Lisiko emonisaka mpenza boyengebene ya Nzambe
NSIMA ya botomboki ya Adama ná Eva, Yehova apesaki elaka ete akobimisa momboto oyo Satana akonyata na litindi. (Genese 3:15) Elaka yango ekokisamaki ntango banguna ya Nzambe babomaki Yesu Klisto na nzete ya mpasi. (Bagalatia 3:13, 16) Yesu azalaki na lisumu te, mpamba te elenge mwasi oyo abotaki ye azwaki zemi na ndenge ya kokamwa, na nguya ya elimo santu. Na yango, makila na ye oyo esopanaki ekokaki kosalelama mpo na kosikola bato, oyo basangolá lisumu mpe liwa ya Adama.—Baloma 5:12, 19.
Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya nyonso, akokisa mokano na ye. Yango wana, nsima ya lisumu oyo moto asalaki, na miso ya Yehova ezalaki lokola lisiko esili kofutama mpe akokaki kosala boninga na baoyo bamonisaki kondima na kokokisama ya bilaka na ye. Yango esalaki mpe ete bana ya Adama lokola Enoka, Noa, mpe Abalayama oyo bazalaki bato ya masumu bátambola elongo na Nzambe mpe bákóma baninga na ye kozanga ete yango ebebisa bosantu na ye.—Genese 5:24; 6:9; Yakobo 2:23.
Bato mosusu oyo bazalaki na kondima epai na Yehova basalaki masumu minene. Mokonzi Davidi azali moko ya bato yango. Okoki mbala mosusu komituna boye: ‘Mpo na nini Yehova akobaki kopambola Mokonzi Davidi atako asalaki ekobo na Bata-seba mpe na nsima abomisaki mobali na ye Uliya?’ Likambo ya ntina mingi ezali ete Davidi abongolaki mpenza motema mpe azalaki na kondima. (2 Samwele 11:1-17; 12:1-14) Lokola Nzambe ayebaki ete Yesu Klisto akopesa mbeka, akokaki kolimbisa Davidi kozanga ete abungisa boyengebene mpe bosembo na ye. (Nzembo 32:1, 2) Mpo na likambo yango, Biblia emonisi ete likambo ya ntina mpenza oyo lisiko ya Yesu ekokisaki ezali ete ‘Nzambe alakisi boyengebene na ye moko, mpamba te azalaki kolimbisa masumu oyo esalemaki kala’ mpe “na eleko oyo ya sikoyo.”—Baloma 3:25, 26.
Ya solo, bato bazali kozwa mapamboli ebele ya kitoko mpo na makila oyo Yesu asopaki. Na nzela ya lisiko, bato ya masumu oyo bazali kobongola motema bakoki mpenza kokóma baninga ya Nzambe. Lisusu, lisiko ekosala ete bato oyo bakufá básekwa na mokili ya sika. Na kati ya bato yango, tokoki mpe kotánga basaleli ya Nzambe ya sembo oyo bakufaki liboso Yesu afuta lisiko, ata mpe ebele ya bato oyo bakufaki kozanga ete bázwa boyebi mpe basambelaki ye te. Biblia elobi ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Na ntango wana, na nzela ya lisiko, Yehova akopesa bato nyonso ya botosi bomoi ya seko. (Yoane 3:36) Yesu ye moko alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Bato bakozwa mapamboli nyonso wana kaka mpo na mbeka ya lisiko oyo Nzambe abongisaki.
Likambo eleki ntina na lisiko yango ezali te matomba oyo ezali kopesa biso. Kasi, likambo ya ntina mingi ezali nde oyo lisiko ya Klisto ezali kosala mpo na nkombo ya Yehova. Ezali komonisa ete Yehova azali mpenza Nzambe ya boyengebene, oyo akoki kosala boyokani na bato ya masumu kozanga ete abebisa bopɛto mpe bosantu na ye. Soki Nzambe azwaki ebongiseli ya lisiko te, mwana moko te ya Adama, ezala Enoka, Noa mpe Abalayama, akokaki kotambola elongo na Yehova to kozala moninga na ye. Mokomi ya nzembo ayebaki likambo yango mpe akomaki ete: “Ɛ [Yehova], soki yo okotalaka bokesene, ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na Yehova na ndenge atindaki mwana na ye ya bolingo awa na mabelé mpe mpo na Yesu na ndenge andimaki kopesa bomoi na ye mpo na kosikola biso!—Malako 10:45.