Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/12 lok. 1
  • Tósalela bwanya mpo milende na biso ebimisa matomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalela bwanya mpo milende na biso ebimisa matomba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Matomba ya kozala na teritware na yo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ozalaka na teritware ya yo moko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 1/12 lok. 1

Tósalela bwanya mpo milende na biso ebimisa matomba

1. Ndenge nini maloba oyo ezali na 1 Bakorinti 9:26 etaleli mpe mosala na biso ya kosakola?

1 Ntoma Paulo akomaki boye: “Ndenge oyo nazali kopota mbangu ezali ya bipotela te; ndenge oyo nazali kotinda makofi na ngai ezali ya kobɛta mopɛpɛ te.” (1 Ko. 9:26) Paulo asalelaki ndakisa wana mpo na komonisa ete azalaki kotya makanisi na ye nyonso na mikano ya elimo oyo azalaki kolanda. Kasi, ndakisa yango etaleli mpe ndenge oyo tosakolaka. Tosengeli kotinda “makɔfi,” elingi koloba kosalela bwanya mpo milende na biso ebimisa matomba mingi. Ndenge nini tokoki kosala yango?

2. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo mpe basakoli mosusu ya ekeke ya liboso na oyo etali kopona ntango mpe esika ya kosakola?

2 Tókende epai bato bazali: Paulo ná basakoli mosusu na ekeke ya liboso bazalaki kokende kosakola epai bayebaki ete bakokuta bato. (Mis. 5:42; 16:13; 17:17) Na yango, soki toyebi ete bato mingi bazalaka na ndako na mpokwa, ekozala malamu tósakola ndako na ndako na bangonga wana. Bato bazalaka mingi na esika ya kozela bisi to engbunduka na ntɔngɔntɔngɔ ntango bakendaka mosala to na mpokwa ntango bazongaka ndako? Na teritware na bino, ntango nini bato bazalaka ebele na bazando to na bamagazini? Kopesa litatoli ya balabala na bangonga wana ekoki kobimisa matomba mingi mpenza.

3. Ndenge nini tokoki kosalela bwanya wana tozali kosakola na teritware na biso?

3 Tósalela bwanya ntango tozali kosakola na teritware: Tosengeli mpe kosalela bwanya ntango tozali kosakola na teritware na biso. Na ndakisa, ekozala malamu te basakoli ebele bákende bango nyonso kosakola na esika moko; yango ekopesa mosala mingi na ndeko oyo azali kokamba bango mpe ekozwa ye ntango mingi. Ekozala malamu nde kokabola basakoli na mwa bituluku ya mike. Ndenge moko mpe, na bisika oyo bandeko basalelaka mituka na mosala ya kosakola, soki bandeko bazali kosakola na teritware oyo ezali mosika na engumba monene bakosilisa yango noki mpe bakozwa mabaku mingi ya kosakola soki motuka mokomoko ezali na basakoli mingi te. Okoki mpe kosɛnga teritware ya yo moko oyo ezali mosika te na esika ofandaka, mpo ezwaka yo ntango mingi te ya kokóma kuna.

4. Nini ekosalisa biso tózwa matomba mingi na mosala na biso ya “koluka-bato”?

4 Yesu alobaki ete bapalanganisi ya nsango malamu bazali lokola baluki-mbisi. (Mrk. 1:17) Mokano ya moluki-mbisi ezalaka kaka te ya kobwaka monyama na mai, kasi nde ya kokanga mbisi. Na yango, baluki-mbisi oyo bayebi mosala malamu bakendaka koluka mbisi na ntango oyo ebongi mpe na bisika oyo bayebi ete bakozwa yango, mpe babandaka mosala mbala moko ntango bakómi kuna. Ya solo, basalelaka makasi na bango na bwanya. Tiká ete biso mpe tózala na molende ya ndenge wana na mosala na biso ya kosakola.​—Ebr. 6:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto