“Bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe”
Ndimbola na ntina na mokanda ya liboso epai na Bakolinti
BAOYO nyonso bazali kosambela Jéhovah Nzambe ‘na elimo mpe na solo’ bazali komibanzabanza mingi mpo na nkembo na ye. (Yoane 4:23, 24) Ezali mpo na ntina yango ntoma Paulo akomaki epai na baninga na ye baklisto na engumba na kala ya Kolinti ete: “Boye, soko bokolyaka soko bokomelaka soko bokosalaka nini. bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Mpo na kosala bongo, tosengeli kondima lolenge oyo Jéhovah alingi komona biso kosilisa mikakatano na biso kati na mokili oyo emipesi na mposa ya mosolo, na pite mpe emikotisi na losambo ya lokuta.
Baklisto ya Kolinti bazalaki na mposa ya lisalisi na Nzambe mpo na kosilisa mikakatano na bango, mpamba te bazalaki kobika kati na engumba oyo ezalaki na bozwi mingi mpe makambo na pite, epai kuna losambo ya lokuta ezalaki na nguya. kolinti etongamaki likoló na mabelé oyo makangisaki mokili ya Grèce mpe Péloponnèse, ezalaki capitale ya province ya Baloma na Akai. Bafandi na yango bakokaki kozala 400 000. Ntoma Paulo‘asalaki lisangá na engumba yango pene na mobu 50.—Misala 18:1-11.
Bakolinti bakomelaki Paulo mpo na kotuna ye likoló na makambo matali libala mpe kolya nyama epesameli bikeko. (7:1) Ntoma azalaki kotungisama mpo na bokabwani mpe mpo na likambo moko monene na ntina etali pite oyo ezalaki kosalema kati na bango. Bakolinti bazalaki na mposa ya toli likoló na lolenge malamu ya kosala Elambo na Nkolo. Nkutu makanisi ya lipengwi emonanaki kati na bango mpe lisangá esengelaki kolendisama mpo emonisa bolingo. Ezali mpo na bantina nyonso wana nde pene na mobu 55, wana ezalaki ye na Efeso, Paulo, na kopemama na Nzambe, akomaki mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti. Biso mpe, tokoki kozwa matomba na yango.
Bomoko mpe bopeto na bizaleli malamu ezali na ntina mingi
Soko ‘tozali kosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe,’ tokolanda te moto oyo azali koluka kokotisa bokabwani kati lisangá moko na mikakatano oyo Bakolinti bakutanaki na yango. (1:1 kino 4:21) Paulo alendisaki bango na ‘koloba motindo moko mpe kosangana na elimo moko mpe na likanisi moko.’ Bomoko ekozala soko tolandi toli oyo mpe soko toloni bizaleli ya elimo. Na esika ete tómikumisa mpo na moto moko oyo azali mosumuki, tomikundola ete soko tozali ‘kolona mpe komwangisa mai, Nzambe nde azali kokolisa’ na elimo. Baoyo bazalaki komikumisa na kolinti bazalaki na eloko te oyo bazuaki te; na bongo, tokanisa te ete toleki bandeko na biso mosusu kati na kondima. Ezaleli ya komikitisa ekosalisa biso kozala na bomoko.
Mpo ete bomoko ezala bankulutu basengeli kosala mpo na kobatela bopeto ya elimo na lisangá. (5:1 kino 6:20) bokola “mfulu moke ekofulisa limpa mobimba,” esengeli kobimisa na lisangá basali na pite, bato na lokoso, basambeli na bikeko, batuki, balangwi na masanga mpe miyibi soko babongoli motema te. Pite ezali mbindo oyo ezali kobebisa temple na Nzambe, ekoki kopesama nzela te kati na basaleli na Jéhovah baoyo basengeli kopesa ye nkembo.
Totalela matomba ya bamosusu
Mpo na ‘kosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe,’ tosengeli kosalela toli ya Paulo likoló na libala mpe likoló na bonzemba. (7:1-40) Na makambo matali kosangisa nzoto, mobali asengeli kopesa mwasi yango ekoki na ye mpe bobele bongo, mwasi apesa mobali yango ekoki na ye, na limemya oyo ebongi. Moklisto oyo abali asengeli kokabwana te na mobalani na ye oyo azali mondimi te, mpamba te, mbala mosusu akosalisa ye azwa lobiko soki afandi elongo na ye. Wana libala ezali kobimisa mitungisi mingi, bonzemba ekoki kozala na matomba mingi mpo na moto oyo alingi kosalisa bato mosusu na elimo, na kosalela Nkolo “na motema mobimba.”
Baklisto nyonso, bazala mizemba to babalani, bazali na mokumba ya kosepela na bolamu ya elimo ya bato mosusu. (8:1 kino 10:33) Na bongo Paulo apesaki toli epai na Bakolinti ete babetisa moto mosusu libaku te na koliaka biloko bipesamelaki bikeko. Mpo na kopekisa te ete moto aboya nsango malamu, Paulo asalelaki te lotomo na ye ya kozwa lisalisi ya mosuni. Azalaki ‘kobeta nzoto na ye ete aboyama te awa esili ye kosakwela bamosusu.’ Soko tokanisi likambo likomelaki Bayisraele baoyo basalaki lisumu na esobe, tokozala na mpasi te mpo na kokima mabe mpe losambo ya bikeko. Mpe soko ‘tozali kosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe,’ tokobetisa moto mosusu libaku te.
Tozala na limemya mpe bato na makambo mabongi
Mpo na ‘kosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe’, tosengeli komonisa limemya oyo ebongi. (11:1-34) Na ekeke ya liboso, moklisto mwasi azalaki komonisa limemya na ye na bokonzi, na kozipaka motó ntango azalaki kobondela to kosakola na kati ya lisangá. Na ntango na biso, basi oyo bazali kobanga Nzambe bazali komonisa limemya motindo moko epai na bokonzi. Epai mosusu, mpo na kozala lokola Bakolinti te oyo bazalaki na mposa ya mpamela, tosengeli biso nyonso komonisa limemya mpo na Elambo na Nkolo.
Mpo na ‘kosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe,’ tosengeli kosala makita na biso na lolenge ebongi to na lolenge esengami (12:1 kino 14:40) Wana baklisto ya liboso bazalaki koyangana, basengelaki kosalela makabo ya elimo lokola oyo ya koloba na minoko mosusu na limemya mpe botondi mpo na liziba na yango mpe mokano na yango. Ata soko tozali kozua lisusu makabo motindo yango te, tozali kokumisa Nzambe na komonisaka bolingo, ezaleli oyo eleki makabo nyonso. Tozali mpe kokumisa Jehovah na kosalaka makita oyo mabongisami malamu, mpe tozali kolanda na limemya toli oyo ya Paulo: “Tika ete makambo nyonso masalama na motindo mozali na nsoni te mpe na mobulu te.”
Soko ‘tolingi kosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe,’ tosengeli komemya mateya na moboko na Biblia mpe kotelema ngwi na elimo. (15:1 kino 16:24) Basangani mosusu na lisanga ya Kolinti, baoyo bazalaki mbala mosusu kopusama na filozofi ya Bagreke, bazalaki koloba ete: “Lisekwa na bakufi ezali te.” (Tala Misala 17:18, 32). Mbala mosusu bazalaki kokanisa lokola bapengwi, ete lisekwa ekozala te na ntango ekoya, kasi ete baklisto oyo bazalaki na bomoi bazuaki lisekwa ya elilingi, ya elimo. (2 Timoté 2:16-18) Paulo akotelaki elikya ya solo na kotangáká lokola elembo, lisekwa na Yesu mpe amonisaki ete baklisto bapakolami basengeli kokufa mpo na kosekwa na kozwa bomoi bozangi nsuka na likoló. Na lolenge mosusu, maloba na ye mazali kosalisa biso ete tokwea na lipengwi te mpe na ‘kotelema ngwi kati na kondima.’
Tosala ntango nyonso mpo na nkembo na Nzambe
Batoli oyo Paulo apesi kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti ezali mpe na ntina lelo lokola ezalaki na ekeke ya liboso. Ezali kopusa ba Témoins de Jéhovah na ntango na biso na kosalela Nzambe kati na bomoko mpe kotikala libota na peto. Maloba na ntoma paulo masengelaki kopusa biso kotalela mingi matomba ya bamosusu mpe kozala na limemya mpo na bamosusu. Makoki mpe kolendisa biso mpo na kotemela lipengwi mpe kotelema ngwi kati na kondima ya solo.
Ya solo, basaleli nyonso ya sembo na Jéhovah balingi mpenza kopambola ye, kosakola Bokonzi na ye mpe kokumisa nkombo na ye mosantu. (Nzembo 145:1, 2, 10-13) Mokanda ya liboso na Paulo epai na Bakolinti mozali kosalisa biso mpenza na ‘kosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.’
BAPESAMI NA LIWA MPENZA: Kati na mikanda na ye epai na Bakolinti mbala mingi paulo azali kolobela mpo na liwa kati na arene (esika oyo bilombe baloma bazalaki kobunda). Na ndakisa akomaki boye: ‘Mpo ete nabanzi ete Nzambe abimisi biso bantoma na nsuka na molongo lokola bato (bapesami) ete bakufa, ete tozala etaliseli mpo na mokili mpe mpo na baanze mpe mpo na bato.’ (1 Bakolinti 4:9) Mbala mosusu Paulo azalaki kokanisa mpo na komimonisa ya mibali oyo bazalaki kobunda, bestiarii (mibali oyo bazalaki kobundisa banyama), mpe ba gladiatere (mibali oyo bazalaki kobunda bango na bango). Bamosusu bazalaki kobunda mpo na lifuti ya mbongo, kasi babomi na bato basengisamaki na makasi ete babunda. Na ebandeli, bazalaki kopesa bango nzela ya kosalela bibundeli, kasi na nsima bakotisamaki na esika ya masano wana ezali bango bolumbu mpe na kozanga eloko moko mpo na komibatela, bapesamaki na liwa mpenza.
Na miso na batali, ’baanzelu’ mpe ‘bato’ (bobele ‘mokili’ na bato te), bantoma bakokanaki na bato oyo bazalaki kokende kokufa na masano ya koboma motindo yango. Paulo alobi ete ‘abundaki na nyama na yauli kati na Efese,’ kasi bamosusu bazali kotya ntembe ete bakokaki te kosenga na makasi na citoyen romain asala likambo yango mpe bandimi ete Paulo azalaki kolobela mpo na batemeli. (1 Bakolinti 15:32) Nzokande, maloba na Paulo oyo engebene yango ete Nzambe abikisaki ye ‘na likambo monene oyo likokani na liwa’ na district ya Asie (epai kuna mboka Efese ezalaki) eyokani malamu mpenza na likanisi ya kobunda na banyama na yauli kati na esika ya masano koleka likanisi ya kotemelama na banguna oyo bazali bato.—1 Bakolinti 1:8-10; 11:13: Misala 19:23-41.
[Etanda/Elilingi na lokasa 25]
KOLANDA KOTALA BOBELE MBANO: Paulo asaleli masano ya kala ya Bagreke mpo na komonisa makanisi ya ntina. (1 Bakolinti 9:14-27) Programme ya masano lokola oyo babengi jeux Isthmiques, oyo ezalaki kobongisama ntango nyonso nsima na mbula mibale penepene na kolinti, kati na yango ezalaki masano ya kopota mbango mpe kobetana makofi. Na boumeli na ntango oyo bazalaki komibongisa mpo na masano yango, bapoti mbango mpe babeti makofi basengelaki kolekisa ndelo te na makambo mingi, basengelaki kolya malamu kasi kolya mingi te, mpe basengelaki koboya vinyo na boumeli ya sanza motoba. Moklisto mopakolami azali kobunda te mpo na kozua liboke ya bafololo oyo ekobebaka oyo ekopesamaka na balongi na masano, kasi azali kobunda mpo na kozua motole oyo ekobeba te, yango bomoi ya kozanga kokufa. Mpo na kozua mbano yango, asengeli kolanda kotala yango mpe komonisa ezaleli ya komipekisa. etinda yango moko ezali kotalela mpe ba Témoins de Jéhovah baoyo bazali kotalela bomoi ya seko na mabelé.