moko oyo azali na katikati, kolya mosuni ya ngulu mpe bosɔtɔ mpe mpoko, bakosilisama elongo moko. Yehova alobi bongo.’ (Yisaya 66:17) Bayuda wana “bakomisantisa mpe bakomipɛtola” mpo na komibongisa liboso ya komipesa na losambo ya pɛto? Soki moke te. Bazali nde komipesa na milulu ya komipɛtola ya bapakano kati na bilanga oyo ebongisami mpo na yango. Nsima na yango, bazali kolya na lokoso nyonso mosuni ya ngulu mpe nyama mosusu oyo etángami mbindo na Mibeko ya Moize.—Levitike 11:7, 21-23.
7. Na ndenge nini mangomba ya boklisto ekokani na Yuda oyo emipesaki na losambo ya bikeko?
7 Wana ezali likambo moko ya mbindo mpenza mpo na ekólo oyo esalaki kondimana elongo na Nzambe kaka moko ya solo! Nzokande, kanisá naino: makambo ya mbindo ya ndenge yango ezali komonana lelo na mangomba ya boklisto. Mangomba yango elobaka mpe ete ezali kosalela Nzambe, mpe mingi kati na bakonzi na yango bamimonisaka lokola bato ya Nzambe. Nzokande, bazali komikómisa mbindo na mateya mpe na mimeseno ya bapakano, likambo oyo emonisi ete bazali na kati ya molili ya elimo. Molili yango ezali makasi mpenza!—Matai 6:23; Yoane 3:19, 20.
“Bakomona nkembo na ngai”
8. (a) Nini ekokwela Yuda mpe mangomba ya boklisto? (b) Na ndenge nini bikólo ‘bakomona nkembo ya Yehova’?
8 Yehova ayebaka misala mabe mpe mateya ya lokuta ya mangomba ya boklisto? Tángá maloba na ye oyo elandi, ndenge Yisaya akomi, mpe talá soki okopesa eyano nini na motuna yango: ‘Mpo ete, nayebi misala na bango mpe ekozala ete nakoyanganisa bikólo nyonso mpe nkota nyonso mpe bakoya mpe bakomona nkembo na ngai.’ (Yisaya 66:18) Yehova ayebi malamu kaka misala te kasi lisusu makanisi ya baoyo nyonso bazali komibenga basaleli na ye mpe azali pene mpo na kosambisa yango. Yuda alobi ete andimelaka Yehova, kasi misala na ye ya losambo ya bikeko mpe bindimeli ya bapakano endimisi maloba na ye te. Ndenge bato na ye bazali ‘komipɛtola’ na kolandáká milulu ya bapakano ezali na ntina te. Ekólo yango ekobebisama; mpe ntango likambo yango ekosalema, bikólo oyo ezali zingazinga, oyo esambelaka mpe bikeko ekomona yango na miso mpenza. Bikólo yango ‘bakomona nkembo ya Yehova’ na ndenge bakomona makambo oyo ekosalema mpe, bálinga bálinga te, bakondima ete liloba ya Yehova ekokisami solo. Ndenge nini makambo wana nyonso ekokómela mangomba ya boklisto? Ntango ekokóma na nsuka na yango, baninga na yango ya kala mpe baoyo basalaki na yango mombongo bakotɛlɛma mosika mpe bakotala kaka na miso ndenge liloba ya Yehova ezali kokokisama.—Yilimia 25:31-33; Emoniseli 17:15-18; 18:9-19.
9. Nsango malamu nini Yehova asakoli?
9 Lokola Yelusaleme ekobebisama na mobu 607 L.T.B., elingi nde koloba ete Yehova akozala lisusu na batatoli awa na mabelé te? Ezali bongo te. Bato ya bosembo mpenza, lokola Danyele mpe baninga na ye misato, bakolanda kosalela Yehova ata ntango bazali baombo na Babilone. (Danyele 1:6, 7) Ɛɛ, molɔngɔ ya batatoli ya sembo ya Yehova ekokatana te; mpe na nsuka ya mbula 70, mibali mpe basi ya sembo bakolongwa na Babilone, bakozonga na Yuda mpe bakozongisa losambo ya pɛto. Ezali yango nde Yehova alingi kolobela na nsima: ‘Nakotya elembo kati na bango. Longwa na bango nakotinda babikisami epai ya bikólo ya Talasisi, Pulu mpe Ludu, baoyo bakobenda litimbo, mpe na Tubala mpe na Yawana, na bisanga ya mosika; baoyo bayoki mpo na lokumu na ngai te mpe bamoni nkembo na ngai te. Bakosakola mpe nkembo na ngai kati na bikólo.’—Yisaya 66:19.
10. (a) Na ndenge nini Bayuda ya sembo oyo basikolami na Babilone bakozala elembo? (b) Lelo oyo banani bazali elembo?
10 Ebele ya mibali mpe basi ya sembo oyo bakozonga na Yelusaleme na mobu 537 L.T.B. bakozala lokola elembo moko ya kokamwa, eloko oyo ekomonisa ete Yehova asikoli bato na ye. Nani akokaki kokanisa ete Bayuda oyo bazalaki na boombo bakosikolama mokolo mosusu mpo bákoba na losambo ya pɛto na tempelo ya Yehova? Ndenge moko mpe, na ekeke ya liboso baoyo bazalaki “bilembo mpe bikamwiseli” ezalaki baklisto bapakolami; bato ya komikitisa oyo balingaki kosalela Yehova bazalaki koya ebele kosangana na bango. (Yisaya 8:18; Baebele 2:13) Na mikolo na biso, baklisto bapakolami oyo bakómi na bomɛngo mingi na mokili na bango oyo ezongisami, bazali elembo moko ya kokamwa na mabelé. (Yisaya 66:8) Bazali mpenza bato oyo nguya ya elimo ya Yehova ezali komonana epai na bango mpe bazali kobenda bato ya komikitisa oyo mitema na bango ezali kotinda bango na kosalela Yehova.
11. (a) Nsima ya kozongisama, ndenge nini bato ya bikólo mosusu bakoyoka makambo ya Yehova? (b) Ndenge nini Zekalia 8:23 ekokisamaki mpo na mbala ya liboso?
11 Kasi ndenge nini, nsima ya kozongisama na mobu 537 L.T.B., bato ya bikólo mosusu oyo bayokaki naino nsango ya Yehova te bakoyeba ye? Bayuda nyonso ya sembo bazongaki na Yelusaleme te na nsuka ya boombo na bango na Babilone. Basusu, lokola Danyele, batikalaki na Babilone. Basusu bapalanganaki bipai na bipai na mabelé mobimba. Na ekeke ya mitano L.T.B., Bayuda bazalaki bipai nyonso na mikili oyo Bokonzi ya Perse ezalaki koyangela. (Esetele 1:1; 3:8) Ntembe ezali te ete basusu kati na bango basololaki makambo ya Yehova na bapakano oyo bafandaki na bango, mpamba te bato mingi ya bikólo yango bakómaki bandimi na Lingomba ya Bayuda. Emonani ete ezalaki mpenza bongo mpo na mokube Moetiopia, oyo Filipo moyekoli ya Klisto asakwelaki nsango malamu na ekeke ya liboso. (Misala 8:26-40) Nyonso wana ezalaki kokokisama ya liboso ya maloba oyo ya mosakoli Zekalia: “Na mikolo yango, bato zomi longwa na mabota na maloba nyonso, bakosimba elamba ya moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokende na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) Ya solo mpenza, Yehova atindelaki bikólo pole!—Nzembo 43:3.
Bakomema “likabo epai ya Yehova”
12, 13. Na ndenge nini “bandeko” bakoya na Yelusaleme kobanda na mobu 537 L.T.B.?
12 Nsima ya kotongama lisusu ya Yelusaleme, Bayuda oyo bapalangani mosika na mboka na bango bakotalela engumba yango elongo na bonganga-nzambe na yango oyo ezongisami lokola esika monene ya losambo ya pɛto. Mingi kati na bango bakobanda kosala mibembo milai mpo bázalaka mpe na bafɛti oyo esalemaka kuna mbula na mbula. Na elimo ya Nzambe, Yisaya akomi boye: ‘Bakoyeisa bandeko na bino nyonso, uta na bikólo nyonso, lokola likabo epai ya Yehova, na mbalata mpe na makalo mpe na tipoi mpe na mpunda mpe na kamela, kino ngomba mosantu na ngai, Yelusaleme, Yehova alobi bongo, lokola Bayisalaele bakoyeisa likabo kati na mbɛki ya pɛto kino ndako ya Yehova. Nakokamata bamosusu na bango lokola banganga-nzambe mpe Balevi.’—Yisaya 66:20, 21.
13 Basusu kati na ‘bandeko yango oyo bautaki na bikólo nyonso’ bazalaki wana na mokolo ya Pantekote ntango elimo santu ekitelaki bayekoli ya Yesu. Biblia elobi boye: “Bayuda moko, mibali oyo babangaka Nzambe, bazalaki kofanda na Yelusaleme, bautaki na bikólo nyonso na kati ya oyo ezali na nse ya likoló.” (Misala 2:5) Bayaki na Yelusaleme mpo na kosambela ndenge esɛngamaki na momeseno ya Bayuda, kasi ntango bayokaki nsango malamu ya Yesu Klisto, mingi kati na bango bandimelaki ye mpe bazwaki batisimo.
14, 15. (a) Ndenge nini baklisto bapakolami bayanganisaki “bandeko” na bango mosusu ya elimo na nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe ndenge nini bamemaki bango epai ya Yehova lokola “likabo kati na mbɛki ya pɛto”? (b) Na ndenge nini Yehova ‘akamataki bamosusu kati na bango lokola banganga-nzambe’? (c) Tángá mwa baklisto bapakolami mosusu oyo bamipesaki na mosala ya koyanganisa bandeko na bango ya elimo. (Talá etanda na lokasa oyo.)
14 Esakweli yango ekokisamaki mpe na mikolo na biso? Ɛɛ. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, basaleli ya Yehova oyo bapakolami na elimo basosolaki na nzela ya Makomami ete Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló na 1914. Ntango bayekolaki Biblia malamumalamu, bamonaki ete bato mosusu oyo basengelaki mpe kozwa libula ya Bokonzi to “bandeko,” basengelaki koyanganisama. Baministre ya mpiko mpenza basalaki mibembo kino “na esika eleki mpenza mosika na mabelé,” basalelaki mituka, masuwa, bampɛpɔ, bingbunduka mpe bongo na bongo, mpo na koluka batikali bapakolami mosusu, oyo mingi kati na bango bayaki kobima na mangomba ya boklisto. Ntango bamonaki bato yango, bamemaki bango lokola likabo epai ya Yehova.—Misala 1:8.
15 Bapakolami oyo bayanganisamaki na bambula wana ya ebandeli balukaki te ete Yehova andima bango ndenge bazalaki liboso bákóma na boyebi ya solo ya Biblia. Yango wana, basalaki nyonso mpo na komipɛtola na mbindo nyonso ya elimo mpe ya bizaleli mpo bákoka kozala lokola “likabo kati na mbɛki ya pɛto,” to “ngɔndɔ moko ya pɛto na bizaleli epai ya Klisto,” ndenge ntoma Paulo alobaki. (2 Bakolinti 11:2) Longola kobwaka mateya ya lokuta, bapakolami balukaki koyeba ndenge ya komikɔtisa te na makambo ya politiki ya mokili oyo. Na 1931, ntango basaleli na ye bapɛtolamaki na ndenge ebongi, Yehova amoniselaki bango motema mawa wana apesaki bango libaku malamu ya komema nkombo na ye, mpo bázala Batatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10-12) Bongo, na ndenge nini Yehova ‘akamataki bamosusu na bango lokola banganga-nzambe’? Na ndenge bapakolami yango nyonso bakómaki basangani ya “bonganga-nzambe moko ya bokonzi, libota moko mosantu” oyo ezali kopesa Nzambe mbeka ya masanzoli.—1 Petelo 2:9; Yisaya 54:1; Baebele 13:15.
Koyanganisama ezali se kokoba
16, 17. Banani bazali “bakitani na bino” nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
16 Motángo mobimba ya baoyo bazali na kati ya “bonganga-nzambe [yango] ya bokonzi” ezali 144 000, mpe nsukansuka, koyanganisama na bango esilaki. (Emoniseli 7:1-8; 14:1) Yango ezalaki nde nsuka ya mosala ya koyanganisa basaleli ya Yehova? Te. Esakweli ya Yisaya elobi boye: ‘Lokola likoló ya sika mpe mabelé ya sika oyo ekosala ngai ekoumela liboso na ngai (Yehova alobi bongo), bongo bakitani na bino mpe nkombo na bino ekoumela.’ (Yisaya 66:22) Na kokokisama ya liboso ya maloba yango, Bayuda oyo bauti na boombo ya Babilone bakobɔkɔla bana. Na ndenge yango, batikali ya Bayuda oyo bazongi, to “mabelé ya sika,” bakopikama makasi lokola bakoyangelama na Bayuda oyo bakozala bakonzi ya sika to “likoló ya sika.” Nzokande, esakweli yango ekokisamaki lisusu na ndenge ya kokamwa koleka na mikolo na biso.
17 “Bakitani” oyo ekólo wana ya bandeko ya elimo eboti ezali “ebele ya bato,” baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé. Bauti “na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,” mpe batɛlɛmi “liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate.” “Basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.” (Emoniseli 7:9-14; 22:17) Na mikolo na biso, “ebele ya bato” bazali kolongwa na molili ya elimo mpo na kolanda pole oyo Yehova azali kopesa. Bazali komonisa kondima kati na Yesu Klisto, mpe se lokola bandeko na bango ya mibali mpe ya basi oyo bapakolami na elimo, bazali kosala milende mpo na kotikala pɛto na elimo mpe na bizaleli. Bango nyonso, bazali kokoba kosalela Nzambe wana bazali kotosa litambwisi ya Klisto mpe ‘bakoumela’ libela!—Nzembo 37:11, 29.
18. (a) Ndenge nini basangani ya ebele ya bato balandi ndakisa ya bandeko na bango bapakolami? (b) Na ndenge nini bapakolami ná baninga na bango basambelaka Yehova “longwa sanza ya sika kino sanza ya sika mpe longwa sabata kino sabata”?
18 Mibali mpe basi wana balingá mosala, oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé, bayebi ete atako kotikala pɛto na bizaleli mpe na elimo ezali likambo ya ntina mingi, ezali kaka yango te nde esengeli kosala mpo na kosepelisa Yehova. Lokola mosala ya koyanganisa basaleli ya Yehova ekómi monene, bango mpe balingi kopesa mabɔkɔ. Mokanda ya Emoniseli esakolaki boye mpo na bango: “Bazali liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe; mpe bazali kosalela ye mosala mosantu butu moi na kati ya tempelo na ye.” (Emoniseli 7:15) Maloba yango ezongisi na makanisi na biso vɛrsɛ oyo ezali liboso ya vɛrsɛ ya nsuka ya esakweli ya Yisaya: “Longwa sanza ya sika kino sanza ya sika, mpe longwa sabata kino sabata, nyonso bazali na nzoto bakoya kosambela liboso na ngai. [Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 66:23) Likambo yango ezali kosalema lelo. “Longwa sanza ya sika kino sanza ya sika, mpe longwa sabata kino sabata”—elingi koloba mbala na mbala, pɔsɔ na pɔsɔ mpe sanza na sanza—baklisto bapakolami ná baninga na bango, ebele ya bato, basanganaka esika moko mpo na kosambela Yehova. Basalaka bongo, na ndakisa, wana bayanganaka na makita mpe ntango babimaka na mosala ya kosakola. Ozali moko na baoyo mbala na mbala ‘bayaka kosambela liboso ya Yehova’? Basaleli ya Yehova bazalaka na esengo mingi ya kosala bongo, mpe basangani ya ebele ya bato bazelaka na motema likoló ntango oyo “nyonso bazali na nzoto,” elingi koloba bato nyonso ya bomoi, bakosalela Yehova “longwa sanza ya sika kino sanza ya sika, longwa sabata kino sabata,” libela na libela.
Banguna ya Nzambe bakosuka libela
19, 20. Na ntango oyo Biblia ezalaki kokomama, ntina ya Gehena ezalaki nini, mpe yango ezali elembo ya nini?
19 Totikali na vɛrsɛ moko na boyekoli na biso ya esakweli ya Yisaya. Mokanda yango esuki na maloba oyo: ‘Bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki ngai; zambi nkusu likoló na bango ekokufa te, mɔtɔ na bango ekozimana te mpe bakoboyama na nyonso baoyo bazali na nzoto.’ (Yisaya 66:24) Ekoki kozala ete Yesu Klisto azalaki kokanisa esakweli yango ntango alendisaki bayekoli na ye bázala na bomoi ya mindɔndɔ te kasi bátya nde matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Alobaki boye: “Soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, bwaká yango; eleki malamu mpo na yo kokɔta liso moko na bokonzi ya Nzambe na esika ya kobwakama ná miso mibale na Gehena, epai nkusu na yango ekufaka te mpe mɔtɔ ebomamaka te.”—Malako 9:47, 48; Matai 5:29, 30; 6:33.
20 Esika oyo babengi Gehena ezali nini? Eleki sikoyo bankama ya bambula, Moyuda moko, moto ya mayele na nkombo David Kimhi akomaki boye: “Ezali esika moko . . . penepene na Yelusaleme, mpe ezali esika moko ya bosɔtɔ, mpe babwakaka kuna biloko ya mbindo mpe bibembe. Lisusu mɔtɔ ezalaki ntango nyonso kopela kuna mpo na kozikisa biloko ya mbindo mpe mikuwa ya bibembe. Yango wana babengi etumbu ya bato mabe na ndenge ya lisese Gehinnom.” Soki, lokola Moyuda wana ya mayele amonisi, bazalaki kosalela Gehena lokola esika ya kobwaka bosɔtɔ mpe bibembe ya baoyo babongi te kokundama, mɔtɔ nde ebongaki mpo na kolimwisa bosɔtɔ mpe bibembe yango. Oyo mɔtɔ ezalaki kozikisa te, nkusu ezalaki kolya yango. Elilingi yango ebongi mpenza mpo na komonisa ndenge banguna ya Nzambe bakosuka libela!b
21. Mokanda ya Yisaya esuki na nsango ya malamu mpo na banani, mpe mpo na nini?
21 Lokola batángi bibembe, mɔtɔ mpe nkusu, ezali solo te ete esakweli wana kitoko ya Yisaya esuki na ndenge moko ya nsɔmɔ? Baoyo bamikómisá mpenza banguna ya Nzambe bakoki kokanisa bongo. Kasi mpo na baninga ya Nzambe, makambo oyo Yisaya akomi oyo etali kobomama ya seko ya bato mabe ezali solo kolendisa. Basaleli ya Yehova bazali na mposa bákitisa bango motema ete banguna na bango bakonyokola bango lisusu te. Banguna wana oyo bamonisi basaleli ya Nzambe mpasi mingi mpe basambwisi mpenza nkombo na ye, bakobomama libela na libela. Na nsima, ‘minyoko ekobima mpo na mbala ya mibale lisusu te.’—Nahumu 1:9.
22, 23. (a) Yebisá mwa matomba oyo ozwi na boyekoli ya mokanda ya Yisaya. (b) Nsima ya koyekola mokanda ya Yisaya, ekateli na yo ezali nini, mpe elikya na yo ezali nini?
22 Lokola tokómi na nsuka ya boyekoli na biso ya mokanda ya Yisaya, na ntembe te tomoni mpenza ete mokanda yango ya Biblia ezali kaka lisolo moko mpamba ya kala te. Kasi ezali na nsango moko mpo na biso lelo oyo. Soki tokanisi ntango ya molili oyo Yisaya azalaki kobika kati na yango, tokomona ete ekokani mpenza na mikolo na biso. Yikiyiki na makambo ya politiki, bokosi na makambo ya losambo, bazuzi bazali kosɛnga kanyaka, bato ya sembo mpe babola bazali konyokwama, makambo nyonso wana etondaki na ntango ya Yisaya, mpe ezali se bongo na ntango na biso. Na ntembe te, Bayuda ya sembo ya ekeke ya motoba L.T.B. bazalaki na botɔndi mpo na esakweli ya Yisaya, biso mpe lelo oyo tozali kobɔndisama wana tozali koyekola yango.
23 Na bantango oyo ya ndenge mosusu, oyo molili ezipi mabelé mpe molili tuu ezipi bikólo ya mokili, biso nyonso tozali solo na botɔndi mingi ete Yehova, na monɔkɔ ya Yisaya, apesi pole mpo na bato nyonso! Pole wana ya elimo elimboli bomoi ya seko mpo na baoyo nyonso bazali kondima yango na motema mobimba, bázala bato ya ekólo nini to ya mposo nini. (Misala 10:34, 35) Na yango, tólanda kotambola na kati ya pole ya Liloba ya Nzambe, tótángaka yango mokolo na mokolo, tókanisaka yango malamumalamu, mpe tólingaka mingi nsango na yango. Tokozwela yango mapamboli ya seko mpe tokopesa nkombo mosantu ya Yehova lokumu!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na kotalela makambo ndenge ezalaki na Yelusaleme nsima ya kokwea na yango na mabɔkɔ ya bato ya Babilone, Yilimia 52:15 elobeli ‘babola mosusu mpe ndambo ya bato oyo batikalaki na mboka.’ Buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, na lokasa 403, elobi boye: “Emonani ete maloba ‘baoyo batikalaki na mboka’ ezali kolakisa ete ebele ya bato bakufaki na nzala, na maladi, na mɔtɔ, to babomamaki na etumba.”
b Lokola bazalaki kozikisa nde bibembe na Gehena, kasi bato ya bomoi te, esika wana ezali elembo ya konyokwama libela na libela te.
[Etanda na lokasa 409]
Bapakolami oyo bauti na bikólo nyonso: Makabo mpo na Yehova
Na 1920, Juan Muñiz alongwaki na États-Unis akendeki na Espagne mpe na nsima na Argentine, esika afungolaki masangá ya baklisto bapakolami. Kobanda na 1923, pole ya solo ebandaki kongɛngisa bato ya motema sembo na Wɛsti ya Afrika ntango misionɛrɛ William Brown (oyo mbala mingi bazalaki kobenga ye Brown Biblia) akendeki kosakola nsango ya Bokonzi na bamboka lokola Sierra Leone, Ghana, Liberia, Gambie, mpe Nigeria. Kaka na mbula yango, ndeko moko ya Canada, na nkombo George Young, akendeki na Brésil mpe na nsima na Argentine, Costa Rica, Panama, Venezuela, ata mpe na Union soviétique. Se na ntango yango, Edwin Skinner alongwaki na masuwa banda na Angleterre tii na Inde, epai amipesaki na mosala ya kobuka mbuma na boumeli ya bambula mingi.
[Elilingi na lokasa 411]
Bayuda mosusu na ntango ya Pantekote ezalaki ‘bandeko oyo bautaki na bikólo nyonso’
[Elilingi na lokasa mobimba 413]