Tósalisa bato báya epai ya Yehova
“Moto akokóma epai na Tata te soko na nzela na ngai te.”—YOANE 14:6.
1. Nsima ya kosekwa, etinda nini Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe matomba nini emonani lokola Batatoli ya Yehova bazali kotosa etinda yango?
YESU KLISTO atindaki bayekoli na ye ‘bázalisa [bato] bayekoli na mabota nyonso mpe bábatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.’ (Matai 28:19) Na bambula zomi oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova basalisaki bato koleka milio misato mpo báya epai ya Nzambe. Na nsima babatisaki bango mpo na komonisa ete bato yango bamipesi epai ya Nzambe mpo na kosala mokano na ye. Oyo nde esengo tozali na yango ya kosalisa bato yango ete báya epai ya Nzambe!—Yakobo 4:8.
2. Atako bato mingi ya sika bazali kobatisama, likambo nini tozali komona?
2 Na mikili mosusu, bayekoli ya sika oyo bazwaki batisimo bazalaki ebele, kasi basakoli ya Bokonzi na mikili yango babakisami mpenza te. Ezali ya solo ete basakoli mosusu bakufaki, nzokande motángo ya baoyo bakufaki na mbula moko ezali soko ya moto moko na kati ya bato 100. Kasi, na bambula oyo euti koleka, bato mingi balɛmbaki mpo na bantina mosusu. Mpo na nini? Lisolo oyo mpe lisolo oyo ekolanda ekomonisa ndenge bato bazali koya epai ya Yehova mpe mpo na nini bato mosusu balɛmbaka.
Ntina ya mosala na biso ya kosakola
3. (a) Ndenge nini mosala oyo bayekoli ya Yesu bazwi ekokani na oyo ya anzelu, oyo alobelami na Emoniseli 14:6? (b) Eloko nini esengeli mpo bato básepela na nsango ya Bokonzi, kasi yango ezali na mokakatano nini?
3 Na “ntango oyo ya nsuka,” bayekoli ya Yesu bazwi mosala ya kopalanganisa “boyebi ya solosolo” ya “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Danyele 12:4, NW; Matai 24:14) Mosala na bango ezali ndenge moko na oyo ya anzelu oyo “azalaki na Nsango Malamu na seko mpo na kosakola na bafandi na mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na [bikólo] nyonso.” (Emoniseli 14:6) Lelo oyo bato bamipesi mingi na makambo ya mokili, mpo na komema bato básepela na Bokonzi ya Nzambe mpe kosalisa bango báya epai ya Yehova, mbala mingi lolenge ya malamu mpenza ya kosala ezali ya koyebisa bango elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé oyo ekokóma paladiso. Atako likambo yango ezali mabe te, baoyo bazali kosangana na basaleli ya Nzambe kaka mpo bákɔta na Paladiso, bazalaka mpenza makasi na elimo te mpo na kotambola na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi.—Matai 7:13, 14.
4. Na kotalela maloba ya Yesu mpe ya anzelu oyo azali kopumbwa na katikati ya likoló, ntina mpenza ya mosala na biso ya kosakola ezali nini?
4 Yesu alobaki: “Oyo ezali bomoi ya seko ete báyeba yo Nzambe moko ya solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Anzelu oyo azali kopumbwa na katikati ya likoló azali kosakola “Nsango Malamu na seko” mpe azali koyebisa bato oyo bafandi na mabelé ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpo ngonga ya lisambisi na ye esili koya, mpe bósambela Moto oyo asalaki likoló, mabelé, mai monene mpe maziba.” (Emoniseli 14:7, NW) Emonani polele ete ntina mpenza ya mosala na biso ya kosakola nsango malamu ezali nde kosalisa bato báya epai ya Yehova na nzela ya Klisto Yesu.
Mokumba na biso kati na mosala ya Yehova
5. Wapi maloba ya Paulo mpe ya Yesu oyo emonisi ete mosala tozali kosala ezali ya Yehova, kasi ya biso te?
5 Ntango akomelaki baninga na ye baklisto bapakolami, ntoma Paulo alobelaki “mosala ya kozongisa bato na bondeko” mpe alobaki ete Nzambe azali kozongisa bato na bondeko elongo na ye na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. Paulo alobi ete ezali “lokola nde Nzambe azali kobondela bino na nzela na biso” mpe “na esika ya Klisto tozali kosɛnga na bino: ‘Bózonga na bondeko elongo na Nzambe.’” Oyo nde likanisi malamu! Ezala tozali bapakolami oyo bazali “bantoma na esika ya Klisto” to batindami oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé, tosengeli kobosana te ete mosala oyo tozali kosala ezali ya Yehova, kasi ya biso te. (2 Bakolinti 5:18-20, NW) Ezali Nzambe nde moto azali kobenda bato mpe azali koteya baoyo bazali koya epai ya Klisto. Yesu alobaki: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai, akobenda ye, mpe nakosekwisa ye na mokolo na nsuka. Ekomami kati na basakoli ete, Bango nyonso bakolakisama na [Yehova]. Boye moto na moto oyo ayoki epai na Tata mpe ayekoli, akoya [epai] na ngai.”—Yoane 6:44, 45.
6. Ndenge nini Yehova abandi koningisa mabota, mpe kaka na ntango yango, banani bazali kobatelama malamu na “ndako” na ye ya losambo?
6 Na mikolo oyo ya nsuka, ndenge nini Yehova azali kobenda bato mpe ndenge nini azali kofungwela bango “ekuke ya kondima”? (Misala 14:27, NW, maloba na nse ya lokasa; 2 Timote 3:10) Nzela malamu oyo ye azali kobenda bango yango oyo: azali kotinda Batatoli na ye básakola nsango na ye ya lobiko mpe lisambisi oyo akoyeisa na ebongiseli mabe ya ntango oyo. (Yisaya 43:12; 61:1, 2) Nsango oyo ezali kosakolama na mokili mobimba ezali ebandeli ya koningisama ya mabota—yango ezali elembo ya lisambisi ya kobukanisa oyo etikali moke eya. Kaka na ntango yango, bato oyo bazali “kitoko” na miso ya Nzambe bazali kobima na ebongiseli oyo mpe bazali kokɔta na kati ya “ndako” na ye ya losambo ya solo epai bazali kobatelama malamu. Ezali na ndenge wana nde Yehova azali kokokisa maloba na ye ya esakweli oyo Hagai akomaki: “Nakoningisa mabota nyonso, mpe biloko kitoko ya mabota nyonso esengeli koya awa; mpe nakotondisa ndako oyo na nkembo.”—Hagai 2:6, 7, NW, maloba na nse ya lokasa; Emoniseli 7:9, 15.
7. Ndenge nini Yehova azali kofungola mitema ya bato mpe kobenda bango epai na ye mpe epai ya Mwana na ye?
7 Yehova azali kofungola mitema ya bato oyo babangaka Nzambe—“biloko bya lokumu [bya bikólo]”—ete ‘bátya likebi na makambo oyo elobami’ na Batatoli na ye. (Ageo [Hagai] Hag 2:7, Liloba lya Nzambe; Misala 16:14) Kaka ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, lelo oyo mpe Yehova azali kosalela baanzelu na ye mpo bákamba Batatoli na ye epai ya bato ya mitema sembo, baoyo bazali kobelela ye mpo na kozwa lisalisi. (Misala 8:26-31) Ntango bato bayebi makambo malamu oyo Nzambe asali mpo na bango na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto, bolingo ya Yehova ezali kobenda bato yango epai na ye. (1 Yoane 4:9, 10) Ɛɛ, Nzambe azali kobenda bato epai na ye mpe epai ya Mwana na ye na nzela ya “motema-boboto” to “bolingo ya sembo” oyo Ye azali na yango.—Yilimia 31:3, NW, maloba na nse ya lokasa.
Yehova azali kobenda banani?
8. Yehova azali kobenda bato ya ndenge nini?
8 Bato oyo Yehova azali kobenda báya epai na ye mpe epai ya Mwana na ye ezali baoyo bazali koluka Ye. (Misala 17:27) Na kati ya bato yango, tozali kokuta baoyo ‘bazali kokimela mpe kolela na ntina na makambo ya mbindo nyonso oyo mazali kosalema’ na mangomba ya boklisto mpe na mokili mobimba. (Ezekiele 9:4) Bato yango “bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW) Ya solo, bazali “bato ya komikitisa na mokili,” oyo bakofanda na paladiso awa na mabelé libela na libela.—Sefania 2:3, NW.
9. Ndenge nini Yehova akoki koyeba ete bato boye “babongi mpo na bomoi ya seko,” mpe ndenge nini abendaka bango?
9 Yehova azali na likoki ya koyeba makambo oyo ezali na motema ya moto. Mokonzi Davidi alobaki na mwana na ye Salomo ete: “Yehova akotalaka mitema nyonso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso. Soko okoluka ye, [akotika ete omona ye, NW].” (1 Ntango 28:9) Na kotalela ndenge ya motema ya moto mpe elimo na ye, to ezalela na ye, Yehova akoki komona soki moto yango, mwasi to mobali, akosepela na bibongiseli oyo Nzambe akamati mpo na kolimbisa masumu mpe elikya ya bomoi ya seko na ebongiseli ya sika ya Nzambe, epai bosembo ekozala. (2 Petelo 3:13) Na nzela ya Liloba na ye, oyo Batatoli na ye bazali kosakola mpe koteya, Yehova azali kobenda ‘bato nyonso oyo babongi mpo na bomoi ya seko’ báya epai na ye mpe epai ya Mwana na ye mpe bato yango ‘bazali kokóma bandimi.’—Misala 13:48, NW.
10. Lokola Yehova abendaka bato mosusu mpe atikaka bamosusu, yango epesi nzela na kondima liteya oyo elobaka ete makambo nyonso esilá kokanama liboso?
10 Ndenge Yehova azali kobenda bato mosusu mpe kotika bamosusu, elingi koloba ete tosengeli kondima liteya oyo elobaka ete makambo nyonso esilá kokanama liboso? Soko moke te! Kobenda oyo Nzambe azali kobenda bato etalelaka nde mposa makasi oyo bato yango bazalaka na yango mpo na kokokisa likambo moko ya ntina. Atikaka bato bápona oyo bango moko balingi. Yehova atikeli bato bápona na kati ya biloko mibale, ndenge asalaki na Bayisalaele esili koleka sikawa mibu 3 000, ntango Mose alobaki ete: “Natii liboso na yo lelo bomoi mpe malamu, mpe kufa mpe mabe. . . Nabyangi likoló mpe nse kotatola na ntina na bino lelo, ete natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye, mpo ete [ye azali bomoi na yo mpe bolai ya mikolo na yo, NW].”—Deteronome 30:15-20.
11. Ndenge nini Bayisalaele bakokaki komonisa ete baponi bomoi?
11 Tósimba likambo oyo: Bayisalaele balingaki komonisa ete baponi bomoi bobele soki ‘balingi Yehova, batosi mongongo na ye mpe bakangani na ye.’ Ntango maloba oyo elobamaki, Bayisalaele bakɔtaki naino na Mokili ya Ndaka te. Bafandaki na kimya na esobe ya Moaba, bazalaki komilɛngɛla mpo bákatisa Ebale ya Yordani mpe bákɔta na Kanana. Atako ezalaki mabe te mpo na bango bámona na makanisi na bango mokili wana ya “malamu mpe ya monene, mokili moleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi” oyo etikalaki moke bázwa, kasi mpo elaka wana ekokisama basengelaki liboso kolinga Yehova, kotosa mongongo na ye mpe kokangana na ye. (Exode 3:8) Mose amonisaki yango polele ntango alobaki ete: “Soki okoyoka mibeko ya Yehova Nzambe na yo, oyo nasɛngi yo lelo, na boye ete olinga Yehova Nzambe na yo, otambola na banzela na ye mpe obatela mibeko na ye, mitinda na ye mpe bikateli na ye, boye na ntembe te, okozala na bomoi mpe okokóma mingi, mpe Yehova Nzambe na yo akopambola yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kokamata yango.”—Deteronome 30:16, NW.
12. Ndakisa ya Bayisalaele esengeli koteya biso nini na mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya?
12 Likambo wana oyo esalemaki na ntango ya kala esengeli mpenza kopesa biso liteya na mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya na mikolo oyo ya nsuka, boye te? Tomonaka na makanisi na biso Paladiso oyo ekoya awa na mabelé mpe tolobelaka yango na mosala na biso ya kosakola. Kasi ezala biso, to bato oyo tozali kokómisa bayekoli, tokomona ndenge elaka wana ekokokisama bobele soki biso na bango tozali kosalela Nzambe mpo na matomba na biso moko te. Lokola Bayisalaele, biso na bato oyo tozali koteya, tosengeli koyekola ‘kolinga Yehova, koyoka mongongo na ye, mpe kokangana na ye.’ Soki tokobosana likambo wana te na ntango tozali kosala mosala na biso ya kosakola, boye tokozala mpenza bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe mpo na kobenda bato báya epai na ye.
Basalani elongo na Nzambe
13, 14. (a) Na kotalela 1 Bakolinti 3:5-9, ndenge nini tokómi basalani elongo na Nzambe? (b) Nani tosengeli kopesa lokumu mpo na bokoli nyonso oyo ezali komonana, mpe mpo na nini?
13 Paulo asalelaki ndakisa ya mosala ya bilanga mpo na komonisa ndenge oyo bato basalaka elongo na Nzambe. Akomaki: “Apolo nani? Paulo nani? Bazali basali. Bondimaki na nzela na bango lokola Nkolo apesaki moto na moto nzela. Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Nzambe akolisaki. Mokoni azali eloko te, momwangisi na mai eloko mpe te nde bobele Nzambe mokolisi. Mokoni mpe momwangisi na mai bazali moko, moto na moto akozwa libonza pelamoko na mosala na ye. Zambi tozali basalani na Nzambe elongo; bino bozali elanga na Nzambe.”—1 Bakolinti 3:5-9.
14 Lokola tozali basalani elongo na Nzambe, tosengeli kolona “liloba ya bokonzi” na bosembo nyonso na kati ya mitema ya bato, na nsima komwangisa mai epai ya bato oyo bamonisaki bosepeli, komibongisa malamu mpo na kozongela bango mpe koyekola na bango Biblia. Soki mabelé, elingi koloba motema, ezali malamu, Yehova akosala oyo ya ye mosala, akokolisa mombóto ya solo ya Biblia mpo ekóma molona oyo mozali kobota mbuma. (Matai 13:19, 23) Akobenda moto yango epai na ye mpe epai ya Mwana na ye. Boye, tokoki koloba ete mosala oyo Yehova azali kosala na mitema ya bato, na ndenge azali kokolisa mombóto ya solo mpe na ndenge azali kobenda bato yango báya epai na ye moko mpe epai ya Mwana na ye, yango nde esalaka ete motángo ya basakoli ya Bokonzi ebakisama mingi.
Mosala ya kotonga oyo ekoumela
15. Ndakisa nini Paulo asalelaki mpo na komonisa ndenge tosengeli kosalisa bato mosusu bázala na kondima?
15 Atako tozali kosepela na ndenge mosala ezali kokola, mposa na biso ezali mpenza tómona bato bazali kokoba kolinga Yehova, koyoka mongongo na ye mpe kokangana na ye. Toyokaka mawa ntango tozali komona bamosusu bazali kozanga esengo mpe bazali kolɛmba. Eloko nini tokoki kosala mpo likambo motindo wana ekóma te? Na ndakisa mosusu oyo apesi, Paulo amonisi ndenge nini tokoki kosalisa bamosusu ete bázala na kondima. Akomi boye: “Moto akoki kotya moboko mosusu te bobele yango esili kotongama, yango Yesu Klisto. Soko moto nani akotonga likoló na moboko yango litongi na wolo soko na palata soko na mabanga na motuya [soko na mabaya] soko na matiti soko na nkɛkɛlɛ, mosala na moto na moto ekomonana polele. Zambi mokolo yango ekomonisa yango mpo ete mokomonana na mɔ́tɔ mpe mɔ́tɔ ekososolisa motindo na mosala mosalaki moto na moto.”—1 Bakolinti 3:11-13.
16. (a) Ndenge nini bandakisa mibale oyo Paulo asalelaki ekeseni na mokano na yango? (b) Ndenge nini mosala na biso ya kotonga ekoki kozala mabe mpe kozanga kotɛlɛma liboso ya mɔ́tɔ?
16 Na ndakisa oyo Paulo asaleli ya elanga, bokoli eutaka na milende mpo na kolona, komwangisa mai mbala na mbala mpe lipamboli ya Nzambe. Ndakisa mosusu ya ntoma Paulo emonisi polele mokumba oyo mosaleli moklisto azali na yango mpo na mosala na ye ya kotonga. Azali kotonga na moboko ya solosolo mpe na bisaleli ya malamu? Paulo apesi likebisi oyo: “Tiká ete moto na moto atala malamu soko azali kotonga boni.” (1 Bakolinti 3:10) Ntango tolamwisi mposa ya moto, mwasi to mobali, na ndenge toyebisi ye makambo matali elikya ya bomoi ya seko na Paladiso, mateya na biso ebendaka mingi likebi ya bato likoló ya boyebi oyo ezali na Makomami to elobelaka mingi nde makambo oyo moto asengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko? Mateya na biso esengeli nde kosuka bobele na likambo oyo ete: ‘Soki olingi kozala na bomoi libela na libela na Paladiso, osengeli koyekola, koyangana na makita mpe kosangana na mosala ya kosakola’? Soki ezali bongo, tozali te kotonga kondima ya moto yango likoló na moboko ya makasi mpe ndako oyo tozali kotonga ekolonga te kotɛmɛla mɔ́tɔ ya komekama mpe ekoumela ntango molai te. Koluka kobenda bato epai ya Yehova bobele na nzela ya elikya ya bomoi na Paladiso mpo na mwa bambula moke oyo tolekisi na kosalela ye ezali lokola ndako oyo etongami na “mabaya, na matiti mpe na nkɛkɛlɛ.”
Tósala ete bálinga Nzambe mpe Klisto mingi
17, 18. (a) Eloko nini esengeli mpo kondima ya moto ezala makasi? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa moto moko, azala mwasi to mobali, mpo Klisto afanda na motema na ye?
17 Mpo kondima ezala ntango nyonso makasi, esengeli kouta na boyokani oyo moto azali na yango elongo na Yehova na nzela ya Yesu Klisto. Lokola tozali bato bazangi kokoka, tokoki kokóma na boyokani wana ya kimya elongo na Nzambe bobele na nzela ya Mwana na ye. (Baloma 5:10) Omikundola ete Yesu alobaki: “Moto akokóma epai na Tata te soko na nzela na ngai te.” Mpo na kosalisa bato mosusu bátonga kondima na bango, “moto akoki kotya moboko mosusu te bobele yango esili kotongama, yango Yesu Klisto.” Yango esɛngi makambo nini?—Yoane 14:6; 1 Bakolinti 3:11.
18 Kotonga likoló na Klisto oyo azali moboko elimboli koteya na motindo oyo moyekoli ya Biblia akokóma kolinga Yesu mingi, na koyebáká malamumalamu mokumba na Ye lokola Mosikoli, Mokonzi ya lisangá, Nganga Monene oyo atondi na bolingo mpe Mokonzi oyo azali koyangela. (Danyele 7:13, 14; Matai 20:28; Bakolose 1:18-20; Baebele 4:14-16) Elimboli kosala ete Yesu azala mpenza moto ya solosolo epai na bango, mpo akoka kofanda na mitema na bango. Libondeli na biso mpo na bango esengeli kozala lokola oyo Paulo asalaki mpo na baklisto ya Efese. Akomaki: “Nazali kogumba mabɔlɔngɔ na ngai liboso ya Tata, . . . mpo apesa bino likoki . . . ete Klisto afanda, na nzela ya kondima na bino, na mitema na bino na bolingo; mpo bópikama makasi mpe bótongama makasi likoló ya moboko.”—Baefese 3:14-17, NW.
19. Litomba nini tokozwa soki toloni mposa ya kolinga Klisto mingi na mitema ya bayekoli ya Biblia, kasi eloko nini tosengeli koteya bango?
19 Soki tozali kotonga mpo bayekoli bákóma kolinga Klisto mingi na mitema na bango, na ntembe te, yango ekosala ete bálinga mpe Yehova Nzambe mingi. Bolingo, mayoki mpe motema mawa ya Yesu ezali komonisa na ndenge ya malamu mpenza bizaleli ya Yehova. (Matai 11:28-30; Malako 6:30-34; Yoane 15:13, 14; Bakolose 1:15; Baebele 1:3) Na bongo, ntango bato bazali koyeba Yesu mpe kolinga ye, bakoyeba mpe bakolinga Yehova.a (1 Yoane 4:14, 16, 19) Tosengeli koteya bayekoli ya Biblia ete Yehova nde atindaki Klisto asala makambo nyonso oyo asalaki mpo na bato, yango wana tosengeli kopesa Ye matɔndi, kosanzola ye mpe kosambela ye mpo azali “Nzambe ya lobiko na biso.”—Nzembo 68:19, 20; Yisaya 12:2-5; Yoane 3:16; 5:19.
20. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa bato ete báya epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana na ye? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
20 Lokola tozali basalani elongo na Nzambe, tiká tósalisa bato báya epai na ye mpe epai ya Mwana na ye, tósalisa bango bázala na bolingo mingi mpe na kondima makasi na mitema na bango. Na ndenge yango, bakomona mpenza ete Yehova azali moto ya solosolo. (Yoane 7:28) Na nzela ya Yesu, bakozwa likoki ya kozala na boyokani makasi elongo na Nzambe, bakolinga ye mpe bakokangana na ye. Bakolanda kosala libela na libela mosala oyo bazali kosala na bolingo na bango moko, bakondima ete bilaka kitoko oyo Yehova apesi bikokokisama na ntango na yango. (Bileli 3:24-26; Baebele 11:6) Atako tozali kosalisa bato mosusu ete bázala na kondima, na elikya mpe na bolingo, biso moko mpe tosengeli kotonga kondima na biso mpo ezala lokola masuwa ya makasi oyo ekoki kotɛmɛla mipɛpɛ makasi. Ezali yango nde tokotalela na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo tóyeba Yesu malamumalamu mpe, na nzela na ye, tóyeba Tata na ye Yehova, tosengeli kotánga buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Bozongeli
◻ Mbala mingi, ndenge nini tosalaka mpo na komema bato básepela na nsango ya Bokonzi, kasi yango ezali na likama nini?
◻ Yehova azali kobenda epai na ye mpe epai ya Mwana na ye bato ya ndenge nini?
◻ Kokɔta ya Bayisalaele na Mokili ya Ndaka etalelaki likambo nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
◻ Mokumba na biso ezali nini ntango tozali kosalisa bato báya epai ya Yehova mpe epai ya Mwana na ye?
[Elilingi na lokasa 10]
Atako tolobelaka bato elikya ya bomoi ya seko na Paladiso, mokano na biso ya libosoliboso ezali nde ya kobenda bango epai ya Yehova
[Bililingi na lokasa 13]
Kozonga kotala bato oyo basepelaki ekoki mpenza kobimisa matomba soki tomibongisi malamumalamu