Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/1 nk. 20-25
  • Mpo na nini komibatela na losambo ya bikeko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini komibatela na losambo ya bikeko?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo losambo na bikeko elimboli
  • Likanisi ya Jéhovah likolo na losambo ya bikeko
  • Batikali sembo kati na komekama
  • Bikeko bilongi te na Esambiselo
  • Bambeka epai na bilimu mabe
  • Mpo na nini tosengeli komibatela?
  • Okomibatela na losambo ya bikeko?
  • Tomibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kimá losambo ya bikeko
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka bililingi te na losambo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/1 nk. 20-25

Mpo na nini komibatela na losambo ya bikeko?

“Bana mike, bomibatela na bikeko.”​—YOANE 5:21.

1. Mpo na nini losambo ya Jéhovah ezali na boyokani soki moke te na losambo ya bikeko?

JÉHOVAH azali ekeko te, ezala ya libende, ya libaya to ya libanga. Akoki te kofanda kati na tempelo moko ya mabele. Lokola azali Elimo oyo aleki na nguya, azangi komonana na bato, ezali mpasi na kosala elilingi na ye. Na bongo, losambo na peto ya Jéhovah esengi na makambo nyonso koboya losambo ya bikeko.​—Exode 33:20; Misala 17:24; 2 Bakolinti 3:17.

2. Mituna nini tosengeli kotalela?

2 Soki ozali mosambeli na Jéhovah, na yango, osengeli komituna malamu: ‘Losambo ya bikeko ezali nini? Lolenge nini basaleli na Jéhovah bakokaki kobwaka yango na ntango ya kala? Mpe mpo na nini tosengeli komibatela na losambo ya bikeko na mikolo na biso?’

Oyo losambo na bikeko elimboli

3, 4. Lolenge nini losambo ya bikeko ekoki kolimbolama?

3 Na lolenge eyebani, losambo na bikeko esangisi bilambo to milulu. Losambo na bikeko elimboli kokumisa, kolinga, kosambela, to kofukamela ekeko. Na bongo, ekeko ezali nini? Ezali elilingi, to elembo ya eloko moko oyo ezali mpo na losambo. Na lolenge eyebani, losambo na bikeko epesami epai na nguya, oyo batalelaka, na libunga to na solo ete eleki, oyo bakanisaka ete ezali na bomoi (ekoki kozala moto, nyama, to lisanga moko). Kasi losambo ya bikeko ekoki lisusu kopesama epai na biloko oyo bizangi bomoi (ekoki kozala nguya to eloko moko ezangi bomoi na mokili).

4 Kati na Makomami, maloba na Liebele masalelami mpo na ekeko mbala mingi malobelaka biloko bizangi ntina, to mpe ezali maloba ya kotyola. Kati na yango ezali na maloba mabongolami na “ekeko esalami na maboko to epapolami” (mpenzampenza, eloko esalami na maboko); “ekeko, to elilingi enangwami” (eloko enyangwisami to eyemami); “ekeko ya nsomo” “ekeko ya mpamba” (mpenzampenza, oyo ezangi ntina); mpe “ekeko ya mbindo.” Liloba na Greke ei’do-lon ebongolami ete “ekeko.”

5. Mpo na nini ekoki kolobama ete bililingi nyonso bizali bikeko te?

5 Bililingi nyonso bizali bikeko te. Nzambe ye moko alobaki na Bayisraele ete basala bakeluba mibale ya wolo mpo na sanduku ya kondimana mpe bakembisa bililingi ya bikelamu wana ya elimo likolo na eteni ya kati ya bilamba zomi ya ezipeli ya hema mpo na tabernakle mpe likolo ya elamba oyo ekabolaki esika Mosantu mpe esika Eleki Mosantu. (Exode 25:1, 18; 26:1, 31-33) Bobele banganga oyo bazalaki kosala na kati nde bazalaki komona bililingi wana oyo ntina na yango mpenza ezalaki ya komonisa lolenge ya bakeluba ya likolo. (Tala Baebele 9:24, 25.) Ezali polele ete bililingi ya bakeluba oyo ezalaki na tabernakle esambelamaki te, mpo ete baanzelu ya sembo baboyaki ete bato basambela bango.​—Bakolose 2:18; Emoniseli 19:10; 22:8, 9.

Likanisi ya Jéhovah likolo na losambo ya bikeko

6. Nini ezali likanisi na Jéhovah na ntina na losambo ya bikeko?

6 Basaleli na Jéhovah bazali komibatela na losambo na bikeko mpamba te Jéhovah aboyi misala nyonso oyo mizali na boyokani na losambo ya bikeko. Nzambe asengaki na Bayisraele ete basala te bikeko lokola biloko ya kokumisa mpe basambela yango te. Kati na Mibeko Zomi tozali kokuta maloba oyo: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na lola na likolo te, na mokili na nse te, to na mai na nse na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai, Jéhovah, Nzambe na yo, nazali Nzambe na zuwa na kobatela, mpe nakokitisa mabe na batata likolo na bana kino libota na misato mpe na minei na baoyo bakoyinaka ngai. Nde nakomonisa boboto na bato baoyo bakolingaka ngai mpe bakotosaka mibeko na ngai.”​—Exode 20:4-6.

7. Mpo na nini Jéhovah azali koboya lolenge nyonso ya losambo ya bikeko?

7 Mpo na nini Jéhovah aboyi losambo nyonso ya bikeko? Ya liboso mpo ete azali kosenga komipesa mobimba bobele epai na ye, lokola yango emonisami na mobeko ya mibale kati na Mibeko Zomi. Lisusu, alobaki na nzela na mosakoli na ye Yisaya ete: “Ngai nazali Jéhovah. Wana ezali nkombo na ngai; nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.” (Yisaya 42:8) Na eleko moko, losambo ya bikeko ekweisaki Bayisraele na motambo na motindo boye ete “bakomaki kopesa bana mibali mpe bana basi na bango lokola mbeka epai na bilimu mabe.” (Nzembo 106:36, 37) Basambeli na bikeko bazali te bobele kowangana ete Jéhovah azali Nzambe ya solo kasi lisusu bazali kosalela matomba ya Monguna na ye, Satana, elongo na bilimu mabe.

Batikali sembo kati na komekama

8. Komekama nini etyamaki liboso ya Baebele misato Sadrake, Mesake, mpe Abedenego?

8 Bosembo na biso epai na Jéhovah ezali lisusu kotinda biso na komibatela na losambo ya bikeko. Yango emonisamaki na likambo liyebisami na Danyele mokapo 3. Mpo na bofungoli ekeko monene ya wolo oyo atelemisaki, Nebukadenesala, mokonzi na Babilone, ayanganisaki bato minene ya bokonzi na ye. Etinda na ye wana etalelaki mpe Sadrake, Mesake, mpe Abedenego, Baebele misato baoyo bazalaki bakalaki minene na etuka ya Babilone. Bayangani nyonso bazwaki etinda ya kofukama liboso ya ekeko na ntango lokito ya bibeteli ya miziki ekoyokana. Yango ezalaki komekama oyo Satana, mokonzi mpenza ya Babilone, asalaki mpo ete Baebele misato wana bafukama liboso ya ekeko oyo ezalaki komonisa Bokonzi ya Babilone. Kanisa ete ozali wana ntango likambo yango lizali kosalema.

9, 10. (a) Baebele misato bakamataki etelemelo nini, mpe mbano nini bazwaki? (b) Elendiseli nini ba Témoins de Jéhovah bakoki kozwa na kolanda ndakisa ya Baebele misato?

9 Tala! Baebele misato batelemi. Bazali komikundola mobeko na Nzambe oyo mopekisi kosala bikeko bipapolami mpe kosambela yango. Nebukadenesala alaki bango ete bapona​—kofukama to kobomama! Kasi mpo na bosembo na bango epai na Jéhovah, balobi ete: “Soko ezali boye, Nzambe na biso oyo tozali kosalela azali na likoki ya kobikisa biso na litumbu na móto na kongala mpe na lobɔko na yo. Ɛ mokonzi, oyeba ete ata boye te, biso tokosalela banzembe na yo te, mpe tokosambela elilingi na wolo oyo otelemisi te.”​—Danyele 3:16-18.

10 Basambeli wana ya sembo ya Jéhovah babwakamaki kati na litumbu ya mótɔ makasi. Kokamwaka na komona bato minei kotambola kati na mata, Nebukadenesala abengaki Baebele misato na kobima longwa na litumbu, mpe babimaki kozanga likama. Na yango mokonzi angangaki ete: “Nzambe na Sadrake, Mesake mpe Abedenego akumisama, oyo atindi anzelu na ye [moto ya minei kati na litumbu ya mótɔ] mpe abikisi baombo na ye baoyo bandimaki ye mpe baboyaki liloba na mokonzi mpe bapesaki nzoto na bango ete basalela mpe basambela nzambe mosusu te bobele Nzambe na bango mpenza. . . . Nzambe mosusu azali te oyo akoki kobikisa na lolenge na oyo.” (Danyele 3:28, 29) Bosembo oyo ezalaki na Baebele misato wana ezali kopesa elendiseli mpo na ba Témoins de Jéhovah na mikolo na biso na kozala na bosembo epai na Jéhovah, na koboya kokota na makambo ya mokili, mpe na kobwaka losambo ya bikeko.​—Yoane 17:16.

Bikeko bilongi te na Esambiselo

11, 12. (a) Lisolo nini litali Jéhovah mpe banzambe-bikeko elobelamaki na Yisaya? (b) Na ntembe oyo Jéhovah abeteleki bango, banzambe ya mabota bakokaki koyanola?

11 Ntina mosusu ya komibatela na losambo ya bikeko ezali ete kokumisa bikeko ezali mpamba. Atako bikeko mosusu bisalemi na moto bimonanaka lokola nde bizali na bomoi​—mbala mingi bizalaka na monoko, miso, mpe matoi—​nzokande bikoki te koloba, komona, to koyoka mpe bikoki kosala eloko moko te epai na basambeli na yango. (Nzembo 135:15-18) Yango emonisamaki na ekeke ya mwambe L.T.B., ntango mosakoli na Nzambe ayebisaki, kati na Yisaya 43:8-28, oyo ekoki kobengama ete kosamba kati na Jéhovah mpe banzambe-bikeko. Kati na likambo yango Yisraele libota na Nzambe ezalaki na ngambo moko, mpe mabota ya mokili na ngambo mosusu. Jéhovah abeteleki banzambe ya lokuta ya mabota ntembe na koyebisa “makambo na liboso,” elingi koloba na kosakola makambo na sikisiki. Moko te akokaki kosala yango. Kolobaka epai na bato na ye, Jéhovah alobaki ete: “Bozali batemwe na ngai . . . mpe ngai nazali Nzambe.” Mabota makokaki te komonisa ete banzambe na bango bazalaki na bomoi liboso ya Jéhovah to ete bakokaki kosakola makambo mazali liboso. Kasi Jéhovah asakolaki kobebisama ya Babilone mpe kosikolama na boombo ya libota na ye.

12 Nsima na kosikolama, basaleli na Nzambe, lokola yango eyebisamaki na Yisaya 44:1-8, basakolaki ete ‘bazali bato na Jéhovah.’ Ye moko alobaki ete: “Ngai nazali oyo na liboso mpe oyo na nsuka, mpe longola ngai Nzambe mosusu azali te.” Banzambe-bikeko bakokaki kozongisa ata liloba moke te. Jéhovah alobaki lisusu na bato na ye ete: “Bozali batemwe na ngai,” kobakisaka ete: “Ezali nde na Nzambe mosusu longola ngai? Te, Libanga ezali te.”

13. Losambo ya bikeko emonisi nini epai na mosambeli na yango?

13 Tozali lisusu komibatela na losambo na bikeko mpamba te oyo amipesi na yango azali na mayele te. Na eteni na nzete moko oyo aponi, mosambeli na bikeko akosala nzambe mpo na kosambela, mpe na eteni mosusu akopelisa mótɔ mpo na kolamba bilei na ye. (Yisaya 44:9-17) Oyo nde bolema! Lisusu, mosali mpe mosambeli na banzembe ya bikeko azali mpe na nsoni mpamba te azali na likoki te ya kopesa litatoli limonisi bonzambe na yango. Kasi Bonzambe na Jéhovah bokoki kotyamela ntembe te, mpo ete asakolaki te bobele kosikolama ya bato na ye longwa na Babilone kasi lisusu asalaki ete yango esalema. Yelusaleme etondaki lisusu na bato, bingumba na Yuda bitongamaki lisusu, mpe “etima mozindo” ya Babilone​—Ebale ya Efelata​—eumelaki lisusu te lokola liziba ya libateli. (Yisaya 44:18-27) Lokola Nzambe asakolaki yango, Cyrus moto na Perse alongaki Babilone.​—Yisaya 44:28 kino 45:6.

14. Kati na Esambiselo Monene ya molongo mobimba, nini ekomonisama mpo na libela?

14 Banzambe ya bikeko balongaki te kati na likambo ya kondimisa bonzambe na bango. Mpe oyo ekómelaki Babilone ezali mpenza oyo ekokómela elilingi na yango lelo, Babilone Monene, lisanga ya mokili mobimba ya losambo ya lokuta. Mosika te, Babilone Monene mpe banzambe na yango nyonso, bisaleli na yango ya losambo mpe biloko na yango ya losambo ya bikeko bikolongolama libela na libela. (Emoniseli 17:12 kino 18:8) Kati na Esambiselo Monene ya Molongo, ekomonisama mpo na libela ete Jéhovah ye moko azali Nzambe na bomoi mpe na solo mpe ete azali kokokisa Liloba na ye ya esakweli.

Bambeka epai na bilimu mabe

15. Elimo santu mpe collège central ya ekeke ya liboso balobaki nini mpo na basaleli ya Jéhovah mpe losambo ya bikeko?

15 Libota na Jéhovah lizali lisusu komibatela na losambo na bikeko mpamba te batambwisami na elimo mpe na lisangá ya Nzambe. Collège central ya ekeke ya liboso ya basaleli na Jéhovah elobaki na baninga na bango baklisto ete: “Elimo santu mpe biso moko tomoni malamu kotyela bino mikumba misusu te, bobele makambo oyo mazali na ntina: koboya biloko bipesami na bikeko, makila, banyama bakamolami mpe pite. Soki bokomibatela na makambo oyo, bokozala malamu. Botikala malamu!”​—Misala 15:28, 29, MN.

16. Na maloba na yo moko, lolenge nini okoki kolimbola oyo ntóma Paulo alobaki na ntina na biloko bipesami na bikeko?

16 Ntina mosusu ya komibatela na losambo na bikeko ezali mpo na kobwaka losambo ya bilimu mabe. Na ntina na Elambo na Mpokwa ya Nkolo, ntoma Paulo alobaki na baklisto ya Kolinti ete: “Bokima losambo na bikeko. . . . Kopo na kopambwama oyo tozali kopambola, ezali lisangana na makila na Klisto te? Limpa oyo tozali kobuka, ezali lisangana na nzoto na Klisto te? Mpo ete limpa ezali moko, tozali nzoto moko, ata tozali bato ebele, mpamba te biso nyonso tozali kosangana na limpa yango moko. Botala Yisraele ya mosuni: Baoyo bakolyaka mbeka bazali basangani na etumbelo te? Boye, nasengeli koloba nini? Eloko epesami na ekeko ezali na ntina? To ekeko ezali na ntina? Te; kasi nalobi ete biloko oyo mabota bazali kopesa, bazali kopesa yango na bilimu mabe kasi na Nzambe te; mpe nalingi te ete bozala basangani na bilimu mabe. Bokoki te komela kopo na Jéhovah mpe kopo na bilimu mabe; bokoki te kosangana na ‘mesa na Jéhovah’ mpe na mesa na bilimu mabe. To ‘tolingi nde kopelisa nkanda na Jéhovah’? Tozali nde makasi koleka ye?”​—1 Bakolinti 10:14-22.

17. Na ekeke ya liboso ya T.B., na nzela nini moklisto akokaki kolya misuni mipesamaki na bikeko, mpe mpo na nini?

17 Ndambo na nyama ezalaki kopesama na ekeko, eteni mosusu ezalaki kopesama epai na banganga, mosambeli azalaki kozwa ndambo mosusu mpo na elambo. Nzokande, ndambo mosusu ya misuni ezalaki kotekama na zando. Ezalaki likambo mabe mpo na moklisto kokende kati na tempelo ya bikeko kolya elambo atako azalaki te kolya yango lokola eteni ya milulu, mpamba te yango ekokaki kobetisa bato mosusu libaku to kobenda ye kati na losambo ya lokuta. (1 Bakolinti 8:1-13; Emoniseli 2:12, 14, 18, 20) Kopesa nyama na bikeko ebongolaki mosuni te, mpo na yango moklisto akokaki kosomba misusu kati na yango na zando. Lisusu, ntango abyangamaki na elambo na ndako moko, asengelaki te kotuna mpo na koyeba epai wapi mosuni oyo bapesaki ye eutaki. Kasi soki moto alobi ete yango “epesamaki na mbeka,” asengelaki kolya yango te, mpo na koboya kobetisa bato mosusu libaku.​—1 Bakolinti 10:25-29.

18. Lolenge nini baoyo bakokaki kolya eloko epesamaki na ekeko basanganaki na bilimu mabe?

18 Ezalaki kokanisama mingi ete nsima na kosala milulu ya mbeka, nzambe azalaki kati na misuni mpe akotaki na nzoto ya baoyo bazalaki kolya yango na elambo ya losambo. Lokola bato oyo bazalaki kolya elongo bazalaki koyeisa makasi boyokani kati na bango, bobele bongo baoyo bazalaki kolya nyama epesamaki mbeka bakomaki basangani na etumbelo mpe bakotaki na boyokani elongo na nzambe-demo oyo amonisamaki na ekeko yango. Na nzela ya losambo wana ya bikeko, bilimu mabe bazalaki kopengwisa bato longwa na losambo ya Nzambe bobele moko ya solo. (Yilimia 10:1-15) Ezali likambo na kokamwa te soki libota na Jéhovah lizalaki koboya biloko bipesamaki na bikeko! Bobele bongo lelo, mpo na komibatela na losambo ya bikeko esengeli kotikala sembo epai na Nzambe, kondima litambwisi ya elimo santu mpe ya lisanga na ye, mpe kozwa ekateli ya koboya makambo nyonso mazali na boyokani na losambo ya bilimu mabe.

Mpo na nini tosengeli komibatela?

19. Motindo nini ya losambo ya bikeko ezalaki kosalema na Efese ya kala?

19 Baklisto bazali komibatela na likebi nyonso na losambo ya bikeko mpamba te ezali na mitindo mingi, mpe ata mwa molulu moke oyo eyokani na losambo ya bikeko ekoki kobebisa kondima na bango. Ntomá Yoane ayebisaki na baninga na ye baklisto ete: “Bomibatela na losambo ya bikeko.” (1 Yoane 5:21) Toli oyo ezalaki na ntina mingi mpamba te mitindo mingi ya losambo ya bikeko ezingaki bango. Yoane akomaki longwa na Efese, engumba etondaki na misala ya mazí mpe na masapo na ntina na banzambe ya lokuta. Efese ezalaki na moko na biloko nsambo ya kokamwa na mokili​—tempelo ya Artemis, esika ya kobombama mpo na basali na mabe mpe esika ya milulu ya mbindo. Héraclite, filozofe ya Efese, akokanisaki molili oyo ezalaki zingazinga na etumbelo ya tempelo wana na molili ya misala mabe, amonaki ete bizaleli ya bato oyo bazalaki kosala na tempelo ezalaki mabe koleka oyo ya banyama. Na yango, baklisto ya Efese basengelaki kotelema ngwi mpo na komibatela na losambo ya bilimu mabe, na makambo na pite, mpe na losambo ya bikeko.

20. Mpo na nini ezali likambo ya ntina koboya kozala na boyokani ata moke na makambo matali losambo ya bikeko?

20 Baklisto basengeli kozala na ekateli makasi ya koboya kozala ata na boyokani moke na makambo matali losambo ya bikeko mpamba te kosangana na molulu ata moke ya kosambela Diable ezali kolongisa ntembe oyo abimisaki ete bato bakotikala sembo te epai na Nzambe soki bamekami. (Yobo 1:8-12) Ntango alakisaki Yesu “bikonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango,” Satana alobaki ete: “Nakopesa yo nyonso wana soki okofukama mpe okosambela ngai.” Koboya ya Klisto elongisaki Jéhovah na likambo litali boyangeli ya molongo mobimba mpe emonisaki ete Diable azali mobuki na lokuta.​—Matai 4:8-11; Masese 27:11.

21. Na ntina na mokonzi ya Loma, nini baklisto ya sembo baboyaki kosala?

21 Bayekoli ya liboso ya Yesu basalaki soko moke te likambo moko ya losambo oyo ekokaki kolongisa Satana na ntembe wana. Atako bazalaki komonisa mpenza limemya epai na basali na biyangeli lokola “bakonzi baleki liboso,” baboyaki kotumba mpaka na malasi mpo na lokumu ya mokonzi ya Loma, atako bazalaki na likama ya kobungisa bomoi na bango. (Baloma 13:1-7) Mpo na likambo yango, Daniel P. Mannix akomaki ete: “Bobele baklisto moke nde bawanganaki kondima na bango, atako etumbelo epelisami esalemaki mpo na bango na esika ya masano. Bazalaki kosenga na mokangami bobele kosopa mwa mpaka na malasi likolo na moto mpe na nsima bazalaki kopesa ye Certificat ya Mbeka mpe akomaki na bonsomi. Bazalaki lisusu kolimbolela ye na likebi ete azalaki kosambela mokonzi te; kasi azalaki bobele kondima ezaleli na ye ya bonzambe oyo ekangisami na etelemelo na ye ya mokonzi ya Ekolo ya Loma. Atako bongo, pene ata moklisto moko te asalelaki libaku wana mpo na kokima.” (Baoyo basengeli kokufa, na Lingelesi, lokasa 137) Soki komekama motindo wana ebimeli yo, okokoka koboya lolenge nyonso ya losambo ya bikeko?

Okomibatela na losambo ya bikeko?

22, 23. Mpo na nini osengeli komibatela na losambo ya bikeko?

22 Emonani polele ete baklisto basengeli komibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko, mpamba te Jéhovah azali kosenga bokangami mobimba epai na ye. Baebele misato ya sembo bapesaki ndakisa malamu na koboyaka kosambela ekeko monene oyo Nebukadenesala mokonzi ya Babilone atelemisaki. Kati na kosamba na molongo mobimba eyebisamaki na mosakoli Yisaya, Jéhovah amonisamaki ete azali Nzembe bobele moko ya solo mpe ya bomoi. Batemwe baklisto na ye ya liboso baboyaki biloko bipesamaki na bikeko. Bato mingi ya sembo kati na bango bakweaki te na bopusi makasi ya kosala ata likambo moko liyokani na losambo ya bikeko oyo mbele ekokaki komonisa ete bawangani Jéhovah.

23 Na yango, ozali komibatela mpenza na losambo ya bikeko? Ozali komonisa bokangami mobimba epai na Nzambe? Ozali kosimba boyangeli na Jéhovah mpe kosanzola ye lokola Nzambe ya solo mpe ya bomoi? Soki ezali bongo, esengeli ete ekateli na yo elanda kozala ngwi mpo na komibatela na misala miyokani na losambo ya bikeko. Kasi makanisi nini mosusu ya Makomami oyo makoki kosalisa yo na komibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko?

Bozongeli

◻ Losambo ya bikeko ezali nini?

◻ Mpo na nini Jéhovah aboyi lolenge nyonso ya losambo ya bikeko?

◻ Etelemelo nini Baebele misato bakamataki na likambo litalaki kosambela ekeko?

◻ Lolenge nini baoyo bakokoki kolya biloko bipesamaki na bikeko basanganaki na bilimu mabe?

◻ Mpo na nini tosengeli komibatela na losambo ya bikeko?

[Elilingi na lokasa 23]

Atako bomoi na bango ezalaki na likama, Baebele misato baboyaki kosambela ekeko

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto