Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/7 nk. 22-26
  • “Bózongisa mabe na mabe na moto te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bózongisa mabe na mabe na moto te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Na bongo nazali kobondela bino”
  • “Tiká bolingo na bino ezanga bokosi”
  • “Bókoba kopambola baoyo bazali konyokola bino”
  • “Bózala na kimya elongo na bato nyonso”
  • “Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe”
  • Ntina oyo tozongisaka mabe na mabe te
  • “Bózala na kimya na bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndenge oyo malamu ekolonga mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/7 nk. 22-26

“Bózongisa mabe na mabe na moto te”

“Bózongisa mabe na mabe na moto te. Bókanisaka nde kozongisa makambo ya malamu mingi na miso ya bato nyonso.”​—BALOMA 12:17.

1. Ezaleli nini ezali komonana mingi?

MBALA mingi, soki mwana moko atindiki ndeko na ye, ndeko na ye mpe azongisaka. Likambo ya mawa, kaka bana mike te nde bazongisaka mabe na mabe. Mikóló mingi mpe basalaka bongo. Soki moto moko asali bango mabe, balukaka mpe kozongisela ye mabe. Ya solo, mikóló mingi bazongisaka mabe mbala moko boye te, kasi basalaka yango na mayele. Bakoki mbala mosusu kobanda kotɔngatɔnga moto oyo asali bango mabe to kosala nyonso mpo moto yango azwa bolamu te. Ezala basaleli mayele nini, mposa na bango ezalaka kaka moko: kozongisa mabe oyo basalaki bango.

2. (a) Mpo na nini baklisto ya solo baboyaka kozongisa mabe na mabe? (b) Mituna nini mpe mokapo nini ya Biblia tokotalela?

2 Atako mposa ya kozongisa mabe na mabe ezalaka makasi, baklisto ya solo bapesaka yango nzela te. Basalaka nde makasi mpo na kolanda toli ya ntoma Paulo oyo: “Bózongisa mabe na mabe na moto te.” (Baloma 12:17) Nini ekotinda biso tólanda toli malamu wana? Tosengeli kozongisa mabe te epai ya nani? Matomba nini tokozwa soki tozali kozongisa mabe na mabe te? Mpo na kozwa biyano na mituna wana, tótalela ntina oyo Paulo akomaki maloba wana mpe tómona ndenge Baloma mokapo 12 ezali komonisa ete koboya kozongisa mabe na mabe ezali ezaleli ya malamu, elembo ya bolingo mpe ya komikitisa. Tokotalela mokomoko ya makambo yango nyonso misato.

“Na bongo nazali kobondela bino”

3, 4. (a) Kobanda na Baloma mokapo 12, Paulo azali kolobela likambo nini, mpe maloba “na bongo” elimboli nini? (b) Mawa ya Nzambe esengelaki kotinda baklisto ya Loma básala nini?

3 Kobanda na mokapo 12, Paulo alobeli makambo minei ya bomoi ya moklisto, oyo ezali na boyokani na kati na yango. Alobeli boyokani na biso na Yehova, na baninga na biso bandimi, na bato oyo bazali bandimi te mpe na bakonzi ya Leta. Paulo amonisaki ete ezali na ntina monene oyo tosengeli kokimaka bamposa ya mabe, ná oyo ya kozongisa mabe na mabe. Alobaki boye: “Na bongo nazali kobondela bino na mawa ya Nzambe, bandeko.” (Baloma 12:1) Awa, maloba “na bongo” elimboli “na kotalela likambo wana.” Yango emonisi ete Paulo alobaki ete, ‘Na kotalela likambo oyo nauti koyebisa bino, nazali kobondela bino bósala oyo nalingi koyebisa bino sikoyo.’ Likambo nini Paulo ayebisaki baklisto yango ya Loma?

