“Bósalela Yehova lokola baombo”
“Bózala na gɔigɔi te na misala na bino. . . . Bósalela Yehova lokola baombo.”—ROM. 12:11.
1. Na ndenge nini boombo oyo Baroma 12:11 elobeli ekeseni na oyo bato mingi bakanisaka?
NA MAKANISI ya bato mingi, moombo azali moto oyo bomoi na ye ezali na mabɔkɔ ya nkolo na ye, moto oyo banyokolaka, oyo amonaka mpasi, mpe oyo andimaka ata makambo ezangi bosembo. Kasi, kozala moombo ya Nzambe ekeseni mosika na oyo bato bakanisaka. Liloba ya Nzambe elobeli boombo moko oyo esɛngi moto ye moko apona kosalela Nkolo moko ya bolingo. Kutu, ntango ntoma Paulo akomelaki bakristo ya liboso ete ‘básalela Yehova lokola baombo,’ ezalaki nde mpo na kolendisa bango básalela Nzambe mosala mosantu mpo balingi ye. (Rom. 12:11) Boombo ya ndenge wana elimboli nini? Ndenge nini tokoki koboya kokóma baombo ya Satana mpe mokili na ye? Matomba nini tokozwa soki tosaleli Yehova na bosembo lokola baombo?
“NALINGI MPENZA NKOLO NA NGAI”
2. (a) Nini ekokaki kotinda Moyisraele oyo azali moombo aboya kozwa bonsomi? (b) Moombo oyo alingi nkolo na ye azalaki komonisa nini ntango andimi bátɔbɔla ye litoi?
2 Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezali kosalisa biso tóyeba lolenge ya baombo oyo Yehova alingi tózala. Elobaki ete moombo oyo azali Moebre asengeli kozwa bonsomi nsima ya kosalela nkolo na ye mbula nsambo. (Kob. 21:2) Kasi, Yehova azwaki ebongiseli moko ya kokamwa mpo na moombo oyo alingi mpenza nkolo na ye mpe aponi kokoba na mosala na ye. Nkolo ya moombo yango asengelaki komema ye na porte to na likonzí ya porte mpe kotɔbɔla ye litoi na etubeli. (Kob. 21:5, 6) Kotɔbɔla moombo litoi ezalaki na ndimbola. Na monɔkɔ ya Ebre, kotosa ekendaka nzela moko na koyoka. Na yango, ntango moombo andimi bátɔbɔla ye litoi, amonisi ete akokoba kosalela nkolo na ye mpe kotosa ye. Yango esalisi biso tóyeba ndimbola ya komipesa na biso epai ya Yehova: kondima ete tokotosa ye mpo tolingi ye.
3. Nini etindaki biso tómipesa na Nzambe?
3 Liboso ya kozwa batisimo, tozwaki ekateli ya kosalela Yehova mpe ya kozala baombo na ye. Ntango tomipesaki na Yehova na libondeli, tolakaki ye ete tokotosa ye mpe tokosala mokano na ye. Moto moko te atindaki biso na makasi tósala yango. Kutu, ata bilenge oyo bazwaka batisimo basalaka yango kaka nsima ya komipesa na Yehova bango moko, kasi te mpo na kosepelisa baboti na bango. Eloko oyo etindaka moto amipesa na Yehova, Nkolo na biso ya likoló, ezali bolingo oyo tozalaka na yango mpo na ye. Ntoma Yoane akomaki ete: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye.”—1 Yoa. 5:3.
TOZALI NA BONSOMI, KASI TOZALI BAOMBO
4. Nini tosengeli kosala mpo na kokóma “baombo ya boyengebene”?
4 Tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova ndenge apesi biso nzela tózala baombo na ye! Kondima na biso na mbeka ya lisiko ya Kristo esalisi biso tólongwa na boombo ya lisumu. Atako tozali naino bato ya kozanga kokoka, biso moko tondimá kotosa bokonzi ya Yehova mpe ya Yesu. Paulo alimbolaki yango polele na moko ya mikanda na ye oyo akomaki na litambwisi ya elimo santu; alobaki boye: “Bómimona ete bozali solo bakufi na makambo ya lisumu kasi bato ya bomoi mpo na Nzambe na nzela ya Kristo Yesu.” Na nsima, apesaki likebisi oyo: “Boyebi te ete soki bozali kokoba komipesa na moto moko [mpo] bózala baombo mpo na kotosa ye, bozali baombo na ye na ndenge bozali kotosa ye, baombo ya lisumu mpo na kokufa to baombo ya botosi mpo na kozwa boyengebene? Kasi Nzambe azwa matɔndi mpo bozalaki baombo ya lisumu kasi bokómaki kotosa na motema mateya oyo bapesaki bino. Ɛɛ, lokola bosikolamaki na lisumu, bokómi baombo ya boyengebene.” (Rom. 6:11, 16-18) Ntoma Paulo alobi ete tosengeli “kotosa na motema.” Na yango, ntango tomipesi na Yehova, tokómi “baombo ya boyengebene.”
5. Etumba nini tozali kobunda, mpe mpo na nini?
5 Nzokande, makambo mosusu epekisaka biso tókokisa elaka oyo tosalaki ntango tomipesaki na Nzambe. Tozali kobunda bitumba mibale. Ya liboso, ezali etumba oyo Paulo mpe azalaki kobunda. Akomaki boye: “Na motema na ngai, nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe, kasi nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na binama na ngai.” (Rom. 7:22, 23) Biso mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Na yango, tosengeli kobundisa bamposa ya nzoto na biso ya masumu mokolo na mokolo. Ntoma Petro alendisaki biso ete: “Bózala lokola bato ya bonsomi, nzokande bóbatela bonsomi na bino mpo na kozipa makambo mabe te, kasi lokola baombo ya Nzambe.”—1 Pe. 2:16.
6, 7. Ndenge nini Satana azali kosala ete mokili oyo emonana kitoko?
6 Ya mibale, tozali kobunda na mokili mabe oyo etambwisami na bademo. Satana, oyo azali koyangela mokili oyo, azali kosalela bibundeli nyonso oyo azali na yango mpo na kobebisa bosembo na biso epai ya Yehova mpe Yesu. Alingi tókóma baombo na ye na ndenge amekaka biso mpo tólanda makambo ya mokili oyo azali kotambwisa. (Tángá Baefese 6:11, 12.) Satana azali kosala yango na ndenge azali kosala nyonso mpo mokili emonana kitoko mpe ebenda biso. Ntoma Yoane akebisi biso ete: “Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te; mpamba te eloko nyonso oyo ezali na mokili—mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela—euti na Tata te, kasi euti na mokili.”—1 Yoa. 2:15, 16.
7 Bipai nyonso na mokili, bato bazali se koluka kokóma na biloko mingi. Satana azali kotinda bato bákanisa ete kozala na mbongo mingi epesaka esengo. Bazando mpe bamagazini ya mineneminene ezali se kotonda na mokili. Bapiblisite ezali kolendisa bato básombaka biloko mingi mpe básepela na bomoi. Bakompanyi ya mibembo ezali kolakisa bisika kitoko ya kokende kotala, epai tokozala elongo na bato oyo bazali na elimo ya mokili. Ya solo, bato mingi bazali koloba ete esengeli “kobongisa bomoi,” kasi mbala mingi ezalaka na ndenge ya mokili.
8, 9. Likama nini tozali na yango, mpe mpo na nini?
8 Na siɛklɛ ya liboso, Petro akebisaki bakristo mpo na bandeko ya lisangá oyo bakómaki kotalela makambo na ndenge ya mokili. Alobaki boye: “Mpo na bango, kosepelisa nzoto na moi nde esengo. Bazali matɔnɔ mpe mbeba, bazali komipesa na esengo mpenza na mateya na bango ya bokosi ntango bazali kolya esika moko na bino. Mpo babimisaka maloba ya lolendo oyo ezali na litomba te, mpe na bamposa ya nzoto mpe na bizaleli ya nsɔni bazali kobenda baoyo babandi kokima bato oyo bamitambwisaka na libunga. Bazali kolaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali baombo ya libebi. Mpo moto oyo alongami na moto mosusu akómi moombo ya moto yango.”—2 Pe. 2:13, 18, 19.
9 Kokokisa “bamposa ya miso” epesaka moto bonsomi te. Kutu, ekómisaka ye nde moombo ya Satana Zabolo, mokonzi ya mokili oyo amonanaka te. (1 Yoa. 5:19) Kokóma moombo ya biloko ya mokili ezali likama monene; ezalaka mpasi kolongwa na boombo yango.
MOSALA OYO EPESAKA ESENGO YA SOLOSOLO
10, 11. Satana azali koluka kokweisa libosoliboso banani lelo oyo, mpe ndenge nini mateya oyo epesamaka na bakelasi milaimilai ekoki kozala mokakatano mpo na bango?
10 Kaka ndenge asalaki na Edene, lelo oyo mpe Satana alukaka mingimingi bato oyo bayebi makambo mingi te. Azali koluka mingimingi kokweisa bilenge. Satana asepelaka te soki elenge, ata mpe moto nyonso, aponi kokóma moombo ya Yehova. Satana, monguna ya Nzambe, alingi ete bato nyonso oyo bapesi bomoi na bango epai ya Yehova bálonga te kokangama kaka na ye mpe kotikala sembo.
11 Tózonga na ndakisa ya moombo oyo andimi bátɔbɔla ye litoi. Na ntembe te, na ebandeli moombo yango akoyoka mpasi; kasi mpasi yango ekosila nsima ya mwa mikolo, mpe ekotika elembo oyo ekomonisa ete andimi kotikala moombo. Elenge akoki koyoka mpasi soki azwi ekateli oyo ekeseni na oyo baninga bazali kozwa. Satana azali kotinda bato bákanisa ete kozwa mosala ya mbongo na mokili oyo nde epesaka esengo ya solosolo; kasi bakristo basengeli koyeba ete kokokisa bamposa na bango ya elimo nde eleki ntina. Yesu alobaki: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Mat. 5:3) Bakristo bamipesaka mpo na kosala mokano ya Nzambe, kasi te oyo ya Satana. Esengo na bango ezalaka na mobeko ya Yehova, mpe bamanyolaka yango butu moi. (Tángá Nzembo 1:1-3.) Nzokande, mateya mingi oyo bapesaka na bakelasi milaimilai etikelaka mosaleli ya Yehova ntango mingi te mpo na komanyola mpe kokokisa bamposa na ye ya elimo.
12. Likambo nini esɛngaka bilenge mingi bápona lelo oyo?
12 Bankolo mosusu oyo bayebaki Yehova te bazalaki konyokola baombo oyo bazalaki bakristo. Na mokanda na ye ya liboso epai ya Bakorinti, Paulo atunaki boye: “Obengamaki ozali moombo?” Na nsima apesaki toli oyo: “Komitungisa te mpo na yango; kasi soki mpe okoki kokóma na bonsomi, simbá libaku yango.” (1 Ko. 7:21) Soki nkolo azali mabe, elekaki malamu moombo apona kozwa bonsomi. Lelo oyo, na mikili mingi, esɛngamaka na mwana nyonso atánga kelasi na boumeli ya bambula oyo Leta asɛngi. Na nsima, mwana ye moko nde akopona: kokoba kotánga kelasi to te. Ekoki kokóma mpasi mingi mpo mokristo azala na bonsomi ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso soki aponi kotánga bakelasi milaimilai kaka mpo azwa mosala ya malonga na mokili oyo.—Tángá 1 Bakorinti 7:23.
Okozala moombo ya nani?
BAKELASI MILAIMILAI TO KELASI OYO ELEKI MALAMU?
13. Kelasi ya ndenge nini ezalaka malamu koleka mpo na basaleli ya Yehova?
13 Paulo akebisaki bakristo ya Kolose ete: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.” (Kol. 2:8) Lelo oyo, bato mingi ya mayele bazali kolendisa makanisi ya “filozofi mpe bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato.” Bakelasi milaimilai, oyo mbala mingi eteyaka bana bafilozofi ya ndenge wana, epesaka bango mpenza te makoki oyo basengeli na yango mpe eteyaka bango te ndenge ya kolonga mikakatano ya bomoi. Nzokande, basaleli ya Yehova baponaka kotánga bakelasi oyo ekosalisa bango báyeba malamu mosala moko boye mpo bázala na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe bákoka kosalela Nzambe. Balandaka toli oyo ntoma Paulo apesaki Timote ete: “Ya solo, ezaleli yango ya kokangama na Nzambe ná ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango ezali nzela ya kozwa litomba monene. Yango wana, soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Tim. 6:6, 8) Na esika ya koluka badiplome ndenge na ndenge mpe batitre ebeleebele, bakristo ya solo balukaka nde komipesa mobimba na mosala ya kosakola.—Tángá 2 Bakorinti 3:1-3.
14. Na kotalela Bafilipi 3:8, ndenge nini Paulo atalelaki libaku ya kozala moombo ya Nzambe mpe ya Kristo?
14 Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Atángaki kelasi epai ya Gamaliele, Moyuda moko oyo azalaki moteyi ya Mibeko. Mateya oyo Paulo azwaki ekoki kokokana lelo na mateya oyo epesamaka na iniversite. Kasi ndenge nini Paulo atalelaki kelasi oyo atángaki ntango akokanisaki yango na libaku malamu oyo azwaki ya kozala moombo ya Nzambe mpe ya Kristo? Akomaki boye: “Mpo na motuya monene ya boyebi ya Kristo Yesu Nkolo na ngai, nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso lokola biloko oyo ebungá. Mpo na ye nandimi kobungisa biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola bosɔtɔ mpamba, mpo nazwa Kristo.” (Flp. 3:8) Ndakisa na ye ekoki kosalisa bilenge bakristo mpe baboti na bango oyo babangaka Nzambe bázwa ekateli ya malamu na likambo etali kotánga kelasi. (Talá bililingi.)
ZWÁ MATOMBA NA KELASI OYO ELEKI MALAMU
15, 16. Mateya nini ebongiseli ya Yehova ezali kopesa, mpe ezalaka libosoliboso mpo na nini?
15 Makambo ezalaka ndenge nini na iniversite mpe na biteyelo mingi ya minene lelo oyo? Mbala mingi na bisika yango, babimisaka mobulu mpe batombokelaka bakonzi ya mboka. (Ef. 2:2) Nzokande, ebongiseli ya Yehova eteyaka bato mateya oyo eleki malamu na kati ya lisangá, oyo ezali esika ya kimya. Biso nyonso tokoki kozwa matomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ. Ezali mpe na mateya oyo ebongisami mpo na bandeko mibali minzemba oyo bazali babongisi-nzela (Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba) mpe mosusu mpo na babalani oyo bazali babongisi-nzela (Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá). Makambo oyo eteyamaka na biteyelo wana esalisaka biso tótosa Yehova, Nkolo na biso ya likoló.
16 Tokoki komona mateya mosusu mingi soki tosaleli Index to CD-ROM Watchtower Library. Mateya yango ezalaka libosoliboso mpo na losambo ya Yehova. Elakisaka biso ndenge oyo tokoki kosalisa basusu bázongisa boyokani ya malamu na Nzambe. (2 Ko. 5:20) Na nsima, bango mpe bakómaka koteya basusu.—2 Tim. 2:2.
MBANO YA MOOMBO
17. Kopona kolanda mateya oyo eleki malamu epesaka matomba nini?
17 Na ndakisa ya batalanta oyo Yesu apesaki, nkolo apesaki baombo mibale ya sembo longonya mpe ayebisaki bango bákɔta na esengo na ye na ndenge abakiselaki bango misala mosusu. (Tángá Matai 25:21, 23.) Tokozala na esengo mingi mpe tokozwa matomba ebele soki toponi kelasi oyo eleki malamu. Tózwa ndakisa ya Michael. Azalaki mayele mingi na kelasi. Balakisi na ye babengaki ye na likita moko mpo bálobela mokano ya kokɔta na iniversite ya monene. Kasi bakamwaki mingi ntango Michael ayebisaki bango ete akotánga kaka kelasi ya mokuse mpo esalisa ye na kozwa mwa eloko ya kobikela mpe mpo azala mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Sikoyo, akómá nde komona ete azwaki ekateli ya mabe? Alobi boye: “Formasyo oyo nazwi na lisangá ya Yehova na mosala ya mobongisi-nzela, mpe sikoyo ndenge nazali nkulutu na lisangá, esalisi ngai mingi. Mapamboli oyo nazwi eleki mosika mbongo nyonso oyo nakokaki kozwa. Nasepelaka mingi ndenge naponaki koboya kotánga bakelasi milaimilai.”
18. Mpo na nini oponá kolanda mateya oyo eleki malamu?
18 Mateya oyo eleki malamu elakisaka biso mokano ya Nzambe mpe esalisaka biso tósalela Yehova lokola baombo. Epesi biso elikya ya ‘kolongwa na boombo ya kopɔla’ mpe nsukansuka kozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Rom. 8:21) Oyo eleki nyonso, yango nde lolenge eleki malamu ya komonisa ete tolingaka mpenza Yehova, Nkolo na biso ya likoló.—Kob. 21:5.