“Bózalaka na bolingo ya motema bino na bino”
“Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino.”—BALOMA 12:10.
1, 2. Boyokani ya ndenge nini misionɛrɛ moko ya ntango na biso mpe ntoma Paulo bazalaki na yango na bandeko?
DON asalaki mosala ya misionɛrɛ na Azia mbula 43 mpe ayebanaki ete alingaka bato mingi. Na nsima, ntango abɛlaki maladi makasi oyo akufaki na yango, bato mosusu oyo ayekolá na bango Biblia basalaki mobembo molai mpo na kotala ye mpe bazalaki koloba na ye, “Kamsahamnida, kamsahamnida!”—elingi koloba “Matɔndi mingi, matɔndi mingi!” na monɔkɔ ya Coréen. Yango emonisi ete bolingo oyo Don amoniselaki bango esimbaki mpenza mitema na bango.
2 Likambo ya ndenge yango ekómelá kaka Don te. Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo amoniselaki bato oyo ateyaki bolingo mingi. Paulo amipesaki mpenza mpo na bango. Ya solo, azalaki na kondima makasi, kasi azalaki mpe na boboto mpe azalaki komibanzabanza mpo na bandeko, “lokola ntango mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye mpenza.” Akomelaki bandeko ya Tesaloniki boye: “Kozaláká na bolingo ya motema mpo na bino, tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko, mpamba te bokómaki balingami na biso.” (1 Batesaloniki 2:7, 8) Na nsima, ntango Paulo ayebisaki bandeko ya Efese ete bakomona ye lisusu te, “mpisoli mingi esopamaki na kati na bango nyonso, mpe bakwelaki Paulo na nkingo mpe bapwɛpwaki ye na boboto mpenza.” (Misala 20:25, 37) Tomoni ete Paulo ná bandeko wana bazalaki kotalelana te kaka lokola bandimi ya lingomba moko. Balinganaki mpenza na motema.
Bolingo ya motema mpe bolingo
3. Boyokani nini ezali kati na bolingo ya motema mpe bolingo?
3 Na Biblia, bizaleli lokola bolingo ya motema, bolingo ya bondeko, mpe motema mawa ezali na boyokani mpenza na ezaleli eleki monene ya baklisto: bolingo. (1 Batesaloniki 2:8; 2 Petelo 1:7) Bizaleli nyonso wana ezali na boyokani mpe etambolaka nzela moko. Etongaka boyokani makasi na kati ya baklisto mpe kati na bango ná Tata na bango ya likoló. Yango wana, ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bandimi na maloba oyo: “Tiká bolingo na bino ezanga bokosi. . . . Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino.”—Baloma 12:9, 10.
4. “Bolingo ya motema” elimboli nini?
4 Liloba ya Grɛki oyo Paulo asalelaki, oyo ebongolami na “bolingo ya motema,” esangisi maloba mibale, moko elimboli boninga mpe mosusu bolingo ya libota. Ndenge molimboli moko ya maloba ya Biblia amonisaki, yango elingi koloba ete baklisto “basengeli kozala na boyokani lokola bandeko ya libota oyo balinganaka, bayokanaka makasi, mpe basalisanaka.” Oyokaka ndenge wana mpo na bandeko ya lisangá? Na lisangá, tosengeli koyokaka esengo mpe komonaka ete tozali mpenza bandeko. (Bagalatia 6:10) Yango wana, Bible na lingala ya lelo oyo, ebongoli Ba-Romén [Baloma] 12:10 ete: “Bólinganaka na motema moko lokola bandeko.” Baklisto basengeli mpenza kolinganaka, kaka te mpo ezali malamu kosala bongo, to mpe mpo ezali etinda. Tosengeli ‘kolinganaka makasi uta na motema’ na “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi.”—1 Petelo 1:22.
“Boteyami na Nzambe ete bólinganaka”
5, 6. (a) Ndenge nini Yehova asalelaka mayangani oyo esangisaka bandeko bauti na mikili ndenge na ndenge mpo na koteya basaleli na ye bolingo ya motema? (b) Ndenge nini bandeko bakómaka kolingana makasi soki bazali kosala elongo ntango molai?
5 Atako na mokili “bolingo ya bato mingi” ezali kokóma mpiɔ, Yehova azali koteya basaleli na ye ya ntango na biso ete ‘bálinganaka.’ (Matai 24:12; 1 Batesaloniki 4:9) Mayangani oyo esangisaka Batatoli ya Yehova ya mikili ndenge na ndenge ezalaki mabaku malamu mingi mpo na koyekola bolingo yango. Batatoli ya mboka epai mayangani ya ndenge wana esalemaka bayambaka bandeko na bango oyo bauti na mikili ya mosika, mpe mingi bapesaka bango bisika ya kolala na bandako na bango. Na liyangani moko oyo euti kosalema kala te, bandeko mosusu bautaki na mikili oyo bato bazalaka mpenza mɔtɔmɔtɔ te. Moklisto moko oyo azalaki kolakisa bapaya bisika ya kolala alobaki boye: “Ntango bandeko bakómaki, bazalaki mitema likoló mpe bazalaki koloba mingi te. Kasi, mikolo motoba na nsima, ntango babandaki kozonga, bango ná bandeko oyo bayambaki bango na bandako na bango bazalaki koyambana mpe kolela. Mitema na bango etondaki na bolingo ya boklisto na ndenge oyo bakobosana ata mokolo moko te.” Koyamba bandeko, ata soki bazali bato ya ekólo nini, ekoki komemela biso ná bango ebele ya matomba.—Baloma 12:13.
6 Ya solo, makambo ya esengo ezalaka na mayangani yango, kasi bolingo ekolaka lisusu makasi ntango baklisto bazali kosala elongo mwa ntango molai. Soki toyebi bandeko na biso malamu, tokomona mpenza bizaleli malamu na bango lokola motema mpɛmbɛ, bosembo, boboto, bokabi, koyeba komitya na esika ya basusu, motema mawa, mpe komipimela. (Nzembo 15:3-5; Masese 19:22) Mark, ndeko moko oyo azalaki misionɛrɛ na Afrika ya Ɛsti, alobaki boye: “Kosala na bandeko etongaka boninga oyo ekoki kobeba te.”
7. Baklisto basengeli kosalaka nini mpo bolingo ekola na kati ya lisangá?
7 Mpo bandeko ya lisangá moko bákóma na boyokani ya ndenge wana mpe bábatela yango, esengeli ndeko mokomoko apusana penepene na basusu. Soki tozali koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, bolingo na biso ekokóma makasi. Soki tozali koya na makita, tozali kosolola na bandeko liboso mpe nsima ya makita, mpe tozali kopesa biyano na makita, tokolendisana mpe tokopusana na “kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.” (Baebele 10:24, 25) Nkulutu moko na États-Unis alobaki boye: “Nakanisaka na esengo ntango nazalaki mwana moke, libota na biso tozalaki ntango nyonso na kati ya bato ya nsuka na kolongwa na Ndako ya Bokonzi, tozalaki kolekisa ntango molai mpo na kosolola mpe kolendisana na bandeko.”
Osengeli nde ‘kofungwama’?
8. (a) Paulo alingaki koloba nini ntango asɛngaki Bakolinti ete ‘báfungwama’? (b) Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo na kati ya lisangá?
8 Mpo tómonisana malamumalamu bolingo ya ndenge wana, ezali ntango mosusu kosɛnga ‘tófungwama’ na mitema na biso. Ntoma Paulo akomelaki bandeko ya Kolinti boye: “Motema na biso efungwami. Bozali na nkaka na kati na biso te.” Paulo alendisaki bango ete bango mpe ‘báfungwama.’ (2 Bakolinti 6:11-13) Yo mpe okoki ‘kofungwama’ na bolingo na yo? Kozela kaka te ete basusu báya epai na yo. Na mokanda oyo Paulo akomelaki Baloma, nsima ya kolendisa bango na kozala na bolingo ya motema, apesaki mpe toli oyo: “Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” (Baloma 12:10) Mpo na komonisa basusu ete ozali kopesa bango lokumu, okoki kobanda kopesa bango mbote na makita. Okoki mpe kosɛnga bango bóbima na mosala ya kosakola to bóbongisa makita elongo. Kosala bongo ekolisaka bolingo ya motema.
9. Makambo nini bandeko mosusu basalaki mpo bákóma baninga ya baklisto mosusu? (Lobelá mpe makambo oyo bandeko basalaka na mboka na bino.)
9 Na kati ya lisangá, mabota mpe bandeko mosusu oyo bazali bango moko bakoki ‘kofungwama’ soki bazali kotalana, mbala mosusu kolya mwa bilei esika moko, mpe kosala mwa masano elongo. (Luka 10:42; 14:12-14) Hakop ayanganisaka ntango mosusu mwa bandeko mpo bákende pikiniki. Alobi ete “na kati ya bato oyo nayanganisaka, ezalaka na bilenge mpe mikóló, ná bandeko oyo babɔkɔlaka bana bango moko. Moto na moto azongaka ndako na esengo mpe boninga ekómaka makasi.” Biso baklisto tosengeli kosala makasi mpo tótikala kaka te bandimi ya lingomba moko, kasi tókóma mpe baninga ya solosolo.—3 Yoane 14.
10. Eloko nini tokoki kosala soki tozali koyokana te na bandeko?
10 Kasi, ntango mosusu, bomoto na biso ekoki kopekisa biso tókolisa bondeko mpe boninga. Na ntango wana tokosala nini? Ya liboso, tosengeli kobondela mpo tózala na boyokani malamu na bandeko na biso. Nzambe azali na mposa ete basaleli na ye báyokanaka, yango wana soki tobondeli mpo na yango, akoyoka biso. (1 Yoane 4:20, 21; 5:14, 15) Misala na biso esengeli mpe koyokana na makambo tozali kosɛnga na mabondeli. Ric, mokɛngɛli-motamboli moko na Afrika ya Ɛsti, ayebi ndeko moko oyo bato bazalaki kokoka ye te mpo azalaki na makambo makasi. Ric alobi boye: “Na esika nakima ye, nazwaki mokano ya koyeba ye malamu. Nayaki koyeba ete na bomwana na ye, tata na ye azalaki kopesa ye disipilini ya makasimakasi. Ntango nayebaki milende oyo ndeko yango asalaki mpe mbongwana oyo asalaki, nakómaki kosepela na ye mingi. Ngai ná ye tokómaki baninga mpenza.”—1 Petelo 4:8.
Monisáká bolingo na yo!
11. (a) Esengeli kosala nini mpo bolingo ekola na kati ya lisangá? (b) Mpo na nini kozala malilimalili to komitangola na bandeko ekoki kozala mabe?
11 Bato mingi lelo oyo bazalaka na baninga ya motema te na bomoi na bango. Ezali mawa mingi! Ezaleli wana esengeli kozala ata moke te na lisangá ya boklisto. Bolingo ya solosolo na kati ya bandeko elimboli te kaka kopesa bango mbote, kotuna bango soki bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe kosolola na bango; elimboli mpe te kaka koyambana mpe kosɛka makasi. Tosengeli nde koluka komonisa bolingo na biso, ndenge Paulo asalaki epai ya Bakolinti, mpe komonisa bandeko na biso ete tomibanzabanzaka mpo na bolamu na bango. Ya solo, bandeko mosusu bamesaná na bato te to mpe balobaka mingi te, kasi kozala malilimalili epai ya bandeko to komitangola na bango ezali mpe malamu te. Biblia elobi ete, “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko; akosilika na makambo nyonso na mayele.”—Masese 18:1.
12. Mpo na nini kosolola malamu ezali na ntina mingi mpo na kokolisa boninga na kati ya lisangá?
12 Bato bakómaka baninga ya solosolo soki bazali kosolola malamu. (Yoane 15:15) Biso nyonso tozalaka na mposa ya baninga oyo tokoki koyebisa basɛkɛlɛ mpe mitungisi na biso. Lisusu, soki toyebani malamu, ekozala mpasi te mpo tósalisanaka. Soki tozali kokanisa makambo ya basusu ndenge wana, tokolendisa bolingo ya motema, mpe tokomona bosolo ya maloba ya Yesu: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35; Bafilipi 2:1-4.
13. Tokoki kosala nini mpo na komonisa bandeko bolingo ya solosolo?
13 Mpo bolingo ezala mpenza na litomba, tosengeli komonisa yango. (Masese 27:5) Soki tozali mpenza na bolingo, ekomonana na elongi na biso, mpe yango ekolamusa bolingo na mitema ya basusu. Moto ya bwanya akomaki boye: “Pole na miso ekosepelisa motema.” (Masese 15:30) Kosalela basusu boboto elendisaka mpe bolingo ya motema. Atako moto moko te akoki kosomba bolingo ya solosolo, kopesa moto likabo na motema moko ezali na ntina mingi. Kotindela ndeko mwa karte, kokomela ye mokanda, mpe “liloba lilobami na ntango malamu”; nyonso wana ekoki komonisa bolingo makasi. (Masese 25:11; 27:9) Soki tokómi baninga ná bandeko mosusu, mpo na kobatela yango, tosengeli kokoba komonisaka bolingo ya bondeko. Mingimingi na ntango ndeko azali na mpasi, tosengeli kozala wana mpo na kolakisa ye boninga na biso. Biblia elobi boye: “Moninga akolingaka ntango nyonso; ndeko abotami mpo na ntango ya mpasi.”—Masese 17:17.
14. Tosengeli kosala nini soki ndeko moko akipaka yo mpenza te atako osalelaka ye boboto?
14 Mpo na koloba solo, ezali mpasi tokóma baninga ya motema ya ndeko mokomoko na lisangá. Ekozala kaka na bamosusu oyo tokolingana na bango koleka bamosusu. Yango wana, soki ndeko moko akipaka yo mpenza te, kokanisa mbala moko te ete ntango mosusu osalaka likambo moko oyo esepelisaka ye te to ete ndeko yango azali mabe. Koluka mpe boninga na ye na makasi te. Soki ozali kolakisa ye kaka boboto na ndenge oyo ekoki, ozali kofungola nzela mpo mokolo mosusu bókóma baninga.
“Nandimi yo”
15. Kopesa to koboya kopesa basusu longonya esalaka bango nini?
15 Mokolo oyo Yesu azwaki batisimo, tokanisi ete asepelaki mingi ntango ayokaki maloba euti na likoló ete: “Nandimi yo”! (Malako 1:11) Maloba yango endimisaki Yesu makasi lisusu ete Tata na ye alingaka ye. (Yoane 5:20) Ezali mawa ete bato mosusu bayoká naino ata mbala moko te moto moko oyo balingaka mpe bamemyaka apesa bango longonya. Ann alobaki boye: “Bilenge mingi lokola ngai, baboti na bango bazali Batatoli ya Yehova te. Na ndako, balobaka na biso kaka maloba oyo ekoki kolɛmbisa biso. Yango epesaka biso mawa mingi.” Kasi, ntango bakɔti na lisangá, bamonaka ete bakómi na libota ya bato oyo bazali na bolingo mpe basalisanaka; batata, bamama, mpe bandeko na kati ya kondima.—Malako 10:29, 30; Bagalatia 6:10.
16. Mpo na nini kotyola milende oyo basusu bazali kosala esalisaka mpenza te?
16 Na bamboka mosusu, baboti, mikóló, mpe balakisi bazalaka mpenza te na momeseno ya kopesa bilenge longonya, bakanisaka ete soki bakumisi bango ndenge wana, bakovimba motó to bakokóma na lolendo. Makanisi ya ndenge wana ekoki komonana ata na mabota ya baklisto mpe na lisangá. Soki elenge moko asali lisolo moko ya malamu to likambo mosusu, okoyoka mikóló bazali koloba: “Osali malamu, kasi bongisá lisusu!” To mpe, na lolenge moko to mosusu, komonisa elenge ete basepeli te. Ntango bazali kosala bongo, mingi bakanisaka ete bazali kolendisa bilenge bákende liboso. Nzokande, makambo ya ndenge wana ebotaka mbuma ya malamu te, mpamba te bilenge bakoki kolɛmba nzoto to kokanisa ete ata basali makasi, bakokoka te.
17. Mpo na nini tosengeli kolukaka kopesa basusu longonya?
17 Kasi, tosengeli mpe te kopesa longonya kaka ntango tolingi kopesa toli. Kopesa longonya na bosembo nyonso elendisaka bolingo ya motema na libota mpe na lisangá, mpe elendisaka bilenge bátunaka toli epai ya bandeko oyo bakɔmeli. Yango wana, tólanda momeseno ya bato ya mboka te na ndenge ya kotalela basusu; ‘tólata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.’ Tólanda ndakisa ya Yehova na oyo etali kopesa longonya.—Baefese 4:24.
18. (a) Bilenge, ndenge nini bosengeli kotalela toli ya mikóló? (b) Mpo na nini mikóló bakanisaka naino mpe babondelaka liboso ya kopesa toli?
18 Bino mpe bilenge bókanisa te ete soki mikóló basemboli bino to bapesi bino toli, elingi koloba ete bazali kosepela na bino te. (Mosakoli 7:9) Ezali bongo te! Ekoki mpenza kozala ete bazali komibanzabanza mpe balingi bino mingi. Soki bongo te, mpo na nini bakomitungisa mpo na kosolola na bino makambo ya ndenge wana? Lokola mikóló nyonso—mingimingi bankulutu—bayebaka ete maloba ekoki kobebisa to kobongisa makambo, bakanisaka naino mpe babondelaka liboso ya kopesa toli, mpo balingaka ete toli na bango ebota mbuma ya malamu.—1 Petelo 5:5.
“Yehova azali na bolingo mingi ya motema”
19. Ndenge nini bato oyo bapesá bango melesi oyo bapesá na mbwa bakoki kotyela Yehova motema mpo asalisa bango?
19 Bato mosusu bamonisá bolingo ya motema, kasi bapesaki bango melesi oyo bapesá na mbwa; yango wana bamonaka ete kolakisa bolingo ya motema, ezali kaka komilukela mindɔndɔ. Esɛngaka mpiko mpe kondima makasi mpo bámipesa lisusu epai ya bato. Kasi, bandeko ya ndenge wana basengeli kobosana te ete Yehova “azali mosika te na mokomoko na biso.” Azali kobenga biso tópusana penepene na ye. (Misala 17:27; Yakobo 4:8) Ayebaka mokakatano na biso ntango tozali kobanga bázokisa biso, mpe alaki ete akozala na biso mpe akosalisa biso. Davidi, mokomi ya nzembo alobi na biso boye: “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyetami.”—Nzembo 34:18.
20, 21. (a) Ndenge nini toyebi ete tokoki kozala baninga ya motema ya Yehova? (b) Nini tosengeli kosala mpo na kozala baninga ya motema ya Yehova?
20 Kozala moninga ya Yehova eleki boninga mosusu nyonso. Kasi, tokoki mpenza kokóma baninga ya Yehova? Ɛɛ. Biblia ezali komonisa ndenge oyo mibali mpe basi ya sembo bazalaki baninga ya Tata na biso ya likoló. Maloba ya botɔndi oyo balobaki ekomamá na Biblia mpo na kondimisa biso ete biso mpe tokoki kopusana penepene na Yehova.—Nzembo 23, 34, 139; Yoane 16:27; Baloma 15:4.
21 Moto nyonso akoki kokokisa masɛngami ya Yehova mpo na kokóma moninga na ye. Davidi atunaki boye: “Ee [Yehova], nani akoumela kati na hema na yo?” Mpe apesaki eyano ete: “Ye oyo akotambolaka sembo mpe [akolandaka] boyengebene, mpe akolobaka solo kati na motema na ye.” (Nzembo 15:1, 2; 25:14) Soki tomoni ete kosalela Nzambe ezali na matomba mpe esalaka ete atambwisa mpe abatela biso, tokoyeba ete “Yehova azali na bolingo mingi ya motema.”—Yakobo 5:11.
22. Yehova alingi basaleli na ye bázala na boyokani ya ndenge nini kati na bango?
22 Tozali mpenza na libaku malamu ya komona ete Yehova azali koluka biso bato ya kozanga kokoka tózala baninga na ye! Yango ezali kotinda biso te na komonisela basusu bolingo ya motema? Na lisalisi ya Yehova, mokomoko na biso akoki komonisa bolingo ya motema mpe bakoki komonisela ye yango; mpamba te ezali mpenza ezaleli na biso baklisto. Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé, moto mokomoko akomonisa mpe bakomonisela ye bolingo yango libela na libela.
Okoki kolimbola?
• Ezaleli nini esengeli komonana na lisangá ya boklisto?
• Ndenge nini mokomoko na biso akoki kolendisa bolingo ya motema na lisangá?
• Ndenge nini kopesa longonya elendisaka bolingo na kati ya baklisto?
• Ndenge nini bolingo ya Yehova elendisaka mpe esungaka biso?
[Elilingi na lokasa 15]
Baklisto bamonisaka bolingo kaka te mpo basengeli kosala bongo
[Bililingi na lokasa 17]
Okoki nde ‘kofungwama’ na bolingo na yo?
[Elilingi na lokasa 18]
Otyolaka milende ya basusu to olendisaka bango?