Nzete kitoko ya olive ezali kokola na ndako ya Nzambe
NA MOKILI ya Israël, ezali na nzete moko oyo ebimaka kuna mpe ekufaka mpambampamba te. Ata soki bakati yango, mobimbi na yango oyo etikali na mabele ekoumela te kobimisa mitó ya sika. Mpe soki bakóló-bilanga babuki mbuma na yango, epesaka bango mafuta mingi oyo bakoki kosalela mpo na kolamba biloko ya kolya, mpo na kopelisa miinda, mpo na kosalela lokola nkisi mpe mpo na kopakola na nzoto.
Lisese moko ya kala oyo ezali na Biblia na mokanda ya Basambisi elobi ete, “[mokolo moko, NW], nzete babimaki mpo na kopakola moko ezala mokonzi na bango.” Nzete nini ya zamba baponaki liboso? Nzete ya olive, nzete makasi mpe ebotaka mbuma mingi.—Basambisi 9:8.
Esali sikoyo mbula koleka 3 500, mosakoli Mose alobaki ete Yisalaele ezali ‘mokili malamu, mokili ya banzete ya olive.’ (Deteronome 8:7, 8, NW) Ata na moi ya lelo, okomona banzete ya olive etandani banda na nse ya Ngomba Helemona na nɔrdi tii na Bele-seba na sudi. Etandani mpe pembenipembeni ya Mokili Patatalu ya Salona, na bangomba ya mabangamabanga ya Samalia, mpe na mabwaku ya Galilai oyo ebotaka mbuma mingi.
Bato oyo bakomaki Biblia bazalaki mbala mingi kosalela nzete ya olive lokola maloba ya elilingi. Bazalaki kolobela makambo ya nzete yango lokola elilingi ya motema mawa ya Nzambe, elaka ya lisekwa, mpe bomoi na libota ya esengo. Soki totaleli nzete ya olive malamumalamu ekosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo Makomami elobi mpe tokosepela lisusu mingi na nzete yango oyo eyei kosangana na biloko mosusu bizalisami mpo na kosanzola Mozalisi na yango.—Nzembo 148:7, 9.
Nzete ya olive ezali makasi
Soki otali yango na miso, okomona mbala moko ete nzete ya olive ezali mpenza monene te. Ekómaka molaimolai te lokola banzete mosusu, na ndakisa lokola eleze ya Lebanona. Mabaya na yango ezalaka na ntalo mingi te lokola lotimi, mpe fololo na yango ezalaka mpenza kitoko mingi te lokola fololo ya nzete ya amanade. (Loyembo na Solomo 1:17; Amosa 2:9) Eteni eleki ntina na nzete ya olive emonanaka te, ekundamaka na kati ya mabele. Misisa na yango ezalaka milai mpe minene, ekoki kokita tii mɛtrɛ 6 na kati ya mabele mpe ekendaka bipai na bipai, yango nde esalaka ete nzete ebota mbuma mingi mpe ekufa mpambampamba te.
Misisa yango nde esalisaka banzete ya olive oyo ebotaka na bangomba ya mabangamabanga ete ekufa te ata na elanga ntango banzete mosusu oyo ezali na lobwaku ekauki mpo mai ezali te. Misisa esalaka ete nzete ya olive ebota mbuma ntango nyonso na boumeli ya bankama ya bambula, atako mobimbi na yango oyo ebimisá mitó ebele ezali komonana na miso ete ekauki mpe ebongi nde básalela yango lokola nkoni. Nzete ya olive ezalaka se na mposa ya esika oyo ekoki kokola, balonaka yango na mabele ya makasimakasi te mpo ezala na nkaka te, elingaka mpe esika ya matiti mabe te oyo ekoki kozala na banyama mikemike ya mabe mpo ekobebisa yango. Soki kaka mwa makambo yango ekokisami, nzete moko ya olive ekoki kobimisa kino litre 57 ya mafuta na mbula moko.
Na ntembe te Bayisalaele bazalaki kolinga nzete ya olive mingi mpo mafuta na yango ezali na motuya. Miinda oyo ezalaki kongɛngisa bandako na bango ezalaki kopela na mafuta ya olive. (Levitike 24:2) Mafuta ya olive ezalaki na ntina mingi mpo na kolamba biloko ya kolya. Ezalaki kobatela loposo ya nzoto mpo moi ebebisa yango te, mpe Bayisalaele bazalaki kosala na yango sabuni mpo na kosukola. Masangu (céréales), vinyo, mpe mbuma ya olive ezalaki milona ya liboso na Yisalaele. Ezalaki mpasi mpo na libota ya Bayisalaele oyo babuki mbuma ya olive mingi te.—Deteronome 7:13; Habakuku 3:17.
