MOKAPO 6
Ndenge ya kopona masano ya malamu
“Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 BAKORINTI 10:31.
1, 2. Tozali na likoki ya kosala nini na oyo etali masano?
KANISÁ ete olingi kolya mbuma moko ya kitoko, kasi omoni ete eteni na yango moko epɔlá. Okosala nini? Okoki kolya yango mobimba, ná eteni oyo epɔlá; okoki mpe kobwaka yango mobimba; to mpe okoki kolongola eteni oyo epɔlá mpe kolya oyo ya malamu. Okopona kosala nini?
2 Tokoki kokokanisa masano na mbuma ya ndenge wana. Na bantango mosusu ozalaka na mposa ya kominanola mwa moke, kasi omonaka ete masano mingi lelo oyo ezali mabe, to epɔlá. Na yango, osengeli kosala nini? Bato mosusu bakangaka miso na makambo ya mabe mpe basepelaka na masano nyonso oyo ezali na mokili oyo. Bamosusu baboyaka masano nyonso mpo eloko moko te ebebisa bango. Nzokande, ezali mpe na bamosusu oyo baboyaka masano ya mabe, kasi baponaka oyo ya malamu. Osengeli kosala nini na likambo yango mpo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe?
3. Tokotalela nini?
3 Mingi kati na biso tokolinga kopona masano ya malamu mpe koboya oyo ya mabe. Toyebi ete kominanola mwa moke ezali na ntina, kasi tosengeli kopona masano oyo ezali mabe te. Yango wana, tosengeli kotalela ndenge oyo tokoki kokesenisa masano ya malamu na oyo ya mabe. Kasi, tótalela naino ndenge oyo losambo na biso ekoki kobeba soki tozali kopona malamu te masano na biso.
“BÓSALAKA MAKAMBO NYONSO MPO NA NKEMBO YA NZAMBE”
4. Lokola tomipesi na Nzambe, ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya kopona masano?
4 Eleki mwa bambula, Motatoli moko oyo azwá batisimo na 1946 alobaki boye: “Namityelá mokano ya kolanda lisukulu nyonso ya batisimo mpe koyoka yango na likebi, lokola nde ngai mpe nalingi kozwa batisimo.” Mpo na nini? Alobaki boye: “Kozongisa na makanisi na ngai ete namipesá na Yehova esalisaka ngai mingi mpo natikala sembo.” Na ntembe te yo mpe omonaka ete likanisi yango ezali solo. Kozongisa na makanisi ete olakaki Yehova ete okosalela ye bomoi na yo mobimba epesaka yo makasi ya koyika mpiko. (Tángá Mosakoli 5:4.) Soki ozali kobosana te ete omipesaki na Nzambe, yango ekosalisa yo otalelaka na ndenge ya malamu mosala ya bokristo mpe makambo mosusu ya bomoi, ata mpe masano. Ntoma Paulo amonisaki likambo yango ntango akomelaki bakristo ya ntango na ye ete: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Bakorinti 10:31.
5. Ndenge nini Balevi 22:18-20 esalisi biso tómona likebisi oyo ezali na Baroma 12:1?
5 Losambo na yo etalelaka makambo nyonso oyo osalaka na bomoi na yo. Na mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo asalelaki maloba ya elilingi oyo ezali na nguya mpenza mpo na kolimbwela bango likambo yango. Alendisaki bango na maloba oyo: “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima: mosala mosantu oyo bozali kosala na makoki na bino ya kokanisa.” (Baroma 12:1) Nzoto na yo esangisi makanisi na yo, motema na yo, mpe makasi na yo. Osalelaka nyonso wana mpo na kosalela Nzambe. (Marko 12:30) Paulo alobaki ete mosala oyo tosalelaka Nzambe na motema mobimba ezali “mbeka.” Liloba yango ezali likebisi mpo na biso. Na ntango Bayisraele bazalaki kolanda Mibeko ya Moize, Nzambe azalaki kondima te mbeka oyo ezali na mbeba. (Balevi 22:18-20) Ndenge moko mpe, soki mokristo apesi mbeka ya elimo oyo ezali na mbeba, Nzambe akondima yango te. Kasi, ndenge nini yango ekoki kosalema?
6, 7. Ndenge nini mokristo akoki kobebisa nzoto na ye, mpe yango ekoki kosukela ye ndenge nini?
6 Paulo akebisaki bakristo ya Roma na maloba oyo: “Bókoba mpe kopesa binama na bino na lisumu te.” Alobaki na bango mpe ete ‘báboma misala ya nzoto.’ (Baroma 6:12-14; 8:13) Mwa mikapo liboso, na mokanda yango kaka, atángaki mwa bandakisa ya “misala ya nzoto.” Na ntina na bato ya masumu, akomaki boye: “Monɔkɔ na bango etondi na elakeli mabe.” “Makolo na bango ekendaka mbangu kosopa makila.” “Kobanga Nzambe ezali liboso ya miso na bango te.” (Baroma 3:13-18) Mokristo akobebisa nzoto na ye soki azali kosalela “binama” na ye na misala wana oyo ezali masumu. Na ndakisa, soki mokristo moko azali kotala makambo mabe, na ndakisa bililingi ya makambo ya nsɔni to bafilme ya bitumba, azali ‘kopesa [miso na ye] na lisumu’ mpe azali kobebisa nzoto na ye mobimba. Losambo ya moto yango ekozala lokola mbeka oyo ezali lisusu mosantu te, mpe Nzambe akoki kondima yango te. (Kolimbola Mibeko 15:21; 1 Petro 1:14-16; 2 Petro 3:11) Yango ezali komonisa ete kolinga masano ya mabe ezali mpenza likama!
7 Tomoni mpenza ete mokristo asengeli kozwa na lisɛki te likambo ya kopona masano. Yango wana, tosengeli kopona masano oyo ekobongisa mbeka na biso epai ya Nzambe, kasi te oyo ekobebisa yango. Sikoyo, tótalela ndenge oyo tokoki koyeba soki lisano moko ezali malamu to te.
“BÓYINA OYO EZALI MABE”
8, 9. (a) Tokoki kokabola masano na mitindo nini mibale? (b) Masano ya ndenge nini tosengeli koboya, mpe mpo na nini?
8 Tokoki kokabola masano na mitindo mibale. Ya liboso, masano oyo bakristo basengeli kolinga ata moke te; ya mibale, masano oyo bakristo bakoki ntango mosusu kopona. Tólobela naino masano oyo bakristo basengeli kolinga ata moke te.
9 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 1, masano mosusu elendisaka makambo oyo Biblia epekisi mpenza. Tokoki kozwa ndakisa ya baemisyo mosusu ya televizyo, bafilme, miziki mpe bisika mosusu na Internet oyo ezali kolakisa makambo ya mobulu to mpe bililingi ya makambo ya nsɔni to misala mosusu ya mbindo, ata mpe misala ya bilimo mabe. Lokola masano ya ndenge wana ezali komonisa polele makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia to ezali kobuka mibeko na yango, bakristo ya solo basengeli koboya yango mpenza. (Misala 15:28, 29; 1 Bakorinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8) Soki oboyaka masano ya ndenge wana, omonisaka epai ya Yehova ete ‘oyinaka oyo ezali mabe’ mpe ‘otikaka oyo ezali mabe.’ Yango emonisi ete ozali na “kondima oyo ezali na bokosi te.”—Baroma 12:9; Nzembo 34:14; 1 Timote 1:5.
10. Na oyo etali masano, makanisi nini ezali likama, mpe mpo na nini?
10 Kasi, bato mosusu bakoki kokanisa ete kotala masano oyo ezali kolakisa makambo ya mbindo ezali na likama moko te. Bakoki koloba boye, ‘Nakoki kotala makambo yango na filme to na televizyo, kasi nakosala yango ata mokolo moko te.’ Makanisi ya ndenge wana ezali lokuta mpe ezali likama. (Tángá Yirimia 17:9.) Tokoki mpenza koloba ete ‘toyinaka oyo ezali mabe’ soki tosepelaka kotala makambo oyo Yehova apekisi? Soki tozali mbala na mbala kotala makambo ya mabe, makanisi na biso ekobeba. (Nzembo 119:70; 1 Timote 4:1, 2) Momeseno wana ekoki komema biso na kosala makambo ya mabe to kobongola ndenge oyo totalelaka misala mabe ya bato mosusu.
11. Ndenge nini maloba ya Bagalatia 6:7 emonanaka solo na oyo etali masano?
11 Makambo yango esalemaka mpenza. Bakristo mosusu bakweaki na etamboli ya mbindo mpo bamesanaki kotala masano oyo nsukansuka ebebisaki makanisi na bango. Nsima ya kokutana na likama, bandimaki ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Kasi, okoki komibatela mpo likambo ya ndenge wana ekómela yo te. Soki ozali kosɛnzɛla ete okɔtisaka na bɔɔngɔ na yo makambo ya malamu, okobuka mpe makambo ya malamu.—Talá etanda “Nasengeli kopona masano ya ndenge nini?”
BIKATELI YA MOTO NA MOTO NA KOTALELA MITINDA YA BIBLIA
12. Na ndenge nini etinda ya Bagalatia 6:5 etaleli mpe masano, mpe litambwisi nini tozali na yango mpo na kozwa bikateli ya malamu?
12 Sikoyo, tótalela masano oyo ezali na makambo oyo Liloba ya Nzambe epekisi te, kasi elendisi mpe yango te. Ntango mokristo mokomoko azali kotalela masano ya ndenge wana, asengeli kozwa ekateli ya kopona oyo ezali malamu mpo na ye. (Tángá Bagalatia 6:5.) Nzokande, Yehova apesi biso mpe litambwisi oyo ebongi mpo tóyeba kopona malamu na makambo ya ndenge wana. Biblia ezali na mitinda oyo esalisaka biso tóyeba makanisi ya Yehova. Soki tozali kotyela mitinda yango likebi, tokososola “soki mokano ya Yehova ezali nini” na makambo nyonso, ata mpe na masano oyo tosengeli kopona.—Baefese 5:17.
13. Nini ekoki kosalisa biso tóboya masano oyo ekoki kosepelisa Yehova te?
13 Ya solo, bakristo nyonso bazali na bososoli ndenge moko te. (Bafilipi 1:9) Longola yango, bakristo bayebaka ete moto na moto azali na masano oyo asepelaka na yango mpe oyo asepelaka na yango te. Yango wana, tokoki kolikya te ete bakristo nyonso bápona lolenge moko ya masano. Atako bongo, soki tozali kotika ete mitinda ya Nzambe efanda na makanisi mpe na mitema na biso, tokokakatana te mpo na koboya masano nyonso oyo ekoki kosepelisa Yehova te.—Nzembo 119:11, 129; 1 Petro 2:16.
14. (a) Likambo nini tosengeli kotalela ntango tozali kopona lisano? (b) Tokoki kosala nini mpo tótyaka ntango nyonso makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na biso?
14 Ntango ozali kopona masano, ezali mpe na likambo mosusu ya ntina mingi oyo osengeli kotalela: ntango na yo. Masano oyo oponaka ekoki komonisa makambo nini oyo yo omonaka mabe te; nzokande, ntango oyo olekisaka na masano yango ekoki komonisa makambo oyo eleki ntina mpo na yo. Toyebi ete mpo na bakristo, makambo ya elimo nde eleki ntina. (Tángá Matai 6:33.) Na yango, okoki kosala nini mpo otyaka ntango nyonso makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na yo? Ntoma Paulo alobaki boye: “Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, [bóyeba kosalela ntango na bino malamu].” (Baefese 5:15, 16) Ya solo, mpo ozalaka na ntango oyo ekoki mpo na “makambo oyo eleki ntina,” elingi koloba makambo oyo ekosalisa yo ozala makasi na elimo, osengeli kokataka ntango boni okolekisa na lisano moko.—Bafilipi 1:10.
15. Mpo na nini ezali malamu ozala ekɛngɛ ntango olingi kopona lisano moko?
15 Tosengeli mpe kozala ekɛngɛ ntango tolingi kopona lisano moko. Yango elingi koloba nini? Tózongela lisusu ndakisa ya mbuma. Mpo osutuka te ete olei mwa ndambo ya eteni oyo epɔlá, okokata te na esika mpenza oyo eteni oyo epɔlá esuki, okolongola mpe mwa ndambo ya eteni ya malamu. Ndenge moko mpe, ebongi ozala ekɛngɛ ntango olingi kopona lisano moko. Mokristo oyo azali na bwanya aboyaka masano oyo ezali kobuka mitinda ya Biblia, kasi aboyaka mpe masano oyo ekoki komonana malamu, nzokande ezali na mwa makambo mosusu oyo ezali makama mpo na elimo. (Masese 4:25-27) Kokangama na Liloba ya Nzambe ekosalisa yo osala yango.
“MAKAMBO NYONSO YA PƐTO”
Kolanda mitinda ya Biblia ntango tozali kopona masano ebatelaka elimo na biso
16. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na makanisi ya Yehova mpo na etamboli ya malamu? (b) Ndenge nini kosalela toli ya Biblia ekoki kokóma momeseno na yo?
16 Bakristo ya solo batalelaka libosoliboso makanisi ya Yehova ntango balingi kopona masano. Biblia ezali komonisa makanisi mpe mitinda ya Yehova. Na ndakisa, Mokonzi Salomo atángi makambo ndenge na ndenge oyo Yehova ayinaka, makambo lokola “lolemo ya lokuta mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te, motema oyo ekanaka myango oyo eyokisaka mpasi, makolo oyo ewelaka kopota mpo na kosala mabe.” (Masese 6:16-19) Makanisi ya Yehova esengeli kotinda yo osala nini? Mokomi ya nzembo alendisi biso na maloba oyo: “Bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe.” (Nzembo 97:10) Masano oyo oponaka esengeli komonisa ete oyinaka mpenza makambo oyo Yehova ayinaka. (Bagalatia 5:19-21) Lisusu, kobosana te ete koleka kutu makambo oyo osalaka na miso ya bato, makambo oyo osalaka na esika oyo ozali yo moko nde emonisaka soki ozali moto ya ndenge nini. (Nzembo 11:4; 16:8) Yango wana, soki ozali na mposa makasi ya komonisa na makambo nyonso oyo osalaka na bomoi na yo ete ozali na makanisi ya Yehova mpo na etamboli ya malamu, olandaka ntango nyonso mitinda ya Biblia mpo na kopona masano. Mpe kosala yango ekokóma momeseno na yo.—2 Bakorinti 3:18.
17. Liboso ya kopona lisano moko, mituna nini tosengeli komituna?
17 Okoki lisusu kosala nini mpo na komindimisa ete okolanda makanisi ya Yehova ntango ozali kopona lisano moko? Omituna motuna oyo, ‘Lisano yango ekosala nini na bomoto na ngai mpe na boyokani na ngai ná Nzambe?’ Na ndakisa, liboso ya kozwa ekateli ya kotala filme moko, omituna boye, ‘Makambo oyo ezali na filme yango ekoki nde kobebisa lisosoli na ngai?’ Tótalela mitinda oyo tosengeli kolanda na likambo yango.
18, 19. (a) Ndenge nini etinda ya Bafilipi 4:8 ekoki kosalisa biso mpo na koyeba soki lisano oyo toponi ezali malamu to te? (b) Wapi mitinda mosusu oyo ekoki kosalisa yo opona lisano ya malamu? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
18 Etinda moko ya ntina mingi ezali na Bafilipi 4:8, oyo elobi ete: “Makambo nyonso ya solo, makambo nyonso ya lokumu, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kokumisama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.” Ezali solo ete Paulo azalaki kolobela masano te; azalaki nde komonisa ete tosengeli komanyolaka likoló ya makambo oyo esepelisaka Nzambe. (Nzembo 19:14) Kasi, tokoki mpe kosalela maloba ya Paulo na likambo etali kopona masano. Na ndenge nini?
19 Omituna motuna oyo, ‘Bafilme, masano ya video, miziki, mpe masano mosusu oyo naponaka etikaka na makanisi na ngai “makambo nyonso oyo ezali pɛto”?’ Na ndakisa, nsima ya kotala filme moko, makanisi nini etikalaka na bɔɔngɔ na yo? Soki ezali makanisi ya malamu, ya pɛto, mpe oyo ebongi, boye okoki koloba ete oponaki lisano ya malamu. Nzokande, nsima ya kotala filme moko, soki makanisi ya mbindo nde ezali koyela yo, boye oponaki lisano ya mabe, oyo ekoki kobebisa yo. (Matai 12:33; Marko 7:20-23) Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te kokanisa makambo ya mbindo elongolaka kimya ya motema, ebebisaka lisosoli, mpe ekoki kobebisa boyokani na yo na Nzambe. (Baefese 5:5; 1 Timote 1:5, 19) Lokola lisano wana ebebisi makanisi na yo, zwá ekateli ya koboya yango mpenza.a (Baroma 12:2) Salá lokola mokomi ya nzembo oyo abondelaki Yehova ete: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.”—Nzembo 119:37.
LUKÁKÁ MATOMBA YA BASUSU
20, 21. Na ndenge nini makanisi ya 1 Bakorinti 10:23, 24 etaleli mpe kopona masano?
20 Paulo alobelaki etinda moko ya Biblia oyo tosengeli kobosanaka te ntango tozali kozwa bikateli na makambo oyo etali moto na moto. Alobaki boye: “Makambo nyonso epesami nzela; kasi ezali makambo nyonso te nde etongaka. Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakorinti 10:23, 24) Ndenge nini okoki kosalela etinda yango na oyo etali kopona masano? Osengeli komituna boye, ‘Ndenge nini bato mosusu bakotalela lisano oyo nalingi kopona?’
21 Ekoki kosalema ete lisosoli na yo ezali kotungisama te ntango oponi lisano moko oyo omoni ete “epesami nzela,” to ezali mabe te. Nzokande, soki omoni ete bandeko mosusu oyo lisosoli na bango epekisaka bango makambo mosusu oyo yo omonaka mabe te basepeli na lisano yango te, okoki kozwa ekateli ya kotika yango. Mpo na nini? Ndenge Paulo alobaki yango, mpo na koboya “kosalela bandeko na [yo] lisumu” to mpe “kosalela Kristo lisumu,” soki ozali kotyela bango libaku mpo bátikala sembo epai ya Nzambe. Osengeli te kobosana toli oyo: “Bókeba ete bókóma te bato oyo bazali kobɛtisa . . . libaku.” (1 Bakorinti 8:12; 10:32) Bakristo ya solo lelo oyo balandaka toli ya boboto mpe ya mayele oyo Paulo apesaki na ndenge baboyaka masano oyo, mbala mosusu “epesami nzela,” kasi “etongaka” te.—Baroma 14:1; 15:1.
22. Mpo na nini bakristo bandimaka ete baninga na bango bázala na makanisi ekeseni na makambo oyo etali moto na moto?
22 Kasi, koluka matomba ya basusu etaleli kaka te mokristo oyo asengeli kopona masano. Mokristo oyo lisosoli na ye epekisaka ye makambo mingi asengeli te koluka ete bandeko nyonso na lisangá bázala na likanisi lokola oyo ya ye na oyo etali masano ya malamu. Soki asali bongo, akozala lokola sofɛlɛ oyo azali kotambwisa motuka na nzela monene mpe alingi ete basofɛlɛ mosusu nyonso bátambola kaka na vitɛsi oyo ye asepeli. Makanisi ya ndenge wana ebongi te. Bolingo esengeli kotinda mokristo oyo lisosoli na ye epekisaka ye makambo mingi amemya bandeko na ye bakristo oyo bandimaka masano mosusu oyo ye asepelaka na yango te, kasi ebuki mpe mitinda ya bokristo te. Na ndenge yango, akosala ete “bato nyonso báyeba ezaleli na [ye] ya makambo makasimakasi te.”—Bafilipi 4:5; Mosakoli 7:16.
23. Ndenge nini okoki kopona masano ya malamu?
23 Na mokuse, ndenge nini okoki kopona masano ya malamu? Boyá masano nyonso oyo ezali komonisa makambo ya nsɔni mpe ya mbindo oyo Liloba ya Nzambe epekisi. Landá mitinda ya Biblia oyo ekoki kotalelama mpo na masano oyo Biblia elobeli polele te. Boyá masano oyo ebebisaka lisosoli, mpe ndimá kotika masano oyo ekoki kobɛtisa basusu libaku, mingimingi bandeko na yo ya elimo. Tiká ete ekateli na yo ya kosala bongo epesa Nzambe nkembo mpe ebatela yo moko mpe libota na yo na kati ya bolingo na ye.
a Mitinda mosusu oyo tokoki kotalela mpo na masano ezali na Masese 3:31; 13:20; Baefese 5:3, 4; mpe Bakolose 3:5, 8, 20.