Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/10 nk. 7-11
  • “Bózala na kimya na bato nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bózala na kimya na bato nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bósalaka nde makambo oyo ezali malamu”
  • Tónyangwisa botɛmɛli na “makala ya mɔtɔ”
  • “Bózala na kimya na bato nyonso”
  • Kozongisa mabe ezali likambo ya Yehova
  • Tósalaka malamu mpo na kolonga mabe
  • Tósepela na kati ya elikya
  • “Bózongisa mabe na mabe na moto te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • ‘Luká kimya mpe landá yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Totambola na mayele kati na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/10 nk. 7-11

“Bózala na kimya na bato nyonso”

“Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.”​—ROM. 12:18.

1, 2. (a) Likebisi nini Yesu apesaki bayekoli na ye? (b) Esika nini tokoki kozwa toli oyo ekosalisa biso ntango tokutani na botɛmɛli?

YESU akebisaki bayekoli na ye ete bikólo ya mokili ekotɛmɛla bango, mpe na butu ya nsuka liboso akufa, ayebisaki bango ntina na yango. Alobaki na bantoma na ye boye: “Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.”​—Yoa. 15:19.

2 Makambo oyo ntoma Paulo akutanaki na yango endimisaki ye ete maloba wana ya Yesu ezali solo. Na mokanda ya mibale oyo akomelaki moninga na ye ya mosala, elenge Timote, Paulo akomaki boye: “Yo olandi malamu mpenza mateya na ngai, bomoi na ngai, mokano na ngai, kondima na ngai, motema molai na ngai, bolingo na ngai, ezaleli na ngai ya koyika mpiko, minyoko na ngai, bampasi na ngai.” Na nsima, Paulo abakisaki boye: “Ya solo, baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na boyokani na Kristo Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Tim. 3:10-12) Na mokapo 12 ya mokanda oyo akomelaki bakristo ya Roma, Paulo ayebisaki bango ndenge malamu ya kosala soki bakutani na botɛmɛli. Maloba na ye ekoki mpe kosalisa biso na ntango oyo ya nsuka.

“Bósalaka nde makambo oyo ezali malamu”

3, 4. Ndenge nini toli ya Baroma 12:17 ekoki kosalelama (a) na ndako oyo bato mosusu bazali Batatoli te? (b) na boyokani na biso na bazalani na biso?

3 Tángá Baroma 12:17. Paulo alobaki ete ntango basali biso mabe, tosengeli te kozongisa mabe na mabe. Kolanda toli yango ezali na ntina, mingimingi na bandako oyo bato mosusu bazali Batatoli te. Ndeko oyo molongani na ye azali Motatoli te asengeli koboya kozongisa liloba to likambo ya mabe oyo basali ye. ‘Kozongisa mabe na mabe’ ebongisaka makambo te. Kutu, ekoki nde kobebisa lisusu makambo.

4 Paulo alobaki likambo oyo eleki malamu: “Bósalaka nde makambo oyo ezali malamu na miso ya bato nyonso.” Na kati ya ndako, mwasi oyo azali mpenza komonisela mobali na ye boboto atako mobali yango alobi mabe mpo na bindimeli na ye, akoki kosala ete koswana oyo ekokaki kobima, ebima te. (Mas. 31:12) Carlos, oyo azali lelo kosala na Betele moko, alobeli ndenge oyo mama na ye alongaki botɛmɛli makasi ya tata na ye, lokola azalaki ntango nyonso na boboto mpe azalaki kobatela ndako malamu. Carlos alobi boye: “Azalaki kolendisa biso bana tózalaka ntango nyonso na limemya epai ya tata. Mama azalaki kotinda ngai na makasi ete nasalaka na tata lisano moko boye, atako nazalaki kosepela na lisano yango te. Kasi, tata azalaki kosepela mingi.” Nsukansuka, akómaki koyekola Biblia mpe azwaki batisimo. Na oyo etali kosala “makambo oyo ezali malamu na miso ya bato nyonso,” mbala mingi Batatoli ya Yehova bazali kolongola makanisi ya mabe oyo bato mosusu bazalaka na yango mpo na bango, ntango basalisaka bazalani na bango oyo bakutani na likama.

Tónyangwisa botɛmɛli na “makala ya mɔtɔ”

5, 6. (a) Ndenge nini kotya “makala ya mɔtɔ” na motó ya monguna? (b) Pesá ndakisa ya likambo moko oyo oyebi, oyo emonisi ete kosalela toli ya Baroma 12:20 ekoki kobota mbuma malamu.

5 Tángá Baroma 12:20. Ntango Paulo akomaki maloba ya vɛrsɛ yango, na ntembe te azalaki kokanisa makambo oyo totángaka na Masese 25:21, 22 ete: “Soki moto oyo ayinaka yo azali na nzala, pesá ye limpa alya; mpe soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla. Mpo ezali makala ya mɔtɔ nde ozali kotondisa likoló ya motó na ye, mpe Yehova ye moko akopesa yo mbano.” Na kolanda toli na ye oyo ezali na Baroma mokapo 12, ezali mpasi tókanisa ete Paulo alingaki koloba ete esengeli kosalela makala ya mɔtɔ mpo na konyokola moto oyo asali biso mabe to koyokisa ye nsɔni. Kasi, emonani ete masese wana, ata mpe maloba ya Paulo epai ya Baroma, elobelaki mayele moko ya kala oyo bazalaki kosalela mpo na konyangwisa bibende. Charles Bridges, moto ya Angleterre oyo azalaki kolimbola maloba ya Biblia na ekeke ya 19 alobaki boye: “Esengelaki kokɔtisa bibende na kati ya makala ya mɔtɔ; esengelaki kaka te kotya yango likoló ya mɔtɔ, kasi esengelaki kotya makala ya mɔtɔ likoló na yango. Ezali na bato mingi te oyo bazali na mitema makasi ndenge wana, mpo enyangwa te ata soki tomoniseli bango motema molai, tomipimeli makambo mosusu mpo na bango, mpe tomonisi ete tolingaka bango.”

6 Lokola “makala ya mɔtɔ,” kosalela batɛmɛli makambo ya boboto ekoki kolɛmbisa mitema na bango mpe mbala mosusu konyangwisa mabe na bango. Kosalela bato makambo ya boboto ekoki kotinda bamosusu bákóma kosepela na basaleli ya Yehova mpe na nsango ya Biblia oyo basakolaka. Ntoma Petro akomaki boye: “Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde bazali koloba na basali-mabe, bápesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala mpo bamoni na miso na bango misala na bino ya malamu.”​—1 Pe. 2:12.

“Bózala na kimya na bato nyonso”

7. Kimya oyo Kristo atikelaki bayekoli na ye ezali nini, mpe kimya yango esengeli kotinda biso na nini?

7 Tángá Baroma 12:18. Na butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki na bantoma na ye, ayebisaki bango boye: “Natikeli bino kimya na ngai, napesi bino kimya na ngai.” (Yoa. 14:27) Kimya oyo Kristo atikelaki bayekoli na ye ezali kimya ya motema oyo bayokaka mpo bayebi ete Yehova Nzambe mpe Mwana na ye ya bolingo balingaka bango mpe bandimi bango. Kimya yango ya motema esengeli kotinda biso tófandaka na kimya na basusu. Bakristo ya solo balingaka kimya mpe bazali bato oyo batyaka kimya.​—Mat. 5:9.

8. Ndenge nini tokoki kozala bato oyo batyaka kimya na libota mpe na lisangá?

8 Lolenge moko ya kozala bato oyo batyaka kimya na kati ya libota ezali kosilisa matata nokinoki na esika ya kotika ete makambo ekóma minene. (Mas. 15:18; Ef. 4:26) Ezali mpe bongo na kati ya lisangá ya bokristo. Ntoma Petro amonisaki ete kolanda kimya ezali na boyokani na kopekisa lolemo. (1 Pe. 3:10, 11) Nsima ya kopesa toli oyo etali kosalela lolemo malamu mpe ntina ya koboya zuwa mpe kowelana, Yakobo akomaki boye: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya, na makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te. Lisusu, bato oyo batyaka kimya balonaka mbuma ya boyengebene na kimya mpe babukaka yango.”​—Yak. 3:17, 18.

9. Ntango tozali koluka kozala “na kimya na bato nyonso,” likambo nini tosengeli kobosana te?

9 Na maloba na ye oyo ezali na Baroma 12:18, Paulo asukaki kaka te na komonisa ete tosengeli kozala na kimya na bato ya libota mpe ya lisangá. Alobaki mpe ete tosengeli ‘kozala na kimya na bato nyonso.’ Bato yango bakoki kozala baninga ya kartye, ya mosala, ya kelasi, mpe bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. Kasi, na toli na ye, ntoma Paulo alobaki ete: “Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino.” Yango elimboli ete tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na ‘kozala na kimya na bato nyonso’ kasi tosengeli te kobuka mitinda ya sembo ya Nzambe mpo na kosepelisa basusu.

Kozongisa mabe ezali likambo ya Yehova

10, 11. Na ndenge nini ‘totikelaka nkanda esika,’ mpe mpo na nini ebongi bongo?

10 Tángá Baroma 12:19. Ata epai ya “baoyo bazali na ezaleli ebongi te” mpo na mosala na biso mpe nsango na biso, kati na bango batɛmɛli ya makasi, tosengeli ‘komipekisa ntango basali biso mabe’ mpe kosala makambo “na boboto.” (2 Tim. 2:23-25) Paulo ayebisaki bakristo bázongisaka mabe na mabe te kasi ‘bátikela nkanda esika.’ Paulo alobelaki nkanda ya nani? Akokaki te koloba ete tosengeli kotikela nkanda na biso moko esika. Emonani polele ete tosengeli kotikela nde nkanda ya Nzambe esika. Biso bakristo toyebi ete kozongisa mabe ezali likambo na biso te. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka; kosilika te kaka mpo na kosala mabe.” (Nz. 37:8) Salomo mpe apesaki toli oyo: “Koloba te ete: ‘Nakozongisa mabe!’ Tyá elikya epai ya Yehova, mpe akobikisa yo.”​—Mas. 20:22.

11 Soki batɛmɛli basali biso mabe, eleki malamu tótikela Yehova apesa bango etumbu soki amoni ete ebongi mpe na ntango oyo alingi. Mpo na komonisa ete azalaki kolobela nde nkanda ya Yehova, Paulo abakisaki ete: “Ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.’” (Talá mpe Kolimbola Mibeko 32:35.) Soki tomeki kozongisa mabe na mabe, ekomonisa ete tozali na lolendo, tozali koluka kosala likambo oyo kaka Yehova nde azali na lotomo ya kosala. Lisusu, tokomonisa ete tozangi kondima na elaka ya Yehova ete: “Ngai nakozongisa mabe.”

12. Ntango nini nkanda ya Yehova ekokita, mpe ndenge nini?

12 Na ebandeli ya mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo alobaki boye: “Nkanda ya Nzambe ezali kouta na likoló mpe kokitela ezaleli nyonso ya kotyola Nzambe mpe makambo nyonso ya kozanga boyengebene ya bato oyo bazali kozipa solo na myango oyo ezangi boyengebene.” (Rom. 1:18) Nkanda ya Yehova ekouta na likoló mpe ekokitela bato na nzela ya Mwana na ye na ntango ya “bolɔzi monene.” (Em. 7:14) Yango ekozala “elembeteli ya lisambisi ya boyengebene ya Nzambe,” ndenge Paulo alimbolaki yango na mokanda mosusu oyo akomaki na litambwisi ya elimo santu ete: “Yango elakisi mpe ete ezali likambo ya boyengebene mpo na Nzambe kozongisa bolɔzi na baoyo bazali kobimisela bino bolɔzi, kasi, epai na bino baoyo bozali kozwa bolɔzi, kopema elongo na biso na ntango ya emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.”​—2 Tes. 1:5-8.

Tósalaka malamu mpo na kolonga mabe

13, 14. (a) Mpo na nini tokamwaka te ntango tokutani na botɛmɛli? (b) Ndenge nini tokoki kopambola baoyo banyokolaka biso?

13 Tángá Baroma 12:14, 21. Lokola tozali na elikya makasi ete Yehova akokokisa bilaka na ye, tokoki komipesa mobimba na mosala oyo apesi biso: kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” na “mabele mobimba esika bato bafandi.” (Mat. 24:14) Toyebi ete mosala yango ekopesa banguna na biso nkanda, mpo Yesu akebisaki biso na maloba oyo: “Bikólo nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Mat. 24:9) Yango wana, tokamwaka te mpe tolɛmbaka nzoto te ntango tokutani na botɛmɛli. Ntoma Petro akomaki boye: “Bandeko ya bolingo, bómitungisa te mpo na mɔtɔ oyo ezali na kati na bino, oyo ezali kopela mpo na komeka bino, lokola nde likambo ya kokamwa ezali kokwela bino. Kutu, bókoba nde kosepela mpo bozali komona mpasi oyo Kristo amonaki.”​—1 Pe. 4:12, 13.

14 Na esika tókangela bato oyo bazali konyokola biso nkanda, tomekaka nde koteya bango, tomonaka ete bamosusu kati na bango bazali kosala makambo na kozanga koyeba. (2 Ko. 4:4) Tosalaka makasi ya kotosa toli ya Paulo oyo: “Bópambolaka baoyo bazali konyokola bino; bópambolaka mpe bólakelaka mabe te.” (Rom. 12:14) Lolenge moko ya kopambola banguna ezali kobondela mpo na bango. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Bókoba kolinga banguna na bino, kosala malamu na bato oyo bayinaka bino, kopambola baoyo bazali kolakela bino mabe, kobondela mpo na baoyo bazali kofinga bino.” (Luka 6:27, 28) Makambo oyo ekómelaki ntoma Paulo endimisaki ye ete moto oyo anyokolaka basusu akoki kokóma moyekoli ya sembo ya Kristo mpe mosaleli ya Yehova ya molende. (Gal. 1:13-16, 23) Na mokanda mosusu, Paulo alobaki boye: “Ntango bazali kofinga biso, topambolaka; ntango bazali konyokola biso, tokangaka motema; ntango bazali kobebisa biso lokumu, tobondelaka.”​—1 Ko. 4:12, 13.

15. Wapi lolenge eleki malamu ya kosala malamu mpo na kolonga mabe?

15 Yango wana, mokristo ya solo alandaka toli oyo ezali na vɛrsɛ ya nsuka ya Baroma mokapo 12 ete: “Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.” Mabe nyonso eutaka na Satana Zabolo. (Yoa. 8:44; 1 Yoa. 5:19) Na emoniseli oyo apesaki ntoma Yoane, Yesu amonisaki ete bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo “balongaki [Satana] mpo na makila ya Mwana-Mpate mpe mpo na liloba ya litatoli na bango.” (Em. 12:11) Yango emonisi ete lolenge eleki malamu ya kolonga Satana mpe mabe oyo azali kotinda bato ya mokili oyo básala, ezali kosala malamu na nzela ya mosala ya kopesa litatoli, kosakola nsango malamu ya Bokonzi.

Tósepela na kati ya elikya

16, 17. Baroma mokapo 12 eteyi biso nini na oyo etali (a) ndenge oyo tosengeli kosalela bomoi na biso? (b) ndenge oyo tosengeli kosala na kati ya lisangá? (c) ndenge oyo tosengeli kotalela bato oyo bazali Batatoli te?

16 Kotalela na mokuse mokapo 12 ya mokanda ya Paulo epai ya bakristo ya Roma ekundweli biso makambo mingi. Toyekoli ete lokola tozali basaleli ya Yehova mpe tomipesá na ye, tosengeli kondima komipemela makambo mosusu. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, tosalaka bongo na motema moko mpo makoki na biso ya kokanisa endimisi biso ete yango nde mokano ya Nzambe. Tozali kopela na elimo mpe tozali kosalela na molende makabo ndenge na ndenge oyo tozali na yango. Tozali kosala na komikitisa mpe bopɔlɔ, tozali kosala nyonso mpo na kobatela bomoko na biso ya bokristo. Tozali na ezaleli ya koyamba bapaya mpe ya komitya na esika ya basusu.

17 Baroma mokapo 12 epesi biso mpe toli oyo emonisi ndenge ya kosala ntango tokutani na botɛmɛli. Tosengeli kozongisa mabe na mabe te. Tosengeli kosalela bato makambo ya boboto ata ntango batɛmɛli biso. Soki likoki ezali, kozanga ete tóbuka mitinda ya Biblia, tosengeli kosala makasi tózala na kimya na bato nyonso. Tokoki kosalela toli yango na libota, na lisangá, na kartye, na mosala, na kelasi, mpe na mosala na biso ya kosakola. Ata ntango tokutani na botɛmɛli makasi, tosalaka nyonso mpo tólonga mabe, tobosanaka te ete kozongisa mabe ezali likambo ya Yehova.

18. Baroma 12:12 elendisi biso tósala makambo nini misato?

18 Tángá Baroma 12:12. Longola batoli wana ya bwanya mpe ya ntina migi, Paulo alendisi biso tósala makambo mosusu misato. Lokola tokoki soki moke te kosala makambo wana nyonso kozanga lisalisi ya Yehova, ntoma Paulo apesi biso toli ete ‘tótingama na mabondeli.’ Yango ekosalisa biso tólanda toli na ye mosusu ya ‘koyika mpiko na bolɔzi.’ Na nsuka, tosengeli kotya makanisi nyonso na makambo oyo Yehova abombeli biso mpo na mikolo ezali koya mpe ‘kosepela na elikya’ ya bomoi ya seko, ezala na likoló to awa na mabele.

Bozongeli

• Ndenge nini tosengeli kosala ntango tokutani na botɛmɛli?

• Na makambo nini tosengeli kotyaka kimya, mpe ndenge nini?

• Mpo na nini tosengeli te kozongisaka mabe na mabe?

[Elilingi na lokasa 8]

Kosalisa bazalani na biso ekoki kotinda bato bálongola makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na biso

[Elilingi na lokasa 9]

Osalaka makasi mpo na kozala moto oyo atyaka kimya na lisangá?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto