“Bazali kokoba kolanda Mwana-mpate”
“Bango bazali bato oyo bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende.”—EMON. 14:4.
1. Ndenge nini bayekoli ya solosolo ya Yesu batalelaki likambo ya kolanda ye?
NSIMA ya mbula soki mibale na ndambo ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu “azalaki koteya na liyangani ya bato nyonso na Kapalanauma.” Lokola bayekoli mosusu babɛtaki libaku na liloba moko oyo alobaki, “mingi na kati [na bango] bazongelaki biloko ezalaki na nsima mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te.” Ntango atunaki bantoma na ye 12 soki bango mpe balingi kokende, Simona Petelo ayanolaki ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko; mpe biso tosili kondima mpe koyeba ete yo ozali Mosantu ya Nzambe.” (Yoa. 6:48, 59, 60, 66-69) Bayekoli ya solosolo ya Yesu baboyaki kotika kolanda ye. Nsima ya kopakolama na elimo santu, bakobaki kolanda litambwisi ya Yesu.—Mis. 16:7-10.
2. (a) Nani azali “moombo ya sembo mpe ya mayele” to “kapita ya sembo”? (b) Ndenge nini moombo amonisi ete azali mpenza “kolanda Mwana-Mpate”?
2 Tokoki koloba nini mpo na baklisto bapakolami ya ntango na biso? Na esakweli oyo alobelaki “elembo ya kozala na [ye] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” Yesu alobaki ete etuluku ya bayekoli na ye bapakolami na elimo awa na mabelé bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele,” to “kapita ya sembo.” (Mat. 24:3, 45; Luka 12:42) Baklisto bapakolami bamonisi mpenza ete bazali “kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende.” (Tángá Emoniseli 14:4, 5.) Na ndenge ya elimo, bazali bangɔndɔ mpo bamikómisi mbindo te na mateya mpe misala ya “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Emon. 17:5) Ata liteya moko te ya lokuta ‘ezwami na minɔkɔ na bango,’ mpe “bazali na mbeba te” na mokili ya Satana. (Yoa. 15:19) Na mikolo ezali koya, baklisto bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé ‘bakolanda’ Mwana-Mpate na likoló.—Yoa. 13:36.
3. Mpo na nini tosengeli kotyela moombo ya sembo motema?
3 Yesu atye moombo ya sembo mpe ya mayele “likoló ya basali ya ndako na ye,” elingi koloba moto mokomoko oyo azali na etuluku ya moombo ya sembo, “mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi.” Atye mpe moombo yango “likoló ya biloko na ye nyonso.” (Mat. 24:45-47) Na kati ya “biloko” yango, tokoki kotánga “ebele ya bato” ya “bampate mosusu” oyo motángo na bango ezali se kobakisama. (Emon. 7:9; Yoa. 10:16) Ebongi te ete moklisto mopakolami mokomoko mpe “bampate mosusu” bátyaka motema epai na moombo oyo atyami likoló na bango? Ezali na bantina mingi oyo tosengeli kotyela moombo ya sembo motema. Bantina mibale ya minene yango oyo: (1) Yehova atyelaka moombo ya sembo motema. (2) Yesu mpe atyelaka moombo ya sembo motema. Tótalela makambo oyo emonisi ete Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto batyelaka moombo ya sembo mpe ya mayele motema mobimba.
Yehova atyelaka moombo ya sembo motema
4. Mpo na nini tokoki kotya motema na bilei ya elimo oyo moombo ya sembo mpe ya mayele apesaka biso?
4 Tótalela likambo oyo esalisaka moombo ya sembo mpe ya mayele abimiselaka biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. Yehova alobaki boye: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” (Nz. 32:8) Ya solo, Yehova atambwisaka moombo ya sembo. Na yango, tokoki kotya motema mobimba na bandimbola ya Makomami mpe litambwisi oyo tozali kozwa epai ya moombo ya sembo.
5. Nini emonisi ete elimo ya Nzambe epesaka moombo ya sembo nguya?
5 Yehova apesaka mpe moombo ya sembo elimo santu na ye. Atako elimo ya Yehova emonanaka te, makambo oyo esalaka epai ya bato emonanaka polele. Kanisá makambo oyo moombo ya sembo mpe ya mayele asali mpo na kopesa litatoli na mokili mobimba na ntina na Yehova Nzambe, Mwana na ye, mpe Bokonzi na ye. Basambeli ya Yehova bazali kosakola nsango ya Bokonzi na mikili mpe bisanga koleka 230. Yango emonisi mpenza ete elimo santu ezali kopesa moombo ya sembo nguya, boye te? (Tángá Misala 1:8.) Mpo na kopesa basaleli ya Yehova na mokili mobimba bilei ya elimo na ntango oyo ebongi, esɛngaka ete moombo ya sembo azwa bikateli ya minene. Mpo na kozwa bikateli yango mpe kosalela yango, moombo ya sembo amonisaka bolingo, boboto, mpe bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo.—Gal. 5:22, 23.
6, 7. Nini emonisi ete Yehova atyelaka mpenza moombo ya sembo motema?
6 Mpo na komona ete Yehova atyelaka mpenza moombo ya sembo motema, kanisá likambo oyo alaki ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Kelelo ekobɛta, mpe bakufi bakolamuka bato bazangi kopɔla, mpe biso tokokóma ndenge mosusu. Mpo oyo ezali ya kopɔla esengeli kolata motindo ya kozanga kopɔla, mpe oyo ekufaka esengeli kolata motindo ya kozanga kokufa.” (1 Kol. 15:52, 53) Bayekoli ya Klisto oyo bazali bapakolami, oyo basaleli Nzambe na bosembo mpe bakufi na nzoto oyo ekoki kopɔla, bazali kosekwa mpe kokóma na bomoi oyo eleki ata oyo ya bikelamu ya elimo, oyo bazali na bomoi ya seko. Nzambe azali kopesa bango nzoto oyo ekoki kokufa te mpe oyo epɔlaka te, oyo ezali na likoki ya komibatela. Emoniseli 4:4 elobi ete baklisto yango oyo basekwi bafandi na bakiti ya bokonzi mpe balati mitole ya wolo na mitó na bango. Nkembo ya bokonzi ezali kozela baklisto bapakolami. Kasi ezali na makambo mosusu oyo emonisi ete Yehova atyelaka baklisto bapakolami motema.
7 Emoniseli 19:7, 8 elobi boye: “Libala ya Mwana-Mpate eyei mpe mwasi na ye asili komilɛngɛla. Ɛɛ, bapesi ye nzela ete alata lini ya kitoko, ya ngɛlingɛli, ya pɛto, mpo lini ya kitoko elakisaka misala ya boyengebene ya basantu.” Yehova aponi baklisto bapakolami mpo bázala mwasi ya Mwana na ye na mikolo ezali koya. Baklisto bapakolami bakozwa makabo kitoko mpenza: bakozala na nzoto oyo ekoki kopɔla te, oyo ekoki kokufa te, bakozwa bokonzi, mpe bakozala mwasi ya “libala ya Mwana-Mpate”! Nyonso wana emonisi ete Nzambe atyaka motema epai ya baklisto bapakolami, oyo “bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende.”
Yesu atyelaka moombo ya sembo motema
8. Ndenge nini Yesu amonisaki ete atyelaka baklisto bapakolami motema?
8 Nini emonisi ete Yesu atyelaka baklisto bapakolami motema mobimba? Na butu ya nsuka liboso abomama, Yesu asalaki kondimana na bantoma na ye 11 oyo batikalaki sembo. Alobaki na bango boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na kati ya komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko, mpo bólya mpe bómɛla na mesa na ngai na kati ya bokonzi na ngai, mpe bófanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisalaele.” (Luka 22:28-30) Kondimana oyo Yesu asalaki na bantoma 11 esengelaki kotalela baklisto bapakolami nyonso 144 000. (Luka 12:32; Emon. 5:9, 10; 14:1) Soki azalaki kotyela bango motema te, Yesu akokaki nde kosala kondimana na bango, elingi koloba kondima koyangela ná bango?
9. Tángá mwa ‘biloko ya Klisto’?
9 Longola yango, Yesu Klisto atye moombo ya sembo mpe ya mayele likoló ya “biloko na ye nyonso,” matomba nyonso ya Bokonzi awa na mabelé. (Mat. 24:47) Na kati na yango, tokoki kotánga bandako oyo ezali na biro monene ya Batatoli ya Yehova, babiro ya filiale ya mikili ndenge na ndenge, Bandako ya mayangani mpe Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba, ata mpe mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Nani akoki kopesa moto biloko na ye ya motuya mpo abatela mpe asalelaka yango soki atyelaka ye motema te?
10. Nini emonisi ete Yesu Klisto azali elongo na bayekoli na ye bapakolami?
10 Mwa moke liboso amata na likoló, Yesu, oyo autaki kosekwa, abimelaki bayekoli na ye ya sembo mpe alakaki bango boye: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Yesu akokisi elaka yango? Na boumeli ya mbula 15 oyo eleki, motángo ya masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ekoli mingi mpenza (koleka 40 %), elongwe na 70 000 mpe ekómi koleka 100 000. Bayekoli boni babakisami? Bayekoli pene na milio minei na ndambo bazwi batisimo na boumeli ya bambula 15 oyo euti koleka, elingi koloba bato koleka 800 bazalaki kozwa batisimo mokolo na mokolo. Bokoli monene wana ezali komonisa polele ete Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye bapakolami na makita ya lisangá mpe azali kosunga bango na mosala ya kokómisa bato bayekoli.
Moombo azali sembo mpe mayele
11, 12. Ndenge nini moombo amonisi ete azali sembo mpe mayele?
11 Lokola Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto batyelaka moombo ya sembo mpe ya mayele motema mobimba, biso mpe tosengeli kosala yango! Moombo amonisi ete azali sembo na ndenge azali kokokisa mokumba oyo bapesi ye. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobimisama banda mbula soki 130. Makita, mayangani ya mike mpe ya minene ya Batatoli ya Yehova ezali kolendisa biso na elimo.
12 Moombo ya sembo azali mpe mayele na ndenge asalaka te makambo na ndenge na ye moko kozanga koluka koyeba likanisi ya Yehova, mpe akakatanaka te kolanda litambwisi ya Nzambe. Na ndakisa, atako bakonzi ya mangomba bazali kondima makambo ya mabe mpe etamboli ya nsɔni ya bato ya mokili, moombo ya sembo azali kokebisa biso na mitambo ya mokili oyo mabe ya Satana. Moombo ya sembo azali kopesa biso batoli ya malamu na ntango oyo ebongi mpo Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto bazali kopambola ye. Na yango, ebongi mpenza tótyelaka moombo ya sembo motema mobimba. Kasi, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotyela moombo ya sembo mpe ya mayele motema?
‘Tókende’ elongo na bapakolami wana bazali kolanda Mwana-Mpate
13. Na kolanda esakweli ya Zekalia, ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka moombo ya sembo mpe ya mayele motema?
13 Mokanda ya Zekalia elobeli “bato zomi” oyo bakei epai ya “moto oyo azali Moyuda” mpe balobi ete: “Tokokenda na [bino, NW] elongo.” (Zekalia 8:23.) Lokola Biblia ebengi “moto oyo azali Moyuda” ete “bino,” emonisi ete moto yango azali moto moko te, kasi etuluku ya bato. Na ntango na biso, moto yango ezali baklisto bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé, to ndambo ya “Yisalaele ya Nzambe.” (Gal. 6:16) “Bato zomi longwa na mabota ya maloba nyonso” ezali ebele ya bato ya bampate mosusu. Ndenge kaka baklisto bapakolami bazali kolanda Yesu epai nyonso oyo azali kokende, ebele ya bato mpe bazali ‘kokende elongo,’ to kotambola na moombo ya sembo mpe ya mayele. Ebele ya bato basengeli te koyoka nsɔni ya komonisa ete bazali baninga ya bato oyo “basangani na kobengama ya likoló.” (Ebe. 3:1) Yesu ayokaka nsɔni te ya kobenga baklisto bapakolami “bandeko” na ye.—Ebe. 2:11.
14. Ndenge nini tokoki kosunga bandeko ya Klisto?
14 Yesu alobi ete soki tozali kosunga bandeko na ye, amonaka ete tozali nde kosunga ye moko. (Tángá Matai 25:40.) Kasi, na ndenge nini bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bakoki kosunga bandeko ya Klisto oyo bazali bapakolami na elimo? Libosoliboso, basengeli kosalisa bango na mosala ya kosakola bokonzi. (Mat. 24:14; Yoa. 14:12) Atako motángo ya baklisto bapakolami ekiti na bambula oyo, oyo ya bampate mosusu ezali se kobakisama. Ntango baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bazali kopesa litatoli, na ndakisa lokola basakoli ya ntango nyonso, bazali kosunga baklisto bapakolami mpo bákokisa mosala na bango ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Lisusu, tóbosana te ete bazali kosimba mosala yango na makabo ya mbongo oyo bazali kopesa.
15. Ndenge nini mokomoko na biso asengeli kotalela bilei ya elimo oyo moombo apesaka na ntango ebongi mpe bikateli oyo moombo ya sembo azwaka?
15 Ndenge nini otalelaka bilei oyo moombo ya sembo apesaka na ntango oyo ebongi, na nzela ya mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe na makita ya boklisto? Otángáka yango mpe osalelaka mbala moko makambo oyo oyekoli? Ndenge nini otalelaka bikateli oyo moombo ya sembo azwaka mpo na kotambwisa lisangá? Soki tozali kolanda litambwisi yango na motema moko, tokomonisa ete tondimi ndenge oyo Yehova azali kotambwisa makambo.—Yak. 3:17.
16. Mpo na nini baklisto nyonso basengeli koyokaka bandeko ya Klisto?
16 Yesu alobaki boye: “Bampate na ngai bayokaka mongongo na ngai, mpe nayebi bango, mpe balandaka ngai.” (Yoa. 10:27) Ezali bongo mpo na baklisto bapakolami. Tokoloba nini mpo na baoyo ‘bazali kokende elongo’ na bango? Bango mpe basengeli koyokaka Yesu. Basengeli mpe koyokaka bandeko na ye. Mokumba monene ya kotambwisa mpe kobatela basaleli ya Nzambe epesami epai na bango. Koyoka mongongo ya bandeko ya Klisto elimboli nini?
17. Koyoka moombo ya sembo elimboli nini?
17 Lelo oyo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo ezali kotambwisa mpe kokamba mosala ya kosakola na mokili mobimba ezali momonisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali bapakolami mpe bankulutu oyo bakɔmeli na elimo. Bango nde babongi mpenza kobengama “baoyo bazali kokamba” biso. (Ebe. 13:7) Lokola bazali kotambwisa basakoli ya Bokonzi koleka milio 7 oyo bazali na masangá koleka 100 000 na mokili mobimba, bakɛngɛli yango bazali mpenza “na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo.” (1 Kol. 15:58) Koyoka moombo ya sembo elimboli kondima litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.
Baoyo bayokelaka moombo ya sembo bazali kopambolama
18, 19. (a) Mapamboli nini baoyo bayokaka moombo ya sembo mpe ya mayele bakozwa? (b) Tosengeli kozala na ekateli nini?
18 Banda atyamá, moombo ya sembo mpe ya mayele asili ‘kobongola bato mingi epai na boyengebene.’ (Dan 12:3) Na kati na bango, ezali na baoyo bazali na elikya ya kobika ntango Nzambe akoboma mokili oyo. Ezali mpenza lipamboli komonana moyengebene na miso ya Nzambe!
19 Na mikolo ezali koya, ntango ‘engumba mosantu, Yelusaleme ya Sika [oyo ezali na bato 144 000], oyo ebongisami lokola mwasi ya libala oyo abongisi nzoto mpo na mobali na ye, ekokita uta na likoló longwa epai ya Nzambe,’ matomba nini bato oyo bayokaki mongongo ya moombo ya sembo bakozwa? Biblia elobi boye: “Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emon. 21:2-4) Yango wana, tosengeli koyokaka Klisto mpe bandeko na ye bapakolami oyo atyelaka motema.
[Oyekoli makambo nini?]
• Nini emonisi ete Yehova atyelaka moombo ya sembo mpe ya mayele motema?
• Nini emonisi ete Yesu Klisto atyelaka moombo ya sembo motema mobimba?
• Mpo na nini tosengeli kotyelaka kapita ya sembo motema?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka moombo ya sembo motema?
[Elilingi na lokasa 25]
Oyebi banani oyo Yehova aponi mpo azala mwasi ya Mwana na ye na mikolo ezali koya?
[Bililingi na lokasa 26]
Yesu apesi moombo ya sembo mpe ya mayele mokumba ya kobatela “biloko” na ye
[Elilingi na lokasa 27]
Ntango tozali kopesa litatoli, tozali kosunga baklisto bapakolami