Kasi, mbala mingi mafuta ya olive ezalaki ebele. Mose alobaki ete Mokili ya Ndaka ezali ‘mokili ya olive.’ Ekoki kozala bongo mpamba te olive nde ezali nzete oyo bato mingi bazalaki kolona kuna. Henry Tristram, moto ya mayele na ekeke ya 19 oyo azalaki koyekola banzete, alobaki ete nzete ya olive ezali “moko ya banzete mpenza ya mboka yango.” Lokola ezalaki na motuya mingi mpe ezalaki kobima mingi, bazalaki kosalela mafuta ya olive lokola mbongo na mikili mingi ya Méditerranée. Yesu mpe alobelaki nyongo moko oyo motuya na yango ezalaki ya “manzanza na mafuta [ya olive, NW] mokama.”—Luka 16:5, 6.
“Lokola mwa nzete ya sika na nzete ya olive”
Olive, nzete ya ntina mingi, ezali komonisa mpenza mapamboli ya Nzambe. Moto oyo abangaka Nzambe akozwa mbano nini? Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Mwasi na yo akozala lokola nkamba na vinyo na kobota mbuma mingi kati na ndako na yo; bana na yo bakozingela mesa na yo lokola mwa nzete ya sika na nzete ya [olive].” (Nzembo 128:3) “Mwa nzete ya sika na nzete ya olive,” ezali nini mpe mpo na nini mokomi ya nzembo akokanisi yango na bana?
Nzete ya olive ekeseni na banzete mosusu mpo ete mwa banzete ya sika ebimaka banda na nse ya mobimbi na yango.a Soki nzete yango enuni, mpe ezali lisusu kobota mbuma te lokola ezalaki kobota liboso, basali bilanga bakoki kosala ete banzete mikemike ya sika ekola tii ekóma minene kaka na nzete yango. Na nsima, nzete ya liboso ekozingelama na mibimbi misato to minei ya sika mpe ya makasi, lokola bana bafandi na zingazinga ya mesa. Banzete yango ya sika ezali kaka na misisa ya oyo ya kala, kasi ekobota mbuma ya olive mingi.
Makambo yango ya nzete ya olive ezali komonisa mpenza ndenge bana bakoki kokóma na kondima makasi, na lisalisi ya misisa makasi ya elimo ya baboti na bango. Ntango bana bakoli, bango mpe basanganaka na kobota mbuma mpe basalisaka baboti na bango, oyo basepelaka komona bana na bango bazali kosalela Yehova elongo na bango.—Masese 15:20.
“Nzete ezali na elikya”
Tata oyo azali kosalela Yehova mpe akómi mobange asepelaka mingi soki bana na ye bazali kobanga Nzambe. Kasi bana yango balelaka soki tata na bango ‘akei na nzela ya mokili mobimba.’ (1 Mikonzi 2:2) Mpo na kosalisa biso tókanga motema na mpasi ya ndenge wana oyo ekómelaka libota, Biblia eyebisi biso ete lisekwa ekozala.—Yoane 5:28, 29; 11:25.
Yobo azalaki na bana ebele mpe ayebaki malamu ete bomoi ya moto ezali mokuse. Akokanisaki bomoi ya moto na fololo oyo eumelaka kokauka te. (Yobo 1:2; 14:1, 2) Yobo azalaki na mposa akufa mpo na kolongwa na bampasi oyo azalaki na yango. Azalaki kotalela lilita lokola esika ya komibomba, esika oyo na nsima akoki kobima. Yango wana atunaki boye: “Soko moto akokufa, akobika nde lisusu?” Na nsima apesaki eyano oyo emonisi elikya ete: “Nakozila kino mikolo nyonso na ntango ekoki na ngai, kino kolongwa na ngai ekoya. [Yehova] okobyanga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.”—Yobo 14:13-15.
Yobo asalelaki ndakisa nini mpo na komonisa ete azalaki kondima ete Nzambe akobenga ye abima na lilita? Asalelaki ndakisa ya nzete, mpe makambo alobaki emonisaki ete azalaki kolobela nzete ya olive. Yobo alobaki boye: “Nzete ezali na elikya ete soki ekokatama ekotoa lisusu.” (Yobo 14:7) Bakoki kokata nzete ya olive, kasi ekokufa libela te. Ekokufa se soki bapikoli yango. Soki misisa na yango ezali naino, nzete yango ekobima lisusu mpe ekokóma lisusu makasi.
Ata soki elanga moko molai ekaukisi nzete ya olive oyo eumeli mingi, mobimbi oyo ekauki ekoki kozonga lisusu na bomoi. “Ata misisa na yango iumeli mingi na mabele mpe mobimbi na yango ekufi likoló na mabele, nde, mpo na nsolo ya mai, ekotoa, ekobimisa bitape lokola nkona.” (Yobo 14:8, 9) Yobo afandaki na mokili oyo mabele na yango ekauká, mpe ezalaki na mputulu mingi. Na ntembe te amonaki banzete ya olive mingi oyo eumelá mpe ezalaki komonana lokola ete ekauká mpe ekufá. Kasi, ntango mbula ezalaki kobɛta lisusu, banzete yango oyo “ekufá” ezalaki kozonga na bomoi mpe misisa na yango ezalaki kobimisa mobimbi ya sika lokola kaka nde “nzete ya sika.” Ndenge nzete ya olive esalaka ete ata soki ekauki ebota lisusu etindaki moto moko ya ekólo Tunisie, ye alonaka banzete, na koloba ete: “Tokoki mpenza koloba ete banzete ya olive ekufaka te.”
Se ndenge mosali elanga azalaka na mposa ya komona banzete na ye ya olive oyo ekauki ebota lisusu, Yehova mpe azali na mposa ya kosekwisa basaleli na ye ya sembo. Azali kozela ntango oyo bato ya sembo lokola Abalayama na Sala, Yisaka na Lebeka, mpe bamosusu mingi bakozonga na bomoi. (Matai 22:31, 32) Ekozala mpenza esengo ya koyamba bato oyo bakufaki mpe komona bango lisusu na bomoi ya malamu bazali kosala misala mingi!
Nzete ya olive ya elilingi
Lokola Nzambe azali na ezaleli ya kopona bilongi te mpe azali na mokano ya kosekwisa bato, emonisi polele ete azali na motema mawa. Ntoma Paulo asalelaki elilingi ya nzete ya olive mpo na komonisa ndenge Yehova azali komonisa motema mawa mpo na bato ya mposo nyonso mpe ya bikólo nyonso. Na boumeli ya bikeke mingi, Bayuda bazalaki komikumisa mpo bazalaki libota oyo Nzambe aponaki, ‘bana ya Abalayama.’—Yoane 8:33; Luka 3:8.
Mpo na kondimama na Nzambe esengelaki kaka te kobotama na libota ya Bayuda. Nzokande, bayekoli ya liboso ya Yesu, bango nyonso bazalaki Bayuda, mpe bazalaki na libaku malamu ya kozala bato ya liboso oyo Nzambe aponaki mpo na kozala mombóto ya Abalayama oyo elakamaki. (Genese 22:18; Bagalatia 3:29) Paulo akokanisaki Bayuda oyo bazalaki bayekoli ya Yesu na bitape ya nzete ya olive ya elilingi.
Bayuda mingi baboyaki Yesu, na ndenge yango, bamonisaki ete babongi te kozala na kati ya “etonga moke,” to “Yisalaele ya Nzambe,” oyo esengelaki kosalema nsima. (Luka 12:32; Bagalatia 6:16) Na bongo, na maloba ya elilingi, bakómaki lokola bitape ya nzete ya olive oyo ekatami. Banani basengelaki kozwa esika na bango? Na mobu 36 T.B., bato ya mabota mosusu baponamaki mpo na kokóma na kati ya mombóto ya Abalayama. Ezalaki lokola nde Yehova abakisaki bitape ya nzete ya olive ya zamba na nzete ya olive oyo ezali na elanga. Bato ya mabota bakɔtaki na molɔngɔ ya bato oyo basengelaki kozala mombóto ya Abalayama oyo elakamaki. Na ntango yango, bato ya mabota mosusu oyo bakómaki baklisto bazwaki likoki ya kokóma ‘basangani ya mai ya nzete ya olive.’—Baloma 11:17.
Mpo na mosali elanga, kobakisa etape ya nzete ya olive ya zamba na nzete ya olive oyo ezali na elanga ezali likambo oyo esalemaka te mpe ezali ‘lolenge na yango mpenza te.’ (Baloma 11:24) Na mokanda moko (The Land and the Book), bakomi ete: “Baarabe balobaka ete bakisá etape ya malamu na nzete ya zamba, mpe ekolonga nzete ya zamba kasi, soki babakisi etape ya zamba na nzete ya malamu, ekoki kobonga te.” Ndenge moko mpe, Bayuda oyo bakómaki baklisto bakamwaki mpenza ntango Yehova, “mpo na mbala ya liboso atyaki miso na ye epai na mabota mpo na kopona kati na bango libota moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 10:44-48; 15:14, NW) Kasi, yango ezalaki elembo ya polele ete kokokisama ya mokano ya Nzambe etalelaki kaka libota moko te. Mpo ete “na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:35.
Ntoma Paulo amonisaki ete lokola bakataki “bitape” ya nzete ya olive, elingi koloba Bayuda oyo bazalaki sembo te, ekoki kosalema bongo na moto nyonso oyo, mpo na lolendo to kozanga botosi, atikali lisusu sembo na miso ya Yehova te. (Baloma 11:19, 20) Yango emonisi mpenza ete tosengeli kozwa ngɔlu ya Nzambe na lisɛki te.—2 Bakolinti 6:1.
Kopakola mafuta
Makomami esalelaka kopakola mafuta ya olive na ndenge ya solo to mpe na ndenge ya elilingi. Na ntango ya kala, moto oyo azoki mpota to soki nyama to nyoka eswi ye, bazalaki ‘kopakola ye mafuta’ mpo mpota ebela noki. (Yisaya 1:6) Na lisese moko ya Yesu, Mosamalia malamu asopaki mafuta ya olive na vinyo na bampota ya moto oyo akutaki na nzela ya Yeliko.—Luka 10:34.
Kopakola mafuta ya olive na motó ya moto moko ebɔndisaka ye mpe esilisaka mpasi. (Nzembo 141:5) Mpe ntango bazali kotalela maladi ya elimo, baklisto oyo bazali bankulutu bakoki ‘kopakola ndeko moko ya lisangá mafuta na nkombo ya Yehova.’ (Yakobo 5:14) Toli ya Makomami oyo bankulutu bakopesa na bolingo mpe mabondeli ya sembo oyo bakosala mpo na bolamu ya ndeko na bango oyo azali na maladi na elimo bakokanisi yango na mafuta ya olive oyo esilisaka mpasi. Kutu, na Liebele ntango mosusu basalelaka “mafuta malamu ya olive” mpo na kolobela moto malamu.
“Nzete kitoko ya olive ezali kokola na ndako ya Nzambe”
Na kotalela makambo tolobeli, tokokamwa te ete bakoki kokokanisa basaleli ya Nzambe na banzete ya olive. Davidi alingaki kozala lokola “nzete [kitoko ya olive oyo ezali kokola, NW] na ndako ya Nzambe.” (Nzembo 52:8) Se lokola, mbala mingi, mabota ya Bayisalaele ezalaki na banzete ya olive na zingazinga ya bandako na bango, Davidi mpe azalaki na mposa ya kofanda pembeni ya Yehova mpe kobota mbuma mpo na lokumu ya Nzambe.—Nzembo 52:9.
Ntango bokonzi ya mabota mibale ya Yuda ezalaki sembo na miso ya Yehova, ezalaki lokola ‘nzete kitoko ya olive mpe ya mbuma malamu.’ (Yilimia 11:15, 16) Kasi bato ya Yuda babungisaki lokumu yango ntango ‘baboyaki kotosa liloba ya Yehova mpe balandaki banzambe mosusu.’—Yilimia 11:10.
Mpo tókóma nzete kitoko ya olive oyo ezali kokola na ndako ya Nzambe, tosengeli kotosa Yehova mpe kondima disipilini na ye mpo tókoka kobota mbuma mingi lokola baklisto. (Baebele 12:5, 6) Lisusu, lokola nzete ya olive esengeli kozala na misisa ya makasi mpe ya milai mpo ekufa te na eleko ya elanga, biso mpe tosengeli kolendisa misisa na biso ya elimo mpo tóyikela komekama mpe minyoko mpiko.—Matai 13:21; Bakolose 2:6, 7.
Nzete ya olive ezali elilingi oyo ebongi mpenza mpo na moklisto ya sembo oyo, mbala mosusu, ayebani te na mokili kasi Nzambe ayebi ye. Soki moklisto yango akufi na mokili oyo, akozonga na bomoi na mokili ya sika oyo ekoya.—2 Bakolinti 6:9; 2 Petelo 3:13.
Nzete ya olive oyo ekufaka mpambampamba te mpe ebotaka mbuma mbula na mbula ezali kozongisela biso, na makanisi, likambo oyo Nzambe alakaki ete: “Lokola mikolo na nzete, bongo ikozala mikolo na bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na mabɔkɔ na bango.” (Yisaya 65:22) Likambo yango ekokokisama na mokili ya sika oyo Nzambe akosala.—2 Petelo 3:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na momeseno bakataka bitape ya sika yango mbula na mbula mpo elɛmbisa nzete ya monene te.
[Elilingi na lokasa 25]
Mobimbi ya nzete na ebele ya mitó na mboka Jacea, na etúká ya Alicante, na Espagne.
[Bililingi na lokasa 26]
Elanga ya olive na etúká ya Granada, na Espagne.
[Elilingi na lokasa 26]
Nzete ya olive oyo eumelá mingi na libándá ya lopango ya Yelusaleme.
[Elilingi na lokasa 26]
Biblia elobeli ndenge bakataka bitape ya nzete ya olive.
[Elilingi na lokasa 26]
Nzete ya olive oyo ezingami na bitape ya banzete mike.