4 Na mikapo 11 ya liboso ya mokanda na ye, Paulo alobelaki libaku malamu oyo Bayuda ná bato ya bikólo mosusu bazali na yango ya koyangela elongo na Klisto na Bokonzi ya Nzambe, elikya oyo bato ya Yisalaele babwakaki. (Baloma 11:13-36) Bato yango bazwi libaku kitoko wana kaka mpo “na mawa ya Nzambe.” Ndenge nini baklisto basengeli kotalela boboto monene wana ya Nzambe? Basengeli kozala na botɔndi mpenza, mpe yango ekotinda bango básala oyo Paulo alobaki na nsima: “Bókaba banzoto na bino mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe, mosala moko mosantu elongo na likoki na bino ya kokanisa.” (Baloma 12:1) Kasi, ndenge nini baklisto yango bakokaki komikaba lokola “mbeka” epai ya Nzambe?

5. (a) Ndenge nini moto akoki komikaba lokola “mbeka” epai ya Nzambe? (b) Wapi etinda oyo moklisto nyonso asengeli kolanda?

5 Paulo akobaki boye: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Na esika ya kotika elimo ya mokili etambwisa makanisi na bango, basengelaki kokómisa makanisi na bango sika, elingi koloba ekóma lokola oyo ya Klisto. (1 Bakolinti 2:16; Bafilipi 2:5) Baklisto nyonso ya solosolo, ezala ata biso lelo oyo, basengeli kosalela etinda yango.

6. Na kotalela makanisi oyo Paulo apesi na Baloma 12:1, 2, nini etindaka biso tóboya kozongisa mabe na mabe?

6 Ndenge nini makanisi oyo Paulo apesi na Baloma 12:1, 2 ekoki kosalisa biso? Lokola baklisto bapakolami ya Loma, tozali na botɔndi mpenza mpo na mawa oyo Nzambe amoniselá biso mpe azali kokoba komonisela biso, mikolo nyonso ya bomoi na biso. Na bongo, na botɔndi mpenza na mitema tozali kosalela Nzambe na makasi, na biloko mpe na makoki na biso nyonso. Botɔndi yango etindaka biso mpe tósala nyonso tózala na makanisi ya Klisto, kasi ya mokili te. Kozala na makanisi ya Klisto emonanaka na makambo oyo tosalaka basusu, ezala bandeko na biso baklisto to bato oyo bazali bandimi te. (Bagalatia 5:25) Na ndakisa, soki tozali na makanisi ya Klisto, tokolonga mposa makasi ya kozongisa mabe na mabe.​—1 Petelo 2:21-23.

“Tiká bolingo na bino ezanga bokosi”

7. Bolingo ya ndenge nini Paulo alobeli na Baloma mokapo 12?

7 Toboyaka kozongisa mabe na mabe kaka te mpo ezali ezaleli ya malamu mpenza, kasi mpe mpo emonisaka bolingo. Talá ndenge Paulo amonisaki ntina ya bolingo na nsima. Na Mokanda ya Baloma, Paulo asalelaki liloba “bolingo” (a·gaʹpe na monɔkɔ ya Grɛki) mbala mingi, mpo na kolobela bolingo ya Nzambe mpe oyo ya Klisto. (Baloma 5:5, 8; 8:35, 39) Kasi, na mokapo 12, Paulo asaleli liloba a·gaʹpe na ndimbola mosusu, mpo na kolobela bolingo oyo tozalaka na yango mpo na bazalani na biso. Nsima ya koloba ete makabo ya elimo ezali ndenge na ndenge mpe ete baklisto mosusu bazali na yango, Paulo alobelaki ezaleli moko oyo baklisto nyonso basengeli koluka kozala na yango. Alobaki boye: “Tiká bolingo na bino ezanga bokosi.” (Baloma 12:4-9) Kozala na bolingo mpo na basusu ezali elembo ya baklisto ya solo. (Malako 12:28-31) Paulo azali kolendisa biso baklisto ete tózala na bolingo ya solosolo.

8. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo oyo ezangi bokosi?

8 Lisusu, Paulo ayebisi ndenge tokoki komonisa bolingo oyo ezangi bokosi: “Bóyina oyo ezali mabe, bókangama na oyo ezali malamu.” (Baloma 12:9) Maloba “bóyina” mpe “bókangama” ezali maloba makasi mpenza. Tosengeli kosuka te na koyina kaka mpasi oyo mabe ezali kobimisa, kasi tosengeli mpe koyina mabe yango moko. (Nzembo 97:10) Moklisto oyo azali na bolingo ya solosolo akangamaka makasi na oyo ezali malamu, mpe yango emonanaka mpenza na bomoto na ye.

9. Toli nini Paulo azongelaki mbala na mbala?

9 Lolenge moko ya komonisa bolingo ezongelami mbala na mbala na maloba ya Paulo. Alobaki boye: “Bókoba kopambola baoyo bazali konyokola bino; bópambolaka mpe bólakelaka mabe te.” “Bózongisa mabe na mabe na moto te.” “Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami.” “Komitika te ete mabe elonga yo, kasi kobá kolonga mabe na kosaláká malamu.” (Baloma 12:14, 17-19, 21) Maloba wana ya Paulo emonisi polele ndenge oyo tosengeli kotalelaka bato oyo bazali bandimi te, ata mpe baoyo bazali kotɛmɛla biso.

“Bókoba kopambola baoyo bazali konyokola bino”

10. Na ndenge nini tokoki kopambola bato oyo bazali konyokola biso?

10 Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo oyo: “Bókoba kopambola baoyo bazali konyokola bino”? (Baloma 12:14) Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Matai 5:44; Luka 6:27, 28) Na yango, lolenge moko oyo tosengeli kopambola bato oyo bazali konyokola biso ezali ya kobondela mpo na bango, kosɛnga Nzambe ete soki bamosusu bazali kotɛmɛla biso mpo bazangi boyebi, Yehova afungola bango miso mpo báyeba solo. (2 Bakolinti 4:4) Ya solo, ekoki kokamwisa ete moto asɛnga Nzambe apambola moto oyo azali konyokola ye. Kasi, soki tokómi na makanisi ya Klisto, tokokóma mpe kolinga banguna na biso. (Luka 23:34) Bolingo ya ndenge wana ekoki kobimisa matomba nini?

11. (a) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Setefano? (b) Ndenge bomoi ya Paulo emonisi yango, mbongwana nini bato oyo bazali konyokola baklisto bakoki kosala?

11 Setefano azali moko ya bato oyo babondelaki mpo na bato oyo banyokolaki bango, mpe libondeli na ye ekendaki na mai te. Mwa moke na nsima ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), batɛmɛli ya baklisto bakangaki Setefano, babendaki ye na libándá ya Yelusaleme mpe babomaki ye na mabanga. Liboso akufa, agangaki boye: “Yehova, kotyá mokumba ya lisumu oyo likoló na bango te.” (Misala 7:58–8:1) Moko na bato oyo Setefano abondelaki mpo na bango mokolo wana ezali Saulo, oyo amonaki ndenge bazali koboma Setefano mpe asepelaki na likambo yango. Na nsima, Yesu oyo asilaki kosekwa abimelaki Saulo. Monyokoli wana ya baklisto akómaki moyekoli ya Klisto, mpe bakómaki kobenga ye ntoma Paulo, oyo akomaki mokanda ya Baloma. (Misala 26:12-18) Na boyokani na libondeli ya Setefano, emonani ete Yehova alimbisaki lisumu oyo Paulo asalaki ya konyokola baklisto. (1 Timote 1:12-16) Yango wana, tokokamwa te na ndenge Paulo alendisaki baklisto ete: “Bókoba kopambola baoyo bazali konyokola bino”! Ayebaki ete lokola ye moko abongwanaki, bato mosusu oyo bazali konyokola baklisto bakoki kokóma basaleli ya Nzambe. Na ntango na biso mpe, bato mosusu oyo bazalaki konyokola baklisto bakómi bandimi mpo bamonaki ete basaleli ya Yehova bazali bato ya kimya.

“Bózala na kimya elongo na bato nyonso”

12. Boyokani nini ezali kati na toli oyo Paulo apesaki na Baloma 12:9 mpe oyo ezali na vɛrsɛ 17?

12 Toli mosusu oyo Paulo apesaki mpo na lolenge ya kotalela bato oyo bazali bandimi mpe oyo bazali bandimi te yango oyo: “Bózongisa mabe na mabe na moto te.” Maloba wana eyokani mpenza na likambo moko oyo alobaki liboso: “Bóyina oyo ezali mabe.” Ndenge nini moto akoki koloba ete ayinaka mpenza mabe soki azali kozongisela basusu mabe oyo basali ye? Kosala bongo eyokani ata moke te na bolingo oyo ‘ezangi bokosi.’ Na nsima, Paulo alobaki boye: “Bókanisaka nde kozongisa makambo ya malamu mingi na miso ya bato nyonso.” (Baloma 12:9, 17) Ndenge nini tokoki kosalela toli yango?

13. Bizaleli nini tosengeli kozala na yango “na miso ya bato nyonso”?

13 Liboso, na mokanda oyo Paulo akomelaki Bakolinti, alobelaki minyoko oyo bantoma bazalaki kokutana na yango. Alobaki boye: “Tokómi eloko ya kotala epai ya mokili, mpe epai ya baanzelu, mpe epai ya bato. . . . Ntango tozali kofingama, topambolaka; ntango tozali konyokolama, tokangaka motema; ntango tozali kobebisama lokumu, tobondelaka.” (1 Bakolinti 4:9-13) Ndenge moko mpe, bato ya mokili bazali kotala baklisto ya solo lelo oyo. Soki bazalani na biso bazali komona makambo ya malamu oyo tozali kosala ata ntango basali biso mabe, bakokakatana te mpo na kondima nsango na biso.​—1 Petelo 2:12.

14. Milende na biso ya koluka kozala na kimya na basusu esengeli kokende tii wapi?

14 Milende na biso ya koluka kozala na kimya na basusu esengeli kokende tii wapi? Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki. Paulo alobaki na bandeko na ye baklisto boye: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.” (Baloma 12:18) Maloba “soki likoki ezali” mpe “na meko oyo yango etaleli bino” ezali komonisa ete ezalaka ntango mosusu mpasi mpo na kozala na kimya na basusu. Na ndakisa, tokoki te kobuka mobeko ya Nzambe kaka mpo na koluka kozala na kimya na bato. (Matai 10:34-36; Baebele 12:14) Kasi, ata soki tobuki mitinda ya sembo te, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kozala na kimya “elongo na bato nyonso.”

“Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe”

15. Na kotalela Baloma 12:19, wapi ntina oyo tosengeli te kozongisaka mabe na mabe?

15 Paulo ayebisi ntina mosusu oyo tosengeli te kozongisaka mabe na mabe: yango emonisaka ete tozali na komikitisa. Alobi boye: “Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa, Yehova alobi bongo.’” (Baloma 12:19) Moklisto oyo alukaka kozongisa mabe na mabe azali na lolendo. Alukaka komitya na esika ya Nzambe. (Matai 7:1) Lisusu, soki azongisi ye moko mabe oyo basali ye, akomonisa ete azali kondima te elaka oyo Yehova apesi ete: “Ngai nakozongisa.” Epai mosusu, baklisto ya solo bandimaka mpenza ete Yehova “akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na baponami na ye.” (Luka 18:7, 8; 2 Batesaloniki 1:6-8) Na komikitisa mpenza, batikelaka Yehova ye moko azongisa mabe oyo bazali kosala bango.​—Yilimia 30:23, 24; Baloma 1:18.

16, 17. (a) ‘Kotya makala ya mɔtɔ’ likoló ya motó ya moto elimboli nini? (b) Osilá komona ndenge boboto ekitisaki motema ya moto moko oyo azalaki mondimi te? Pesá ndakisa.

16 Kozongisela monguna mabe oyo asali biso ekoki kokómisa ye motema makasi, kasi komonisa ye boboto ekoki kokitisa ye motema. Mpo na nini? Talá likambo oyo Paulo alobaki na baklisto ya Loma. Alobaki boye: “Soki monguna na yo azali na nzala, leisá ye; soki azali na mposa ya komɛla, pesá ye eloko ya komɛla; mpamba te na kosaláká bongo okotya makala ya mɔtɔ na motó na ye.” (Baloma 12:20; Masese 25:21, 22) Yango elingi koloba nini?

17 ‘Kotya makala ya mɔtɔ na motó na ye’ ezali elilingi oyo euti na lolenge oyo bazalaki konyangwisa bibende na ntango ya kala. Bazalaki kotya makala na nse mpe na likoló na yango. Makala oyo bazalaki kotya na likoló ezalaki kobakisa mɔtɔ mpe konyangwisa bibende wana ya makasi, mpo na kolongola bosɔtɔ na yango. Ndenge moko, soki tozali na boboto epai ya moto oyo azali kotɛmɛla biso, tokoki “konyangwisa” motema na ye ya makasi mpe bizaleli na ye ya malamu ekomonana. (2 Mikonzi 6:14-23) Kutu, bandeko mingi oyo tozali na bango lelo oyo bakómaki baklisto mpo bamonaki boboto oyo basaleli ya Yehova bamonisaki bango.

Ntina oyo tozongisaka mabe na mabe te

18. Mpo na nini koboya kozongisa mabe na mabe ezali ezaleli ya malamu, elembo ya bolingo mpe emonisaka elimo ya komikitisa?

18 Nsima ya kotalela na mokuse Baloma mokapo 12, tomoni bantina mingi oyo ‘tozongisaka mabe na mabe na moto te.’ Ya liboso, koboya kozongisa mabe na mabe ezali ezaleli ya malamu mpenza. Na kotalela motema mawa oyo Nzambe amonisi biso, ebongi mpenza ete biso mpe tómipesa na Yehova mpe tótosa na motema moko mibeko na ye, ná oyo esɛngi ete tólingaka banguna na biso. Ya mibale, koboya kozongisa mabe na mabe ezali elembo ya bolingo. Soki tozali kozongisa mabe na mabe te mpe koluka kimya, tozali koluka, na bolingo nyonso, kosalisa ata bato mosusu oyo bazali batɛmɛli makasi mpenza bákóma basambeli ya Yehova. Ya misato, koboya kozongisa mabe na mabe emonisaka elimo ya komikitisa. Kozongisa biso moko mabe oyo basali biso ezali elimo ya lolendo, mpamba te Yehova alobi ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai.” Liloba ya Nzambe ezali mpe kokebisa biso ete: “Lolendo eyei? Nsɔni ekoya na nsima; kasi bato ya bopɔlɔ nde bazali na bwanya.” (Masese 11:2, NW) Soki totikeli Nzambe mokumba ya kozongisa mabe oyo bazali kosala biso, tokomonisa elimo ya komikitisa.

19. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Paulo asukisi lisolo na ye oyo etali ndenge tokoki kotalela basusu na maloba oyo: “Komitika te ete mabe elonga yo, kasi kobá kolonga mabe na kosaláká malamu.” (Baloma 12:21) Wapi banguya ya mabe oyo tozali kobunda na yango lelo oyo? Ndenge nini tokoki kolonga yango? Tokozwa biyano na mituna wana mpe na mituna mosusu na lisolo oyo elandi.

Okoki kolimbola?

• Toli nini ezongelami mbala na mbala na Baloma mokapo 12?

• Nini ekoki kopekisa biso kozongisa mabe na mabe?

• Koboya ‘kozongisa mabe na mabe’ ezali na matomba nini mpo na biso moko mpe mpo na basusu?

[Etanda na lokasa 22]

Baloma mokapo 12 ezali kolobela boyokani ya moklisto ná:

• Yehova

• Baklisto mosusu

• Bato oyo bazali baklisto te

[Elilingi na lokasa 23]

Mokanda oyo Paulo akomelaki baklisto ya Loma ezali na toli ya malamu mpenza mpo na baklisto

[Elilingi na lokasa 25]

Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Setefano?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto