Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 5. Tosá lisosoli ya basusu

      Bato nyonso bazwaka bikateli ndenge moko te. Ndenge nini tokoki komonisa ete totosaka lisosoli ya basusu? Tózwa bandakisa mibale:

      Ndakisa 1: Ndeko mwasi moko oyo alingaka kosala monzɛlɛ makasi akei na lisangá oyo bandeko basi mingi babɛtaka libaku soki bamoni ndeko mwasi asali monzɛlɛ ya bongo.

      Tángá Baroma 15:1 mpe 1 Bakorinti 10:23, 24, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Na kotalela bavɛrsɛ yango, ndeko mwasi yango akoki kozwa ekateli nini? Okosala nini soki ozali elongo na moto moko oyo lisosoli na ye epekisi ye kosala likambo oyo lisosoli na yo epekisi yo te?

      Ndakisa 2: Ndeko mobali moko ayebi ete Biblia epekisi te komɛla masanga, kasi ye amɛlaka na ye masanga te. Babengisi ye na fɛti to esika moko oyo bandeko mosusu bazali komɛla masanga.

      Tángá Mosakoli 7:16 mpe Baroma 14:1, 10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Na kotalela bavɛrsɛ oyo, ndeko mobali yango akoki kozwa ekateli nini? Okosala nini soki omoni moto moko azali kosala makambo oyo lisosoli na yo epekisi yo?

      Makambo oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu

      Mwasi moko azali kobondela.

      1. Sɛngá Yehova asalisa yo oyeba oyo okosala.​—Yakobo 1:5.

      Mwasi yango azali kosala bolukiluki na Biblia, na mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe na ordinatɛrɛ.

      2. Salá bolukiluki na Biblia mpe na mikanda na biso mpo na koyeba mitinda oyo okosalela. Okoki mpe kosolola na ndeko moko oyo akɔmɛli na elimo.

      Mwasi yango azali kokanisa.

      3. Talá soki ekateli yango ekobɛtisa lisosoli na yo mpe ya basusu libaku to te.

  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo​—Eteni 1
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 6. Okoki kolonga mikakatano na libala na yo

      Libala ya kokoka ezalaka te. Yango wana, mwasi ná mobali basengeli kosala elongo mpo na kolonga mikakatano. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo.

      VIDEO: Oyo tokoki kosala mpo tókómisa makasi boyokani na biso na libala (5:44)

      • Na video yango, nini emonisi ete mwasi ná mobali bakómaki kosala makambo moto na moto na ndenge na ye?

      • Makambo nini basalaki mpo bákómisa libala na bango malamu koleka?

      Tángá 1 Bakorinti 10:24 mpe Bakolose 3:13. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

      • Ndenge nini kosalela toli oyo ekoki kokómisa libala malamu koleka?

      Biblia elobi ete tosengeli kopesanaka lokumu. Kopesa moto lokumu elingi koloba, kosalela ye makambo na boboto mpe na limemya. Tángá Baroma 12:10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Mobali to mwasi asengeli kozela ete molongani na ye azala moto ya liboso ya kopesa ye lokumu? Mpo na nini?

  • Molato na biso mpe ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato ezali na ntina
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • Moto nyonso azali na ndenge oyo alingaka kolata mpe kosala monzɛlɛ. Soki tozali kolanda mitinda ya Biblia, tokoki kolata ndenge tolingaka mpe kosepelisa Yehova. Tótalela mwa mitinda yango ya Biblia.

      1. Mitinda nini ekoki kosalisa biso tólataka malamu mpe tósalaka monzɛlɛ malamu?

      Tosengeli kopona ‘molato oyo ebongi, kolekisa ndelo te mpe kozala na makanisi malamu,’ mpe kozala ntango nyonso pɛto mpo basusu bámona ete ‘tokangamaka na Nzambe.’ (1 Timote 2:9, 10) Tótalela mitinda minei oyo: (1) Bilamba na biso esengeli kozala “malamu.” Ndenge kaka okoki komona yango na makita ya lisangá, biso Batatoli ya Yehova tolataka ndenge moko te, kasi bilamba na biso mpe ndenge na biso ya kosala monzɛlɛ emonisaka ete topesaka Nzambe oyo tosambelaka lokumu. (2) ‘Kolekisa ndelo te’ na molato, elingi koloba bilamba na biso esengeli te kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto epai ya basusu to mpe kobenda likebi mingi epai na biso. (3) Tokomonisa ete ‘tozali na makanisi malamu’ soki tozali kolanda te midɛlɛ ya bilamba to ya monzɛlɛ oyo bato mingi bazali kosala lelo. (4) Ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato esengeli ntango nyonso komonisa ete ‘tokangamaka na Nzambe,’ mpo basusu bámona ete tosambelaka Nzambe ya solo.​—1 Bakorinti 10:31.

      2. Mpo na nini tosengeli kokanisa bandeko ntango tozali kopona bilamba to kosala monzɛlɛ?

      Atako biso moko nde tosengeli kopona bilamba oyo tokolata, tosengeli mpe kokanisa oyo yango ekosala basusu. Tosalaka nyonso mpo na kobɛtisa basusu libaku te, kasi tolukaka nde ‘kosepelisa bazalani na biso na kosalela bango bolamu, mpo na kolendisa bango.’​—Tángá Baroma 15:1, 2.

      3. Ndenge nini molato na biso ekoki kobenda basusu na losambo ya solo?

      Tosalaka makasi tólataka ntango nyonso malamu, mingimingi ntango tozali kokende na makita ya lisangá mpe ntango tobimi na mosala ya kosakola. Tolingaka te ete ndenge oyo tozali komonana elongola likebi ya bato na nsango ya ntina oyo tomemelaka bango. Kasi, tolingaka nde ebenda bato na solo mpe ekómisa “mateya ya Mobikisi na biso” kitoko.​—Tito 2:10.

      KƆTÁ NA MOZINDO

      Luká koyeba oyo okoki kosala mpo molato mpe ndenge na yo ya kosala monzɛlɛ emonisa ete ozali mokristo ya solo.

      Mibali mibale batɛlɛmi liboso ya zuzi. Mobali moko alati bilamba ya kitoko mpe mobali mosusu alati pantalon bapasolápasolá, elamba ya kofandela na ndako ná ekɔti.

      Molato na biso ekoki komonisa soki topesaka bato oyo bazali na bokonzi lokumu to te. Atako Yehova amonaka mitema ya bato, ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato esengeli mpe komonisa ete topesaka ye lokumu

      4. Komonana malamu na miso ya bato epesaka Yehova lokumu

      Wapi ntina ya libosoliboso oyo etindaka biso tózwa na liseki te ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato? Tángá Nzembo 47:2, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Molato na biso ekoki kotinda bato báloba nini mpo na Yehova? Yango etindi yo osala nini?

      • Okanisi nini: Ebongi mpenza ete tótyaka likebi na ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato ntango tokei na makita to na mosala ya kosakola? Mpo na nini?

      5. Ndenge oyo tokoki kopona malamu bilamba mpe lolenge ya kosala monzɛlɛ

      Talá VIDEO.

      VIDEO: “Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe” (10:18)

      Bilamba na biso ezala ya ntalo to te esengeli kozala pɛto mpe oyo ebongi na kolanda makambo oyo tozali kosala. Tángá 1 Bakorinti 10:24 mpe 1 Timote 2:9, 10. Na nsima, lobelá ntina oyo tosengeli koboya kolata bilamba oyo . . .

      • ezali pɛto te, ebongi te to ezali bongobongo.

      • ekangi nzoto, emonisaka binama mosusu ya nzoto, to elamwisaka mposa ya kosangisa nzoto.

      Bakristo bazali na nse ya mibeko ya Moize te, kasi mibeko yango ekoki kosalisa bango báyeba ndenge Yehova akanisaka. Tángá Kolimbola Mibeko 22:5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Mpo na nini tosengeli koboya kolata bilamba to kosala monzɛlɛ oyo ekómisaka mibali lokola basi mpe basi lokola mibali?

      Tángá 1 Bakorinti 10:32, 33 mpe 1 Yoane 2:15, 16, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Mpo na nini tosengeli koluka koyeba soki ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato ezali kobɛtisa bato libaku na esika oyo tofandi to na lisangá?

      • Midɛlɛ nini ya bilamba to ya kosala monzɛlɛ ezali na esika oyo ofandi?

      • Okanisi nini, midɛlɛ yango nyonso ebongi mpenza mpo na mokristo? Mpo na nini?

      Ezali na balolenge mingi ya molato mpe ya kosala monzɛlɛ oyo esepelisaka Yehova

      Basi ná mibali ya mbula, loposo mpe ekólo ndenge na ndenge balati bilamba mpe basali monzɛlɛ oyo ebongi na bakristo.

      SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nalataka elamba nyonso oyo nalingi.”

      • Yo mpe okanisaka bongo? Mpo na nini?

      NA MOKUSE

      Soki toponi malamu bilamba na biso mpe ndenge ya kosala monzɛlɛ, tokomonisa ete topesaka Yehova mpe basusu lokumu.

      Bozongeli

      • Mpo na nini bilamba na biso mpe ndenge na biso ya kosala monzɛlɛ ezali na ntina na miso ya Yehova?

      • Mitinda nini esengeli kosalisa yo opona malamu bilamba mpe lolenge ya kosala monzɛlɛ?

      • Molato to monzɛlɛ na biso ekoki kosala ete bato bátalela losambo ya solo ndenge nini?

      Oyo okoki kosala

      MAKANISI MOSUSU

      Talá ndenge basusu bakoki kotalela yo mpo na bilamba oyo olati.

      “Namonanaka ndenge nini na miso ya bato?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

      Talá ntina oyo ebongi okanisa liboso ya kokomakoma na nzoto (tatouage).

      “Biblia elobi nini na likambo ya kosala mayemi na nzoto?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

      Talá mitinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu.

      “Elateli na yo ekumisaka Nzambe?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 09/2016)

      Nini esalisaki mwasi moko oyo alingaki kosepelisa Nzambe akóma kondima ndenge oyo basusu balataka mpe basalaka monzɛlɛ?

      “Nazalaki kokanisa ete kosala monzɛlɛ ezali mabe na miso ya Nzambe” (Lamuká! ya 07/2004)

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto