“Bangá te, etongá moke”
“Bangá te, etongá moke, mpamba te Tata na bino asepeli
kopesa bino bokonzi.”—LUKA 12:32, NW.
1. Maloba ya Yesu oyo ete “Bangá te, etongá moke,” mazalaki na moboko nini?
“BÓLUKAKA ntango nyonso bokonzi [ya Nzambe].” (Luka 12:31, NW) Ntango Yesu alobaki maloba oyo epai na bayekoli na ye, amonisaki etinda oyo ekotambwisa makanisi ya baklisto kobanda na mikolo na ye kino na mikolo na biso. Bokonzi ya Nzambe esengeli kozwa esika ya liboso kati na bomoi na biso. (Matai 6:33) Nzokande, kati na lisoló ya Luka, Yesu alobaki maloba ya komonisa bolingo mpe ya kolendisa epai na etuluku moko ya sikisiki ya baklisto. Alobaki ete: “Bangá te, etongá moke, mpamba te Tata na bino asepeli kopesa bino bokonzi.” (Luke 12:32, NW) Lokola azali Mobateli Malamu, Yesu ayebaki ete bantango ya mpasi ezalaki liboso ya bayekoli na ye ya penepene. Kasi basengelaki kozala ata na ntina moko te ya kobanga soki bakolanda koluka ntango nyonso Bokonzi ya Nzambe. Na yango, elendiseli oyo ya Yesu ezalaki etinda moko ya makasi te. Kasi ezalaki nde elaka moko ya bolingo oyo epesaki bango elikya mpe mpiko.
2. Banani basali etongá moke, mpe mpo na nini bazali na libaku ya kitoko mingi?
2 Yesu azalaki koloba epai na bayekoli na ye, mpe abengaki bango ete “etongá moke.” Azalaki mpe koloba epai na baoyo Yehova asengelaki ‘kopesa bokonzi.’ Kokokanisáká bango na bibele na bato oyo basengelaki kondima Yesu na mikolo oyo ya nsuka, etuluku yango ezalaki mpenza moke. Batalelamaki mpe na motuya mingi, mpamba te baponamaki mpo na likambo moko ya ntina na mikolo mizali koya, kosalelama na mosala ya bokonzi. Tata na bango, Yehova, Mobateli Monene, abyangi etongá moke mpo na kozwa libula na bango na likoló mpo na koyangela esika moko na Klisto kati na Bokonzi ya Masiya.
Etongá moke
3. Emonaneli nini ya nkembo ya etongá moke, Yoane amonaki?
3 Na bongo, banani basali etongá moke oyo ezwi elikya monene boye? Ezali bongo balandi na Klisto oyo bapakolami na elimo santu. (Misala 2:1-4) Komonáká bango lokola bayembi ya likoló oyo bazali na nzɛnzɛ na mabɔkɔ na bango, ntoma Yoane akomaki ete: “Natalaki mpe namɔni Mwana na Mpate atɛlɛmi na ngomba na Siona. Bato nkoto mokama na ntuku minei na minei batɛlɛmi na ye elɔngɔ, baoyo bajalaki na nkombo na ye mpe nkombo na Tata na ye esili kokomama na bilongi na bango. Bango wana bamibebisi na basi tɛ, mpɔ ete bajali bato bakɔti na libala tɛ. Bango bakobilaka Mwana na Mpate sɔkɔ akei epai wapi. Bango basikolami kati na bato, mbuma na liboso mpɔ na Njambe mpe na Mwana na Mpate. Na minɔkɔ na bango lokuta ejuami tɛ, mpe bajali na mpɔ na kofundama tɛ.”—Emɔnisɛli 14:1, 4, 5.
4. Etɛlɛmɛlo nini etongá moke bazali na yango lelo oyo awa na mabelé?
4 Kobanda Pantekote ya mobu 33 T.B., bapakolami wana oyo babotami na elimo, bazali kosala mosala ya bantoma ya Klisto awa na mabelé. (2 Bakolinti 5:20) Lelo oyo, bobele batikali ya baklisto wana nde bazali kosala lokola basangani ya kelasi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45; Emoniseli 12:17) Mingimingi, kobanda mobu 1935, bamilió ya “bampate mosusu,” baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, basangani elongo na bango. Bazali kosunga bango na mosala ya kosakola nsango malamu na mabelé mobimba.—Yoane 10:16.
5. Ezaleli ya batikali, basangani ya etongá moke ezali nini, mpe mpo na nini basengeli kobanga te?
5 Ezaleli ya batikali wana ya etongá moke oyo bazali naino awa na mabelé ezali nini? Lokola bayebi ete bakozwa “bokonzi oyo ekoki koningana te,” bazali kosalela Nzambe mosala ya bulɛɛ, na bobangi mpe na nsɔ́mɔ. (Baebele 12:28, NW) Na nsé ya mitema na bango, bayebi ete bazali na libaku monene ya kitoko, oyo ezali kopesa bango esengo nsuka te. Mpo na kozongela maloba ya Yesu likoló na bosangani na bango na Bokonzi, basili kozwa “pauni moko ya motuya mingi.” (Matai 13:46, NW) Lokola bolózi monene ezali kobɛlɛma, bapakolami ya Nzambe batɛlɛmi kozanga kobanga. Atako makambo minene malingi kokwela bato na boumeli ya “mokolo ya Yehova, mokolo monene mpe mokolo na nkembo,” bazali te na bobangi ya mpambampamba mpo na mikolo mizali koya. (Misala 2:19-21) Nkutu, bakozala na bobangi mpo na nini?
Motuya mozali sé kokita
6, 7. (a) Mpo na nini motuya ya basangani ya etongá moke oyo bazali naino na mabelé ezali mpenza moke? (b) Lolenge nini moko na moko kati na bango asengeli kotalela elikya oyo azali na yango?
6 Na boumeli ya bambula oyo euti koleka, motuya ya basangani ya etongá moke oyo bazali awa na mabelé ezali kokita sé kokita. Yango emonanaki polele na lapólo ya Ekaniseli ya mobu 1994. Kati na masangá soko 75000 ya basaleli ya Yehova oyo ezali na mokili mobimba, bobele bato 8617 nde bamonisaki ete bazali batikali na kolyáká limpa mpe komeláká vinyo. (Matai 26:26-30) Nzokande, bato nyonso oyo bayanganaki na Ekaniseli bazalaki 12288917. Baklisto bapakolami bayebi ete yango esengelaki kosalema bongo. Yehova akataki motuya moke ya bato 144 000, mpo ete básala etongá moke, mpe ayanganisaki bango kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B. Na yango, libyangi ya etongá moke esengelaki kosuka na ntango motuya yango ekómaki pene na kokoka, mpe makambo mamonisi ete libyangi wana ya bato oyo bapambwamaki esukaki na mobu 1935. Nzokande, esakolamaki ete na ntango ya nsuka, bampate bakokóla mingi mpo na kozala “ebele monɛnɛ, oyo moto tɛ akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ.” Kobanda 1935, Yehova azalaki kobyanga ebele monene wana, oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.—Emɔnisɛli 7:9; 14:15, 16; Nzembo 37:29.
7 Ntalo eleki monene kati na basangani ya etongá moke oyo bazali naino awa na mabelé bazali sikawa na mibu ya kobotama koleka 70, 80 to 90. Mwa moke kati na bango basili kolekisa mibu nkámá. Bango nyonso, ata bazali na mbula boni, bayebi ete, na nzela ya lisekwa ya likoló, bakoyanganisama esika moko na Yesu Klisto mpe bakoyangela elongo na ye kati na Bokonzi na ye ya nkembo. Basangani ya ebele monene bakozala bato oyo, Klisto Mokonzi, akoyangela awa na mabelé. Tiká ete moko na moko asepela na oyo Yehova asili kobongisa mpo na baoyo balingaka ye. Ezali likambo na biso moko te ya kozwa ekateli mpo na oyo etali lolenge ya elikya oyo tosengeli kozala na yango. Yehova nde akozwaka ekateli mpo na yango. Yango wana bituluku mibale oyo bakoki kosepela mpo na elikya na bango kitoko na mikolo mizali koya, ezala ete bakozala na Bokonzi ya likoló to ezala ete bakozala na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi yango.—Yoane 6:44, 65; Baefese 1:17, 18.
8. Kotyama bilembo epai na bato 144 000 ekoumela ntango boni, mpe nini ekosalema wana yango ekosuka?
8 Basangani 144 000 ya etongá moke basali “Yisraele ya Nzambe,” oyo ekitanaki Yisraele ya mosuni kati na mikano ya Nzambe. (Bagalatia 6:16) Na yango, basangani ya nsuka ya Yisraele wana ya elimo oyo bazali naino awa na mabelé ezali bango nde batikali. Batikali wana bazali kotyama bilembo mpo na kondimama libela epai na Yehova. Kati na emonaneli, ntoma Yoane amonaki kosalema ya likambo yango, mpe akomaki ete: “Namɔni mpe mwanje mosusu konɛtwa uta na ebimelo na ntango, ajalaki na elembo na Njambe na Bomɔi, mpe angangi na mongongo makasi na banje yango minei, baoyo bajui nguya na kobebisa mokili, na mai, mpe alobi ete, ‘Bebisa mokili, na mai, na njete tɛ, kino ekosila biso kotia bilembo na bilongi na baombo na Njambe na biso.’ Nayokaki motuya na bango basili kotiama elembo; ejalaki nkoto mokama na ntuku minei na minei, batiami elembo kati na mabota yɔnsɔ na bato na Yisalaele [ya elimo].” (Emɔnisɛli 7:2-4) Lokola mosala wana ya kotya bilembo na Yisraele ya elimo ebɛlɛmi na nsuka, yango ezali elembo emonisi ete mosika te makambo ya kokamwa makosalema. Yango elimboli ete “bolózi monene” ebɛlɛmi, eleko oyo baanzelu minei bakotika mipepe minei ya libebisi awa na mabelé.—Emoniseli 7:14.
9. Lolenge nini etongá moke bazali kotalela motuya oyo mozali sé komata ya ebele monene?
9 Basangani ya ebele monene oyo basili koyanganisama lelo oyo bazali na motuya ya bamilió. Oyo nde likambo kitoko mingi mpo na batikali! Atako motuya ya basangani ya etongá moke oyo bazali naino na mabelé ezali kokita sé kokita, basili koteya mpe kobongisa kati na ebele monene, mibali ya mayele mpo ete bákoka komema mikumba minene mitali bokóli ya lisangá ya Nzambe awa na mabelé. (Yisaya 61:5) Lokola Yesu amonisaki yango, na bolózi monene, babiki bakozala.—Matai 24:22.
“Bangá te”
10. (a) Etumba nini ekobimela basaleli ya Nzambe, mpe yango ekomema na likambo nini? (b) Mituna nini moko na moko kati na biso asengeli komituna?
10 Satana mpe bademó na ye bakitisamaki zingazinga na mabelé. Ye mpe mampinga na ye basalelami mpo na kobundisa na nkó nyonso basaleli ya Yehova. Etumba wana oyo esakolamaki na Biblia, elobelami lokola etumba ya Gog ya Magog. Banani Zábolo azali mpenzampenza koluka kobundisa? Ezali bongo basangani ya nsuka ya etongá moke, Yisraele ya Nzambe na elimo, oyo bazali na kimya “na katikati ya mabelé,” boye te? (Ezekiele 38:1-12, NW) Ezali boye, kasi batikali ya kelasi ya bapakolami ya sembo, elongo na bampate mosusu, baninga na bango ya sembo, bakomona ndenge kobundisama ya Satana ekopesa nzela na ‘mosala ya kokamwa, mosala monene,’ oyo Yehova Nzambe akosala. Yehova akokɔtela bato na ye, mpe yango ekotumola bongo “mokolo monene mpe mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova.” (Yoele 2:31) Lelo oyo, moombo ya sembo mpe ya mayele azali kokokisa mosala moko ya ntina mingi, mosala ya kobikisa bomoi, na kokebisáká bato na ntina na koya ya mokolo monene wana ya Yehova. (Malaki 4:5; 1 Timoté 4:16) Ozali kopesa mabɔkɔ na mosala yango na molende nyonso, na kosanganáká na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova? Okolanda kosala bongo lokola mosakoli ya Bokonzi, oyo abangaka te?
11. Mpo na nini ezaleli ya mpiko ezali na ntina lelo oyo?
11 Na kotalela ezalela ya mokili ya lelo, ebongi mpenza ete etongá moke bálanda maloba oyo Yesu ayebisaki bango: “Bangá te, etongá moke”! Ezaleli wana ya mpiko ezali na ntina na kotalela makambo oyo mazali kosalema lelo oyo, na kotalela oyo nyonso ezali kosalema na boyokani na mokano ya Yehova. Moko na moko kati na basangani ya etongá moke ayebi ete asengeli koyika mpiko kino nsuka. (Luka 21:19) Lokola Yesu Klisto, Nkolo mpe Moteyi ya etongá moke, ayikaki mpiko mpe amimonisaki sembo kino nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, mosangani moko na moko kati na batikali asengeli koyika mpiko mpe komimonisa sembo.—Baebele 12:1, 2.
12. Lokola Yesu, lolenge nini Paulo alendisaki baklisto bapakolami ete bábanga te?
12 Bapakolami nyonso basengeli kotalela makambo motindo moko lokola ntoma Paulo. Na boyokani na elendiseli ya Yesu oyo ya kozanga kobanga, talá oyo Paulo alobaki lokola azalaki moklisto mopakolami oyo azalaki kosakola lisekwa epai na bato banso. Paulo akomaki ete: “Okanisa Yesu Klisto, ye oyo asekwi kati na bakufi, uta na libota na Dawidi lokola ejali Nsango Malamu na ngai. Najali koyoka mpasi mpe kolata nkanga mpɔ na Nsango Malamu yango, nde Liloba na Njambe ejali kokangama tɛ. Bongo najali koyikela makambo oyo yɔnsɔ mpiko mpɔ na Bapɔnami ete bango mpe bajua lobiko lojali kati na Klisto Yesu esika mɔkɔ na nkɛmbɔ na seko. Liloba oyo ejali sembo ete, Sɔkɔ tokufi na ye elɔngɔ, tokobika mpe na ye elɔngɔ. Sɔkɔ tokoyika mpiko, tokojala mikonji na ye elɔngɔ; Sɔkɔ tokoangana ye, ye mpe akoangana biso; sɔkɔ biso tojangi sembo, ye wana akoumela na sembo, jambi akoki komiangana ye mɔkɔ tɛ.”—2 Timɔtɛ 2:8-13.
13. Bindimeli nini makasi basangani ya etongá moke bazali na yango, mpe yango ezali kopusa bango na kosala nini?
13 Na ndakisa ya ntoma Paulo, batikali bapakolami na elimo oyo bazali bongo etongá moke, bazali kondima koyikela minyoko mpiko wana ezali bango kosakola nsango ya nguya oyo ekomami kati na Liloba ya Nzambe. Bindimeli na bango bizali mpenza makasi, mpamba te bitongami likoló na bilaka ya lobiko ya Nzambe mpe kozwa na bango ya “motole na bomɔi” soki batikali sembo kino kufa. (Emɔnisɛli 2:10) Nsima na kosekwisama mpe kobongwana nokinoki, bakozala elongo na Klisto mpo na koyangela elongo na ye, lokola bakonzi. Oyo nde bolóngi na ntina na bosembo na bango lokola balóngi na mokili!—1 Yoane 5:3, 4.
Elikya oyo ekokani na mosusu te
14, 15. Na ndimbola nini elikya ya lisekwa oyo etongá moke bazali na yango ekeseni na nyonso mosusu?
14 Elikya ya lisekwa oyo etongá moke bazali na yango ekokani na mosusu te. Na lolenge nini? Ya liboso, yango ekosalema liboso ya lisekwa ya bato banso, “lisekwa ya bato sembo mpe ya bato sembo te.” (Misala 24:15) Ya solo, lisekwa ya bapakolami ekanamaki uta liboso, ezali yango emonisami na maloba mazwami na 1 Bakɔlinti 15:20, 23: “Nde sɔlɔ Klisto asekwi longwa na bakufi, mbuma na liboso na bango balali. Kasi moto na moto na kokitana na ye mpenja. Klisto mbuma na liboso, na nsima na [kozala, NW] na ye, baoyo bajali kati na Klisto.” Na kozaláká na mpiko mpe na kondima motindo oyo Yesu amonisaki, etongá moke bayebi eloko nini ebombami mpo na bango wana bazali kosilisa bomoi na bango awa na mabelé, mingimingi kobanda ntango oyo Nkolo ya solo ayaki na tempelo na ye mpo na kosambisa na mobu 1918.—Malaki 3:1.
15 Paulo apesi biso ntina mosusu oyo esali ete lisekwa wana ekesena na nyonso mosusu. Lokola eyebisami na 1 Bakɔlinti 15:51-53, akomaki ete: “Tala najali koloba na bino likambo libombami. Biso yɔnsɔ tokolala tɛ, nde biso yɔnsɔ tokobongwa motindo mosusu na mwa ntango mokɛmokɛ, na ntango na kobwɛta liso, wana ekoyula kɛlɛlɔ na nsuka. . . . Jambi ekoki ete njoto oyo na kopɔla elata kojanga-kopɔla mpe njoto oyo na kufa elata kojanga-kokufa.” Maloba oyo mataleli basangani ya etongá moke oyo bazali kokufa na ntango na kozala ya Klisto. Kozanga ete bálala mwa ntango molai kati na kufa, bazali kolata ezalela ya kozanga-kokufa “na mwa ntango mokɛmokɛ, na ntango na kobwɛta liso.”
16, 17. Na kotalela elikya na bango ya lisekwa, lolenge nini baklisto bapakolami bapambwami mpenza lelo oyo?
16 Na kotalela bososoli oyo, tozali na likoki ya kokanga ntina ya maloba ya ntoma Yoane oyo mazali na Emɔnisɛli 14:12, 13. Akomaki ete: “‘Oyo awa ntina na mpiko na bapɛtwi, baoyo bakotosaka malako na Njambe mpe kondima na Yesu.’ Nayoki mpe mongongo kobima na likolo koloba ete, ‘Koma ete, Esɛngɔ na bakufi kati na Nkolo baoyo bakokufa longwa sasaipi. [Elimo elobi, NW] ete, Ɛɛ, tika bapema na bwale na bango, mpɔ ete misala na bango mikobila bango.’”
17 Oyo nde mbano ekeseni na mosusu nyonso ezali kozela batikali ya basangani ya etongá moke! Lisekwa na bango ekosalema nokinoki, bobele nsima wana bazali kolala kati na kufa. Oyo nde mbongwana monene ekosalema epai na bango wana bakokamata mikumba na bango kati na likoló! Lokola etongá moke oyo ezali sé kokembisama mpe lokola bisakweli minene ya Biblia ekómi pene ya kokokisama nyonso; basangani ya nsuka ya etongá moke oyo bazali naino awa na mabelé basengeli bongo ‘kobanga te.’ Mpe kozanga kobanga na bango ezali kolendisa basangani ya ebele monene, oyo basengeli mpe kolóna ezaleli wana ya kozanga kobanga wana ezali bango kozela ete básikolama na boumeli ya eleko oyo eleki bileko nyonso na yikiyiki awa na mabelé.
18, 19. (a) Mpo na nini ntango oyo tozali kobika kati na yango ezali ya kosala nokinoki? (b) Mpo na nini bapakolami mpe bampate mosusu basengeli kobanga te?
18 Kolobelama ya misala misalemi na etongá moke ezali kopusa basangani na yango mpe basangani ya ebele monene na kolanda kobanga Nzambe ya solo. Ntango ya kosambisa ya Nzambe ekómi, mpe ntango ya malamu oyo etikali naino ezali na motuya mingi. Ya solo, ntango yango etikali mpenza moke, ezali ntango mpo ete bato mosusu bázwa ekateli malamu. Atako bongo, mpo na oyo etali biso, tozali kobanga te na kokanisáká ete mokano ya Nzambe ekozanga kolónga. Ekolónga nde bolóngi mpenza!
19 Mingongo na nguya na likoló misili koyokama, kolobáká ete: “Bokonji na mokili oyo esili kokoma Bokonji na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye, mpe akojala mokonji libela na libela.” (Emɔnisɛli 11:15) Ya solo, Yehova, Mobateli Monene, azali kokamba bampate na ye nyonso na “njela na boyɛngɛbɛnɛ na ntina na nkombo na ye.” (Njembo 23:3) Etongá moke ezali kotambwisama kozanga kotengatenga epai na mbano na bango ya likoló. Nzokande, bampate mosusu bakobika na bolózi monene mpe bakozala na bomoi ya seko na mabelé oyo makoyangelama na Bokonzi ya nkembo ya Nzambe, oyo ekotambwisama na Yesu Klisto. Na yango, atako maloba ya Yesu mayebisamaki epai na etongá moke, ntembe ezali te ete basaleli nyonso ya Nzambe oyo bazali awa na mabelé basengeli koyoka maloba na ye oyo ete: “Bangá te.”
Okoki kolimbola?
◻ Mpo na nini tosengeli komizela ete motuya ya basangani ya etongá moke ekita?
◻ Ezalela ya batikali bapakolami ezali nini lelo oyo?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli te kozala na bobangi, atako etumba na Gog ya Magog ebɛlɛmi?
◻ Mpo nini elikya ya lisekwa ya bato 144 000 ekeseni mpenza na mosusu nyonso lelo oyo?