Okangaka ntina ya maloba ya elilingi oyo ezali na Biblia?
ELILINGI moko ekoki koloba mingi, kasi na liloba moko to na maloba mibale mpamba, moto akoki koyeba elilingi mobimba. Maloba ya elilingi, to maloba oyo esalisaka motángi amona elilingi moko na makanisi, esalelami na bisika mingi na Biblia.a Na ndakisa, moto moko alobaki ete kaka na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu asalelaki maloba ya elilingi koleka 50.
Mpo na nini osengeli koluka koyeba maloba ya elilingi oyo ezali na Biblia? Ya liboso, koyeba yango ekosalisa yo osepela na botángi ya Biblia mpe ekosalisa yo ozala na botɔndi mingi mpo na Liloba ya Nzambe. Lisusu, soki oyebi malamu maloba ya elilingi mpe osimbi ntina na yango, okokanga ntina ya nsango ya Biblia. Kasi, kozanga koyeba malamu maloba ya elilingi oyo Biblia esaleli ekoki kobulunganisa yo mpe kosala ete okanga ntina malamu te.
Ndenge ya koyeba maloba ya elilingi
Basalelaka maloba ya elilingi mpo na kokokanisa likambo moko na likambo mosusu. Likambo oyo bazali kokokanisa na mosusu ebengami motó ya likambo (sujet), mpe likambo oyo bazali kokokanisa na yango ebengami elilingi (image). Makambo oyo ekokanisi motó ya likambo ná elilingi ebengami bokokani (points de similarité). Na yango, sɛkɛlɛ ya koyeba mpenza ndimbola ya maloba ya elilingi ezali ya koyeba motó ya likambo, elilingi oyo basaleli mpe bokokani.
Ntango mosusu, ezalaka pɛtɛɛ komona mbala moko motó ya likambo mpe elilingi oyo basaleli. Kasi, bokokani ekoki kozala mingi na kati ya makambo yango. Nini ekosalisa yo oyeba bokokani ya solosolo? Mbala mingi, bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe na nsima ya vɛrsɛ oyo ozali kotánga esalisaka.b
Na ndakisa, Yesu alobaki na lisangá ya Saladi ete: “Ya solo soki olamuki te, nakoya lokola moyibi.” Na vɛrsɛ oyo, Yesu akokanisaki koya na ye (motó ya likambo) na koya ya moyibi (elilingi). Kasi, bokokani ezali nini? Kaka vɛrsɛ yango ekosalisa biso. Yesu abakisaki ete: “Okoyeba soki moke te na ngonga nini nakobimela yo.” (Emoniseli 3:3) Na yango, Yesu asalelaki bokokani yango mpo na kolobela mokano ya koya na ye te. Alingaki koloba te ete akoya koyiba eloko. Kasi, alingaki nde komonisa ete koya na ye ekozala na mbalakaka, kozanga kolaka.
Nzokande, ntango mosusu maloba ya elilingi oyo basaleli na eteni moko ya Biblia ekoki kosalisa yo okanga ntina ya maloba ya elilingi kaka wana oyo esalelami na eteni mosusu ya Biblia. Na ndakisa, ntoma Paulo asalelaki mpe maloba ya elilingi oyo Yesu asalelaki; akomaki boye: “Bino moko boyebi malamumalamu ete mokolo ya Yehova ekoya mpenzampenza lokola moyibi na butu.” (1 Batesaloniki 5:2) Makambo nyonso oyo Paulo akomaki na mokapo yango emonisi mpenza te esika bokokani ezali. Kasi, kokokanisa elilingi wana ná oyo Yesu asalelaki na Emoniseli 3:3, ekoki kosalisa yo omona bokokani. Maloba yango ya elilingi emonisi mpenza ete baklisto ya solo basengeli kotikala ekɛngɛ na elimo!
Maloba ya elilingi oyo eteyaka biso na ntina na Nzambe
Moto moko te akoki koyeba bomoto mobimba ya Yehova mpe makambo nyonso oyo akoki kosala. Na ntango ya kala, Mokonzi Davidi akomaki ete “bonene [ya Yehova] ekoki koyebana te.” (Nzembo 145:3) Nsima ya kotalela biloko mosusu oyo Nzambe akelá, Yobo alobaki ete: “Talá oyo ezali bobele ndambo ya nzela na ye; tokoyoka bobele mokemoke ya maloba na ye. Kasi konguluma ya nguya na ye, nani akoki kososola yango?”—Yobo 26:14.
Atako bongo, Biblia esaleli maloba ya elingi mpo na kosalisa yo oyeba mwa ndambo ya bizaleli ya kokamwa ya Nzambe na biso ya likoló. Biblia elobeli Yehova lokola Mokonzi, Mopesi-mibeko, Mosambisi, mpe Mobundi; moto oyo osengeli mpenza kotosa. Elobeli ye mpe lokola Mobateli ya bampate, Mopesi-toli, Moteyi, Tata, Mobikisi, mpe Mosikoli; moto oyo okoki kolinga. (Nzembo 16:7; 23:1; 32:8; 71:17; 89:26; 103:3; 106:21; Yisaya 33:22; 42:13; Yoane 6:45) Bibengeli wana nyonso esalisaka yo omona na makanisi ebele ya bililingi oyo ezali na bokokani mingi kati na yango. Maloba yango ya elilingi ezali kaka maloba mpamba te, kasi emonisaka bizaleli ya Yehova.
Biblia ekokanisi mpe Yehova na biloko oyo ezangá bomoi. Elobeli ye lokola “libanga ya Yisalaele,” mpe lokola “esika makasi.” (2 Samwele 23:3; Nzembo 18:2; Deteronome 32:4) Bokokani ezali nini na maloba yango? Kaka ndenge libanga monene epikamaka makasi mpe eninganaka te, Yehova Nzambe akoki mpenza kobatela yo.
Mokanda ya Nzembo ezali na maloba mingi ya elilingi oyo elobeli bizaleli ndenge na ndenge ya Yehova. Na ndakisa, Nzembo 84:11 elobi ete Yehova azali “moi mpe nguba” mpamba te azali Mopesi ya pole, ya bomoi, ya nguya, mpe ya libateli. Lisusu, Nzembo 121:5 elobi ete ‘[Yehova] azali elili na yo epai ya lobɔkɔ ya mobali.’ Ndenge kaka elili ya nzete to ya eloko mosusu ekoki kobatela yo na moi makasi, Yehova akoki kobatela baoyo basalelaka ye na bampasi oyo mikakatano ememelaka bango, abatelaka bango na “lobɔkɔ” na ye mpe na nse ya “mapapu” na ye.—Yisaya 51:16; Nzembo 17:8; 36:7.
Maloba ya elilingi oyo elobeli Yesu
Mbala mingi, Biblia ebengaka Yesu “Mwana ya Nzambe.” (Yoane 1:34; 3:16-18) Bato mosusu oyo bazali baklisto te bazalaka na mokakatano ya kondima ete Yesu azali mwana ya Nzambe, mpo Nzambe azalaka na mwasi te mpe azali moto ya mai ná makila te. Ya solo, Nzambe abotaka te ndenge bato babotaka. Na yango, mwana ya Nzambe ezali maloba ya elilingi. Esalelami mpo na kosalisa motángi ayeba ete boyokani oyo ezali kati na Yesu ná Nzambe ezali lokola boyokani ya mwana ná tata na ye. Maloba yango ya elilingi emonisaka mpe ete Yehova nde apesaki Yesu bomoi, elingi koloba akelaki ye. Ezali mpe na ndenge wana nde Adama, moto ya liboso, abengami mpe “mwana ya Nzambe.”—Luka 3:38.
Yesu asalelaki maloba ya elilingi mpo na kolobela mikumba ndenge na ndenge oyo azali na yango na mokano ya Nzambe. Na ndakisa, alobaki boye: “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-elanga.” Na nsima, Yesu akokanisaki bayekoli na ye na bitape ya nzete ya vinyo. (Yoane 15:1, 4) Makambo nini ya ntina mingi maloba wana ya elilingi ekoki koteya biso? Mpo ekufa te mpe ebotaka mbuma, bitape ya nzete ya vinyo esengeli kokangama na nzete. Ndenge moko mpe, bayekoli ya Klisto basengeli kozala na bomoko elongo na ye. Yesu alobaki boye: “Kozanga ngai bokoki kosala ata eloko moko te.” (Yoane 15:5) Mpe ndenge kaka mosali-bilanga azelaka ete nzete ya vinyo ebota mbuma, Yehova alikyaka ete bato oyo bazali na bomoko na Klisto bábota mbuma, na ndenge ya elilingi.—Yoane 15:8.
Lukáká koyeba bokokani ya solosolo
Tokoki kokóma na makanisi ya mabe soki totángi maloba ya elilingi kozanga koyeba bokokani. Tózwa ndakisa ya maloba oyo ezali na Baloma 12:20: “Soki monguna na yo azali na nzala, leisá ye; soki azali na mposa ya komɛla, pesá ye eloko ya komɛla; mpamba te na kosaláká bongo okotya makala ya mɔtɔ na motó na ye.” Kotya moto makala ya mɔtɔ na motó elimboli nde kozongisa mabe na mabe? Te, soki toyebi malamu bokokani oyo ezali na maloba wana ya elilingi. Maloba wana ya elilingi euti na momeseno ya konyangwisa bibende oyo ezalaki kosalema na ntango ya kala. Bazalaki kotya makala ya mɔtɔ likoló mpe na nse ya bibende. Mɔtɔ wana ezalaki konyangwisa bibende mpo na kolongola bosɔtɔ na yango. Ndenge moko, komonisa boboto ekoki kolɛmbisa ezaleli mabe ya moto mpe kosalisa ye amonisa bizaleli malamu.
Koyeba ndimbola ya solosolo ya maloba ya elilingi efungolaka makanisi na biso mpe esimbaka mitema na biso. Ndenge Biblia ekokanisi masumu na nyongo, esalisaka biso tómona kilo ya lisumu. (Luka 11:4) Kasi, ntango Yehova alimbisaka biso mpe alongolaka nyongo oyo akokaki kofutisa biso, motema na biso ekitaka mpenza! Ntango Biblia elobi ete ‘azipaka’ mpe ‘abomaka’ masumu na biso, toyebaka ete akotángela biso lisusu masumu yango te. (Nzembo 32:1, 2; Misala 3:19) Longola yango, koyeba ete Yehova akoki kozwa masumu oyo ezalaki motane lokola ngola to lokola makila mpe kokómisa yango pɛto lokola mbula-mpɛmbɛ, ebɔndisaka biso mpenza!—Yisaya 1:18.
Totaleli kaka mwa ndambo na ebele ya maloba ya elilingi oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe. Na yango, ntango ozali kotánga Biblia, tyáká likebi mingi na maloba ya elilingi. Zwáká ntango ya koyeba bokokani oyo ezali na maloba yango mpe kanisáká yango na mozindo. Kosala bongo ekokolisa boyebi na yo ya Makomami mpe okokóma na botɔndi mingi mpo na yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo, “maloba ya elingi” ezali elobeli nyonso oyo esalelamaka mpo na kokokanisa makambo, na ndakisa métaphores, comparaisons mpe bongo na bongo.
b Bavolimi mibale ya buku Étude Perspicace des Écritures, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, elobeli makambo mosusu ya ntina oyo esalisaka mingi mpo na koyeba esika bokokani ezali.
[Etanda na lokasa 13]
Ntina ya maloba ya elilingi
Maloba ya elilingi esalisaka mingi. Bakoki kokokanisa likambo moko ya mpasi na likambo moko oyo ezali pɛtɛɛ na kokanga ntina. Bakoki kosalela maloba mingi ya elilingi mpo na kobimisa bandimbola ndenge na ndenge ya likambo moko. Maloba ya elilingi ekoki kolimbola makambo ya ntina mingi to kosala ete tósepela na yango mingi.
[Etanda na lokasa 14]
Luká koyeba
MALOBA YA ELILINGI: “Bino bozali mungwa ya mabelé.” (Matai 5:13)
MOTÓ YA LIKAMBO: Bino (Bayekoli ya Yesu)
ELILINGI: Mungwa
BOKOKANI NA LISOLO OYO: Likoki na yango ya kobatela
LITEYA: Bayekoli bazalaki na nsango oyo ekokaki kobatela bomoi ya bato mingi
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
“[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.” NZEMBO 23:1