Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/06 nk. 8-9
  • Sepeláká na elikya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sepeláká na elikya
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elikya ezali ata mpo na bakufi
  • Elikya mpo na baoyo bazangá ndako mpe babola
    Lamuká!—2015
  • Na esanga ya melita koyamba bapaya epesi bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge malamu ya koluka esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Lamuká!—2006
g 7/06 nk. 8-9

Sepeláká na elikya

JOE azalaki na maladi makasi ya kanser, oyo ayebaki ete akobika na yango te. Mwasi na ye Kirsten mpe baninga na ye mosusu bafandaki pene na mbeto na ye, bazalaki kosolola. Ntango Kirsten atalaki mobali na ye malamu, amonaki mai ya miso ezali kokita ye na elongi. Na ebandeli, Kirsten akanisaki ete Joe azali koyoka mpasi makasi. Ya solo, azalaki koyoka mpasi, kasi na mbala oyo, ayebisaki mwasi na ye ete mai ya miso wana ezalaki ya mpasi te.

Kirsten alobi boye: “Na ntango wana ya mpasi, Joe azalaki elongo na baninga na ye ya motema oyo bayaki kotala ye. Longola yango, azalaki mpe na elikya ya solosolo, oyo na ntango wana andimaki ete ekokokisama mpenza, koleka ndenge azalaki kotalela yango liboso. Ayebaki ete moto moko te akoki kolongola ye elikya yango. Ayebisaki ngai ete mai ya miso oyo ezalaki kobima ye, ezalaki nde ya esengo. Kaka na butu wana, Joe akufaki.”

Elikya nini esalisaki Joe ayika mpiko ntango maladi na ye ekómaki makasi? Ezali elaka ya Yehova Nzambe ya kopesa bato bomoi ya seko mpe nzoto kolɔngɔnɔ na paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:​10, 11, 29) Emoniseli 21:​3, 4 elobi ete: “Hema ya Nzambe ezali elongo na bato . . . Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala [bakisa ebele ya mikakatano ya bomoi ya lelo] esili koleka.”

Elikya ezali ata mpo na bakufi

Mpo na Joe, elikya oyo azalaki na yango ekokokisama ntango akozonga na bomoi. Na ntembe te, Joe abɔndisamaki na elaka oyo Yesu apesaki ete: “Baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama,” elingi koloba, bakufi oyo Nzambe abombá na makanisi na ye, bakozonga na bomoi ndenge moto alamukaka na mpɔngi. (Yoane 5:​28, 29) Ozali na mawa mpo ndeko na yo to moninga na yo autaki kokufa? Soki ezali bongo, elikya ya lisekwa ekoki kopesa yo makasi. Ezali solo ete elikya yango ekoki te kosilisa mpasi makasi oyo toyokaka na motema ntango ndeko to moninga na biso akufi. Ata Yesu “alelaki na mai na miso” ntango moninga na ye Lazalo akufaki. Elikya oyo tozali na yango esalaka ete mpasi ekita mwa moke.​—⁠Yoane 11:⁠14, 34, 35; 1 Batesaloniki 4:​13.

Kirsten alobi boye: “Ntango Joe akufaki na maladi ya kanser, nakanisaki ete nakoyoka lisusu esengo ya bomoi te. Ata lelo oyo, mwa bambula esili koleka, namonaka ete bomoi na ngai na mokili oyo ekozonga te ndenge ezalaki liboso. Liwa ya Joe etiká ngai na mpasi mingi na motema. Atako bongo, nakoki koloba ete namitungisaka lisusu mingi te mpe nakómá lisusu na esengo.”

Likambo oyo Kirsten alobi esalisi biso tóyeba ete na mokili oyo, tokoki kokanisa te ete tokozala na esengo mikolo nyonso. Bomoi ezali na bampasi mpe na bisengo na yango. Mpe ezali na bantango oyo tosengeli kozala na mawa, ntango oyo ebongi te kozala na esengo. (Mosakoli 3:​1, 4; 7:​2-4) Lisusu, basusu kati na biso bakoki kobɛla maladi ya makanisi, oyo ekoki kouta na bantina mingi. Atako bongo, makambo oyo Biblia elaki ekoki kobɔndisa biso mingi. Bwanya ya Nzambe oyo eleki nyonso, oyo tokozwa na Biblia, ekoki kosalisa biso tókima makambo oyo esilisaka moto esengo. Nzambe alobi boye: “Nde ye oyo akoyokamela ngai akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.”​—⁠Masese 1:​33.

Yehova alingaka mpenza ete tózala malamu. Alingaka tózala na esengo, kaka esengo ya likolólikoló te oyo emonanaka na kosɛka, kasi nde esengo ya solosolo oyo ezalaka na motema. Alingi tózala na esengo yango, kaka mpo na mwa bambula te, kasi mpo na libela! Yango wana, mwana na ye alobaki maloba oyo elandi, oyo etali mpe biso lelo: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Matai 5:​3) Soki tosaleli maloba yango, tokomonisa ete tozali na bwanya.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 9]

Makambo libwa oyo epesaka moto esengo

1. Kotya makambo ya Nzambe na esika ya liboso.​—⁠Matai 5:⁠3.

2. Kosepela na oyo ozali na yango mpe koboya “bolingo ya mbongo.”​—⁠1 Timote 6:​6-​10.

3. Kotya komisepelisa na esika na yango.​—⁠2 Timote 3:​1, 4.

4. Koyeba kokaba mpe kosalela bato makambo oyo ekosepelisa bango.​—⁠Misala 20:⁠35.

5. Kopesa bato matɔndi mpe kozwa momeseno ya kotalelaka makambo ya malamu oyo ozali na yango.​—⁠Bakolose 3:​15.

6. Koyeba kolimbisa.​—⁠Matai 6:​14.

7. Kopona baninga ya malamu.​—⁠Masese 13:⁠20.

8. Kobatela nzoto mpe kotika mimeseno ya mabe.​—⁠2 Bakolinti 7:⁠1.

9. ‘Kosepela na kati ya elikya’ oyo Biblia epesi yo.​—⁠Baloma 12:12.

[Bililingi na lokasa 8, 9]

Elikya ya mokili ya sika oyo Biblia epesi ebɔndisaka biso mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto