Mituna ya batángi
Na Baloma 12:19 (NW), ntoma Paulo alingaki nde komonisa ete baklisto basengeli koyoka nkanda te lokola alobaki ete: “Bandeko ya bolingo, bózongisaka mabe na mabe te, kasi bótika esika mpo na nkanda?”
Ezali mpenza bongo te. Na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo azalaki kolobela nkanda ya Nzambe. Kasi, yango elingi koloba te ete soki moklisto ayoki nkanda, ezali mpenza na ntina te. Biblia ezali koloba polele ntango ezali kokebisa biso mpo na nkanda. Talá mwa maloba mosusu oyo ezali komonisa toli ya Nzambe.
“Zalá na nkanda te mpe tiká kosilika, yoká zuwa te mpo ete ekolekisa yo na mabe.” (Nzembo 37:8) “Ye oyo akosilika na ndeko na ye akozala na likambo na esambiselo.” (Matai 5:22) “Misala ya nzoto emonani polele yango oyo: ekobo, makambo ya bosɔtɔ, pite, kosambela bikeko, ndɔki, nkaka, kowelana, zuwa, nkanda.” (Bagalatia 5:19, 20) “Makambo nyonso ya bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotɔnga malongwa na bino.” (Baefese 4:31) “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19, NW ) Lisusu, mokanda ya Masese ezali mbala na mbala kokebisa biso ete tóyokaka nkanda te to tósilikaka te mpo na mwa makambo mikemike to mabunga ya bato.—Masese 12:16; 14:17, 29; 15:1; 16:32; 17:14; 19:11, 19; 22:24; 25:28; 29:22.
Lisolo mobimba epai vɛrsɛ ya Baloma 12:19 ezali eyokani na toli yango. Paulo apesaki toli ete bolingo na biso ezala na bokosi te, tópambolaka baoyo bazali konyokola biso, tókaniselaka basusu mabe te, tózongisaka mabe na mabe te, mpe tózalaka na kimya elongo na bato nyonso. Na nsima alobaki ete: “Bandeko ya bolingo, bózongisaka mabe na mabe te, kasi bótika esika mpo na nkanda; mpo ekomami ete: ‘Yehova alobi ete, ngai nde nakozongisa; ngai nde nakofuta.’”—Baloma 12:9, 14, 16-19, NW.
Tosengeli kotika te ete nkanda emema biso na kozongisa mabe mpo na mabe. Toyebaka makambo nyonso te, mpe toyebi mibeko ya bosembo nyonso te. Soki totiki nkanda etinda biso na kozongisa mabe na mabe, mbala mingi tokosala mabe. Soki tosali bongo, tokokokisa mikano ya Zabolo, Monguna ya Nzambe. Na esika mosusu Paulo akomaki boye: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino. Boye bópesa [Zabolo, NW ] nzela te.”—Baefese 4:26, 27.
Likambo eleki malamu, to likambo ya mayele mpenza ezali ya kotika Nzambe apona ntango nini mpe epai ya nani akozongisa mabe. Ye akoki kosala bongo mpo ayebi makambo nyonso malamu mpenza mpe etumbu nyonso akopesa ekomonisa bosembo na ye na kokoka. Yango nde likanisi oyo Paulo alobeli na Baloma 12:19, soki totaleli Deteronome 32:35, 41 epai azwaki makanisi oyo alobeli. Mokapo yango elobi ete: “Kobukanisa ezali na ngai, mpe lifuti.” (Kokanisá na Baebele 10:30.) Na yango, atako maloba: “ya Nzambe” ezali te na makomi ya Greke, babongoli mingi ya mikolo na biso babakisaki yango na Baloma 12:19, mpe vɛrsɛ yango ezali kotángama boye: “kasi tiká esika mpo na nkanda na Nzambe” (haut fleuve); “kasi botikela Nzambe nzela alakisa nkanda na ye” (Boyokani ya Sika); “bobélé nkándá ya Nzámbe ésálá mosálá.”—Liloba lya Nzambe.
Ata ntango banguna ya solo basali biso mabe to banyokoli biso, tokoki kotya motema na maloba oyo Mose ayokaki mpo na Yehova Nzambe ete: “[Yehova, Yehova], azali Nzambe na mawa mpe na ngɔlu akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu, kasi [akozanga te kopesa etumbu, NW ].”—Biso nde totɛngisi makomi; Exode 34:6, 7.