Yehova, Nzambe Oyo ‘Alimbisaka’
“Ɛ, [Yehova], yo ozali malamu mpe okolimbisaka.”—NZEMBO 86:5.
1. Mokumba nini ya bozito Mokonzi Davidi amemaki, mpe lolenge nini abɔndisamaki ntango motema na ye motutamaki?
DAVIDI, Mokonzi ya Yisalaele ya kala ayebaki lolenge lisosoli oyo litungisami ezalaka na bozito. Akomaki ete: “Mabe na ngai eleki likoló na motó na ngai; ezali na bozito boleki nguya na ngai. Nabɛtami mpe nanyetami mingi mpenza, naleli mpo na kotomboka na motema na ngai.” (Nzembo 38:4, 8) Kasi, Davidi azwaki kobɔndisama mpo na kotungisama ya motema na ye. Ayebaki ete atako Yehova ayinaka lisumu, kasi ayinaka mosumuki te—soki abongoli mpenza motema mpe atiki etamboli na ye ya masumu. (Nzembo 32:5; 103:3) Lokola azalaki na kondima mpenza kati na bolingi ya Nzambe ya komonisa ngɔlu epai na baoyo babongoli motema, Davidi alobaki ete: “Ɛ, [Yehova] yo ozali malamu mpe okolimbisaka.”—Nzembo 86:5.
2, 3. (a) Ntango tosali lisumu, yango ekoki kopesa biso bozito nini, mpe mpo na nini ezali malamu? (b) Likámá nini ekoki kobima soki “tomizindisi” na mayoki ya komema ngambo? (c) Kondimisama nini Biblia ezali kopesa biso na ntina na bolingi ya Nzambe mpo na kolimbisa?
2 Ntango tosali lisumu, biso mpe tokoki koyoka bozito ya lisosoli oyo litungisami. Mayoki yango ya kotungisama ezali na ntina, kútu ekoki kopesa litomba. Ekoki kopusa biso ete tókamata bikateli ya kosembola mabunga na biso. Nzokande, baklisto mosusu basili komizindisa na mayoki ya komema ngambo. Motema na bango ezali kokweisa bango mpe ezali kotingama na likanisi oyo ete ata soki babongoli motema ndenge nini, Yehova akolimbisa bango mpenza te. Kokanisáká na ntina na libunga moko asalaki, ndeko mwasi moko alobaki ete: “Ebulunganisaka ntango okanisi ete mbala mosusu Yehova akolinga yo lisusu te.” Ata nsima ya kobongola motema mpe kondima lisalisi ya bankulutu ya lisangá, akóbaki komiyoka ete abongi te kolimbisama na Nzambe. Alobaki ete: “Mokolo na mokolo nasɛngaka bolimbisi epai na Yehova.” Soki ‘tozindisami’ na mayoki ya komema ngambo, Satana akoki komeka kopusa biso ete tótika kosala milende, tómiyoka ete tobongi te kosalela Nzambe.—2 Bakolinti 2:5-7, 11.
3 Kasi Yehova atalelaka makambo na lolenge wana te! Liloba na ye ezali kondimisa biso ete ntango tobongoli motema solosolo, Yehova alimbisaka. (Masese 28:13) Na bongo, soki ozali na mayoki ete okozwa bolimbisi ya Nzambe te, mbala mosusu esengeli na yo ete oyeba malamu mpo na nini mpe lolenge nini alimbisaka.
Mpo na nini Yehova “alimbisaka”?
4. Yehova ayebaka nini na ntina na bomoto na biso, mpe yango ezali na bopusi nini likoló na lolenge atalelaka biso?
4 Tozali kotánga boye: “Mosika pelamoko yango kati na epai na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngweli na biso. Pelamoko tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye.” Mpo na nini Yehova azali pene ya komonisa ngɔlu? Vɛrsɛ́ oyo elandi eyanoli: “Zambi ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:12-14) Ɛɛ, Yehova abosanaka te ete tozali bikelamu oyo biuti na mputulu, tozali na bolɛmbu oyo euti na kozanga kokoka. Elobeli oyo ete ayebi “nzoto na biso” ezali kokundwela biso ete Biblia ekokanisaka Yehova na moyemi na mbeki mpe biso tozali mbeki oyo azali koyema.a (Yilimia 18:2-6) Moyemi na mbeki asimbaka mabazi (argile) ya mbeki na ye makasi kasi na bokɛngi, koyebáká malamu lolenge na yango. Bobele bongo, Yehova, Moyemi Monene atalelaka biso engebene bolɛmbu na biso oyo euti na bomoto na biso ya lisumu.—Kokanisá na 2 Bakolinti 4:7.
5. Lolenge nini mokanda ya Baloma ezali komonisa nguya ya lisumu likoló na nzoto na biso ya kozanga kokoka?
5 Yehova ayebi nguya oyo lisumu ezalaka na yango. Makomami ezali kolobela lisumu lokola nguya makasi oyo ekangi moto na lobɔkɔ. Ndenge nini lisumu ekangaka? Kati na mokanda ya Baloma, ntoma Paulo wana apemamaki na Nzambe alimboli maloba yango na lolenge ya elilingi: Tozali ‘na nsé na lisumu’ lokola basodá bazalaka na nsé na mokonzi na bango (Baloma 3:9, NW); ezali “na bokonzi” likoló na bato lokola mokonzi (Baloma 5:21); to ezali “kofanda” kati na biso (Baloma 7:17, 20); “mobeko” na yango ezali kosala ntango nyonso kati na biso, bopusi na yango ezali koyangela etamboli na biso. (Baloma 7:23, 25) Oyo nde etumba monene tozali na yango mpo na kotɛmɛla nguya oyo lisumu ezali na yango likoló na nzoto na biso oyo ezangi kokoka!—Baloma 7:21, 24.
6. Lolenge nini Yehova atalelaka baoyo balukaka ngɔlu na ye na motema motutami?
6 Nzokande, Nzambe na biso oyo atondi na ngɔlu ayebi ete tokoki te kotosa ye na lolenge ya kokoka, ata soki mitema na biso ekoki kolinga kosala bongo. (1 Mikonzi 8:46) Na bolingo nyonso andimisaka biso ete ntango tozali koluka ngɔlu na ye na motema motutami, lokola tata alimbisaka, ye mpe akolimbisa biso. Davidi, mokomi na nzembo alobaki ete: “Makabo mazali malamu na miso na Nzambe izali molimo motutami; ɛ Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” (Nzembo 51:17) Yehova akobwaka soko moke te, to akoboya soko moke te motema oyo motutami mpe mozali na mawa mpo na bozito ya mayoki ya ngambo oyo lisumu epesaka. Oyo nde lolenge malamu ya komonisa motindo Yehova azali pene mpo na kolimbisa!
7. Mpo na nini tokoki te kotalela ngɔlu ya Nzambe na lisɛki?
7 Kasi, yango elingi koloba ete tokoki kotalela ngɔlu ya Nzambe na lisɛki mpe kosalela bomoto na biso ya masumu lokola eloko ya komilóngisa mpo na kosala masumu? Soko moke te! Yehova atambwisami na mayoki mpamba te. Ngɔlu na ye ezali na ndelo. Akolimbisa soko moke te baoyo bazali kosala makambo na bokosi, bazali kosala masumu na nkó kozanga kobongola motema. (Baebele 10:26-31) Epai mosusu, ntango amoni motema “motutami mpe na mawa,” “akolimbisa.” (Masese 17:3) Tótalela maloba mosusu oyo masalelami na Biblia mpo na komonisa ete Nzambe alimbisaka mpenza na mobimba.
Na lolenge nini Yehova alimbisaka mpenza na mobimba?
8. Yehova asalaka nini ntango alimbisaka masumu na biso, mpe yango ezali na bopusi nini likoló na biso?
8 Mokonzi Davidi wana abongolaki motema alobaki ete: “Nayebisaki yo masumu na ngai, nabombaki bokesene na motema na ngai te. Nalobaki ete, Nakoyebisa [Yehova] bipɛngweli na ngai, mpe yo olimbisi mabe na masumu na ngai.” (Nzembo 32:5) Elobeli “olimbisi” ebongoli liloba ya Liebele oyo elimboli mpenza ete “kotombola,” “kokumba, komema.” Kosalelama na yango awa elimboli ‘kolongola ngambo, lisumu, mbeba.’ Na bongo, ezalaki lokola nde Yehova atombolaki masumu ya Davidi mpe amemaki yango mosika. (Kokanisá na Levitike 16:20-22.) Na ntembe te yango elɛmbisaki mayoki ya ngambo oyo Davidi azalaki na yango. (Kokanisá na Nzembo 32:3.) Biso mpe tokoki kotya motema na biso mobimba na Nzambe oyo alimbisaka masumu ya baoyo balukaka bolimbisi na moboko ya kondima na bango kati na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. (Matai 20:28; kokanisá na Yisaya 53:12.) Mpo na baoyo Yehova atomboli mpe amemi masumu na bango mosika basengeli te kokóba komema bozito ya mayoki ya ngambo mpo na masumu ya kala.
9. Maloba ya Yesu ete: “Limbisá biso nyongo na biso” malimboli nini?
9 Yesu asalelaki boyokani oyo ezalaka kati na badefisi mpe badefi mpo na kolobela lolenge Yehova alimbisaka. Na ndakisa, Yesu alendisaki biso tóbondelaka ete: “Limbisá biso nyongo na biso.” (Matai 6:12) Na yango, Yesu akokanisaki “masumu” na “nyongo.” (Luka 11:4) Ntango tosali lisumu, tokómaka “badefi” epai na Yehova. Likelelo ya Greke oyo ebongolami na ‘kolimbisa’ ekoki kolimbola “kolongola, kotika nyongo kozanga kotuna yango.” Na lolenge wana, ntango Yehova alimbisaka, alongolaka nyongo oyo biso tosengelaki kofuta. Na yango, basumuki oyo babongoli motema bakoki kozwa libɔndisi. Yehova akotuna soko moke te nyongo oyo asili kolongola!—Nzembo 32:1, 2; kokanisá na Matai 18:23-35.
10, 11. (a) Elobeli oyo ete ‘bópɛtwa’ ezwami na Misala 3:19 ezali komonisa nini? (b) Na lolenge nini kolimbisa na mobimba ya Yehova emonisami?
10 Na Misala 3:19, Biblia ezali kosalela maloba mosusu ya elilingi mpo na kobenda likebi na kolobeláká bolimbisi ya Nzambe: “Na bongo, bongolá mitema, mpe butwá ete bópɛtwa na masumu.” Liloba oyo ete ‘bópɛtwa’ ebongoli likelelo ya Greke oyo, ntango esalelami na lolenge ya elilingi, ekoki kolimbola “kopangusa, kozimisa, kolongola to koboma.” Engebene banganga-mayele mosusu ya Biblia, likanisi oyo emonisami ezali ya kozimisa makomi oyo makomami na mabɔkɔ. Yango ezalaki kosalema ndenge nini? Mai ya mokanda oyo ezalaki kosalelama na ntango ya kala esalemaki na kosangisama ya carbone, gɔ́mɛ mpe mai. Mwa moke nsima ya kokoma na mai yango, mokomi akokaki kozwa eteni ya linyuka oyo epɔlisami na mai mpe kozimisi makomi oyo akomaki.
11 Yango ezali mpenza elilingi kitoko oyo ezali komonisa ete Nzambe alimbisaka mpenza. Ntango alimbisaka masumu na biso, ezalaka lokola nde azwi linyuka mpe azimisi yango. Tosengeli kobanga te ete akozongela kotalela masumu yango lisusu na mikolo mizali koya, mpamba te Biblia ezali komonisa eloko mosusu na ntina na ngɔlu ya Nzambe oyo ezali mpenza kobenda likebi: Ntango alimbisaka, abosanaka!
“Nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te”
12. Ntango Biblia elobi ete Yehova abosanaka masumu na biso, yango elingi koloba ete azali na likoki te ya komikundwela yango, mpe mpo na nini oyanoli bongo?
12 Na nzela ya mosakoli Yilimia, Yehova alakaki na ntina na baoyo bakokɔta kati na kondimana ya sika ete: “Nakolimbisa bokesene na bango, nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te.” (Yilimia 31:34) Yango elingi nde koloba ete ntango Yehova alimbisaka azalaka lisusu na likoki te ya komikundola masumu yango? Ezali bongo te. Biblia ezali kolobela biso masumu ya bato mingi oyo Yehova alimbisaki, bakisa mpe masumu ya Davidi. (2 Samwele 11:1-17; 12:1-13) Na ntembe te Yehova ayebi malamu mabunga oyo bango basalaki, biso mpe toyebi yango. Lisoló ya masumu na bango, na oyo ya kobongola motema na bango mpe kolimbisama na Nzambe, ebatelamaki mpo na litomba na biso. (Baloma 15:4) Na bongo, Biblia elingi komonisa nini ntango ezali koloba ete Yehova ‘akanisaka’ te masumu ya baoyo alimbisi bango?
13. (a) Nini elobelami kati na ndimbola ya likelelo ya Liebele oyo ebongolami na “nakokanisa”? (b) Ntango Yehova alobi ete, “Nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te,” yango ezali kondimisa biso na nini?
13 Likelelo ya Liebele oyo libongolami na “nakokanisa” emonisaka makambo mosusu oyo eleki likambo ya komikundwela makambo maleká. Engebene búku Theological Wordbook of the Old Testament, etalelaka mpe “kozwa ekateli oyo esengeli.” Na bongo, “kokanisa” lisumu elakisi kozwa ekateli oyo esengeli mpo na kopesa etumbu na basumuki. Ntango mosakoli Hosea alobaki na ntina na Bayisalaele batomboki ete, “[Yehova] akokanisa mabe na bango,” mosakoli alingaki koloba ete Yehova akozwa ekateli mpo na kopesa bango etumbu mpo ete baboyaki kobongola motema. Na yango, eteni mosusu ya vɛrsɛ́ ebakisi ete: “Akopesa masumu na bango etumbu.” (Hoseya 9:9) Epai mosusu, ntango Yehova alobi ete: “Nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te,” azali kondimisa biso ete ntango alimbisi mosali na lisumu oyo abongoli motema, akozwa lisusu ekateli te mpo na kopesa ye etumbu na lisumu yango na mikolo mizali koya. (Ezekiele 18:21, 22) Na yango abosanaka na lolenge oyo ete akokundola lisusu masumu na biso te mbala na mbala mpo na kokweisa biso to kopesa biso etumbu mbala na mbala. Na ndenge wana, Yehova azali kopesa biso ndakisa malamu ya komekola mpo na boyokani na biso na basusu. Ntango mikakatano ebimi, ezali malamu te kokundola mabunga ya kala oyo osilaki kondima ete olimbisi.
Ezali boni mpo na mbeba ya masumu na biso?
14. Mpo na nini bolimbisi elingi koloba te ete mbeba ya etamboli mabe ya mosumuki oyo abongoli motema elongolami?
14 Lokola Yehova alimbisaka, yango elingi nde koloba ete mosumuki oyo abongoli motema akozwa mbeba moko te ya etamboli mabe na ye? Ezali bongo te. Tokoki te kosala lisumu mpe kozanga kozwa etumbu. Paulo akomaki ete: “Soko moto akokóna nini, akobuka bobele yango.” (Bagalatia 6:7) Tokoki kokutana na mbeba mpo na makambo oyo tosalaki to mikakatano, kasi nsima ya kolimbisama, Yehova asalaka te ete mpasi ekwela biso. Ntango mikakatano ebimi, moklisto asengeli kokanisa te ete, ‘mbala mosusu Yehova azali kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai ya kala.’ (Kokanisá na Yakobo 1:13.) Epai mosusu, Yehova akobatela biso te na mbeba oyo euti na etamboli mabe na biso. Koboma libala, zemi oyo ekanamaki te, makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto, kobungisa kotyelama motema mpe kobungisa lokumu—nyonso wana ekoki kozala mbeba oyo euti na lisumu, mpe Yehova akobatela biso na yango te. Tómikundola ete atako alimbisaki Davidi na masumu na ye na ntina na Bata-seba mpe Uliya, Yehova abatelaki Davidi te na mbeba oyo elandaki na nsima.—2 Samwele 12:9-14.
15, 16. Na lolenge nini mobeko oyo elobelami na Levitike 6:1-7 ezalaki na litomba mpo na mosali na mabe mpe moto oyo basali ye mabe?
15 Masumu na biso ekoki mpe kobimisa mbeba mosusu. Na ndakisa, tótalela lisoló oyo lizwami na Levitike mokapo 6. Awa Mobeko ya Mose ezali kolobela moto oyo asali mabe monene na kozwáká biloko ya moninga na ye Moyisalaele na moyibi, na kobotola to na kobuba. Na nsima, mosumuki awangani ete asali likambo te, kútu alapi ndai ya lokuta. Likambo motindo wana ezali komonisa matata kati na bato mibale kasi bilembeteli bizali te. Nzokande, na nsima, moto oyo asalaki mabe akotungisama na lisosoli na ye mpe akoyambola lisumu na ye. Mpo na kozwa bolimbisi ya Nzambe, asengeli kosala makambo mosusu misato: kozongisa eloko oyo azwaki, kofuta lomande ya 20 likoló na monkámá epai ya nkolo eloko, mpe kopesa mpate lokola mbeka ya ekweli. Na yango, mobeko elobi ete: “Bongo nganga akozwa kozonga na bondeko mpo na ye liboso na [Yehova], mpe ye akolimbisama na ntina na likambo lisali ye.”—Levitike 6:1-7; kokanisá na Matai 5:23, 24.
16 Mobeko yango ezalaki mpenza ebongiseli ezali komonisa ngɔlu ya Nzambe. Yango ezalaki na litomba mpo na moto oyo basalaki mabe, oyo bazongiselaki ye eloko na ye, mpe na ntembe te abɔndisamaki mingi ntango, nsukansuka, mosali mabe ayambolaki lisumu na ye. Lisusu, mobeko ezalaki na litomba mpo na moto oyo lisosoli na ye epusaki ye na kondima ngambo na ye mpe abongisaki mbeba oyo asalaki. Ya solo, soki aboyaki kosala bongo, Nzambe akokaki kolimbisa ye te.
17. Ntango toyokisi basusu mpasi na masumu na biso, Yehova amizelaka ete tósala nini?
17 Atako tozali na nsé ya Mobeko ya Mose te, yango ezali kopesa biso bososoli malamu ya koyeba makanisi ya Yehova, bakisa mpe likanisi na ye na ntina na kolimbisa. (Bakolose 2:13, 14) Ntango toyokisi basusu mpasi to tosali bango mabe na masumu na biso, Yehova asepelaka ntango tosalaka oyo ekoki na biso mpo na ‘kosembola’ likambo. (2 Bakolinti 7:11, NW) Yango esɛngaka koyambola lisumu na biso, kondima ngambo, mpe ata kosɛnga bolimbisi epai na moto oyo tosali ye mabe. Na nsima tokoki kosɛnga lisalisi epai na Yehova na moboko ya mbeka ya Yesu mpe na bongo tokozwa kobɔndisama ya lisosoli ya pɛto mpe kondimisama ete Nzambe alimbisi biso.—Baebele 10:21, 22.
18. Disipilini nini ekoki kopesama elongo na bolimbisi ya Yehova?
18 Lokola moboti oyo azali na bolingo, Yehova akoki kolimbisa na kopesáká etumbu elongobani. (Masese 3:11, 12) Moklisto oyo abongoli motema akoki mbala mosusu kobungisa mikumba na ye lokola nkulutu, mosaleli na misala, to mobongisi-nzela. Ekoki kozala likambo ya mpasi mpo na ye kobungisa na boumeli ya mwa ntango mikumba oyo azalaki mpenza kosepela na yango. Nzokande, disipilini motindo wana elingi komonisa te ete andimami lisusu te na Yehova to ete Yehova aboi kolimbisa ye. Lisusu, tosengeli komikundola ete disipilini oyo euti na Yehova ezali elembeteli ya bolingo na ye mpo na biso. Kondima mpe kosalela yango ezali mpo na bolamu na biso mpe ekoki komema na bomoi ya seko.—Baebele 12:5-11.
19, 20. (a) Soki osalaki mabe, mpo na nini osengeli kokanisa te ete okozwa ngɔlu ya Yehova te? (b) Tokolobela nini na lisoló lilandi?
19 Oyo nde likambo ya kobɔndisa na koyeba ete tozali kosalela Nzambe oyo ‘alimbisaka’! Yehova amonaka mosika koleka masumu mpe mabunga na biso. (Nzembo 130:3, 4) Ayebaka nini ezali kati na mitema na biso. Soki ozali na mayoki ya motema motutami mpe ya mawa mpo na mabe na yo ya kala, koloba te ete okoki kozwa ngɔlu ya Yehova te. Atako osalaki mabunga nini, soki obongoli mpenza motema, osali matambe mpo na kosembola makambo, mpe kobondela Yehova na molende nyonso mpo na kosɛnga bolimbisi na moboko ya makila ya Yesu, okoki kondimisama mpenza ete maloba oyo ya 1 Yoane 1:9 mazali mpo na yo: “Soko tokoyambola masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na bokesene nyonso.”
20 Biblia ezali kolendisa biso ete tómekola bolimbisi ya Yehova kati na boyokani na biso bamoko na bamosusu. Nzokande, na meko nini biso mpe tokoki kolimbisa mpe kobosana ntango basusu basali biso mabe? Yango nde tokolobela na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likambo ya kobenda likebi, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “nzoto na biso” esalelami mpo na kolobela mbeki ya libazi oyo eyemami na moyemi na mbeki.—Yisaya 29:16.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Mpo na nini Yehova “alimbisaka”?
◻ Lolenge nini Biblia ezali komonisa ete Yehova alimbisaka mpenza?
◻ Ntango Yehova alimbisaka, na lolenge nini abosanaka?
◻ Yehova amizelaka ete tósala nini ntango toyokisi basusu mpasi na masumu na biso?
[Elilingi na lokasa 12]
Ntango toyokisi basusu mpasi na masumu na biso, Yehova amizelaka ete tósɛnga bolimbisi