Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/9 nk. 16-20
  • Tópota mbangu na mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tópota mbangu na mpiko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli koyika mpiko mpo tólonga
  • ‘Lipata ya batatoli’
  • Nini esalisaki bango bálonga?
  • Mateya mpo na biso
  • Okoki koyika mpiko tii na nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Topota mbango na mpiko nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bópota mbangu mpo bózwa libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ‘Tópota mbangu tii na nsuka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/9 nk. 16-20

Tópota mbangu na mpiko

“Tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.”​—EBR. 12:1.

1, 2. Biblia ekokanisi bomoi ya mokristo na nini?

MBULA na mbula, na bisika mingi ya mokili, bato bapotaka mbangu na momekano ya mbangu oyo babengi marathon. Bato mosusu oyo bakɔtaka na momekano yango bazali bapoti-mbangu minene mpe balukaka kolonga. Kasi, bato mosusu mingi bayebaka ete bakolonga te. Mpo na bango, kokóma tii na nsuka ya momekano nde likambo ya ntina.

2 Biblia emonisi ete bomoi ya mokristo ezali lokola momekano ya kopota mbangu. Ntoma Paulo amonisaki yango na mokanda ya liboso oyo akomelaki bakristo ya Korinti. Akomaki boye: “Boyebi te ete bapoti-mbangu na momekano ya mbangu bapotaka mbangu bango nyonso, kasi kaka moko nde azwaka libonza? Bópota mbangu na ndenge oyo ekosala ete bózwa yango.”​—1 Ko. 9:24.

3. Mpo na nini Paulo alobaki ete kaka mopoti-mbangu moko nde alongaka?

3 Ntango Paulo akomaki ete kaka mopoti-mbangu moko nde alongaka, alingaki nde koloba ete kaka mokristo moko nde akozwa libonza ya bomoi? Te. Mopoti-mbangu nyonso na momekano ya mbangu asalaka ngalasisi mpe asalaka milende makasi mpo ye nde alonga. Paulo mpe alingaki ete bakristo ya Korinti básala makasi mpo bátikala sembo epai ya Yehova mpe bákóma tii na nsuka ya momekano na bango. Soki basali bongo, bakokaki kozwa libonza ya bomoi. Ya solo, mokristo nyonso oyo apoti mbangu tii na nsuka akoki kozwa libonza ya bomoi.

4. Tosengeli koyeba nini mpo na momekano ya mbangu na biso bakristo?

4 Maloba wana ya Paulo ezali kolendisa biso, kasi esengeli mpe kotinda biso tókanisa malamu. Mpo na nini? Mpo libonza oyo tokozwa​—ezala bomoi na likoló to na Paradiso awa na mabele—​eleki nyonso. Ya solo, bomoi ya mokristo ezali lokola kopota mbangu na nzela moko molai mpe oyo ezali na mabaku, na makambo oyo ekoki kolongola likebi, mpe na makama mingi. (Mat. 7:13, 14) Likambo ya mawa, bamosusu bakómá kolɛmba, batiká kopota, to bakweá na nzela. Mitambo mpe makama nini ezali na nzela oyo tozali kopota mbangu mpo na bomoi? Ndenge nini okoki kokima mitambo mpe makama yango? Okoki kosala nini mpo okóma tii na nsuka mpe olonga na momekano yango?

Tosengeli koyika mpiko mpo tólonga

5. Na Baebre 12:1, Paulo alobelaki likambo nini oyo etali momekano ya mbangu?

5 Na mokanda oyo Paulo akomelaki bakristo ya Yerusaleme mpe ya Yudea, alobelaki lisusu momekano ya kopota mbangu. (Tángá Baebre 12:1.) Amonisaki ntina oyo bakristo basengeli kokoba kopota na momekano na bango ya mbangu mpe alobelaki oyo basengeli kosala mpo bálonga. Tokolobela liboso ntina oyo Paulo akomelaki Baebre mokanda yango mpe makambo oyo alingaki básala. Na nsima, tokolobela liteya oyo tokoki kozwa na makambo oyo akomelaki bango.

6. Bakonzi ya lingomba balukaki kosala bakristo nini?

6 Bakristo ya ekeke ya liboso, mingimingi baoyo bazalaki na Yerusaleme mpe na Yudea, bazalaki na mikakatano mpe na bampasi mingi. Mikakatano yango eutaki na bakonzi ya Lingomba ya Bayuda, mpo bazalaki kosɛngisa moto nyonso atosa bango. Mwa moke liboso, balongaki komonisa ete Yesu Kristo azali motomboki mpe babomaki ye lokola mosali-mabe. Kasi basukaki wana te. Mokanda ya Misala elobeli ndenge bazalaki kokanela bakristo mpe konyokola bango. Ebandaki mwa moke nsima ya makambo ya kokamwa oyo esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. Na yango, bomoi ya bakristo ya sembo ezalaki ya mpasi mingi.​—Mis. 4:1-3; 5:17, 18; 6:8-12; 7:59; 8:1, 3.

7. Mpo na nini eleko ya bakristo oyo Paulo akomelaki mokanda ezalaki ya mpasi mingi?

7 Lisusu, na eleko wana, etikalaki moke mpenza ebongiseli ya Bayuda ebomama. Yesu akebisaki bayekoli na ye ete Nzambe akobebisa Yerusaleme. Ayebisaki mpe bango makambo oyo ekosalema mwa moke liboso na yango, mpe makambo ya sikisiki oyo basengeli kosala mpo bábika. (Tángá Luka 21:20-22.) Na yango, basengelaki kosala nini? Yesu akebisaki bango boye: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, noki na ntango wana kaka, mokolo wana ekwela bino pwasa.”​—Luka 21:34.

8. Ekoki kozala likambo nini nde etindaki bakristo mosusu bálɛmba to mpe bátika kosalela Yehova?

8 Ntango Paulo akomelaki Baebre mokanda, esilaki koleka mbula soki 30 banda Yesu apesaki likebisi yango. Na boumeli ya bambula yango, bakristo yango basalaki nini? Bamosusu balɛmbaki mpo na mikakatano mpe bakómaki komitungisa mingi mpo na bamposa na bango ya mokolo na mokolo; na yango bazalaki koyekola lisusu te mpo báyeba Yehova malamu mpe mpo boninga na bango na ye ezala makasi. (Ebr. 5:11-14) Ekoki kozala ete bakristo mosusu bakanisaki ete bomoi ekozala mpasi mingi te soki basali makambo kaka ndenge Bayuda mingi bazalaki kosala. Mbala mosusu bakanisaki ete kosala bongo ezali mabe te, mpo Bayuda yango batikaki kondimela Nzambe te, mpe bazalaki kotosa makambo mingi ya Mibeko ya Moize. Bato mosusu na lisangá bazalaki kotinda baninga na bango bátosa Mibeko ya Moize mpe bonkɔkɔ ya Bayuda. Bakristo mosusu bandimelaki bango mpe basusu batosaki bango mpo bazalaki kobanga. Paulo alobaki nini mpo na kolendisa bandeko na ye bakristo mpo bálɛmba te kosalela Nzambe mpe bátikala sembo epai na Ye?

9, 10. (a) Na nsuka ya Baebre mokapo 10, Paulo alendisaki Baebre básala nini? (b) Mpo na nini Paulo alobelaki makambo oyo batatoli ya sembo ya ntango ya kala basalaki?

9 Elimo ya Nzambe esalisaki Paulo akomela bakristo oyo bazalaki Baebre mokanda mpo na kolendisa bango. Na mokapo 10 ya mokanda na ye, Paulo alimbwelaki bango ete Mibeko ya Moize ezalaki kaka “elili ya makambo malamu oyo ekoya” mpe amonisaki polele ete masumu na bango ekokaki kolimbisama kaka na nzela ya mbeka ya Yesu. Na nsuka ya mokapo yango, Paulo ayebisaki bango boye: “Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko, mpo nsima ya kosala mokano ya Nzambe, bózwa eloko oyo alakaki. Mpo etikali ‘mwa ntango moke mpenza,’ mpe ‘moto oyo azali koya akoya mpe akoumela te.’”​—Ebr. 10:1, 36, 37.

10 Na Baebre mokapo 11, Paulo alimbolaki malamu mpenza kondima ya solosolo epai ya Nzambe. Apesaki mpe bandakisa ya mibali mpe basi ya ntango ya kala oyo bazalaki na kondima. Mpo na nini apesaki bandakisa yango? Paulo alingaki ete bakristo wana báyeba ete mpo na komonisa kondima ya solosolo, basengelaki koyika mpiko mpe kotɛlɛma ngwi. Ndakisa malamu ya basaleli ya Yehova wana ya sembo ya ntango ya kala ekokaki kopesa Baebre makasi ya koyikela mikakatano mpiko. Na yango, nsima ya kolobela ndenge bato wana ya sembo ya ntango ya kala bamonisaki kondima na bango, Paulo alobaki boye: “Lokola tozali na lipata monene boye ya batatoli oyo ezingi biso, tólongola mpe kilo nyonso ná lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi, mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.”​—Ebr. 12:1.

‘Lipata ya batatoli’

11. Kokanisa ndakisa ya ‘lipata monene ya batatoli’ ekosalisa biso tóyeba nini?

11 ‘Lipata monene ya batatoli,’ elingi koloba bato oyo basalelaki Nzambe liboso Kristo aya awa na mabele, bazalaki batali mpamba te. Bango moko mpe bazalaki bapoti-mbangu mpe balongaki na ndenge batikalaki sembo epai ya Yehova tii na nsuka ya bomoi na bango. Ndakisa na bango ekokaki kolendisa basusu bákoba kopota na momekano ya mbangu. Soki tozali kopota na momekano ya mbangu mpe toyebi ete bapoti-mbangu minene bazali kotala biso mpe kolendisa biso, yango ekolendisa biso tósala nyonso oyo tokoki mpo tókoma tii na nsuka. Ndenge moko mpe, bakristo wana Baebre basengelaki kokanisa bandakisa ya basaleli ya Yehova ya ntango ya kala. Ndakisa ya bato yango ekokaki kolendisa bango mpe kosalisa bango báyeba ete bakoki ‘koyika mpiko ntango bazali kopota mbangu’ mpe kokóma na nsuka. Ezali mpe ndenge moko mpo na biso.

12. Liteya nini tokoki kozwa na bandakisa ya bato oyo Paulo alobelaki?

12 Makambo ya bomoi ya bato mingi ya sembo oyo Paulo alobelaki ezalaki lokola oyo ya biso. Na ndakisa Noa, azalaki na eleko oyo etikalaki moke Nzambe aboma mokili na Mpela. Biso mpe tozali kobika na eleko oyo etikali moke Nzambe aboma mokili ya Satana. Yehova asɛngaki Abrahama ná Sara bálongwa na mokili na bango. Apesaki bango elaka ete bango nde bakobimisa libota moko mpo na kosambela ye, mpe bazalaki kozela akokisa elaka yango. Yehova asɛngi biso tótika kozala na bomoi mpo na biso moko mpe tózala na bomoi mpo na kosalela ye. Alaki biso ete soki tosali bongo, akozala moninga na biso mpe akopesa biso mbano. Moize asalaki mobembo molai na esobe moko ya nsɔmɔ mpo na kokende na Mokili ya Ndaka. Biso mpe tozali na mokili ya mabe mpe tozali kokende na mokili ya sika oyo Yehova alaká. Ezali na ntina tókanisa bomoi ya bato wana ya sembo. Tokoki komekola bango na makambo oyo basalaki mpo na kosepelisa Yehova, mpe kozwa liteya na makambo oyo basalaki kasi esepelisaki Nzambe te.​—Rom. 15:4; 1 Ko. 10:11.

Nini esalisaki bango bálonga?

13. Noa azalaki na mikakatano nini, mpe nini esalisaki ye alonga yango?

13 Nini esalisaki basaleli yango ya Yehova báyika mpiko mpe bálonga na momekano na bango ya mbangu? Talá oyo Paulo akomaki mpo na Noa. (Tángá Baebre 11:7.) Mpela oyo esengelaki koboma bato mpe banyama nyonso ezalaki likambo “oyo emonanaki naino te.” (Eba. 6:17) Naino Noa amonaki mpela te. Kasi Noa alobaki te ete ekoki kosalema te to ete ezali mpasi likambo ya ndenge wana esalema. Mpo na nini? Mpo azalaki na kondima ete Yehova akokisaka likambo nyonso oyo alaki. Noa amonaki te ete Yehova asɛngi ye likambo oyo eleki makasi. Kutu, “asalaki kaka bongo.” (Eba. 6:22) Kanisá makambo nyonso oyo Noa asengelaki kosala: kotonga masuwa, koyanganisa banyama, kobomba bilei na masuwa mpo na bato mpe banyama, kokebisa bato mpo na mpela mpe kosalisa libota na ye ezala na kondima makasi epai ya Yehova. Ezalaki mosala moke te, kasi “asalaki kaka bongo.” Ya solo, lokola Noa amonisaki kondima mpe ayikaki mpiko, Yehova abikisaki ye ná libota na ye mpe apambolaki bango mingi.

14. Na makambo nini Abrahama ná Sara bamonisaki kondima? Ndakisa na bango ekoki koteya biso nini?

14 Na nsima, Paulo atángaki Abrahama ná Sara na kati ya ‘lipata monene ya batatoli oyo ezingi biso.’ Bomoi na bango ebongwanaki ntango Nzambe asɛngaki bango bálongwa na Ure, mboka na bango. Bayebaki te soki makambo ekosukela bango ndenge nini. Kasi, bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova mpe batosaki ye ata na bampasi. Biblia ebengi Abrahama “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima” mpo andimaki komipimela makambo mingi mpo na losambo ya solo. (Rom. 4:11) Paulo alobelaki kaka mwa makambo ya ntina, mpamba te batángi ya mokanda na ye bayebaki bomoi ya Abrahama malamu. Atako bongo, makambo oyo alobaki ekokaki mpo na komonisa ete bazalaki mpenza na kondima makasi; alobaki boye: “Bango nyonso [ná Abrahama mpe libota na ye] bakufaki na kati ya kondima, atako bazwaki te biloko oyo elakamaki, kasi bamonaki yango na mosika mpe basepelaki na yango mpe basakolaki polele ete bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.” (Ebr. 11:13) Ezali polele ete kondima na bango epai ya Nzambe mpe boninga na bango na ye esalisaki bango báyika mpiko na momekano na bango ya mbangu.

15. Mpo na nini Moize aponaki kozala na bomoi oyo akómaki na yango?

15 Moize mpe azali moko ya basaleli ya Yehova oyo batángami na ‘lipata ya batatoli.’ Moize atikaki bomoi ya bomɛngo mpe ya lokumu, “aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe.” Mpo na nini asalaki bongo? Paulo ayanolaki boye: “Azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama. . . . Atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Tángá Baebre 11:24-27.) Moize akosamaki te na “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” Azalaki komona ete Nzambe azali moto ya solo, mpe ayebaki ete makambo oyo Nzambe alaki ekokokisama. Yango nde esalisaki ye azala na molende mpe ayika mpiko na bampasi. Mpe esalisaki ye alɛmba te kokamba Bayisraele longwa na Ezipito mpo na kokende na Mokili ya Ndaka.

16. Mpo na nini Moize alɛmbaki nzoto te ntango Nzambe apekisaki ye kokɔta na Mokili ya Ndaka?

16 Ndenge moko na Abrahama, Moize akufaki liboso bilaka ya Nzambe ekokisama. Ntango Bayisraele bakómaki pene na kokɔta na Mokili ya Ndaka, Nzambe ayebisaki Moize boye: “Okomona mokili yango na mosika, kasi okokɔta kuna te, na mokili oyo nazali kopesa bana ya Yisraele.” Esalemaki bongo mpo mwa moke liboso, lokola botɔmbɔki ya Bayisraele epesaki bango nkanda, Moize ná Arona ‘bazangaki kokokisa mokumba na bango epai na Nzambe na katikati ya bana ya Yisraele na mai ya Meriba.’ (Mib. 32:51, 52) Moize alɛmbaki nde nzoto to akómaki nkandankanda? Te. Toyebi yango mpo asɛngaki Yehova apambola ekólo ya Yisraele. Maloba na ye ya nsuka epai na bango ezalaki boye: “Esengo na yo, Ee Yisraele! Nani azali lokola yo, ekólo moko oyo ezali kozwa lobiko na Yehova, nguba ya lisalisi na yo, mpe Ye oyo azali mopanga na yo oyo eleki monene?”​—Mib. 33:29.

Mateya mpo na biso

17, 18. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ‘lipata ya batatoli’? (b) Tokomona nini na lisolo oyo elandi?

17 Ndenge totaleli bomoi ya bato mosusu oyo bazali na ‘lipata ya batatoli oyo ezingi biso,’ tomoni ete mpo na kopota na momekano ya mbangu tii na nsuka, tosengeli kozala na kondima makasi epai ya Nzambe mpe na bilaka na ye. (Ebr. 11:6) Kondima yango esengeli komonana polele na bomoi na biso mobimba. Toyebi ete Nzambe alaki biso bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Tokoki komona “Moto oyo amonanaka te” mpe na yango, tokoki koyika mpiko na momekano ya mbangu.​—2 Ko. 5:7.

18 Mbangu oyo biso bakristo tozali kopota ezali pɛtɛɛ te. Atako bongo, tokoki kopota tii na nsuka mpe kolonga. Na lisolo oyo elandi, tokomona makambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso.

Okoki kolimbola?

• Mpo na nini Paulo akomaki makambo mingi na ntina etali batatoli ya sembo ya ntango ya kala?

• Ndenge nini ndakisa ya ‘lipata monene ya batatoli oyo ezingi biso’ ekoki kolendisa biso tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu?

• Ozwi liteya nini na ndakisa ya batatoli lokola Noa, Abrahama, Sara mpe Moize?

[Elilingi na lokasa 19]

Abrahama ná Sara bandimaki kotika bomoi ya malamu na Ure

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto