Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/7 nk. 12-14
  • Olandaka “nzela oyo eleki nyonso” oyo ya bolingo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olandaka “nzela oyo eleki nyonso” oyo ya bolingo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Maloba minei mpo na bolingo
  • Bolingo na kati ya libota
  • Bolingo ya mwasi ná mobali mpe Biblia
  • Bolingo kati na baninga
  • Bolingo oyo eleki mosusu nyonso!
  • “Nde oyo eleki kati na yango misato, ezali bolingo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Ye alingaki biso liboso”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Bolingo (agape): ezali nini te mpe ezali nini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bolingo oyo eleki bolingo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/7 nk. 12-14

Olandaka “nzela oyo eleki nyonso” oyo ya bolingo?

“NZAMBE azali bolingo.” Maloba wana ya ntoma Yoane emonisi ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene. (1 Yoa. 4:8) Bolingo ya Nzambe mpo na bato nde epesi biso libaku ya kopusana penepene na ye mpe kozala na boyokani na ye. Bolingo ya Nzambe esalaka likambo nini mosusu na bomoi na biso? Balobaka ete “moto alandaka kaka makambo oyo alingaka.” Ezali mpenza bongo. Nzokande, ezali mpe solo ete moto oyo tolingaka mpe oyo alingaka biso akoki mpe kobongola bomoto na biso. Lokola tokelamá na elilingi ya Nzambe, tozalaka na likoki ya komonisa bolingo ya Nzambe na bomoi na biso. (Gen. 1:27) Yango wana, ntoma Yoane akomaki ete tolingaka Nzambe “mpamba te ye alingaki biso liboso.”​—1 Yoa. 4:19.

Maloba minei mpo na bolingo

Ntoma Paulo abengaki bolingo “nzela oyo eleki nyonso.” (1 Kol. 12:31) Mpo na nini abengaki yango bongo? Paulo azalaki kolobela bolingo ya ndenge nini? Mpo na kozwa eyano, tótalela naino malamumalamu liloba “bolingo.”

Grɛki ya kala ezalaki na maloba minei, oyo ezalaki kosalelama ndenge mingi, mpo na kolobela bolingo: storgê, érôs, philia, mpe agapê. Na maloba yango nyonso, agapê nde ezalaki kosalelama mpo na kolobela Nzambe, oyo “azali bolingo.”a Mpo na bolingo yango, Profɛsɛrɛ William Barclay alobaki na buku na ye (New Testament Words) boye: “Agapê eutaka na makanisi: ezali kaka bolingo ya likolólikoló te; ezali lokola mwa mobeko moko oyo etambwisaka bomoi na biso. Agapê esimbami mpenzampenza nde na mokano.” Na ndimbola wana, Agapê ezali bolingo oyo etambwisami na mitinda, kasi yango elingi koloba te ete eutaka na motema te. Lokola mitinda ya malamu mpe ya mabe ezalaka, ebongi mpenza ete baklisto bálanda mitinda ya malamu, oyo Yehova ye moko apesi na nzela ya Biblia. Soki totali liloba ya Biblia Agapê mpe maloba mosusu oyo Biblia esaleli mpo na kolobela bolingo, tokokanga malamu ntina ya bolingo oyo tosengeli komonisa.

Bolingo na kati ya libota

Ezalaka mpenza esengo kozala na libota oyo ezali na bomoko mpe na bolingo! storgê ezali liloba ya Grɛki oyo ezalaki kosalelama mbala mingi mpo na kolobela bolingo kati na bato ya libota moko. Baklisto basalaka nyonso mpo na kolinga bato ya libota na bango. Paulo alobaki ete na mikolo ya nsuka bato bakozanga “bolingo ya libota.”b​—2 Tim. 3:1, 3.

Likambo ya mawa, lelo oyo bato bazali na bolingo ya libota te. Mpo na nini basi mingi bazali kosopa zemi? Mpo na nini bato mingi bazali kokipe te baboti na bango oyo bakómi mibange? Mpo na nini mabala mingi ekómi kokufa? Ezali mpo bato bazangi bolingo ya libota.

Longola yango, Biblia elobi ete “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso.” (Yil. 17:9) Bolingo ya libota eutaka na motema mpe esimbaka mayoki ya moto. Nzokande, Paulo asalelaki liloba agapê mpo na kolobela bolingo oyo mobali asengeli kozala na yango epai ya mwasi na ye. Paulo akokanisaki liloba yango na bolingo ya Klisto mpo na lisangá. (Ef. 5:28, 29) Yango nde bolingo oyo elandaka mitinda ya Yehova, Mobandisi ya libota.

Bolingo ya solosolo mpo na bato ya libota na biso ekotinda biso tósalisaka baboti na biso oyo bakómi mibange mpe tókokisa mokumba na biso ya baboti. Ekotinda mpe baboti bápesaka bana na bango disipilini ntango esengeli, mpe ekosala ete bázalaka te na bolingo oyo ebongi te, oyo mbala mingi etindaka baboti mosusu bákangaka miso na mabe ya bana na bango.​—Ef. 6:1-4.

Bolingo ya mwasi ná mobali mpe Biblia

Bolingo ya mwasi ná mobali na kati ya libala ezali mpenza likabo ya Nzambe. (Mas. 5:15-17) Nzokande, bakomi ya Biblia basaleli te liloba érôs, oyo elimboli bolingo ya mwasi ná mobali. Mpo na nini? Eleki mwa bambula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Lelo oyo, emonani ete mokili mobimba ezali kosala libunga oyo bato ya Grɛki ya ntango ya kala basalaki. Bazalaki kosambela nzambe Eros, kofukama liboso ya etumbelo na ye mpe kopesa ye bambeka. . . . Kasi, emonani ete losambo yango ya pite ebimisaki bizaleli ya nsɔni, ekobo mpe pite, mpe ezalaki kobebisa mabala. Ekoki kozala mpo na yango nde bakomi ya Biblia baboyaki kosalela liloba yango.” Mpo tólinga moto te kaka mpo na kitoko ya nzoto, tosengeli kozala na bolingo oyo etambwisami na mitinda ya Biblia. Na yango, tómituna boye: ‘Nazali kolinga moto oyo na bolingo ya solosolo to kaka mpo na kitoko ya nzoto na ye?’

Na boumeli ya “eleko ya ebandeli ya bolenge” ntango mposa ya kosangisa nzoto ezalaka mbala mingi makasi, bilenge oyo balandaka mitinda ya Biblia babatelaka etamboli ya pɛto. (1 Kol. 7:36; Kols. 3:5) Totalelaka libala lokola likabo mosantu ya Yehova. Mpo na bato oyo babalá, Yesu alobaki boye: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:6) Na esika ya kozala elongo kaka mpo na bolingo ya mwasi ná mobali, babalani batikalaka sembo mpo bazwaka ndai ya libala na lisɛki te. Ntango bakutani na mikakatano, balukaka te nzela ya mokuse mpo na kosilisa yango, kasi basalaka nyonso mpo na komonisa bizaleli ya Nzambe, mpo libota na bango ezala na esengo. Milende yango ekomema bolamu ya seko.​—Ef. 5:33; Ebe. 13:4.

Bolingo kati na baninga

Bomoi elingaki kozala kitoko te soki baninga bazalaki te! Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Moninga azali mpe oyo akotikala penepene koleka ndeko.” (Mas. 18:24) Yehova alingaka tózala na baninga ya solosolo. Toyebi malamu boninga makasi oyo ezalaki kati na Davidi ná Yonatana. (1 Sam. 18:1) Lisusu, Biblia elobi ete Yesu “azalaki kolinga” ntoma Yoane mingi. (Yoa. 20:2) Liloba ya Grɛki mpo na kolobela bolingo oyo esangisaka baninga ezali philia. Ezali mabe te kozala na moninga ya motema na kati ya lisangá. Nzokande, 2 Petelo 1:7 elendisi biso tóbakisa bolingo (agapê) na “bolingo ya bondeko” (philadelphia, oyo esangisi philos, liloba ya Grɛki mpo na kolobela “moninga” mpe adelphos, liloba ya Grɛki mpo na kolobela “ndeko”). Mpo boninga na biso eumela mpe ezala makasi, tosengeli kolanda toli yango. Tómituna boye: ‘Bolingo na ngai mpo na baninga etambolaka nzela moko na mitinda ya Biblia?’

Liloba ya Nzambe esalisaka biso tózalaka na koponapona te na makambo oyo tosalelaka baninga na biso. Tosengeli te kozala na lolenge mibale ya kotalela makambo: epai ya baninga na biso tozali motema molai, kasi epai ya bato mosusu tozali makambo makasimakasi. Lisusu, tosengeli te kosalela maloba ya sukali mpo na kozwa baninga. Likambo eleki ntina, kosalela mitinda ya Biblia epesaka biso bososoli mpo tóyeba kopona baninga mpe tóboya ‘baninga mabe oyo babebisaka bizaleli ya malamu.’​—1 Kol. 15:33.

Bolingo oyo eleki mosusu nyonso!

Bolingo oyo esangisaka baklisto ekeseni mpenza na mosusu nyonso! Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká bolingo na bino ezanga bokosi. . . . Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino.” (Lom. 12:9, 10) Ya solo, baklisto bazalaka na ‘bolingo (agapê) oyo ezangi bokosi.’ Bolingo yango ezalaka kaka ya likolólikoló te. Kasi, esimbami mpenza na mitinda ya Biblia. Nzokande, Paulo alobelaki “bolingo ya bondeko” (philadelphia) mpe “bolingo ya motema” (philostorgos, liloba oyo euti na philos mpe storgê). Moto moko ya mayele alobaki boye: “Bolingo ya bondeko” ezali “bolingo ya motema, oyo etindaka moto amonisa boboto, motema mawa, mpe asunga.” Ntango bolingo yango etambwisami na agapê, etindaka basambeli ya Yehova bázala na boninga ya solosolo. (1 Tes. 4:9, 10) Liloba mosusu oyo ebongolami na “bolingo ya motema,” elobelami kaka mbala moko na Biblia, mpe na esika oyo esalelami, emonisi kozala na boyokani makasi lokola oyo ezalaka na libota.c

Bolingo oyo baklisto ya solo bazalaka na yango ezali bolingo oyo esangisaka bato ya libota mpe bolingo oyo esangisaka baninga ya solosolo, bolingo oyo esimbami na mitinda ya Biblia. Lisangá ya boklisto ezali moziki te to ebongiseli moko ya mokili, kasi ezali nde libota oyo bato na yango basangani na losambo ya Yehova Nzambe. Tomonaka ete tozali mpenza libota, yango wana tobenganaka bandeko. Bandeko baklisto bazali libota na biso ya elimo, tolingaka bango, tozwaka bango lokola baninga, mpe tosalelaka bango makambo na kolanda mitinda ya Biblia. Tiká ete biso nyonso tókoba komonisa bolingo oyo esangisaka mpe emonisaka lisangá ya solo ya boklisto.​—Yoa. 13:35.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Agapê esalelamaka mpe mpo na kolobela bolingo oyo tosengeli te kozala na yango.​—Yoa. 3:19; 12:43; 2 Tim. 4:10; 1 Yoa. 2:15-17.

b Maloba ‘kozanga bolingo ya libota’ euti na lolenge moko ya liloba storgê oyo ebandi na lɛtɛlɛ a mpo na komonisa “kozanga.”​—Talá mpe Baloma 1:31.

c Na Libongoli ya Mokili ya Sika, maloba mosusu ya Grɛki ebongolami mpe na “bolingo ya motema.” Mpo na yango, na libongoli yango, maloba “bolingo ya motema” esalelami kaka na Baloma 12:10 te, kasi mpe na Bafilipi 1:8 mpe 1 Batesaloniki 2:8.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]

Osalaka nini mpo bolingo oyo esangisi biso ezala kaka makasi?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto