Tozali kobika bobele mpo na bomoi ya sikawa to mpo na bomoi ya seko oyo ezali koya?
“Tobiki na elikya oyo.”—BALOMA 8:24.
1. Bato oyo bazalaki kolanda Épicure bazalaki koteya nini, mpe mateya ya filozofi na ye ezalaki na bopusi nini epai na baklisto mosusu?
NTOMA Paulo akomaki maloba oyo epai ya baklisto ya Kolinti, ete: “Mpo na nini bamosusu kati na bino balobi ete lisekwa ezali te?” (1 Bakolinti 15:12) Emonani ete mateya ya filozofi mabe ya Épicure, moto ya mayele ya Grèce, esilaki kokɔta mwa moke kati na baklisto ya ekeke ya liboso. Paulo abendaki likebi likoló ya mateya ya Épicure: “Tólyaka mpe tómelaka zambi tokokufa lobi.” (1 Bakolinti 15:32) Lokola bazalaki kotyola elikya ya kozwa bomoi nsima ya liwa, baoyo bazalaki kolanda filozofi yango bazalaki kokanisa ete bamposa ya nzoto ezali likambo bobele moko ya ntina to oyo eleki makambo nyonso na malamu kati na bomoi. (Misala 17:18, 32) Mateya ya filozofi ya Épicure ezalaki koteya ezaleli ya moimi, kotyola, mpe ezalaki kobebisa bizaleli malamu.
2. (a) Mpo na nini kowangana lisekwa ezalaki likámá monene? (b) Lolenge nini Paulo alendisaki kondima ya baklisto ya Kolinti?
2 Koboya kondima liteya ya lisekwa ekanganaki mpe na makambo mosusu mingi. Paulo amonisaki likanisi oyo: “Soko nde lisekwa na bakufi ezali te, mbɛ Klisto asekwi te. Soko Klisto asekwi te, kosakola na biso ezali mpamba . . . Soko tozali kolikya na Klisto bobele na bomoi oyo, tozali koleka bato nyonso na mawa.” (1 Bakolinti 15:13-19) Ɛɛ, soki elikya mpo na bomoi ya seko na mikolo mikoya ezali te, boye losambo ya baklisto ekozala “eloko mpamba.” Ekozala na ntina te. Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete, mikakatano mingi ebimaki kati na lisangá ya boklisto. Ezalaki bongo mpo na bopusi ya mateya wana ya bopakano. (1 Bakolinti 1:11; 5:1; 6:1; 11:20-22) Yango wana Paulo azwaki mokano ete alendisa kondima na bango kati na lisekwa. Na kosaleláká nguya ya komonisa makanisi polele, na kotángáká Makomami, mpe na kosaleláká bandakisa, alakisaki na lolenge oyo moto moko te akokaki kobɛtɛla yango ntembe, ete elikya ya lisekwa ezalaki likanisi mpamba te, kasi ezali nde likambo ya solo mpe oyo ekosalema mpenza. Na nzela na yango, azwaki likoki ya kolendisa baninga na ye bandimi ete: “Bótɛlɛma ngwi, bóninganaka te, bósalaka mosala na Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.”—1 Bakolinti 15:20-58.
“Bókɛngɛlaka”
3, 4. (a) Engebene Petelo, ezaleli nini ya likámá esengelaki kobulunganisa basusu na mikolo oyo ya nsuka? (b) Tosengeli ntango nyonso komikundola likambo nini?
3 Na mikolo na biso, bato mingi bazangi elikya, bazali kobika bobele mpo na bomoi ya sikawa. (Baefese 2:2) Ezaleli yango ekokani na oyo ntoma Petelo asakolaki. Alobaki ete “basɛki bakoya mpe bakosɛka . . . bakoloba ete, Wapi elaka na Koya na ye? Zambi longwa na ntango na kufa na bankɔkɔ na biso, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli ya Kozalisama.” (2 Petelo 3:3, 4) Soki basambeli ya solo bazwami na motambo ya makanisi motindo oyo bakokóma ‘mpamba mpe bakozanga kobota mbuma.’ (2 Petelo 1:8) Nzokande, ezali bongo te mpo na ebele ya basaleli ya Nzambe na mikolo na biso.
4 Ezali mabe te koluka koyeba makambo mingi na ntina na nsuka oyo ezali koya ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Tómikundola mpe mposa oyo bantoma ya Yesu bamonisaki: “Moteyi, okozongisela Yisalaele bokonzi na ntango oyo?” Yesu ayanolaki ete: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te.” (Misala 1:6, 7) Maloba wana mazali na nsango ya ntina mingi oyo ayebisaki na Ngomba ya Olive: “Boyebi te soko Nkolo na bino akoya mokolo nini. . . . Akoya na ntango oyo ekanisi bino te.” (Matai 24:42, 44) Esengeli ete tókanisaka toli wana ntango nyonso! Basusu bakoki kosepela kolanda ezaleli oyo epusami na likanisi oyo: ‘Mbala mosusu ebongi ete nalɛmbisa naino mwa moke mpe natika komipesa mingi.’ Kosala bongo ekozala mpenza libungá! Tótalela ndakisa ya Yakobo na Yoane, “Bana na nkake.”—Malako 3:17.
5, 6. Mateya nini tokoki kozwa kati na bandakisa ya Yakobo mpe ya Yoane?
5 Toyebi ete Yakobo azalaki ntoma moko ya molende mingi mpenza. (Luka 9:51-55) Na ntembe te, akokisaki mokumba monene nsima wana lisangá ya boklisto esilaki kosalema. Kasi, wana Yakobo azalaki naino elenge, Erode Agripa I abomisaki ye. (Misala 12:1-3) Tokanisi ete Yakobo ayokaki mawa wana amonaki ete akómi pene ya kokufa liwa ya mbalakaka, mpo ete azalaki na molende mingi, mpe amipesaki mingi na mosala na ye mpo na Nzambe? Soko moke te! Na ntembe te, azalaki na esengo mpo ete asilaki kolekisa mbula mingi ya bomoi na ye ya mokuse kati na mosala ya Yehova. Sikawa, moko te kati na biso ayebi soki mbala mosusu tokokufa liwa ya mbalakaka. (Mosakoli 9:11; kokanisá na Luka 12:20, 21.) Na yango, ezali likambo ya mayele ete tóbatela ntango nyonso molende na biso mpe tózala na mosala mingi mpo na Yehova. Na kosaláká bongo, tokobatela nkombo malamu na biso epai na ye mpe tokobungisa te elikya na biso ya bomoi ya seko na mikolo mikoya.
6 Ezali na liteya moko oyo tokoki kozwa kati na bomoi ya ntoma Yoane, oyo azalaki wana ntango Yesu apesaki elendiseli oyo ya nguya ete: “Bókɛngɛlaka.” (Matai 25:13; Malako 13:37; Luka 21:34-36) Yoane abatelaki toli wana malamu, asalelaki Nzambe na molende nyonso na boumeli ya bambula mingi. Emonani ete azalaki na bomoi nsima wana bantoma mosusu nyonso basilaki kokufa. Wana Yoane akómaki mobangé, akokaki kokanisa lisusu ebele ya bambula oyo alekisaki kati na mosala ya Nzambe na bosembo nyonso, mpe komona ete asalaki liponi ya mabe to ete bomoi yango ezangaki bokatikati? Soko moke te! Azalaki kozela na motema likoló bomoi ya mikolo mizalaki koya. Ntango Yesu oyo asilaki kosekwisama alobaki na ye ete: “Ɛɛ, nakoya noki,” Yoane ayanolaki nokinoki ete: “Bobele bongo, Nkolo Yesu, oya.” (Emoniseli 22:20) Emonani ete Yoane azalaki kobika te bobele mpo na bomoi ya ntango wana, azalaki kozela ‘bomoi oyo esengeli,’ bomoi ya kimya. Azalaki na ekateli makasi ete alanda ntango nyonso kosalela Nzambe na bomoi na ye mobimba mpe na nguya na ye nyonso, ata soki Nkolo asengelaki koya ntango nini. Ezali boni mpo na biso?
Bantina ya kozala na kondima kati na bomoi ya seko
7. (a) Lolenge nini elikya ya bomoi ezangi nsuka ‘elakami na Nzambe na bilaka na kala’? (b) Lolenge nini Yesu apesaki engɛngiseli likoló na elikya ya bomoi ya seko?
7 Tosengeli kondimisama solo ete elikya ya bomoi ezangi nsuka ezali ndɔ́tɔ te, ezali mpe te bobele makanisi oyo bato bango moko babimisi. Lokola Tito 1:2 elobi yango, bokangami na biso epai na Nzambe etongami likoló ya “elikya na bomoi na seko. Yango elakami na Nzambe na bilaka na kala. Ye Nzambe akobukaka lokuta te.” Ezalaki mokano ya Nzambe uta na ebandeli ete bato nyonso oyo bazali na botosi bázala na bomoi ya seko. (Genese 1:28) Eloko moko te ekoki kopekisa mokano yango, ata mpe botomboki ya Adama na Eva ekoki kopekisa yango te. Lokola ekomami na Genese 3:15, nokinoki, Nzambe apesaki elaka ete asengelaki kobimisa “mombóto” oyo asengelaki kosilisa mpasi ya bato. Ntango “mombóto” to Masiya, elingi koloba Yesu, ayaki, alobelaki elikya ya bomoi ya seko lokola moko na mateya na ye ya moboko. (Yoane 3:16; 6:47, 51; 10:28; 17:3) Na kopesáká bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko, Klisto akómaki na lotómo oyo ebongi na ye mpo na kopesa bato bomoi ya seko. (Matai 20:28) Bamoko kati na bayekoli na ye, oyo motángo mobimba na bango ezali bongo 144 000, bakozala na bomoi ya libela na libela kuna na likoló. (Emoniseli 14:1-4) Na yango, mwa ndambo ya bato oyo bazalaki liboso bato oyo bakufaka “bakolata ezalela ya kozanga kokufa”!—1 Bakolinti 15:53, NW.
8. (a) “Ezalela ya kozanga kokufa” elimboli nini, mpe mpo na nini Nzambe apesi yango epai na ba 144 000? (b) Elikya nini Yesu amonisaki mpo na “bampate mosusu”?
8 “Ezalela ya kozanga kokufa” elimboli te bobele kozanga komona liwa. Elimboli mpe “nguya na bomoi bozangi libebi.” (Baebele 7:16; kokanisá na Emoniseli 20:6.) Kasi, mokano nini Nzambe akokokisa na kopesáká bango likabo monene boye? Tómikundola ntembe oyo Satana abimisaki, ete moko te kati na bikelamu ya Nzambe akoki kotyelama motema. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Na kopesáká ba 144 000 ezalela ya kozanga kokufa, Nzambe amonisi ete azali kokakatana soko moke te mpo na kotyela etuluku ya bato wana motema. Na lolenge ya polele mpenza, bato yango balóngaki ntembe oyo Satana abimisaki. Kasi ezali boni mpo na bato mosusu? Yesu ayebisaki epai na basangani ya liboso ya “etonga moke” ya basangoli ya Bokonzi ete ‘bakofanda na kiti na bokonzi mpe bakosambisa mabota zomi na mibale na Yisalaele.’ (Luka 12:32; 22:30) Yango elimboli ete bato mosusu bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé, mpo na kozala bayangelami ya Bokonzi na ye. Atako “bampate mosusu” yango bapesameli te ezalela ya kozanga kokufa, kasi bazwi solo “bomoi na seko.” (Yoane 10:16; Matai 25:46) Na bongo, bomoi ya seko ezali elikya ya baklisto nyonso. Ezali makanisi mpamba te, kasi eloko oyo “Nzambe [oyo] akobukaka lokuta te” alaki yango na lolenge ya polele mpenza mpe apesaki mpo na yango makila ya Yesu oyo ezali na motuya monene.—Tito 1:2.
Kokokisama na yango ezali naino mosika?
9, 10. Makambo nini mamonisi polele ete nsuka ekómi pene?
9 Ntoma Paulo asakolaki ete “ntango na mpasi” esengelaki komonisa ete tokómi na “m[i]kolo na nsuka.” Lokola libota ya bato oyo bazingeli biso bazali kokwea kati na bizaleli lokola: kozanga bolingo, kobuka mibeko, lokoso, koluka bisengo, kotyola Nzambe, tozali komona ete mokolo oyo Yehova akokokisa bikateli na ye likoló na ebongiseli ya mokili ezali koya na lombangu mpenza, boye te? Lokola mobulu mpe koyinana ezali sé koya mingi, tozali komona zingazinga na biso kokokisama ya maloba mosusu ya Paulo: “Bato mabe mpe bakosi bakoleka mabe,” boye te? (2 Timoté 3:1-5, 13) Basusu bakoki konganga na elikya nyonso ete: “Kimya ezali, makambo mazali te,” kasi bilikya nyonso ya kimya bikosila lokola milinga, mpamba te “libebi ekokwela bango pwasa pelamoko mpasi ekoyela mwasi na zemi mpe nzela na kokima ekozala te.” Totikami kati na molili te, mpo na oyo etali ntina ya makambo oyo ezali kobima na mikolo na biso. Na yango, “tiká ete tólala mpɔngi te mpe tótɛngatɛnga te.”—1 Batesaloniki 5:1-6.
10 Lisusu, Biblia emonisi ete mikolo ya nsuka ezali “elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12; kokanisá na 17:10.) Emonani ete eteni monene mpenza ya “elaka mokuse” yango esili koleka. Na ndakisa, esakweli ya Danyele ezali kolobela na lolenge ya sikisiki mpenza kowelana kati na “mokonzi na mokili na likoló” mpe “mokonzi na mokili na ngɛlɛ,” kowelana yango ekómi kino na ekeke oyo tozali sikawa. (Danyele 11:5, 6) Likambo oyo ekokokisama na nsima ezali bongo etumba ya nsuka oyo “mokonzi na mokili na likoló” akobimisa, yango elobelami na Danyele 11:44, 45.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yulí 1987 (ebimeli ya Lifalansé) mpe ya 1 Novɛ́mbɛ 1993 epai kuna esakweli yango elimbolami.
11. (a) Matai 24:14 esili kokokisama na meko nini? (b) Maloba ya Yesu oyo ekomami na Matai 10:23 emonisi nini?
11 Tokoki mpe kolobela esakweli ya Yesu oyo elobi ete “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mosala na bango na mikili 233, kati na yango mpe bisanga, mpe bamboka ndenge na ndenge. Ya solo, ezali na bateritware mosusu epai kuna mosala yango mosalemi naino te, mpe mbala mosusu na ntango oyo Yehova asili kobongisa, libaku likomonana. (1 Bakolinti 16:9) Nzokande, maloba ya Yesu oyo mazwami na Matai 10:23 ezali kopusa biso na kokanisa mingi: “Bokoleka kati na mboka nyonso ya Yisalaele te liboso na koya na Mwana na moto.” Na ntembe te, atako nsango malamu ekosakolama na mabelé mobimba, yango elingi koloba te ete mokomoko na biso akokóma na bisika nyonso ya mabelé mpo na kosakola nsango ya Bokonzi liboso ete Yesu ‘aya’ lokola Mokokisi ya bikateli ya Nzambe.
12. (a) ‘Kotyama elembo’ nini elobelami na Emoniseli 7:3? (b) Kokita ya motángo ya bapakolami awa na mabelé ezali komonisa nini?
12 Tótalela mokapo ya Emoniseli 7:1, 3, oyo elobi ete “mipɛpɛ minei” oyo ekoyeisa libebi esimbami “kino ekosila biso kotya bilembo na bilongi na baombo na Nzambe na biso.” Yango ezali kolobela te bilembo oyo etyamaka na ebandeli, ntango basangani ya ba 144 000 bazali kozwa libyangi ete baponami mpo na bomoi na likoló. (Baefese 1:13) Ezali kolobela nde bilembo oyo etyamaka na nsuka, nsima wana bamonisami solosolo ete bazali “baombo na Nzambe na biso” oyo bamekami mpe batikali sembo. Motángo ya bana ya Nzambe, bapakolami ya solosolo, oyo bazali naino na bomoi awa na mabelé esili kokita mingi mpenza. Lisusu, Biblia emonisi polele ete ezali bongo “mpo na Baponami” nde eteni ya liboso ya bolɔ́zi monene ‘ekoya mokuse.’ (Matai 24:21, 22) Mingi na baoyo balobaka ete bazali kati na bapakolami basili konuna. Yango mpe emonisi ete nsuka ekómi mpenza pene, boye te?
Mokɛngɛli ya sembo
13, 14. Mokumba ya mokɛngɛli ezali nini?
13 Ekozala malamu ete na ntango oyo, tólanda litambwisi oyo ‘moombo ya sembo’ azali kopesa. (Matai 24:45) Na boumeli ya bambula koleka nkámá, “moombo” ya mikolo na biso asili kosala na bosembo nyonso lokola “mokɛngɛli.” (Ezekiele 3:17-21) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Apríli 1984 (ebimeli ya Lifalansé), eyebisaki ete: “Mokɛngɛli yango azali kotala lolenge nini makambo oyo mazali kobima na mokili mazali kokokisa bisakweli ya Biblia, bazali kosakola likebisi oyo emonisi ete ‘bolɔ́zi monene lokola oyo emonaná naino te uta na ebandeli ya mokili’ etikali moke eya, mpe bazali kopalanganisa ‘nsango malamu na kosepelisa.’”—Matai 24:21, NW; Yisaya 52:7.
14 Tómikundola ete mosala ya mokɛngɛli ezali bongo ya kosakola “[“bobele,” NW] yango ezali ye komona.” (Yisaya 21:6-8) Na ntango ya kala mokɛngɛli azalaki kosakola likebisi ata soki likámá oyo ekoki kobima ezali naino mosika mpe ezali naino komonana malamu mpenza te. (2 Mikonzi 9:17, 18) Ezali solo ete na eleko yango, na bantango mosusu bazalaki kosakola makebisi oyo ezalaki mpenza solo te. Kasi mokɛngɛli malamu azalaki kokanga monɔkɔ na ye te mpo ete azalaki na mokakatano ya koyeba makambo sikisiki. Okomiyoka lolenge nini soki na ntango ndako na yo epeli mɔ́tɔ, babomi-mɔ́tɔ bayei te mpo bakanisi ete mbala mosusu libyangi oyo bayoki ezali ya lokuta? Ya solo, tolingaka ete bato yango báyanolaka nokinoki na libyangi nyonso oyo eyebisi likámá! Bobele bongo, kelasi ya mokɛngɛli esili kosakola na kotalela lolenge makambo mazali kobima mapesaki bango ndanga ya kosala bongo.
15, 16. (a) Mpo na nini bososoli na biso ya bisakweli esembolamaka? (b) Liteya nini tokoki kozwa epai ya basaleli ya sembo ya Nzambe oyo basosolaki malamu te bisakweli mosusu?
15 Nzokande, awa makambo mingi mazali kobima, bososoli na biso ya bisakweli esili kongɛngisama lisusu mingi koleka. Lisoló ya makambo ya kala emonisi ete esalemaka mingi te, to mpe tokoki koloba ete esalemaka mpenza te ete bisakweli bisosolama na mobimba na yango liboso ete bikokisama. Nzambe ayebisaki Abalama na bosikisiki ntango boni basangani ya mombóto na ye basengelaki kozala “bapaya kati na mokili mozali na bango te,” elingi koloba mbula 400. (Genese 15:13) Nzokande, Mose amibimisaki lokola mosikoli liboso ete ntango ekoka.—Misala 7:23-30.
16 Tótalela mpe bisakweli bitaleli Masiya. Na kotalela makambo masilá kosalema kala, emonani polelepolele ete liwa ya Masiya mpe lisekwa na ye esilaki kosakolama. (Yisaya 53:8-10) Nzokande, bayekoli ya Yesu bango moko basosolaki likambo yango te. (Matai 16:21-23) Basosolaki te ete Danyele 7:13, 14 esengelaki kokokisama na boumeli ya pa·rou·siʹa, to “kozala” ya Klisto na mikolo mizalaki koya. (Matai 24:3) Batunaki Yesu motuna na ntina na likambo oyo esengelaki nde kokokisama mbula soko 2 000 na nsima: “Moteyi, okozongisela Yisalaele bokonzi na ntango oyo?” (Misala 1:6) Ata nsima wana lisangá ya boklisto esilaki kosalema, makanisi ya libungá mpe bilikya oyo bizali solo te bikóbaki komonana. (2 Batesaloniki 2:1, 2) Atako na bantango mosusu baklisto bazalaki na makanisi ya libungá, ntembe ezali te ete Yehova apambolaki mosala ya bandimi wana ya ekeke ya liboso!
17. Lolenge nini tosengeli kotalela kosembolama kati na bososoli na biso ya Makomami?
17 Lelo oyo mpe, kelasi ya mokɛngɛli esengeli mbala na mbala kosembola makanisi na yango. Atako bongo, nani akoki kobɛta ntembe ete Yehova azali kopambola ‘moombo na sembo’ te? Lisusu, na kotalela makanisi yango nyonso, makambo mingi oyo masembolamaki mazali mpenza moke, boye te? Bososoli na biso ya moboko likoló na Biblia ebongwani te. Endimiseli na biso oyo emonisi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ekómi lisusu makasi koleka!
Tozali kobika mpo na bomoi ya seko na mikolo mizali koya
18. Mpo na nini tosengeli kopɛngola ezaleli ya kotambwisa bomoi na biso bobele mpo na lelo?
18 Bato ya mokili bakoki koloba ete: ‘Tiká tólya mpe tómela, mpamba te lobi tokokufa,’ kasi biso tosengeli komonisa ezaleli motindo wana te. Mpo na nini kolekisa ntango mpamba na komipesáká na bisengo oyo okoki kozwa na bomoi sikawa, nzokande okoki kosala makasi mpo na kozwa bomoi ya seko na mikolo mizali koya? Elikya yango, ezala ya bomoi ezangi nsuka na likoló to bomoi ya seko na mabelé, ezali ndɔ́tɔ te, ezali mpe makanisi mpamba te. Ezali likambo ya solo oyo Nzambe oyo “akobukaka lokuta te” alakaki. (Tito 1:2) Elembeteli ya polele ezali komonisa ete kokokisama ya elikya na biso ekómi pene! “Ntango eyei mokuse.”—1 Bakolinti 7:29.
19, 20. (a) Lolenge nini Yehova atalelaka makambo oyo tozali kosala na elimo ya komipesa mpo na Bokonzi? (b) Mpo na nini tosengeli te kobosana likanisi ya bomoi ya seko?
19 Ya solo, bato mingi bakanisaki te ete ebongiseli oyo ekokaki koumela mingi boye. Mwa ndambo moke ya bato bakoki mbala mosusu koloba ete soki bayebaki ete ekoumela mingi boye, mbɛlɛ balingaki te komonisa elimo ya komipesa na makambo mosusu oyo basalaki. Kasi tosengeli te koyoka mawa mpo na yango. Tosengeli koyeba ete elimo ya komipesa ezali moko na makambo ya ntina mingi oyo moklisto asengeli komonisa. Baklisto ‘bamiboyaka.’ (Matai 16:24) Tosengeli kokanisa te ete milende oyo tozali kosala mpo na kosepelisa Nzambe ezali mpamba. Yesu apesaki elaka oyo ete: “Soko moto nani atiki ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi soko mama soko tata soko bana soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na Nsango Malamu moto yango akozwa mbala monkámá . . . , mpe na ekeke ekoya akozwa bomoi na seko.” (Malako 10:29, 30) Mosala na yo, ndako na yo, to bozwi na yo ekokóma lolenge nini nsima ya mbula nkámá? Nzokande, makambo oyo osalaki na elimo ya komipesa mpo na Yehova ekozala na motuya mpenza ata nsima ya nkóto ya bambula—ata nsima ya miliare mobimba ya bambula! “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino.”—Baebele 6:10.
20 Na bongo, tiká ete awa ezali biso na bomoi lelo, tóbosana bomoi ya seko te, kotyáká ntango nyonso miso na biso, “te na makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana. Zambi makambo mamonani mazali bobele na ntango oyo nde makambo mamonani te makoumela seko.” (2 Bakolinti 4:18) Mosakoli Habakuku akomaki ete: “Emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela lambelá yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Bopusi nini ‘kozela’ nsuka ezali na yango likoló na lolenge tosengeli kokokisa mikumba na biso moko mpe ya mabota na biso? Lisoló na biso elandi ekolobela makambo yango.
Bozongeli
◻ Likambo oyo ete ebongiseli ya biloko oyo emonani lokola ete ezali koumela ezali na bopusi nini epai ya mwa ndambo moke ya bato lelo?
◻ Mpo na ntina nini tozali na elikya ya bomoi ya seko?
◻ Lolenge nini tosengeli kotalela makambo oyo tozali kosala na elimo ya komipesa mpo na matomba ya Bokonzi?
[Elilingi na lokasa 15]
Mosala ya kosakola na mokili mobimba esengeli kokokisama liboso ete nsuka eya