Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/6 nk. 7-11
  • Nsango malamu oyo bato nyonso basengeli na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu oyo bato nyonso basengeli na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo oyo Baroma basengelaki koyeba
  • Bato basengeli koyeba ete bazali basumuki
  • ‘Motatoli’
  • Nsango malamu oyo etali mingimingi Yesu
  • Mokanda ya Biblia nimero 45—Baloma
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Baloma bazwi nsango oya eleki nyonso na kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • ‘Bazali koyeisa nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • ‘Toyoka nsoni mpo na nsango malamu te’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/6 nk. 7-11

Nsango malamu oyo bato nyonso basengeli na yango

“Nsango malamu . . . nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika.”​—ROM. 1:16.

1, 2. Mpo na nini osakolaka ‘nsango malamu ya bokonzi,’ mpe makambo nini oyo etali nsango yango olobelaka mingi?

‘NASEPELAKA kosakola nsango malamu mokolo nyonso.’ Mbala mosusu osilá kokanisa to koloba ndenge wana. Lokola ozali Motatoli ya Yehova ya molende, oyebi ete kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” ezali na ntina mingi. Mbala mosusu okangá na motó esakweli ya Yesu oyo elobeli mosala yango.​—Mat. 24:14.

2 Ntango ozali kosakola “nsango malamu ya bokonzi,” ozali kokoba na mosala oyo Yesu abandaki. (Tángá Luka 4:43.) Na ntembe te, moko na makambo oyo olobelaka mingi ezali ete mosika te Nzambe akozwa makambo ya bato na mabɔkɔ. Na ‘bolɔzi monene,’ akosukisa mangomba ya lokuta mpe akolongola mabe nyonso na mabele. (Mat. 24:21) Mbala mosusu omonisaka mpe ete Bokonzi ya Nzambe ekozongisa Paradiso na mabele mpo kimya mpe esengo ezala mingi. Kutu, ‘nsango malamu ya bokonzi’ ezali na kati ya “nsango malamu [oyo esakolamaki] liboso epai ya Abrahama ete: ‘Na nzela na yo bikólo nyonso ekopambwama.’”​—Gal. 3:8.

3. Mpo na nini tokoki koloba ete ntoma Paulo alobelaki mingi nsango malamu na mokanda ya Baroma?

3 Kasi, ekoki nde kozala ete totyaka likebi mingi te na likambo mosusu ya ntina mingi na nsango malamu yango oyo bato basengeli na yango? Na mokanda ya Baroma, ndenge ekomamaki na Grɛki, ntoma Paulo asalelaki liloba “bokonzi” kaka mbala moko, kasi asalelaki maloba “nsango malamu” mbala 12. (Tángá Baroma 14:17.) Nsango malamu nini Paulo alobelaki mingi boye na mokanda yango? Mpo na nini nsango malamu yango ezali na ntina mingi? Mpe mpo na nini tosengeli kobosana yango te ntango tozali kosakola “nsango malamu ya Nzambe” epai ya bato ya teritware na biso?​—Mrk. 1:14; Rom. 15:16; 1 Tes. 2:2.

Likambo oyo Baroma basengelaki koyeba

4. Ntango azalaki na bolɔkɔ mpo na mbala ya liboso na Roma, Paulo asakolaki makambo nini?

4 Kotalela makambo oyo Paulo alobelaki ntango azalaki na bolɔkɔ na Roma mpo na mbala ya liboso ekoki kosalisa biso. Biblia elobi ete ntango Bayuda ebele bayaki kotala ye, apesaki ‘litatoli malamumalamu mpo na (1) bokonzi ya Nzambe mpe asalelaki mayele ya kondimisa bango na oyo etali (2) Yesu.’ Nini esalemaki? “Bamosusu babandaki kondima makambo oyo elobamaki; bamosusu bazalaki kondima te.” Na nsima, Paulo ‘azalaki koyamba na boboto mpenza baoyo nyonso bazalaki koya epai na ye, azalaki kosakwela bango (1) bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo etali (2) Nkolo Yesu Kristo.’ (Mis. 28:17, 23-31) Emonani polele ete Paulo alobelaki Bokonzi ya Nzambe. Kasi likambo nini mosusu alobelaki mingi? Likambo moko ya ntina mingi oyo esimbi Bokonzi yango: mokumba ya Yesu na mokano ya Nzambe.

5. Na mokanda ya Baroma, likambo nini Paulo alobaki ete bato basengeli mpenza koyeba?

5 Bato nyonso basengeli koyeba Yesu mpe kondimela ye. Na mokanda ya Baroma, Paulo amonisaki yango. Na ebandeli ya mokanda yango, alobelaki ‘Nzambe oyo ye azalaki kosalela mosala mosantu na elimo na ye mpo na nsango malamu ya Mwana na Ye.’ Abakisaki boye: “Nayokelaka nsango malamu nsɔni te; kutu, yango nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika.” Na nsima alobelaki ‘mokolo oyo Nzambe na nzela ya Kristo Yesu akosambisa makambo ya bato oyo ebombamá, na kolanda nsango malamu oyo azalaki kosakola.’ Mpe alobaki boye: “Banda na Yerusaleme tii na Ilirikume nasakoli malamumalamu mpenza nsango malamu ya Kristo.”a (Rom. 1:9, 16; 2:16; 15:19) Mpo na nini Paulo alobelaki Yesu Kristo mingi epai ya Baroma?

6, 7. Tokoki koloba nini mpo na ebandeli ya lisangá ya Roma, mpe bato ya ndenge nini bazalaki kuna?

6 Toyebi te ndenge lisangá ya Roma ebandaki. Bayuda to mpe baprozelite oyo bazalaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. bazongaki na Roma nsima ya kokóma bakristo? (Mis. 2:10) To mpe bakristo oyo bazalaki bato ya mimbongo mpe baoyo bazalaki kosala mibembo nde bakɔtisaki solo na Roma? Toyebi te; kasi ntango Paulo akomaki mokanda ya Baroma na mobu soki 56 T.B., lisangá ezalaki kuna banda kala. (Rom. 1:8) Bato ya ndenge nini bazalaki na lisangá yango?

7 Bato mosusu bazalaki Bayuda. Na mbote oyo apesaki Andronikusi ná Yuniasi, Paulo abengaki bango “bandeko ya libota na ngai,” mbala mosusu elingi koloba bandeko ya libota na ye oyo bazalaki mpe Bayuda. Akila, mosali-bahema, elongo na mwasi na ye Prisile na Roma, bazalaki mpe Bayuda. (Rom. 4:1; 9:3, 4; 16:3, 7; Mis. 18:2) Kasi bandeko mingi oyo Paulo atindelaki mbote bazalaki bato ya bikólo. Ekoki kozala ete bamosusu bazalaki bato “ya ndako ya Kaisala,” oyo mbala mosusu elakisi baombo ya Kaisala mpe basali na ye mosusu.​—Flp. 4:22; Rom. 1:6; 11:13.

8. Bakristo ya Roma bazalaki na mokakatano nini?

8 Mokristo nyonso na Roma azalaki na mokakatano moko, oyo mokomoko na biso mpe azali na yango. Paulo alobeli yango boye: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Rom. 3:23) Emonani polele ete batángi nyonso ya mokanda yango ya Paulo basengelaki koyeba ete bazali basumuki mpe kondima nzela oyo Nzambe abongisá mpo na kosilisa mokakatano yango.

Bato basengeli koyeba ete bazali basumuki

9. Paulo abendaki likebi na litomba nini oyo ekokaki kouta na nsango malamu?

9 Na ebandeli ya mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo abendaki likebi na litomba kitoko oyo ekokaki kouta na nsango malamu oyo azalaki se kolobela: “Nayokelaka nsango malamu nsɔni te; kutu, yango nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika, Moyuda liboso mpe lisusu Mogrɛki.” Ya solo, lobiko ekokaki kozwama. Nzokande, esengelaki moto amonisa kondima, na kolanda likanisi oyo eutaki na Habakuku 2:4 ete: “Moyengebene​—na kondima akozala na bomoi.”b (Rom. 1:16, 17; Gal. 3:11; Ebr. 10:38) Kasi ndenge nini nsango malamu, oyo ekoki komema na lobiko, ezali na boyokani na likambo oyo ete “bato nyonso basali lisumu”?

10, 11. Mpo na nini bato mosusu bayebi likanisi oyo ezali na Baroma 3:23 kasi basusu bayebi yango te?

10 Liboso moto akóma na kondima oyo ebikisaka, asengeli kondima ete azali mosumuki. Mbala mosusu, likanisi ya kozala mosumuki ekozala likambo ya sika te mpo na bato oyo bakolá na esika oyo bato bandimelaka Nzambe mpe bamesaná mwa moke na Biblia. (Tángá Mosakoli 7:20.) Bándima to bátya ntembe, bayebi mwa moke ndimbola ya maloba ya Paulo oyo ete: “Bato nyonso basali lisumu.” (Rom. 3:23) Kasi, na mosala ya kosakola, tokoki kokutana na bato mingi oyo bazali kokanga ntina ya maloba yango te.

11 Na mikili mosusu, bato mingi bakolá te na likanisi oyo ete babotamá basumuki, ete basangolá lisumu. Ya solo, mbala mosusu bamonaka ete basalaka mabunga, ete bazali na bizaleli mabe, mpe mbala mosusu basalá makambo ya mabe. Bamonaka mpe ete bato mosusu bazali ndenge wana. Atako bongo, na kolanda ndenge oyo bakolá, bazali mpenza koyeba te mpo na nini bango mpe bato mosusu bazali ndenge wana. Kutu, na minɔkɔ mosusu, soki olobi na moto ete azali mosumuki, bato mosusu bakoki kokanisa ete olingi koloba ete moto yango azali moto mabe to mpe mobuki-mibeko. Boye, mbala mosusu moto oyo azali kokola na esika ya ndenge wana akomona na mbala moko te ete azali mosumuki na ndenge oyo Paulo alobelaki yango.

12. Mpo na nini bato mingi bandimaka te ete bato nyonso bazali basumuki?

12 Ata na mikili ya bokristo, bato mingi bandimaka te ete bazali basumuki. Mpo na nini? Ata soki na bantango mosusu bakendaka ndako-nzambe, bamonaka ete lisolo ya Biblia oyo elobeli Adama ná Eva ezali lisapo mpamba. Bato mosusu bazali kokola na bisika oyo bato balingaka Nzambe te. Bazali kondima te ete Nzambe azali, mpe na yango bakangaka ntina te ete Oyo-Aleki-Likoló atyelá bato mibeko na oyo etali bizaleli ya malamu mpe ete kozanga kotosa mibeko yango elimboli kosala lisumu. Tokoki koloba ete bazali lokola bato ya ekeke ya liboso oyo Paulo alobaki ete bazali “na elikya te” mpe ete bazali “na Nzambe te na mokili.”​—Ef. 2:12.

13, 14. (a) Mpo na ntina nini bato oyo bandimaka Nzambe te mpe lisumu te bazali na likambo ya koloba te? (b) Koboya kondima ememi bato mingi na nini?

13 Na mokanda ya Baroma, Paulo apesaki bantina mibale oyo mpo na yango, bato oyo bakanisaka ete bazali basumuki te bakokoki kozala na likambo ya koloba te​—ezala na ntango wana, ezala lelo. Ntina ya liboso ezali ete bozalisi yango moko etatolaka ete Mozalisi azali. (Tángá Baroma 1:19, 20.) Yango eyokani na likambo oyo Paulo alobelaki na mokanda na ye epai ya Baebre, oyo akomaki ntango azalaki na Roma, ete: “Ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Ebr. 3:4) Likanisi yango emonisi ete ezali na Mozalisi oyo atongaki, to azalisaki, molɔ́ngɔ́ mobimba.

14 Na yango, Paulo azalaki na elonga ntango akomelaki Baroma ete bato nyonso​—ata Bayisraele ya kala—​oyo bamipesaki na losambo ya bikeko ‘bazali na likambo ya koloba te.’ Tokoki mpe koloba bongo mpo na bato oyo bamipesaki na misala ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo, oyo bazalaki kosalela nzoto ya basi ná ya mibali na ndenge oyo esengeli te. (Rom. 1:22-27) Paulo alobaki solo ntango asukisaki ete: “Bayuda ná Bagrɛki bango nyonso bazali basumuki.”​—Rom. 3:9.

‘Motatoli’

15. Bato nyonso bazalaka na nini, mpe etindaka bango básala nini?

15 Mokanda ya Baroma epesi ntina mosusu oyo bato basengeli kondima ete bazali basumuki mpe ntina oyo basengeli koluka ndenge ya kolongwa na mokakatano yango. Mpo na Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ya kala, Paulo akomaki boye: “Baoyo nyonso basalaki lisumu ntango bazali na mibeko, bakosambisama na kolanda mibeko yango.” (Rom. 2:12) Akobaki na likanisi na ye mpe amonisaki ete mbala mingi bato ya bikólo, to mabota ndenge na ndenge oyo bayebi mibeko yango ya Nzambe te ‘basalaka makambo ya mibeko.’ Mpo na nini bikólo yango mingi epekisaka bandeko ya libota moko básangisa nzoto, epekisaka koboma, mpe moyibi? Paulo amonisaki ntina yango: bazali na lisosoli.​—Tángá Baroma 2:14, 15.

16. Mpo na nini kozala na lisosoli elimboli mpenza te koboya lisumu?

16 Atako bongo, mbala mosusu omoná ete kozala na lisosoli oyo ezali kosala lokola motatoli ya kati elimboli te ete moto akolanda litambwisi ya lisosoli yango. Ndakisa ya Bayisraele ya kala emonisi yango. Atako Bayisraele bazalaki na lisosoli mpe na mibeko ya sikisiki oyo Nzambe apesaki bango mpe oyo epekisaki koyiba mpe ekobo, mbala mingi balandaki lisosoli na bango te, Mibeko ya Yehova mpe te. (Rom. 2:21-23) Bazalaki na ngambo mbala mibale mpe bazalaki bongo basumuki mpenza, bazalaki kotosa mibeko mpe mokano ya Nzambe te. Yango ebebisaki mpenza boyokani na bango na Mozalisi na bango.​—Lev. 19:11; 20:10; Rom. 3:20.

17. Likambo nini ya kolendisa ezali na mokanda ya Baroma?

17 Ekoki komonana lokola ete makambo oyo tomoni na mokanda ya Baroma emonisi kaka ete liboso ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, biso bato tozali mawa mingi. Nzokande Paulo asukaki wana te. Azongelaki maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 32:1, 2 mpe akomaki boye: “Esengo na bato oyo balimbisi misala na bango ya kobuka mibeko mpe oyo bazipi masumu na bango; esengo na moto oyo Yehova akotánga lisumu na ye te.” (Rom. 4:7, 8) Ɛɛ, Nzambe azwaki ebongiseli moko oyo eyokani na mibeko na ye mpo na kolimbisa masumu.

Nsango malamu oyo etali mingimingi Yesu

18, 19. (a) Nsango malamu nini Paulo alobelaki mingi na mokanda ya Baroma? (b) Mpo na kozwa mapamboli ya Bokonzi, tosengeli kondima nini?

18 Okoki mbala mosusu koloba ete: “Ezali mpenza nsango malamu!” Ya solo, ezali nsango malamu, mpe ezongisi makanisi na biso na nsango malamu oyo Paulo alobelaki mingi na mokanda ya Baroma. Ndenge tolobelaki yango, Paulo akomaki boye: “Nayokelaka nsango malamu nsɔni te; kutu, yango nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika.”​—Rom. 1:15, 16.

19 Nsango malamu yango etalaki mingimingi mokumba ya Yesu na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Yango wana, Paulo akokaki kozela “mokolo oyo Nzambe na nzela ya Kristo Yesu akosambisa makambo ya bato oyo ebombamá, na kolanda nsango malamu.” (Rom. 2:16) Ntango alobaki bongo, azalaki te kokitisa valɛrɛ ya “bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe” to makambo oyo Nzambe akosala na nzela ya Bokonzi. (Ef. 5:5) Kasi amonisaki ete mpo tózala na bomoi mpe tózwa mapamboli oyo ekozala na Bokonzi ya Nzambe, tosengeli kondima (1) ete tozali basumuki na miso ya Nzambe mpe (2) mpo na nini tosengeli kondimela Yesu Kristo mpo masumu na biso elimbisama. Ntango moto akangi ntina mpe andimi makambo yango oyo etali mokano ya Nzambe mpe amoni ndenge ezali kopesa ye elikya, akoki mpenza koloba ete: “Ya solo, ezali mpenza nsango malamu!”

20, 21. Na mosala ya kosakola, mpo na nini tosengeli kobosana te nsango malamu oyo elobelami mingi na mokanda ya Baroma, mpe ekoki kobimisa mbuma nini?

20 Tosengeli soki moke te kobosana nsango malamu yango ntango tozali na mosala ya kosakola. Ntango alobelaki Yesu, Paulo azongelaki maloba ya Yisaya oyo: “Moto moko te oyo andimeli ye akoyoka nsɔni.” (Rom. 10:11; Yis. 28:16) Mbala mosusu nsango oyo etali Yesu ezali likambo ya sika te epai ya bato oyo bayebi makambo oyo Biblia elobi mpo na lisumu. Kasi, mpo na basusu, nsango yango ekozala likambo ya sika mpenza, likambo oyo bayebi te to mpe oyo bandimaka mingi te na bonkɔkɔ na bango. Ntango bato ya ndenge wana babandi kondimela Nzambe mpe Makomami, ekosɛnga tólimbwela bango mokumba ya Yesu. Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge oyo Baroma mokapo 5 elobeli likambo wana ya nsango malamu. Na ntembe te, okomona ete boyekoli yango ekoki kosalisa yo na mosala ya kosakola.

21 Ezali mpenza esengo kosalisa bato ya mitema sembo bákanga ntina ya nsango malamu oyo elobelami mingi na mokanda ya Baroma, nsango malamu oyo ezali “nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika.” (Rom. 1:16) Longola esengo oyo biso moko tokozwa, tokomona bato mosusu mpe bakondima maloba ya Yisaya oyo Paulo azongelaki na Baroma 10:15: “Makolo ya baoyo bazali kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu ezali kitoko mingi mpenza!”​—Yis. 52:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba mosusu ya ndenge wana ezali na mikanda mosusu ya Biblia.​—Mrk. 1:1; Mis. 5:42; 1 Ko. 9:12; Flp. 1:27.

b Paulo atángaki libongoli ya Grɛki ya Septante, epai maloba yango ekeseni moke na makomi ya Ebre.

Ozali koyeba lisusu?

• Mokanda ya Baroma elobeli mingimingi nsango malamu nini?

• Likambo nini tosengeli kosalisa basusu báyeba?

• Ndenge nini “nsango malamu ya Kristo” ekoki komemela biso mpe bato mosusu mapamboli?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Nsango malamu oyo elobelami mingi na mokanda ya Baroma etali mingimingi mokumba monene ya Yesu na mokano ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 9]

Biso nyonso tobotamá na mbeba monene​—lisumu!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto