Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/5 nk. 14-18
  • Tiká Liloba ya Nzambe etambwisa yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tiká Liloba ya Nzambe etambwisa yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mwinda mpo na makolo na ngai”
  • “Pole mpo na nzela na ngai”
  • Mapamboli oyo tokozwa soki tondimi Yehova atambwisa biso
  • Tiká liloba ya Nzambe engɛngisa nzela na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge ya kozwa bikateli oyo ekosepelisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Lolenge oyo okoki kozwa bikateli ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/5 nk. 14-18

Tiká Liloba ya Nzambe etambwisa yo

“Liloba na yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai mpe pole mpo na nzela na ngai.”​—NZEMBO 119:105, NW.

1, 2. Mpo na nini bato mingi bazali kokoka te kozwa kimya mpe esengo ya solosolo?

OZALI koyeba lisusu mokolo moko oyo otunaki moto alakisa yo nzela? Ntango mosusu ozalaki lisusu mosika te na esika ozalaki kokende, kasi oyebaki nde lisusu te nzela nini ozwa. Ekoki mpe kozala ete obungaki mpenza mpe esengelaki ozonga lisusu mosika. Ezala ndenge nini, omoni te ete elekaki malamu moto moko oyo ayebi esika yango malamu alakisa yo nzela? Moto yango nde akokaki kosalisa yo okóma na esika ozalaki kokende.

2 Na boumeli ya bankóto ya bambula, bato ya kozanga kokoka bameki komitambwisa kozanga koluka lisalisi ya Nzambe. Kasi, lokola Nzambe azali kotambwisa bango te, babungi mpenza nzela. Bayebi te epai bakoki kozwa kimya mpe esengo ya solosolo. Mpo na nini? Eleki mbula 2 500, mosakoli Yilimia alobaki boye: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Moto nyonso oyo akomeka komitambwisa ye moko kozanga koluka lisalisi ya moto oyo ayebi mpenza nzela akozanga te kobunga. Na ntembe te, bato basengeli mpenza na motambwisi!

3. Mpo na nini Yehova Nzambe nde abongi mpenza kotambwisa bato, mpe elaka nini apesi?

3 Yehova Nzambe nde abongi mpenza kotambwisa biso. Mpo na nini? Mpo ayebi koleka bikelamu nyonso lolenge oyo bato basalemá. Longola yango, ayebi malamu ndenge oyo bato batikaki nzela mpe babungaki. Ayebi mpe nini ekoki kosalisa bango bázonga na nzela. Lisusu, lokola ye nde akelaki biso, Yehova ayebaka ntango nyonso nini eleki malamu mpo na biso. (Yisaya 48:17) Yango wana, tosengeli mpenza kondima elaka na ye oyo ezali na Nzembo 32:8: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda, NW]; Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” Ntembe ezali ata moke te: Yehova alakisaka nzela oyo eleki malamu. Kasi, ndenge nini atambwisaka biso?

4, 5. Ndenge nini maloba ya Nzambe ekoki kotambwisa biso?

4 Mokomi moko ya nzembo alobaki na Yehova na kati ya libondeli ete: “Liloba na yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai mpe pole mpo na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105, NW) Maloba mpe batoli ya Nzambe ezali na Biblia mpe ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano oyo tokoki kokutana na yango na bomoi. Soki tozali kotánga Biblia mpe kotika yango etambwisa biso, maloba ya Yisaya 30:21 ekokokisama mpenza epai na biso: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango.”

5 Kasi, simbá ete Nzembo 119:105 elobeli makambo mibale oyo Liloba ya Nzambe esalaka. Ya liboso, ezali mwinda mpo na makolo na biso. Soki tokutani na mikakatano ya bomoi, mitinda ya Biblia ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu mpe tókima mitambo ya mokili oyo. Ya mibale, batoli ya Yehova engɛngisaka nzela na biso mpe esalisaka biso tózwa bikateli oyo eyokani na elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso oyo Nzambe alaki. Lokola mwinda yango ezali kongɛngisa nzela na biso, yango ekosalisa biso tómona malamu to mabe ya etamboli moko. (Baloma 14:21; 1 Timote 6:9; Emoniseli 22:12) Tótalela sikoyo na mozindo ndenge maloba ya Nzambe oyo ezali na Biblia ekoki kozala mwinda mpo na makolo na biso mpe pole mpo na nzela na biso.

“Mwinda mpo na makolo na ngai”

6. Ntango nini maloba ya Nzambe ekoki kozala mwinda mpo na makolo na biso?

6 Tozwaka bikateli mikolo nyonso. Bikateli yango mosusu ekoki kozala ya moke, kasi tokoki ntango mosusu kokutana na makambo oyo ekoki kotinda biso tókwea na pite, tózanga boyengebene to tómikɔtisa na makambo ya politiki. Mpo na kolonga komekama wana, tosengeli kozala na ‘makoki ya kososola oyo eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Baebele 5:14) Soki tozali kokoba kozwa boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe kokanga mpenza ntina ya mitinda na yango tokoteya lisosoli na biso mpo tókoka kozwaka bikateli oyo ekosepelisa Yehova.​—Masese 3:21.

7. Lobelá likambo moko oyo ekoki kotinda moklisto aluka kosangana na baninga ya mosala oyo bazali baklisto te.

7 Tózwa ndakisa moko. Ozali mobali to mwasi oyo alukaka mpenza kosepelisa motema ya Yehova? (Masese 27:11) Soki ezali bongo, topesi yo longonya. Kasi, kanisá naino ete baninga na yo ya mosala bafuteli yo tike mpo okende kotala lisano moko elongo na bango. Basepelaka na yo mingi na esika ya mosala mpe balingi osangana na bango na makambo mosusu. Okoki koloba na motema ete bato yango bazali mpenza mabe te. Ekoki mpe kozala ete bazali na bizaleli ya malamu. Okosala nini? Okomitya nde na likama soki ondimi kokende na bango? Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu na likambo wana?

8. Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tókanisa malamu na likambo ya kosangana na bato mosusu?

8 Tótalela mwa mitinda ya Biblia. Etinda ya liboso oyo ekoki koyela biso na makanisi ezali na 1 Bakolinti 15:33, oyo elobi ete: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” Etinda wana esengeli nde kotinda biso tókabwana na bato oyo bazali baklisto te na makambo nyonso? Biblia elobi bongo te. Kutu, ntoma Paulo amonisaki mpenza bolingo “epai ya bato ya ndenge nyonso,” ezala ata baoyo bazalaki bandimi te. (1 Bakolinti 9:22) Baklisto ya solosolo basengeli komibanzabanza mpo na basusu, ná baoyo bazali bandimi te. (Baloma 10:13-15) Ndenge nini tokoki kolanda toli ya ‘kosalelaka bato nyonso oyo ezali malamu’ soki tozali kokima bato oyo bakoki kozala na mposa ya lisalisi na biso?​—Bagalatia 6:10.

9. Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tótalelaka baninga na biso ya mosala na bokatikati?

9 Nzokande, kozala na boyokani na moninga moko ya mosala elimboli te kokóma mpenza moninga na ye. Na likambo yango, ezali na etinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso. Ntoma Paulo akebisaki baklisto boye: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te.” (2 Bakolinti 6:14) Maloba “bósala te ekanganeli ya mabe” elimboli nini? Babongoli mosusu ya Biblia babongolá maloba yango na “bóboya kosangana” to ‘bótambola nzela moko te.’ Ntango nini boyokani na moninga ya mosala ekómaka mabe? Ntango nini boyokani yango ekómaka ekanganeli ya mabe? Biblia, Liloba ya Nzambe, ekoki kotambwisa makolo na yo na likambo yango.

10. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kopona baninga na ye? (b) Mituna nini ekoki kosalisa moto apona baninga ya malamu?

10 Tózwa ndakisa ya Yesu oyo alingaka bato mingi banda bakelamá. (Masese 8:31) Ye ná bayekoli na ye balinganaki makasi ntango azalaki awa na mabelé. (Yoane 13:1) Amonisaki kutu bolingo epai ya mobali moko oyo ayebaki mateya ya solo ya lingomba te. (Malako 10:​17-22) Kasi, Yesu amonisaki mpe polele banani bakokaki kozala baninga na ye te. Azalaki te moninga ya bato oyo bazalaki koboya kosala mokano ya Tata na ye. Mokolo moko, Yesu alobaki boye: “Bozali baninga na ngai soki bozali kosala oyo ngai nazali kotinda bino.” (Yoane 15:14) Ya solo, okoki kozala na boyokani mpenza na moninga moko ya mosala. Kasi, osengeli komituna boye: ‘Moto yango asepelaka kosala oyo Yesu azali kosɛnga? Alingaka koyeba Yehova, Nzambe oyo Yesu asɛngaki biso tósambelaka? Alandaka mitinda ya boklisto oyo ngai nalandaka?’ (Matai 4:10) Wana ozali kosolola na baninga na yo ya mosala mpe ozali komonisa bango ntina ya kotosa mitinda ya Biblia, okozwa biyano na mituna wana.

11. Tángá mwa makambo oyo ekoki kosɛnga ete tótika maloba ya Nzambe etambwisa makolo na biso.

11 Maloba ya Nzambe ekoki mpe kozala lokola mwinda mpo na makolo na biso na makambo mosusu mingi. Na ndakisa, moklisto moko oyo azali na mposa makasi ya mosala akoki kokutana na libaku moko ya mosala. Kasi, emonani ete mosala yango ekobanda kolya ye ntango mpe kosilisa ye makasi nyonso, mpe soki andimi yango, akobanda mbala mingi kozangisa makita ya boklisto mpe makambo mosusu ya losambo ya solo. (Nzembo 37:25) Moklisto mosusu akoki koyoka mposa makasi ya kotala masano oyo eyokani ata moke te na mitinda ya Biblia. (Baefese 4:17-19) Mosusu asilikaka mpambampamba na mabunga ya bandeko. (Bakolose 3:13) Na makambo nyonso wana, tosengeli kotika Liloba ya Nzambe ezala mwinda mpo na makolo na biso. Ya solo mpenza, soki tozali kolanda mitinda ya Biblia, tokoki kolonga ata mikakatano ya ndenge nini. Liloba ya Nzambe “ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.”​—2 Timote 3:16.

“Pole mpo na nzela na ngai”

12. Na ndenge nini Liloba ya Nzambe ezali pole mpo na nzela na biso?

12 Nzembo 119:105 elobi mpe ete Liloba ya Nzambe ekoki kongɛngisa nzela na biso mpe kolakisa biso epai tozali kokende. Biblia etiki biso na molili te mpo na mikolo ezali koya, mpamba te eyebisi biso ntina oyo mpasi etondi na mokili, mpe ndenge makambo ekosuka. Ya solo, tomoni mpenza ete tozali na “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo ya mabe. (2 Timote 3:1-5) Lokola toyebi makambo ezali koya, yango esengeli kotinda biso tóbongola mpenza bomoi na biso. Ntoma Petelo akomaki boye: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova!”​—2 Petelo 3:11, 12.

13. Lokola mikolo etikali ya kotánga, makanisi mpe bomoi na biso esengeli komonisa nini?

13 Makanisi mpe bomoi na biso esengeli komonisa ete tondimaka mpenza ete “mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango.” (1 Yoane 2:17) Kosalela batoli ya Biblia ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu mpo na mikolo ezali ekoya. Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:33) Ezali mpenza esengo komona ebele ya bilenge bazali komonisa kondima na maloba wana ya Yesu mpe komipesa na mosala ya ntango nyonso! Bandeko mosusu, ata mpe mabota, bazali kosepela kokende epai mposa ya basakoli ezali makasi.

14. Ndenge nini libota moko ya baklisto babakisaki milende na bango na mosala ya kosakola?

14 Tózwa ndakisa ya libota moko ya Batatoli minei oyo bautaki na États-Unis mpe bakendaki na République dominicaine mpo na kosala elongo na lisangá moko na engumba moko ya bato 50 000. Lisangá yango ezali na basakoli soki 130. Kasi, na mokolo ya 12 Aprili 2006, bato soki 1 300 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto! Lokola elanga “eteli mpo na bobuki mbuma” na engumba yango, kaka nsima ya sanza mitano mpamba, ndeko wana, mwasi na ye, mwana na bango ya mobali ná oyo ya mwasi bayekolaki Biblia na bato 30. (Yoane 4:35) Ndeko yango alobi boye: “Lisangá yango ezali na bandeko 30 ya bikólo mosusu oyo bayá awa mpo na kopesa bandeko mabɔkɔ. Na kati na bango, Soki 20 bautá na États-Unis mpe baoyo batikali, bautá na bisanga ya Bahamas, na Canada, na Italie, na Nouvelle-Zélande mpe na Espagne. Bayaki na mokano ya komipesa na mosala ya kosakola, mpe yango ebakiseli bandeko ya teritware yango lisusu milende.”

15. Mapamboli nini ozwi mpo ozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na yo?

15 Nzokande, bandeko mingi bazali na makoki te ya kokende na mikili mosusu epai mposa ya basakoli ezali makasi. Kasi, baoyo bazali na makoki to baoyo bakoki kobongola makambo mosusu ya bomoi na bango mpo na kosala yango basengeli kozala na elikya ete bakozwa mapamboli ebele. Ezala ozali kosalela Yehova wapi, kobosana te esengo oyo okoki kozala na yango ntango ozali kosalela Ye na makasi na yo nyonso. Soki ozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na yo, Yehova alaki ete ‘akosopela yo lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’​—Malaki 3:10.

Mapamboli oyo tokozwa soki tondimi Yehova atambwisa biso

16.Tokozwa matomba nini soki totiki maloba ya Nzambe etambwisa biso?

16 Ndenge tomoni yango, maloba ya Yehova ezali kotambwisa biso na ndenge mibale. Ezali lokola mwinda mpo na makolo na biso mpe esalisaka biso tókoba kolanda nzela ya malamu mpe tózwa bikateli ya malamu. Longola yango, Liloba ya Nzambe engɛngisaka nzela na biso mpe esalisaka biso tómona polele epai tozali kokende. Yango nde esalisaka biso tólanda toli ya Petelo oyo: “Bóbongisa makanisi na bino mpo na mosala, bóbatela makanisi na bino mobimba; bótya elikya na bino likoló ya boboto monene oyo esengeli komemama epai na bino na emoniseli ya Yesu Klisto.”​—1 Petelo 1:13.

17. Ndenge nini koyekola Biblia ekosalisa biso tólanda litambwisi ya Nzambe?

17 Tomoni mpenza ete Yehova atambwisaka biso. Kasi, motuna yango oyo: Okotika ye atambwisa yo? Mpo na koyeba ndenge Yehova azali kotambwisa biso, zwá ekateli ya kotángaka eteni moko ya Biblia mokolo na mokolo. Kanisáká na mozindo makambo oyo ozali kotánga, lukáká koyeba mokano ya Yehova na likambo mokomoko mpe taleláká ndenge oyo okoki kosalela boyebi yango na bomoi na yo. (1 Timote 4:15) Na nsima, salelá ‘likoki na yo ya kokanisa’ ntango ozali kozwa bikateli.​—Baloma 12:1.

18. Mapamboli nini tokozwa soki totiki Liloba ya Nzambe etambwisa biso?

18 Soki tozali kolanda mitinda ya Liloba ya Nzambe, yango ekongɛngisa nzela na biso mpe ekopesa biso litambwisi oyo tosengeli na yango ntango tozali kozwa bikateli. Tosengeli mpenza kondima ete maloba ya Yehova “ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango.” (Nzembo 19:7) Soki totiki Biblia etambwisa biso, tokozala na lisosoli ya pɛto mpe na esengo ya koyeba ete Yehova azali kosepela na biso. (1 Timote 1:18, 19) Soki tozali kotika maloba ya Nzambe etambwisa makolo na biso mokolo na mokolo, Yehova akopesa biso mbano ya bomoi ya seko.​—Yoane 17:3.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini tosengeli kotika Yehova atambwisa biso?

• Na ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kozala mwinda mpo na makolo na biso?

• Ndenge nini maloba ya Nzambe ekoki kozala pole mpo na nzela na biso?

• Ndenge nini koyekola Biblia ekosalisa biso tólanda litambwisi ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 15]

Ntango nini kosangana na moto oyo azali mondimi te ekómaka mabe?

[Elilingi na lokasa 16]

Baninga ya Yesu ezalaki bato oyo bazalaki kosala mokano ya Yehova

[Bililingi na lokasa 17]

Bomoi na biso ezali komonisa ete totyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto