Bópesaka basusu lokumu
“Na likambo ya kopesana lokumu, bózalaka ntango nyonso bato ya liboso.”—BALOMA 12:10, NW.
1, 2. (a) Tosengeli kosalaka nini mpo na komonisa ete tozali na kosɔkɛma? (b) Ndenge nini Biblia esalelaka mingi liloba “lokumu,” mpe banani bamonaka ete kosala bongo ezali mpasi te?
LISOLO oyo eleki elobelaki mingi toli euti na Liloba ya Nzambe ete: “Bómikangela kosɔkɛma lokola elamba, moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.” (1 Petelo 5:5) Lolenge moko oyo tokoki komikangela kosɔkɛma ezali kopesa basusu lokumu.
2 Biblia esalelaka mingimingi liloba “lokumu” mpo na kolobela limemya, bosepeli, mpe kilo oyo tosengeli kopesa basusu. Topesaka basusu lokumu ntango tozali na boboto epai na bango, tozali komemya bango, tozali koyoka makanisi na bango, tozali kondima kosalela bango makambo oyo basɛngi biso oyo ezali na mindɔndɔ te. Basɔkɛmi bamonaka mpenza te ete kosala bongo ezali mpasi. Kasi, bato ya lolendo bakoki kozala na mokakatano ya kopesa basusu lokumu ya solosolo mpe na esika na yango, bakoki nde koluka kosalela maloba ya bokosi mpo na matomba na bango.
Yehova apesaka bato lokumu
3, 4. Ndenge nini Yehova apesaki Abalayama lokumu, mpe mpo na nini?
3 Yehova ye moko epesi ndakisa na likambo ya kopesa basusu lokumu. Akelaki bato mpe apesaki bango bonsomi ya kopona mpe atalelaka bango lokola bamasini mpamba te. (1 Petelo 2:16) Na ndakisa, ntango ayebisaki Abalayama ete akoboma Sodomo mpo bato oyo bafandaki kuna bazalaki kosala makambo ya mabe mingi, Abalayama atunaki: “Okoboma mpe bayengebene elongo na bato mabe? Soko bayengebene ntuku mitano bazali kati na mboka nde okoboma bango, mpe okobikisa mboka te na ntina na bayengebene ntuku mitano bazali kati na yango?” Yehova alobaki ete akobikisa mboka yango soki bayengebene bazali 50. Abalayama akobaki koloba na komikitisa nyonso. Bongo soki bazali 45? 40? 30? 20? 10? Yehova ayebisaki Abalayama ete akoboma Sodomo te soki akuti bayengebene zomi kuna.—Genese 18:20-33.
4 Yehova ayebaki ete bayengebene bazalaki ata zomi te na Sodomo, kasi apesaki Abalayama lokumu na ndenge azalaki koyoka makanisi na ye mpe apesaki ye limemya. Mpo na nini? Mpamba te Abalayama “andimaki [Yehova] mpe ye atángelaki ye yango lokola boyengebene.” Abalayama abéngamaki “moninga ya Yehova.” (Genese 15:6; Yakobo 2:23) Lisusu, Yehova amonaki ete Abalayama azalaki kopesa basusu lokumu. Ntango babateli na mpate na ye bawelanaki na babateli na mpate ya Lota, oyo azalaki mwana ya ndeko na ye, Abalayama apesaki Lota lokumu na ndenge ayebisaki ye ete apona ngámbo ya mokili oyo alingi. Lota aponaki ngámbo oyo amonaki ete eleki malamu, mpe Abalayama akendaki na ngámbo mosusu.—Genese 13:5-11.
5. Ndenge nini Yehova apesaki Lota lokumu?
5 Ndenge moko mpe, Yehova apesaki Lota, moto ya sembo, lokumu. Liboso ya koboma Sodomo, ayebisaki Lota akima na bangomba. Kasi, Lota alobaki ete alingi kokende kuna te; asepelaki kokende na Soali, mwa mboka moko ezalaki pembeni; nzokande, mboka yango ezalaki na kati ya bisika oyo esengelaki kobomama. Yehova alobaki na Lota ete: “Talá, nakopesa yo mpe oyo elɔmbi yo lokola, mpe nakobebisa mboka yango te.” Yehova apesaki Lota, moto ya sembo lokumu na ndenge andimaki kosala likambo oyo Lota asɛngaki.—Genese 19:15-22; 2 Petelo 2:6-9.
6. Ndenge nini Yehova apesaki Mose lokumu?
6 Ntango Yehova atindaki Mose azonga na Ezipito mpo na kosikola libota na Ye na boombo mpe koyebisa Falo ete atika libota na Ye, Mose alobaki: “Ɛ Nkolo na ngai, nazali moto na maloba polele te.” Yehova ayebisaki Mose ete: “Ngai nakozala na monɔkɔ na yo elongo mpe ngai nakolakisa yo yango ekoloba yo.” Kasi Mose azalaki naino kokakatana. Yango wana, Yehova alendisaki Mose mpe asalaki na boye ete akende elongo na ndeko na ye Alona mpo azala molobeli na ye.—Exode 4:10-16.
7. Mpo na nini Yehova azalaki kokakatana te mpo na kopesa basusu lokumu?
7 Na makambo nyonso wana, Yehova akakatanaka te kopesa basusu lokumu, mingimingi baoyo bazalaki kosalela ye. Atako makambo oyo basɛngaki ekokanaki te na ndenge oyo Yehova akanisaki liboso, atalelaki makambo oyo basɛngaki mpe andimaki yango lokola ebebisaki mokano na ye te.
Yesu apesaki basusu lokumu
8. Ndenge nini Yesu apesaki mwasi moko oyo azalaki na maladi makasi lokumu?
8 Yesu alandaki ndakisa ya Yehova na kopesa basusu lokumu. Mokolo moko, mwasi moko oyo azalaki kotanga makila banda mbula 12 akɔtaki na kati ya bato ebele. Minganga balongaki kobikisa mwasi yango te. Na kolanda Mibeko ya Mose, mwasi yango azalaki mbindo mpe akokaki kozala na esika wana te. Akendaki tii na nsima ya Yesu, asimbaki elamba na ye, mpe abikaki. Yesu alandaki maloba ya Mibeko te mpo na kopamela ye na likambo oyo asalaki. Kasi, lokola ayebaki mpasi na ye, apesaki ye lokumu; alobaki na ye: “Mwana mwasi, kondima na yo esili kobikisa yo; kendá na kimya, zalá na nzoto malamu mpe na mpasi na yo lisusu te.”—Malako 5:25-34; Levitike 15:25-27.
9. Ndenge nini Yesu apesaki mwasi ya ekólo mosusu lokumu?
9 Mokolo mosusu, mwasi moko ya etúká ya Foinike alobaki na Yesu ete: “Nkolo, Mwana na Davidi, yokelá ngai mawa! Mwana mwasi na ngai azali na elimo mabe.” Lokola Yesu ayebaki ete batindaki ye na libota ya Yisalaele kasi na bikólo mosusu te, alobaki ete: “Ezali malamu te kokamata bilei na bana [ya Yisalaele] mpe kopesa yango epai na bana na mbwa [elingi koloba bato ya bikólo mosusu].” Mwasi yango alobaki ete: “Kasi ata bana na mbwa bakolyaka mpumbu oyo ikokweakwea longwa na mesa na nkolo na bango.” Bongo Yesu alobaki: “Ɛ mama, kondima na yo ezali monene mpenza! Ebimela yo lokola elingi yo.” Mwana na ye abikaki. Yesu apesaki mwasi wana ya ekólo mosusu lokumu mpo na kondima na ye. Ata maloba oyo asalelaki ete “bana na mbwa,” na esika ya bambwa ya zamba, emonisaki ete atyolaki ye te mpe emonisaki ete azalaki na motema mawa.—Matai 15:21-28.
10. Liteya monene nini Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe mpo na nini ezalaki na ntina?
10 Lokola bayekoli ya Yesu bazalaki kaka koluka liboso bolamu na bango moko, Yesu atikaki te koteya bango ntina ya kozala na komikitisa mpe kopesa basusu lokumu. Mokolo mosusu, bayekoli baswanaki bango na bango; na nsima, Yesu atunaki bango: “Bino bozalaki kotyana ntembe na likambo nini?” Bafandaki nyɛɛ, mpo “bazalaki kotyana ntembe soko nani kati na bango aleki na lokumu monene.” (Malako 9:33, 34) Ata na butu ya nsuka liboso Yesu akufa, “kowelana mpe ebimaki kati na bango, soko nani na bango akotángama moto aleki monene.” (Luka 22:24) Yango wana, ntango bazalaki kolya Elekeli, Yesu ‘asopaki mai na saani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli mpe kopangusa yango.’ Talá liteya ya solosolo! Yesu azalaki mwana ya Nzambe, moto ya mibale nsima ya Yehova na mokili mobimba. Kasi, apesaki bayekoli na ye liteya monene na ndenge asukolaki bango makolo. Alobaki boye: “Napesi bino etaliseli ete bino mpe bósala [lokola] esili ngai kosalela bino.”—Yoane 13:5-15.
Paulo apesaki basusu lokumu
11, 12. Ntango Paulo akómaki moklisto, ayekolaki likambo nini, mpe ndenge nini asalelaki yango epai ya Filemona?
11 Lokola azalaki kolanda ndakisa ya Klisto, ntoma Paulo apesaki bato mosusu lokumu. (1 Bakolinti 11:1) Alobaki boye: “Toluki lisanzoli epai na bato te . . . Kasi, tokómi bato na malɛmbɛ na kati na bino [lokola] mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye mpenza.” (1 Batesaloniki 2:6, 7) Mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye ya mike, abatelaka bango. Ntango Paulo akómaki moklisto, ayekolaki komikitisa mpe apesaki bandeko na ye baklisto lokumu na ndenge azalaki kosalela bango makambo na boboto. Na bongo, atosaki bonsomi na bango ya kopona. Likambo moko esalemaki ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma emonisi yango.
12 Onesimo, moombo moko oyo akimá nkolo na ye ayokaki mateya ya Paulo. Akómaki moklisto mpe moninga ya Paulo. Nkolo moombo yango ezalaki Filemona; ye mpe azalaki moklisto mpe azalaki kofanda na Asie Mineure. Na mokanda oyo atindelaki Filemona, Paulo akomaki ete azalaki na mposa mingi ya Onesimo mpo na kosalisa ye. Alobaki boye: “Nalingaki kotikala na ye awa.” Kasi, Paulo azongisaki Onesimo epai ya Filemona, mpamba te akomaki: “Nalingi kosala eloko te soki yo ondimi naino te, mpo bolamu na yo esalema na kotindikama te, kasi na mokano na yo moko.” Atako Paulo azalaki na bokonzi mpo azalaki ntoma, alukaki kokokisa mposa na ye na makasi te, kasi apesaki Filemona lokumu na ndenge asɛngaki te ete atikala na Onesimo na Loma. Lisusu, Paulo alendisaki Filemona apesa Onesimo lokumu, atalela ye “lisusu lokola moombo te kasi koleka moombo, lokola ndeko ya bolingo.”—Filemona 13-16, NW.
Ndenge ya kopesa basusu lokumu na mikolo na biso
13. Baloma 12:10 esɛngi biso tósalaka nini?
13 Liloba ya Nzambe epesi toli oyo: “Na likambo ya kopesana lokumu, bózalaka ntango nyonso bato ya liboso.” (Baloma 12:10, NW) Yango elingi koloba ete tosengeli kozela te ete basusu bápesa biso naino lokumu, kasi tosengeli kobanda. “Tiká te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.” (1 Bakolinti 10:24; 1 Petelo 3:8, 9) Yango wana, basaleli ya Yehova balukaka ndenge oyo bakoki kopesa lokumu na bandeko na bango ya libota, na baninga na bango baklisto na kati ya lisangá, ata mpe na bato oyo bazali na kati ya lisangá te.
14. Ndenge nini mwasi na mobali bapesanaka lokumu?
14 Biblia elobi: “Motó na babali nyonso azali Klisto mpe ete motó na mwasi azali mobali.” (1 Bakolinti 11:3) Yehova asɛngisi na mobali ete asalela mwasi na ye makambo na ndenge oyo Klisto asalaki mpo na lisangá. Na 1 Petelo 3:7 (NW), basɛngi na mobali ete apesa mwasi na ye “lokumu lokola na mbeki oyo eleki motau, mbeki ya bomwasi.” Mobali akoki kosala yango soki azali komonisa ete azali mpenza na mposa ya koyoka mpe kondima makanisi ya mwasi na ye. (Genese 21:12) Akoki kondima oyo mwasi aponi soki yango ebuki mobeko moko ya Biblia te, mpe soki azali kosalisa ye mpe azali na boboto epai na ye. Nzokande, “mwasi asengeli kozala na limemya mingi mpo na mobali na ye.” (Baefese 5:33, NW) Mwasi akoyoka mobali na ye, akoluka te ete asalaka nyonso mpo mposa na ye ekokisama, akokitisa mobali na ye te to komilelalela mpo na ye te. Mwasi akolakisa komikitisa soki azali koluka kozala mokonzi ya mobali na ye te, ata soki azali na makoki mingi na makambo mosusu.
15. Ndenge nini tosengeli kopesa mibange lokumu, bango mpe basengeli kosala nini?
15 Na kati ya lisangá ya boklisto, ezali na bato oyo babongi mpenzampenza kozwa lokumu, na ndakisa mibange. “Okotɛlɛma liboso na nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali [to mwasi] anuni.” (Levitike 19:32) Tosengeli mpenza kopesa lokumu na baoyo basaleli Yehova na bosembo nyonso na boumeli ya bambula ebele mpamba te “Motó na pɛɛ ezali motole na nkembo, ezwami na nzela na boyengebene.” (Masese 16:31) Bakɛngɛli basengeli kopesa baklisto mosusu ndakisa na ndenge oyo bazali kopesa limemya oyo ebongi epai na baklisto oyo bazali mikóló na bango. Kasi, ezali solo ete mibange mpe basengeli kozala na limemya mpo na bilenge, mingimingi baoyo bazali na mokumba ya kokɛngɛla etonga.—1 Petelo 5:2, 3.
16. Ndenge nini baboti na bana na bango basengeli kopesana lokumu?
16 Bana basengeli kopesa baboti na bango lokumu: “Bino bana, bótosaka baboti na bino kati na Nkolo zambi yango ezali sembo. Kumisá tata na yo mpe mama na yo, oyo lilako na liboso lizali na elaka ete, Bongo ezala na yo malamu ete oumela na mokili ntango molai.” Baboti mpe basengeli kopesa bana na bango lokumu, mpamba te Biblia elobi na bango, ‘báyokisa bana na bino nkanda te, kasi bábɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya Nkolo.’—Baefese 6:1-4; Exode 20:12.
17. Banani babongi kozwa “lokumu loleki”?
17 Tosengeli mpe kopesa lokumu na baoyo bazali kosala mosala makasi mpo na lisangá: “Tiká ete mibange baoyo bakobatelaka mosala na malamu bákumisama na lokumu loleki, nde koleka bango bakosalaka mosala mpo na kosakola mpe kolakisa.” (1 Timote 5:17) Tokoki kopesa bango lokumu yango soki tozali kosalela maloba ya Baebele 13:17 ete: “Bótosa bango bakokambaka bino mpe bómisɔkisa liboso na bango.”
18. Tosengeli kosala nini na baoyo bazali na kati ya lisangá te?
18 Tosengeli nde kopesa baoyo bazali na kati ya lisangá te lokumu? Ɛɛ. Na ndakisa, basɛngi biso likambo oyo: “Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi.” (Baloma 13:1) Ezali bongo bakonzi ya mokili, baoyo Yehova atiki ete báyangela tii ntango Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika na bango. (Danyele 2:44) Yango wana, tozali ‘kofutela bango nyonso nyongo na bango, mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako, lifuti epai na baoyo bakoki kozwa lifuti, nsɔmɔ epai na bango bakoki kobangama, lokumu epai na baoyo bakoki kozwa lokumu.’ (Baloma 13:7) Tosengeli ‘kopesa bato nyonso lokumu.’—1 Petelo 2:17.
19. Ndenge nini tokoki ‘kosala malamu’ epai ya bato mosusu mpe kopesa bango lokumu?
19 Atako ezali solo ete tosengeli kopesa lokumu ata bato oyo bazali na kati ya lisangá te, tósimba likambo oyo Liloba ya Nzambe emonisi polele: “Soko tozwi nzela, tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.” (Bagalatia 6:10) Lolenge eleki malamu oyo tokoki ‘kosala malamu’ epai ya bato ezali ya kolendisa mpe kokokisa bamposa na bango ya elimo. (Matai 5:3) Tokoki kosala yango soki tolandi toli ya ntoma Paulo ete: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai na Nzambe lokola mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali yo kosembola liloba na solo.” Ntango tozali na mayele ya kosalela libaku nyonso mpo na kotatola, tozali ‘kokokisa mpenza mosala na biso,’ tozali kosalela bato nyonso malamu mpe tozali kopesa bango lokumu.—2 Timote 2:15; 4:5, NW.
Tópesa Yehova lokumu
20. Likambo nini ekómelaki Falo na basoda na ye, mpe mpo na nini?
20 Yehova apesaka bikelamu na ye lokumu. Yango wana, ebongi mpenza ete biso mpe tópesa ye lokumu. (Masese 3:9; Emoniseli 4:11) Liloba ya Yehova elobi lisusu boye: “Baoyo bakokumisa ngai, ngai nakokumisa bango; nde baoyo bakotyola ngai, ngai nakotánga bango mpamba.” (1 Samwele 2:30) Ntango bayebisaki Falo ya Ezipito atika libota ya Nzambe, alobaki na lolendo nyonso ete: “[Yehova] azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye?” (Exode 5:2) Ntango Falo atindaki basoda na ye mpo na koboma Bayisalaele, Yehova akabolaki Mai Motane mpo Bayisalaele báleka. Kasi ntango Baezipito balandaki, Yehova azongisaki mai. Yehova azindisaki “makalo na Falo mpe ebele na ye kati na mai na monana.” (Exode 14:26-28; 15:4) Lolendo ya Falo, oyo epusaki ye aboya kopesa Yehova lokumu ememelaki ye liwa ya nsɔmɔ.—Nzembo 136:15.
21. Mpo na nini Yehova asepelaki na Belesasala te, mpe nsuka na yango ezalaki nini?
21 Belesasala, mokonzi ya Babilone aboyaki kopesa Yehova lokumu. Na feti moko asalisaki oyo bazalaki kolangwa masanga, atyolaki Yehova mpe amelaki vinyo na bakɔpɔ ya wolo mpe ya palata oyo ezalaki bulɛɛ; bakɔpɔ oyo bakamataki na tempelo ya Yelusaleme. Ntango azalaki kosala yango, akumisaki mpe banzambe na ye. Kasi, Danyele, mosaleli ya Yehova alobaki na ye boye: “Okitisaki motema na yo te, . . . kasi [omitombolaki] liboso na Nkolo na lola.” Kaka na butu wana, Belesasala abomamaki, mpe babɔtɔlaki bokonzi na ye.—Danyele 5:22-31.
22. (a) Mpo na nini nkanda ya Yehova ekitelaki bakonzi mpe bato ya Yisalaele? (b) Yehova asepelaki na banani, mpe esukelaki bango ndenge nini?
22 Na ekeke ya liboso T.B., Mokonzi Elode azalaki kosala mitingi liboso ya bato, mpe bato bagangaki ete: “Mongongo na Nzambe! Mongongo na moto te!” Mokonzi yango andimaki maloba wana, alukaki nde lokumu. Yango wana, ‘anzelu na nkolo abɛtaki ye, ntina ete apesaki Nzambe lokumu te.’ (Misala 12:21-23) Elode amikumisaki, kasi apesaki Yehova lokumu te, mpe abomamaki. Bakonzi ya mangomba ya ntango wana batyolaki Nzambe na ndenge bafandaki likita mpo báboma Yesu, Mwana ya Nzambe. Bakonzi mosusu bayebaki ete Yesu azalaki koteya solo kasi balandaki ye te, “zambi balingaki lokumu na bato liboso na lokumu na Nzambe.” (Yoane 11:47-53; 12:42, 43) Ekólo Yisalaele mobimba epesaki Yehova lokumu te mpe epesaki Yesu, moto oyo atindaki, lokumu te. Yango wana, Yehova atikaki kopesa bango lokumu, asundolaki bango mpe atikaki ete tempelo na bango ebomama. Kasi abatelaki bomoi ya baoyo bapesaki ye na Mwana na ye lokumu.—Matai 23:38; Luka 21:20-22.
23. Tosengeli kosala nini mpo na kofanda na mokili ya sika oyo Nzambe akosala? (Nzembo 37:9-11; Matai 5:5)
23 Baoyo nyonso balingi kofanda na mokili ya sika oyo Nzambe akosala nsima ya koboma ebongiseli ya biloko oyo, basengeli kokumisa mpe kotosa Nzambe na Mwana na ye, Klisto Yesu. (Yoane 5:22, 23; Bafilipi 2:9-11) Baoyo bazali kosala yango te “bakolongolama na mokili.” Kasi, bato ya sembo, baoyo bazali kopesa Nzambe na Klisto lokumu mpe bazali kotosa bango, “bakofanda na mokili.”—Masese 2:21, 22.
Bozongeli
◻ Kopesa basusu lokumu elimboli nini, mpe ndenge nini Yehova asalaki yango?
◻ Ndenge nini Yesu na Paulo bapesaki basusu lokumu?
◻ Banani babongi kozwa lokumu lelo oyo?
◻ Mpo na nini tosengeli kopesa Yehova na Yesu lokumu?
[Elilingi na lokasa 17]
Yehova apesaki Abalayama lokumu na ndenge ayokaki makambo oyo azalaki kosɛnga
[Elilingi na lokasa 18]
Na mabala ya malamu, mobali na mwasi bapesanaka lokumu.