Bóluka kimya ya solo mpe bólanda yango!
“Ye oyo azali na mposa na kosepela bomoi mpe komona mikolo malamu, . . . tika ete apɛngwa longwa na mabe mpe asala malamu, aluka kimya mpe [alanda, “NW”] yango.”—1 PETELO 3:10, 11.
1. Maloba nini ya Yisaya oyo mayebani mingi makozanga te kokokisama?
“BAKOTULA mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makongá na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Atako maloba oyo mayebani mingi mpe makomami pembeni ya biro monene ya Lisangá ya Mabota Masangani na engumba New York, lisangá wana ya mokili mobimba likokisi maloba yango soko moke te. Nzokande, lokola ezali eteni ya Liloba ya Nzambe oyo ekoki kokwea te, maloba wana makozanga kokokisama te.—Yisaya 55:10, 11.
2. Nini esengeli ‘kobima na mikolo na nsuka’ engebene Yisaya 2:2, 3?
2 Maloba oyo mazwami na Yisaya 2:4 mazali mpenza eteni ya esakweli moko kitoko, esakweli na ntina na kimya ya solo—mpe ezali kokokisama sikawa na ntango na biso. Liboso na koyebisa elikya kitoko ete bitumba mpe bibundeli bikozala lisusu te, esakweli yango elobi ete: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na nkeka; mpe mabota nyonso bakokenda wana. Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova], epai na ndako na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye. Zambi Mobeko ekobima na Siona mpe liloba na [Yehova] uta na Yelusaleme.”—Yisaya 2:2, 3.
Bato bakoki kokóma bato ya kimya
3. Lolenge nini moto akoki kotika bitumba mpo na kokóma moto na kimya?
3 Tóyeba ete liboso bato bákoka kolanda etamboli ya kimya, basengeli kolakisama banzela ya Yehova. Komonisa botosi na mateya ya Yehova ekoki kobongola lolenge oyo moto azali kokanisa mpe kosala makambo, na boye ete moto oyo azalaki moto na bitumba akóma moto na kimya. Lolenge nini mbongwana yango ezali kosalema? Baloma 12:2 elobi ete: “Bóbilaka makambo na ntango oyo te kasi bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” Tozali kokómisa sika makanisi na biso, to kotya yango na nzela mosusu, na kotondisáká yango na mitindá mpe masɛngami ya Liloba ya Nzambe. Boyekoli ya Biblia mokolo na mokolo, ekosalisa biso ete tósala mbongwana yango, mpe ekopesa biso likoki ya kososola mokano oyo Yehova azali na yango mpo na biso, na lolenge yango tokoki komona polele nzela oyo tosengeli kolanda.—Nzembo 119:105.
4. Lolenge nini moto akoki kolata bomoto ya sika ya kimya?
4 Solo ya Biblia ezali kobongola lolenge na biso ya kokanisa mpe lisusu misala mpe bomoto na biso. Ezali kosalisa biso tókokisa likambo oyo Paulo alendisaki ete: “Bólongola motindo [“bomoto,” NW] na bino oyo ekangami na ezaleli na bino na liboso, oyo mpe esili kopola mpo na mposa mabe, mpe . . . [bóyeisama sika kati na nguya oyo ezali kotambwisa, NW] bikaniseli na bino, mpe bólata [bomoto, NW] na sika oyo ezali na motindo na Nzambe na boyengebene mpe na bulɛɛ na solo.” (Baefese 4:22-24) Nguya oyo ezali kotambwisa bikaniseli na biso ezali nguya ya kati. Ezali kobongwana mpe kokóma makasi mingi wana bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na mibeko na ye ezali kokóla, mpe yango ezali kokómisa biso bato bamipesi na makambo ya elimo mpe bato ya kimya.
5. Lolenge nini “lilako na sika” oyo Yesu apesaki na bayekoli na ye ezali kotya kimya kati na bango?
5 Ntina ya kosala mbongwana wana emonani polele kati na lilako oyo Yesu apesaki na bayekoli na ye na boumeli ya bangonga ya nsuka oyo alekisaki elongo na bango: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:34, 35) Bolingo wana oyo ezangi moimi, lokola oyo ya Klisto ekangisaka bayekoli esika moko kati na ekanganeli ya bomoko ya solosolo. (Bakolose 3:14) Bobele baoyo bandimi mpe balingi kotosa “lilako ya sika” oyo bakozwa kimya oyo Nzambe alaki. Ezali na bato oyo bazali kosala bongo lelo oyo?
6. Na kokesana na bato ya mokili, mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali na kimya?
6 Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na komonisa bolingo epai na bandeko na bango na mokili mobimba. Atako bauti na mabota nyonso ya mokili, bazali te komikɔtisa na matáta ya mokili ata soki bapusami makasi na bato ya politiki mpe na mangomba ya lokuta. Lokola libota oyo lizali na bomoko, bateyami na Yehova mpe bazali na kimya. (Yisaya 54:13) Bamikɔtisaka ata moke te kati na matáta ya politiki, mpe basanganaka na bitumba te. Bamoko oyo bazalaki kala bato na mobulu basili kotika lolenge wana ya bomoi. Basili kokóma baklisto oyo balingi kimya, kolandáká bongo ndakisa ya Yesu Klisto. Bazali kolanda na motema mobimba toli ya Petelo ete: “Ye oyo azali na mposa na kosepela bomoi mpe komona mikolo malamu, tiká ete apekisa lolemu na ye makambo mabe mpe bibebu na ye maloba na kozimbisa. Apɛngwa longwa na mabe mpe asala malamu, aluka kimya mpe [alanda, NW] yango.”—1 Petelo 3:10, 11; Baefese 4:3.
Baoyo bazali kolanda kimya
7, 8. Pesá bandakisa ya bato oyo batikaki bitumba mpe bakómaki baluki ya kimya ya solo. (Tángá mpe basusu oyo oyebi bango malamu.)
7 Na ndakisa, Rami Oved, azalaki mokonzi ya kala ya etuluku moko ebongisamaki malamu mpo na kotɛmɛla banganga-mobulu. Abongisamaki mpo na koboma banguna na ye. Azalaki na endimeli makasi na bolingo ya ekólo na ye Israël kino mokolo ayaki koyeba ete bakonzi ya lingomba balingaki te ete abala mwasi oyo alingaki mingi bobele mpo ete mwasi yango azalaki Moyuda te, kasi moto na Azia. Abandaki kolukaluka solo kati na Biblia. Na nsima, akutanaki na Batatoli ya Yehova. Boyekoli na ye ya Biblia elongo na Batatoli endimisaki ye ete asengelaki lisusu te kozala moto amipesi na bolingo ya ekólo. Bolingo ya boklisto esɛngisaki ye ete aboya bitumba mpe bibundeli, mpe ete ayekola kolinga bato ya mposo nyonso. Akamwaki mingi ntango azwaki nkomá ya boboto oyo ebandaki na maloba malandi, “Ndeko na ngai Rami”! Eloko nini ekamwisi ye na likambo yango? Moto oyo atindaki nkomá yango ezalaki mwasi moko Motatoli, moto ya Palestine. Rami alobi ete, “Nazalaki kokanisa ete yango ekokaki kosalema ata moke te, mpo ete bato ya Palestine bazalaki banguna na ngai, kasi sikawa moko na bango abéngi ngai ‘Ndeko na ngai.’” Rami na mwasi na ye bazali sikawa kolanda kimya ya solo na nzela ya Nzambe.
8 Ndakisa mosusu ezali oyo ya Georg Reuter, oyo asalaki kati na limpinga ya Allemagne oyo likɔtaki na Russie na boumeli ya Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba. Nokinoki akangaki ntina ete mokano ya Hitler ya koyangela mokili mobimba ekokaki kosalema te. Ntango azongaki na ndako, abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Akomaki ete: “Nsukansuka, nabandaki komona makambo polele. Nasosolaki ete ngambo ya makila nyonso oyo masopami esengeli kotyama na motó ya Nzambe te . . . Nayaki koyeba ete mokano na ye ezalaki ya kotya paladiso na mabelé mobimba, mpe ya kopesa mapamboli ya seko epai na bato ya botosi. . . . Hitler amikumisaki mpo na ‘Bokonzi na ye ya Mbula Nkóto’ kasi ayangelaki bobele [mbula] 12—mpe nsuka na ye ezalaki ya nsɔ́mɔ! Ezali Hitler te, kasi Klisto . . . nde moto azali na likoki ya kotya mpe na ntembe te akotya boyangeli ya mbula nkóto na mabelé mobimba.” Sikawa, esili koleka soko mibu 50, Georg azali naino kosala lokola motindami ya kimya ya solo kati na mosala ya ntango nyonso.
9. Lolenge nini makambo oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na Allemagne ya Nazi mazali komonisa ete bazali bato na mpiko atako balingaka kimya?
9 Bosembo ya Batatoli ya Yehova mpe ezaleli na bango ya kozanga komikɔtisa na matáta kati na Allemagne na boumeli ya boyangeli ya Nazi etikaki lokumu malamu oyo ezali kopesa litatoli kino lelo oyo na bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na kimya, mbula koleka 50 na nsima. Mwa búku moko oyo euti kobimisama na United States Holocaust Memorial Museum kati na engumba Washington, D.C., elobi ete: “Batatoli ya Yehova bazwaki minyoko ya nsɔ́mɔ na boyangeli ya Nazi. . . . Mpiko oyo mingi kati na bango bamonisaki na koboyáká [kotika lingomba na bango], kati na monyoko makasi, kati na makambo ya mpasi oyo bazalaki kosalela bango na bakáa ya bakangami, mpe ata liboso na kobomama na bantango mosusu, esalaki ete bámemyama na bato mingi oyo bazali na bomoi na eleko na biso.” Mwa búku yango ebakisi ete: “Na ntango babimaki na bakáa, Batatoli bakóbaki mosala na bango, kotamboláká kati na bato oyo babikaki, kozalisáká bandimi.”
Mbongwana monene
10. (a) Mpo ete kimya ya solo etyama mbongwana monene nini esengeli kosalema? (b) Lolenge nini yango elobelamaki kati na mokanda ya Danyele?
10 Yango elingi nde koloba ete Batatoli ya Yehova bakanisaka ete bakoki kotya kimya na mokili mobimba na komemáká bibele ya bato na kobongwana kino kondima ezaleli ya boklisto ya kozanga kokɔta na matáta ya mokili? Te! Liboso ete kimya ezonga awa na mabelé, mbongwana monene esengeli naino kosalema. Mbongwana nini? Boyangeli ya bato oyo ezali kokɔtisa bokabwani, konyokola mpe koboma bato esengeli kotika esika na Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bábondelaka mpo na yango. (Matai 6:9, 10) Kasi yango ekosalema lolenge nini? Kati na ndɔ́tɔ na ye oyo epemamaki na Nzambe, mosakoli Danyele amonaki ete na mikolo ya nsuka, Bokonzi ya Nzambe, lokola libangá monene oyo ‘litimolami na mabɔkɔ ya moto te,’ lisengelaki kobuka ekeko monene oyo ezali komonisa biyangeli ya politiki oyo bitambwisami na bato awa na mabelé. Na nsima asakolaki ete: “Mpe na mikolo na mikonzi yango Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:31-44.
11. Na nzela nini Yehova akoyeisa mbongwana oyo esengeli mpo na kotya kimya?
11 Mbongwana wana monene likoló na ezalela ya mokili ekosalema mpo na nini? Mpamba te Yehova asilaki kolaka ete akopɛtola mabelé na kolongoláká baoyo nyonso bazali kokómisa yango mbindo mpe kobebisa yango. (Emoniseli 11:18) Mbongwana wana ekosalema na etumba ya sembo oyo Yehova akosala mpo na kolongola Satana mpe mokili mabe na ye. Tozali kotánga boye kati na Emoniseli 16:14, 16: “Mpo ete bazali bilimo mabe kosaláká bilembo, baoyo bakei epai na bakonzi na mikili nyonso koyanganisa bango mpo na etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Bayanganisi bango na esika ebyangami na monɔkɔ na Liebele ete, [Armagedon, NW].”
12. Armagedon ekozala lolenge nini?
12 Kasi, Armagedon ekozala lolenge nini? Ekozala te etumba monene ya nikleere to lokola likámá mosusu ya monene bato bakoyeisa. Te, yango ezali nde etumba ya Nzambe oyo ekosilisa bitumba nyonso mpe baoyo bazali kolendisa bitumba. Yango ezali nde etumba ya Nzambe oyo ekomema kimya ya solo mpo na baoyo balingaka kimya. Ɛɛ, Armagedon ekokóma na lolenge ekanami na Nzambe. Ekoumela te. Mosakoli na ye Habakuku apemamaki mpo na kokoma ete: “Zambi, emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, lambelá yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Na ntina na mayoki na biso ya bomoto tokoki komona lokola ete yango ezali koumela, kasi Yehova azali kotalela manáka na ye. Armagedon ekokwea na ngonga oyo Yehova asilá kotya.
13. Yehova akosala nini na oyo azali solo na ngámbo na Satana Zábolo?
13 Ekateli wana ya nsuka nde ekofungola nzela mpo na kimya ya solo! Mpo ete kimya ya solo etyama, likambo mosusu lisengeli kosalema—kolongolama ya moto oyo azali koyeisa bokabwani, koyinana mpe bitumba. Mpe wana ezali mpenza likambo oyo Biblia esakoli ete ekokokisama nsima—elingi koloba kobwakama ya Satana, molendisi ya bitumba mpe tata na nkuta, na libulu mozindo. Ntoma Yoane amonaki likambo yango kati na emonaneli ya esakweli, lokola yango ekomami kati na Emoniseli 20:1-3 ete: “Namonaki mwanze kokita na likoló, azalaki na lifungola na libulu bozindo, na monyɔlɔlɔ monene na lobɔkɔ na ye. Asimbi dalagona, ye nyoka yango na kalakala, oyo azali Motɛmɛli, Satana, mpe akangi ye na monyɔlɔlɔ mbula nkóto. Abwaki ye na libulu bozindo, azipi yango, mpe atii elembo likoló na yango, na ntina ete azimbisa mabota lisusu te, kino nsuka na mbula yango nkóto.”
14. Lolenge nini misala ya nkɛmbo ya Yehova mpo na kotɛmɛla Satana mikoki koyebisama?
14 Makambo yango mazali ndɔ́tɔ mpamba te; mazali elaka ya Nzambe—mpe Biblia elobi ete: “Nzambe akoki kobuka lokuta soko moke te.” (Baebele 6:18, NW) Boye Yehova akokaki koloba na nzela ya mosakoli na ye Yilimia ete: “Ngai [Yehova] nakosalaka boboto mpe kosambisa-sembo mpe boyengebene kati na mokili. Mpo ete [Yehova] alobi ete, Nakosepela na makambo oyo.” (Yilimia 9:24) Yehova asalaka makambo na bosembo mpe na boyengebene, mpe azali kosepela na kimya oyo akotya awa na mabelé.
Boyangeli ya Nkolo na Kimya
15, 16. (a) Nani aponami na Yehova mpo na kozala Mokonzi? (b) Lolenge nini bokonzi yango eyebisami, mpe banani bakosangana na yango?
15 Mpo na kondimisama ete kimya ya solo ekopesama na baoyo nyonso bakozala na nsé na ebongiseli ya Bokonzi, Yehova asili kopesa Yesu Klisto boyangeli, ye nkolo ya solosolo ya Kimya, lokola yango esakolamaki na Yisaya 9:6, 7, ete: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye, nkombo na ye akobyangama ete, Mosungi na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya. Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ikosuka te . . . Mposa na [Yehova] na bibele ekosala oyo.” Mokomi na nzembo mpe akomaki esakweli na ntina na boyangeli ya kimya ya Masiya ete: ‘Na mikolo na ye, moyengebene akofuluka; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza.’—Nzembo 72:7, NW.
16 Lisusu, bandeko ya Klisto 144 000 oyo bapakolami na elimo bakoyangela elongo na ye kati na makoló. Bango bazali basangoli na libula elongo na Klisto, baoyo Paulo alobaki mpo na bango ete: “Na ntango moke, Nzambe na kimya akonyatela Satana na nsé na makolo na bino. Ngɔlu na Nkolo na biso Yesu ezala na bino elongo.” (Baloma 16:20) Ɛɛ, uta na makoló, bakosangana na Klisto kati na bolóngi na ye likoló na molendisi na bitumba, Satana Zábolo!
17. Tosengeli kosala nini mpo na kosangola kimya ya solo?
17 Na bongo, motuna etunami sikawa ete: Osengeli kosala nini mpo na kosangola kimya ya solo? Bobele Nzambe nde akoyeisa kimya ya solo, mpe mpo ete okoka kozwa yango, osengeli kokende liboso. Osengeli koyamba Nkolo na Kimya mpe kotya kondima na yo epai na ye. Yango elingi koloba ete tosengeli kondima Klisto kati na mokumba na ye ya Mosikoli mpe Mbɔndi mpo na masumu ya bato. Yesu ye moko alobaki maloba mayebani mingi oyo ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Ondimi mpenza komonisa kondima epai na Yesu Klisto ete azali mwango oyo Nzambe asaleli mpo na kotya kimya ya solo mpe kopesa lobiko? Ezali na nkombo mosusu te na nsé na lola oyo ekoki kotya kimya mpe kobatela yango. (Bafilipi 2:8, 11) Mpo na nini? Mpamba te Nzambe asili kopona Yesu. Ye azali momemi-nsango ya kimya oyo aleki bamemi-nsango nyonso awa na mokili. Okoyokamela mpe okolanda ndakisa na Yesu?
18. Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa maloba ya Yesu kati na Yoane 17:3?
18 Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete báyeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Oyo ezali ntango ya kozwa boyebi ya sikisiki na koyanganáká pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi. Makita wana mazali koteya mpe makopusa yo na kokabola boyebi mpe elikya na yo epai na basusu. Yo mpe okoki kokóma motindami mpo na kimia ya Nzambe. Okoki kozwa kimya sikawa na kotyáká elikya epai na Yehova Nzambe, lokola yango eyebisami kati na Yisaya 26:3 engebene Biblia Liloba lya Nzambe ete: “Okopesa [ye] esika ya boboto mpe ya kimia, zambi elikya ya [ye] ezali epai ya yo.” Osengeli kotya elikya epai na nani? “Bótya elikya epai na Yehova seko na seko, mpo ete Yah Yehova azali Libanga libela na libela.”—Yisaya 26:4, NW.
19, 20. Nini ezali kozela baoyo bazali sikawa koluka kimya mpe kolanda yango?
19 Na bongo, uta sikawa zalá na ekateli makasi ya kozwa bomoi ya seko kati na mokili ya sika ya Nzambe oyo motondi na kimya. Na Emoniseli 21:3, 4, Liloba ya Nzambe lipesi biso endimiseli oyo ete: “Talá! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” Yango ezali mpenza eleko ya kimya oyo ozali kozela na mposa makasi, boye te?
20 Na yango, omikundola makambo oyo Nzambe alaki. “Bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo. Talá moto na sembo mpe moná moyengebene; [mpo ete bomoi ya moto yango na mikolo mikoya ekozala ya kimya, NW].” (Nzembo 37:11, 37) Ntango eleko wana ya kimya ekoya, tokoloba na botɔ́ndi nyonso ete, “Nsukansuka kimya ya solo eyei! Matɔ́ndi mingi na Yehova Nzambe, eutelo ya kimya ya solo!”
Okoki kolimbola?
◻ Nini ekoki kosalisa moto na kosala mbongwana na makanisi mpe na misala na ye?
◻ Lolenge nini Batatoli ya Yehova, mokomoko to na lisangá, bamonisaka bolingo na bango ya kimya ya solo?
◻ Yehova akosala nini na baoyo nyonso bazali kolendisa koyina mpe bitumba?
◻ Boyangeli ya Nkolo na kimya ekosala nini mpo na bato?
[Bililingi na lokasa 14]
Maloba ya Yisaya mazali kokokisama, na Mabota Masangani te, kasi na nzela ya baoyo bazali kolanda kolakisama na Yehova
[Bililingi na lokasa 15]
Mibali oyo mibale basalaki mbongwana mpo na kolanda kimya
Rami Oved
Georg Reuter
[Elilingi na lokasa 16]
Kimya ya solo ekofuluka na nsé ya boyangeli ya Nkolo na kimya