Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bt mok. 3 nk. 20-27
  • “Batondaki na elimo santu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Batondaki na elimo santu”
  • ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bango nyonso elongo na esika moko” (Misala 2:1-4)
  • “Moto na moto azalaki koyoka . . . na monɔkɔ na ye mpenza” (Misala 2:5-13)
  • “Petro atɛlɛmaki” (Misala 2:14-37)
  • “Mokomoko na bino abatisama” (Misala 2:38-47)
  • Petelo asakoli na mokolo ya Pantekote
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Ndenge boklisto epalanganaki epai ya Bayuda na ekeke ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bato “uta na minɔkɔ nyonso” bazali koyoka nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
bt mok. 3 nk. 20-27

MOKAPO 3

“Batondaki na elimo santu”

Makambo oyo bayekoli basalaki nsima ya kozwa elimo santu na mokolo ya Pantekote

Euti na Misala 2:1-47

1. Lobelá makambo oyo ezalaki kosalema na Fɛti ya Pantekote.

BABALABALA ya Yerusaleme etondi na bato.a Na etumbelo ya tempelo, milinga ezali komata likoló wana Balevi bazali koyemba Hallel (Nzembo 113 tii 118); na ntembe te, etuluku moko ezali kobanda koyemba, mpe na nsima bamosusu bazali koyamba. Babalabala etondi na bapaya. Bato yango bauti na bamboka mosika lokola Elame, Mezopotamia, Kapadosi, Ponti, Ezipito, mpe Roma.b Bayei kosala nini? Bayei na fɛti ya Pantekote, oyo ebengamaka mpe “mokolo ya mbuma ya liboso oyo eteli.” (Mit. 28:26) Fɛti yango esalemaka mbala moko na mbula, na eleko oyo basilisi kobuka ɔrje mpe babandi kobuka blé. Ezalaka mokolo ya esengo mpenza.

Karte moko ezali kolakisa bisika bato oyo bayokaki nsango malamu na Pantekote ya mobu 33 T.B bautaki. Bitúká: Libi, Ezipito, Etiopi, Bitinia, Ponti, Kapadosi, Yudea, Mezopotamia, Babilonia, Elame, Media, mpe Parte. 2. Bingumba: Roma, Alezandria, Memfisi, Antiokia (ya Siri), Yerusaleme, mpe Babilone. 3. Mai: Mbu Mediterane, Mbu Moindo, Mbu Motane, Mbu Kaspiene, mpe Golfe ya Perse.

YERUSALEME​—ESIKA MONENE YA LOSAMBO YA BAYUDA

Makambo mingi oyo elobelami na mikapo ya ebandeli ya mokanda ya Misala esalemaki na Yerusaleme. Engumba yango ezali na kati ya bangomba na Yudea, na ɛsti ya Mbu ya Mediterane, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 55. Na mobu 1070 L.T.B., Mokonzi Davidi azwaki esika makasi oyo ezalaki likoló ya Ngomba Siona; akómaki kofanda kuna, mpe na nsima, ekómaki engumba monene oyo ezalaki engumba-mokonzi ya ekólo Yisraele.

Bayuda balobaka ete Abrahama alingaki kokaba Yisaka lokola mbeka likoló ya Ngomba Moria, oyo ezali pembeni ya Ngomba Siona, mbula koleka 1 900 liboso makambo oyo elobelami na mokanda ya Misala. Engumba Yerusaleme ekómaki tii na Ngomba Moria ntango Salomo atongaki tempelo ya liboso likoló ya ngomba yango. Tempelo yango ekómaki esika monene mpo na makambo ya ekólo mpe losambo ya Bayuda.

Bayuda ya mokili mobimba oyo bamipesaki na losambo bazalaki koyangana mbala na mbala na tempelo mpo na kopesa bambeka, kosambela, mpe kosala bafɛti oyo Mibeko esɛngaki. Bazalaki kotosa etinda ya Nzambe oyo elobi boye: “Mbala misato na mbula, mobali nyonso akokende liboso ya Yehova Nzambe na yo na esika oyo ye aponi.” (Mib. 16:16) Sanedrina Monene, elingi koloba tribinale monene ya Bayuda, mpe lisangani ya batambwisi ya ekólo, ezalaki mpe na Yerusaleme.

2. Makambo nini ya kokamwa esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?

2 Pene na ngonga ya libwa na ntɔngɔ ya mokolo wana ya eleko ya prɛnta na mobu 33 T.B., likambo moko esalemaki, oyo ekamwisaka bato tii lelo oyo, nsima ya bankama ya bambula. Na mbala moko, “makɛlɛlɛ eutaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi.” (Mis. 2:2) Makɛlɛlɛ yango etondaki na ndako oyo bayekoli 120 ya Yesu bayanganaki. Na nsima, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Ndemo lokola nde mɔtɔ ezalaki komonana mpe ezalaki likoló ya motó ya moyekoli mokomoko.c Na nsima, bayekoli “batondaki na elimo santu” mpe babandaki koloba na minɔkɔ ya bapaya! Ntango bayekoli babimaki na ndako yango, bapaya oyo bazalaki kokutana na bango na babalabala ya Yerusaleme bazalaki kokamwa, mpo bayekoli bazalaki koloba na minɔkɔ ya bato yango! Moto na moto azalaki koyoka bango “bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza.”​—Mis. 2:1-6.

3. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Pantekote ya mobu 33 T.B. ezalaki mokolo ya ntina mingi mpo na losambo ya solo? (b) Ndenge nini diskur ya Petro eyokani na mokumba na ye ya kosalela “bafungola ya Bokonzi”?

3 Likamwisi yango ezalaki likambo ya ntina mingi mpo na losambo ya solo; ezalaki ebandeli ya Yisraele ya elimo, to lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Gal. 6:16) Kasi, makambo esukaki wana te. Na mokolo yango, ntango Petro alobaki epai ya ebele ya bato, asalelaki fungola ya liboso kati na “bafungola [misato] ya Bokonzi” oyo mokomoko na yango esengelaki kopesa etuluku moko ya bato libaku monene mpenza. (Mat. 16:18, 19) Fungola wana ya liboso epesaki Bayuda ná baprozelite libaku ya kondima nsango malamu mpe ya kotyama mafuta na elimo santu.d Na ndenge yango, balingaki kokóma basangani ya Yisraele ya elimo, mpe kozala na elikya ya koyangela lokola bakonzi mpe banganga-nzambe na Bokonzi ya Masiya. (Em. 5:9, 10) Na nsima, libaku malamu yango epesamaki mpe epai ya Basamaria, mpe na nsuka epai ya bato ya bikólo. Liteya nini bakristo ya lelo bakoki kozwa na makambo minene oyo esalemaki mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?

“Bango nyonso elongo na esika moko” (Misala 2:1-4)

4. Na ndenge nini lisangá ya bokristo na mikolo na biso ezali kaka lisangá oyo ebandaki na mobu 33 T.B.?

4 Lisangá ya bokristo ebandaki na bayekoli 120 oyo bazalaki “bango nyonso elongo na esika moko,” elingi koloba na shambrɛ ya likoló mpe oyo bazwaki elimo santu. (Mis. 2:1) Na nsuka ya mokolo yango, basangani ya lisangá oyo bazwi batisimo bakómaki bankóto. Yango ezalaki kaka ebandeli ya bokoli oyo ezali kokoba tii na moi ya lelo! Ya solo, lisangá ya bokristo na mikolo na biso, ebongiseli oyo esangisi mibali mpe basi oyo babangaka Nzambe, ezali esaleli oyo na nzela na yango “nsango malamu oyo ya Bokonzi” ezali ‘kosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso,’ liboso nsuka ya makambo ya ntango oyo eya.​—Mat. 24:14.

5. Na siɛklɛ ya liboso, soki moto akɔti na lisangá ya bokristo azalaki kozwa mapamboli nini, oyo ezali mpe na ntango na biso?

5 Lisangá ya bokristo esengelaki mpe kolendisa basangani na yango; liboso, baoyo batyami mafuta na elimo, mpe na nsima, “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Paulo azalaki kosepela mingi na ndenge oyo bandeko na lisangá bapesanaka mabɔkɔ; amonisaki yango ntango akomelaki bakristo ya Roma boye: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, mpo nakabela bino mwa likabo ya elimo mpo bókóma makasi, to, kutu nde, mpo tólendisana na nzela ya kondima, ya bino elendisa ngai mpe ya ngai elendisa bino.”​—Rom. 1:11, 12.

ROMA​—ENGUMBA-MOKONZI YA AMPIRE MOKO MONENE

Makambo nyonso oyo mokanda ya Misala elobeli esalemaki na eleko oyo Roma ezalaki engumba oyo eleki monene mpe yango nde ezalaki koyangela mokili mobimba ya ntango wana. Ezalaki mboka-mokonzi ya ampire moko monene oyo ebandaki na Grande-Bretagne tii na Afrika ya Nɔrdi, mpe banda na Mbu Atlantike tii na Golfe ya Perse.

Bafandi ya Roma bazalaki bato ya mimeseno, mposo, minɔkɔ, mpe bindimeli ndenge na ndenge. Bato bakokaki kouta na biloko ata na esika nini na ampire mobimba mpe kokende na yango na Roma mpo banzela ya malamu ezalaki ebele mpe bipai nyonso. Na libongo ya Ostie, oyo ezalaki pembeni ya Roma, bamasuwa ezalaki ntango nyonso koya na biloko ya kolya mpe biloko ya ntalo mpo na kotɛka na Roma.

Na siɛklɛ ya liboso T.B., bato koleka milio moko bazalaki kofanda na Roma. Ekoki kozala ete bato 500000 bazalaki baombo, elingi koloba basali mabe oyo bakatelaki etumbu ya bolɔkɔ, bana oyo baboti na bango batɛkaki to basundolaki bango, mpe bato oyo bakangaki na bitumba. Kati na bato oyo bamemamaki na boombo na Roma, ezalaki na Bayuda ya Yerusaleme oyo bakangamaki ntango Pompée, mokonzi moko ya basoda ya Roma, alongaki engumba yango na mobu 63 L.T.B.

Bato mingi oyo bazalaki na bonsomi bazalaki babola; bazalaki kofanda bato ebele na mwa bandako oyo ezalaki na baetajɛ mingi mpe bazalaki kobikela kaka na mwa lisalisi ya Leta. Kasi, baampɛrɛrɛ mingi batongaki bandako minene ya kitoko mpenza oyo ebongisaki engumba yango. Bandako yango mosusu ezalaki mpo na bateyatre, mosusu ezalaki mabándá ya masano epai bazalaki kolakisa bitumba ya bilombe mpe mimekano ya mbangu ya makalo; masano yango ezalaki ofele mpo na moto nyonso oyo asepeli kokende kotala yango mpo na kominanola.

6, 7. Lelo oyo, ndenge nini lisangá ya bokristo ezali kokokisa mokumba ya kosakola nsango malamu na bikólo nyonso?

6 Lelo oyo, lisangá ya bokristo ezali na mikano ndenge moko na oyo ya lisangá ya siɛklɛ ya liboso. Yesu apesaki bayekoli na ye mosala moko monene; kasi, mosala yango epesaka mpe esengo. Alobaki na bango boye: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”​—Mat. 28:19, 20.

7 Lisangá ya Batatoli ya Yehova ezali ebongiseli oyo, na nzela na yango, mosala yango ezali kokokisama lelo oyo. Ya solo, komema nsango malamu epai ya bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Atako bongo, Batatoli ya Yehova babimisi mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 1000. Soki ozali na kati ya lisangá ya bokristo mpe osanganaka na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli, osengeli mpenza kozala na esengo. Ozali na kati ya bato moke oyo, na mabele mobimba, bazali na libaku malamu ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nkombo ya Yehova!

8. Lisalisi nini tozwaka na nzela ya lisangá ya bokristo?

8 Mpo na kosalisa yo oyika mpiko mpe obatela esengo na yo na mikolo oyo ya mpasi, Yehova Nzambe apesi yo ebele ya bandeko oyo bazali na mokili mobimba. Paulo akomelaki Baebre oyo bakómaki bakristo boye: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika te koyanganaka na makita na biso, ndenge bamosusu basalaka, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kopusana.” (Ebr. 10:24, 25) Lisangá ya bokristo ezali ebongiseli oyo Yehova atye mpo na kopesa yo nzela ya kolendisa bandeko mpe mpo bango bákoka kolendisa yo. Kangamá makasi na bandeko na yo ya elimo. Kotika te momeseno ya koyangana na makita!

“Moto na moto azalaki koyoka . . . na monɔkɔ na ye mpenza” (Misala 2:5-13)

Bayekoli ya Yesu bazali kosakwela Bayuda ná baprozelite na balabala oyo bato balekaka mingi.

“Tozali koyoka bango bazali koloba makambo kitoko ya Nzambe na minɔkɔ na biso.”​—Misala 2:11

9, 10. Ndenge nini bato mosusu bamipesi mpo na kosakola epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu?

9 Kanisá yikiyiki oyo ezalaki na kati ya ebele ya Bayuda mpe baprozelite oyo bayanganaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Ekoki kozala ete mingi kati na bango bayebaki monɔkɔ moko oyo bakokaki kosalela mpo na kosolola na bato mosusu, mbala mosusu ezalaki monɔkɔ ya Grɛki to ya Ebre. Kasi, ntango likamwisi wana esalemaki, “moto na moto azalaki koyoka [bayekoli] bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza.” (Mis. 2:6) Na ntembe te, ntango bato yango bayokaki nsango malamu na minɔkɔ ya mboka na bango, esimbaki mpenza mitema na bango. Ya solo, lelo oyo bakristo balobaka minɔkɔ ya bapaya na ndenge ya likamwisi te. Nzokande, mingi kati na bango bandimi komipesa mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi epai ya bato ya bikólo nyonso. Na ndenge nini? Bamosusu bayekoli minɔkɔ mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na masangá ya minɔkɔ ya bapaya na esika oyo bafandi, to mpe bakei na mboka mopaya. Mbala mingi, bamonaka ete bayoki na bango basepelaka na milende na bango.   

10 Tózwa ndakisa ya Christine, oyo ayekolaki monɔkɔ ya Gujarati elongo na Batatoli mosusu nsambo. Ntango akutanaki na moninga moko ya mosala oyo alobaka monɔkɔ yango, apesaki ye mbote na monɔkɔ ya Gujarati. Elenge mwasi yango akamwaki mpe alingaki koyeba mpo na nini Christine azalaki kosala makasi ayeba monɔkɔ wana ya mpasi. Christine asalelaki libaku wana mpo na kopesa ye litatoli. Elenge mwasi yango alobaki na Christine boye: “Nakanisi ete bozali mpenza na nsango moko ya ntina.”

11. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya baoyo balobaka monɔkɔ ya bapaya?

11 Ya solo, bamosusu kati na biso bakokoka te koyekola monɔkɔ ya bapaya. Atako bongo, tokoki komibongisa mpo na koyebisa nsango ya Bokonzi epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu. Na ndenge nini? Na ndakisa, tokoki kosalela JW Language mpo na koyekola ndenge ya kopesa mbote na monɔkɔ oyo bato balobaka mingi na esika ofandi. Okoki mpe koyekola mwa maloba ya monɔkɔ yango oyo ekoki kolamwisa mposa ya bato oyo balobaka yango. Okoki kolakisa bango ndenge ya kokɔta na jw.org, mpe mbala mosusu kolakisa bango bavideo mpe mikanda ndenge na ndenge ya monɔkɔ na bango oyo ezali na kati. Soki tozali kosalela bisaleli yango na mosala ya kosakola, tokoki kozwa esengo ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazwaki ntango bato oyo bautaki na mikili ya bapaya bakamwaki koyoka nsango malamu “moto na moto . . . na monɔkɔ ye.”

BAYUDA NA MEZOPOTAMIA MPE NA EZIPITO

Buku moko (The History of the Jewish People in the Age of Jesus Christ [175 L.T.B.–135 T.B.]) elobi boye: “Baasiri mpe bato ya Babilone bamemaki bato ya bokonzi ya mabota zomi [ya Yisraele], mpe ya bokonzi ya Yuda na boombo na Mezopotamia, na Media mpe na Babilonia; mpe bambula mingi na nsima, bana na bango bazalaki kaka kofanda na mikili wana.” Ezera 2:64 elobi ete kaka Bayisraele 42360, nde bazongaki na Yerusaleme na mobu 537 L.T.B., nsima ya boombo na Babilone. Flavius Josèphe alobi ete na siɛklɛ ya liboso T.B., bankóto ya Bayuda bazalaki “kofanda na Babilonia.” Kati na siɛklɛ ya misato tii siɛklɛ ya mitano T.B., Bayuda wana basalaki buku oyo ebengami “Talmud de Babylone.”

Ezali na bilembeteli mingi oyo endimisi ete Bayuda bazalaki na Ezipito na ebandeli ya siɛklɛ ya motoba L.T.B. Na eleko wana, Yirimia atindaki nsango epai ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na bamboka ndenge na ndenge ya Ezipito, ata mpe na Memfisi. (Yir. 44:1, maloba na nse ya lokasa) Ekoki kozala ete Bayuda mingi bakendaki kofanda na Ezipito na eleko ya boyangeli ya Bagrɛki. Josèphe alobi ete Bayuda bazalaki kati na bato ya liboso oyo bafandaki na Alezandria. Na nsima, bakómaki na kartye na bango mobimba na engumba yango. Na siɛklɛ ya liboso T.B., Philon, mokomi moko oyo azalaki Moyuda, alobaki ete milio moko ya bato ya ekólo na ye bazalaki kofanda na Ezipito, kobanda “pembeni ya Libi tii na ndelo ya Etiopi.”

“Petro atɛlɛmaki” (Misala 2:14-37)

12. (a) Ndenge nini Yoele asakolaki likambo ya kokamwa oyo ekokisamaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.? (b) Mpo na nini esengelaki mpe esakweli ya Yoele ekokisama na siɛklɛ ya liboso?

12 “Petro atɛlɛmaki” mpo na koloba liboso ya ebele ya bato yango oyo bautaki na bikólo ndenge na ndenge. (Mis. 2:14) Alimbwelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye ete Nzambe nde apesaki bango likoki ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge mpo na kokokisa esakweli ya Yoele oyo elobi ete: “Nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai.” (Yoe. 2:28) Liboso Yesu amata na likoló, ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu,” mpe Yesu amonisaki ete mosungi yango ezali “elimo.”​—Yoa. 14:16, 17.

13, 14. Petro asalaki ndenge nini mpo na kosimba mitema ya bayoki na ye, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

13 Na nsuka ya diskur na ye, Petro alobaki na mpiko epai ya bayoki na ye ete: “Tiká bato nyonso ya Yisraele báyeba malamumalamu ete Nzambe akómisi ye Nkolo mpe Kristo, Yesu yango oyo bino bobakaki na nzete.” (Mis. 2:36) Ya solo, bato mingi oyo bayokaki Petro na mokolo yango bazalaki te ntango babakaki Yesu na nzete. Kasi, bango nyonso bazalaki na ngambo na likambo yango mpo bazalaki bato ya ekólo wana. Kasi, tomoni ete Petro alobaki epai ya bandeko na ye Bayuda na limemya mpe alukaki kosimba mitema na bango. Petro alingaki te kosambisa bato yango, alingaki nde ete bábongola mitema. Bato oyo bayokaki Petro basepelaki te na maloba na ye? Soki moke te. Kutu, “mitema na bango etungisamaki makasi mpenza.” Batunaki ete: “Tosengeli kosala nini?” Lokola Petro alobaki na bango na limemya, asimbaki mitema ya mingi kati na bango, mpe balukaki kobongola mitema.​—Mis. 2:37.

14 Tokoki komekola ndenge oyo Petro asalaki mpo na kosimba mitema ya bayoki na ye. Ntango tozali kopesa litatoli, tosengeli te koluka kosembola likanisi nyonso ya lokuta oyo moto abimisi. Tosengeli nde koluka makambo oyo ekobimisa ntembe te kati na biso ná ye. Soki tozwi makambo ya ndenge wana, tokoki kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kokanisa na moto yango. Mbala mingi, ntango tozali komonisa solo ya Biblia na limemya, bato ya mitema sembo bandimaka koyoka biso.

LINGOMBA YA BOKRISTO NA ETÚKÁ YA PONTI

Na kati ya bato oyo bayokaki diskur ya Petro mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ezalaki na Bayuda oyo bautaki na Ponti, etúká moko oyo ezalaki na nɔrdi ya Azia Moke. (Mis. 2:9) Emonani ete bamosusu kati na bango bamemaki nsango malamu na mboka na bango, mpo, na kati ya bakristo oyo Petro atindelaki mokanda na ye ya liboso, ezalaki mpe na bandimi ‘oyo bapalangani’ na bisika lokola Ponti.g (1 Pe. 1:1) Mokanda na ye emonisi ete bakristo yango bazalaki ‘koyoka mawa na komekama ndenge na ndenge’ mpo na kondima na bango. (1 Pe. 1:6) Ekoki kozala ete komekama yango esangisaki mpe botɛmɛli ná minyoko.

Mikanda oyo Pline le Jeune, guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Bitini mpe ya Ponti, akomelaki Amperɛrɛ Trajan elobeli mpe komekama mosusu oyo bakristo ya Ponti bakutanaki na yango. Ntango Pline azalaki na Ponti na mobu soki 112 T.B., akomaki mokanda moko oyo elobaki ete “kopalangana” ya bokristo ezali likama mpo na moto nyonso: mwasi to mobali, mokóló to elenge, moto ya lokumu to moto mpamba. Pline ayebisaki bato oyo bafundamaki ete bazali bakristo soki bawangani ete bazali bakristo te, bakozwa etumbu te; kasi baoyo baboyaki, abomaki bango. Bazalaki kobimisa na bolɔkɔ moto oyo andimi kofinga nkombo ya Kristo to kosala libondeli epai ya banzambe to liboso ya ekeko ya Trajan. Pline alobaki ete “bato oyo bazalaki bakristo ya solosolo bazalaki koboya kosala” makambo yango.

g Maloba oyo ebongolami na “oyo bapalangani” euti na liloba moko ya Grɛki oyo elimboli “oyo bafandi na bikólo mosusu.” Maloba yango emonisi ete mingi kati na bato ya liboso oyo bakómaki bakristo bazalaki Bayuda.

“Mokomoko na bino abatisama” (Misala 2:38-47)

15. (a) Petro alobaki nini, mpe bato basalaki nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete bankóto ya bato oyo bayokaki nsango malamu mokolo ya Pantekote bakokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo mokolo wana?

15 Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., epai ya Bayuda mpe baprozelite oyo bandimaki mateya na ye, Petro alobaki boye: “Bóbongola mitema, mpe mokomoko na bino abatisama.” (Mis. 2:38) Na bongo, bato soki 3 000 bazwaki batisimo, na ntembe te na bapisini ya Yerusaleme mpe ya bamboka mosusu ya pembeni.e Bato yango bandimaki kozwa batisimo kaka mpo na esengo? Lisolo yango ezali nde komonisa ete bayekoli ya Biblia mpe bana ya bakristo basengeli kowela kozwa batisimo ata soki bakokisi naino masɛngami te? Te. Tóbosana te ete Bayuda ná baprozelite oyo bazwaki batisimo mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. bazalaki bayekoli ya Liloba ya Nzambe, mpe bazalaki na ekólo oyo emipesaki epai ya Yehova. Longola yango, bato yango bamonisaki ete bazalaki molende, bamosusu basalaki mibembo milai mpo na kokende na fɛti yango. Nsima ya kondima mateya ya solo oyo etali mokumba ya Yesu Kristo mpo na kokokisa mokano ya Nzambe, bandimaki kokoba kosalela Nzambe, kasi sikoyo lokola bayekoli ya Kristo oyo bazwi batisimo.

BAPROZELITE BAZALAKI BANANI?

“Bayuda ná baprozelite” bayokaki diskur ya Petro na Pantekote ya mobu 33 T.B.​—Mis. 2:10.

Nikolausi, oyo azalaki “prozelite moko ya Antiokia,” azali moko na bato ya lokumu malamu oyo baponamaki mpo na ‘mokumba ya ntina’ ya kokabola bilei. (Mis. 6:3-5) Baprozelite bazalaki bato ya bikólo mosusu oyo bandimaki losambo ya Bayuda. Bazalaki kotalelama lokola Bayuda na makambo nyonso, mpamba te bandimaki Nzambe ya Yisraele mpe Mibeko na ye, baboyaki banzambe mosusu, mibali bakatamaki ngenga, mpe basanganaki na ekólo Yisraele.

Ntango Bayuda balongwaki na boombo na Babilone na mobu 537 L.T.B., mingi kati na bango bakendaki kofanda na bamboka oyo ezalaki mosika na ekólo Yisraele, kasi batikaki losambo na bango te. Na ndenge yango, bato mosusu na mikili ya Moyen-Orient mpe mikili mosusu bayebaki losambo ya Bayuda. Bakomi ya kala, na ndakisa Horace mpe Sénèque, bamonisi ete bato ebele ya bikólo ndenge na ndenge oyo bazalaki kosepela na Bayuda mpe bindimeli na bango bakómaki kosangana na bango mpe bakómaki baprozelite.

16. Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonisaki elimo ya komipimela?

16 Na ntembe te Yehova azalaki kopambola bato yango. Lisolo elobi: “Baoyo nyonso bakómaki bandimi bazalaki elongo, bazalaki kotya biloko esika moko, bazalaki kotɛka biloko na bango, bozwi na bango mpe kokabola na moto nyonso mosolo oyo bazwaki, na kotalela bosɛnga ya moto mokomoko.”f (Mis. 2:44, 45) Bakristo nyonso ya solo basengeli mpenza komekola elimo wana ya bolingo mpe ya komipimela.

17. Makambo nini moto asengeli kosala liboso azwa batisimo?

17 Moto asengeli kokokisa makambo mingi liboso amipesa mpe azwa batisimo. Asengeli liboso kozwa boyebi ya Liloba ya Nzambe. (Yoa. 17:3) Asengeli mpe komonisa kondima, kobongola motema, elingi koloba koyoka mawa mpo na misala na ye ya kala. (Mis. 3:19) Na nsima, asengeli kobongwana, to kobaluka, elingi koloba kosala misala oyo eyokani na mokano ya Nzambe. (Rom. 12:2; Ef. 4:23, 24) Nsima ya kosala makambo yango, asengeli komipesa epai ya Nzambe na libondeli; na nsuka nde akoki kozwa batisimo.​—Mat. 16:24; 1 Pe. 3:21.

18. Bayekoli ya Kristo oyo bazwi batisimo bazali na libaku malamu ya kosala nini?

18 Ozali moyekoli ya Yesu Kristo oyo amipesi mpe azwi batisimo? Soki ezali bongo, zalá na botɔndi mpo na libaku malamu oyo ozwi. Lokola bayekoli ya siɛklɛ ya liboso oyo batondaki na elimo santu, Yehova akoki kosalela yo mingi mpo na kopesa litatoli malamumalamu mpe mpo na kosala mokano na ye!

a Talá etanda “Yerusaleme​—Esika monene ya losambo ya Bayuda,” na lokasa 23.

b Talá bitanda “Roma​—Engumba-mokonzi ya ampire moko monene,” na lokasa 24; “Bayuda na Mezopotamia mpe na Ezipito,” na lokasa 25; mpe “Lingomba ya bokristo na etúká ya Ponti,” na lokasa 26.

c “Ndemo” yango ezalaki mɔtɔ ya solo te, kasi ezalaki “lokola nde ya mɔtɔ,” yango ezali komonisa ete eloko moko lokola kongɛnga ya mɔtɔ ezalaki komonana likoló ya motó ya moyekoli mokomoko.

d Talá etanda “Baprozelite bazalaki banani?” na lokasa 27.

e Mokolo ya 07/08/1993, na liyangani oyo esangisaki bato ya bikólo ndenge na ndenge oyo esalemaki na engumba Kiev, na ekólo Ukraine, bato 7 402 bazwaki batisimo na bapisini motoba. Mpo na kobatisa bato nyonso esɛngaki ngonga mibale na miniti zomi na mitano.

f Ebongiseli wana oyo ezalaki kaka mpo na mwa ntango ekokisaki mposa oyo emonanaki na ntango wana mpamba te bapaya batikalaki na Yerusaleme mpo na koyoka mateya mosusu malamumalamu. Bakristo bapesaki biloko na bolingo na bango moko; kasi, tosengeli te kotalela yango lokola makambo ya bakoministe.​—Mis. 5:1-4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto