Tómibalola epai na Yehova mpo na kozwa libɔndisi
“Tiká ete Nzambe oyo apesaka mpiko mpe libɔndisi asala ete bózala na elimo motindo oyo ezalaki na Klisto Yesu.”—BALOMA 15:5, NW.
1. Mpo na nini tozali na mposa monene ya libɔndisi mokolo na mokolo?
MOKOLO na mokolo oyo ezali koleka ezali komonisa mposa monene ya libɔndisi. Lokola mokomi ya Biblia moko amonaki yango esili koleka mibu 1900, “biloko nyonso bisalamaki na Nzambe, izali kokimela elongo kino ntango oyo, lokola na mpasi na kobota mwana.” (Baloma 8:22) Na mikolo na biso “kokimela” mpe “mpasi” esili koyikana mingi mpenza. Uta Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bato bazali konyokwama na mokakatano moko nsima na mosusu, lokola bitumba, mobulu, mpe makámá mauti na biloko bizalisami oyo mbala mingi ebimaka mpo na lolenge oyo bato bazali kobebisa mabelé.—Emoniseli 11:18.
2. (a) Nani azali na ngambo monene na ntina na mpasi oyo bato bazali komona lelo? (b) Likambo nini lizali kopesa biso moboko mpo na libɔndisi?
2 Mpo na nini mpasi ezali mingi bongo na mikolo na biso? Kolobeláká kobwakama ya Satana longwa na makoló nsima ya kobotama ya Bokonzi na mobu 1914, Biblia epesi eyano oyo: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12) Bilembeteli ya polele ya kokokisama ya esakweli wana bizali komonisa ete tosili kokóma mpenza na nsuka ya boyangeli mabe ya Satana. Oyo nde libɔndisi tozwi na koyeba ete mosika te bomoi awa na mabelé ekozonga na ezalela ya kimya oyo ezalaki liboso ete Satana apusa baboti na biso ya liboso na botomboki!
3. Ntango nini bato bazalaki na mposa ya libɔndisi te?
3 Na ebandeli, Mozalisi na moto abongisaki elanga moko kitoko ete ezala efandelo ya babalani ya liboso. Yango ezalaki na esika ebéngami Edene, oyo elimboli “Bosepeli” to “Esengo.” (Genese 2:8, NW, maloba na nsé ya lokasa) Epai mosusu, Adama na Eva bazalaki na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya kokoka, kozanga likanisi ya kokufa. Kanisá naino makambo mingi oyo na yango bakokaki kokólisa makoki na bango—kolóna elanga kitoko, ntɔ́ki, botongi, miziki. Kanisá lisusu, misala nyonso ya bozalisi oyo bakokaki koyekola wana bazalaki kokokisa mokumba na bango ya kozala na bokonzi likoló na mabelé mpe ya kokómisa yango paladiso. (Genese 1:28) Ya solo, bomoi ya Adama na Eva elingaki te kotonda na kokimela mpe mpasi, kasi na esengo mpe na bosepeli. Ezali polele ete, mbɛlɛ bazalaki na mposa ya libɔndisi te.
4, 5. (a) Mpo na nini Adama na Eva balóngaki te na momekano ya komonisa botosi? (b) Lolenge nini bato bakómaki na mposa ya libɔndisi?
4 Nzokande, Adama na Eva basengelaki kokólisa bolingo mpe botɔ́ndi mozindo epai na Tata na bango ya likoló oyo atondi na boboto. Bolingo motindo yango mbɛlɛ epusaki bango na kotosa Nzambe na makambo nyonso. (Kokanisá na Yoane 14:31.) Likambo ya mawa, baboti na biso ya liboso bango nyonso mibale batosaki Yehova te, Ye oyo azalaki na lotómo ya kozala Nkolo-Mokonzi na bango. Kasi, bamitikaki bango moko ete anzelu oyo akitisami, Satana Zábolo akóma mokonzi na bango. Satana nde asenginyaki Eva ete asala lisumu na kolyáká mbuma ya nzeté oyo epekisamaki. Na nsima Adama asalaki lisumu ntango ye mpe alyaki mbuma ya nzeté oyo Nzambe akebisaki na ntina na yango ete: “Mokolo okolya yango okokufa solo.”—Genese 2:17.
5 Na lolenge yango, babalani wana basumuki babandaki kokufa mokemoke. Ntango akatelaki bango etumbu ya liwa, Nzambe alobaki na Adama ete: “Mokili elakami mabe na ntina na yo. Okolya na yango na mawa mikolo nyonso na bomoi na yo. Ekobimisela yo nzeté mpe nkamba na nzube, mpe okolya ndunda na mokili.” (Genese 3:17, 18) Na lolenge yango, Adama na Eva babungisaki elikya ya kosala ete eteni ya mabelé oyo elónamaki naino te ekóma paladiso. Wana babimisamaki na Edene, basengelaki kotya nguya na bango nyonso na misala makasi mpo ete mabelé oyo masilaki kolakelama mabe mabimisa bilei. Bakitani na bango, lokola basangolaki ezalela ya basumuki, ya baye bakufaka, bakómaki na mposa monene ya libɔndisi.—Baloma 5:12.
Elaka moko ya kobɔndisama ekokisami
6. (a) Elaka nini ya kobɔndisa Nzambe apesaki nsima ya kokwea ya bato na lisumu? (b) Esakweli nini etali libɔndisi Lameke abimisaki?
6 Ntango akataki etumbu likoló na mobandisi ya botomboki ya bato, Yehova amimonisaki ete azali ‘Nzambe na kobɔndisa.’ (Baloma 15:5) Asalaki bongo na kopesáká elaka ya kotinda “mombóto” oyo na nsima asengelaki kosikola bakitani ya Adama na mpasi euti na botomboki na ye. (Genese 3:15) Na nsima, Nzambe apesaki mwa kongɛnga na ntina na kosikolama wana. Na ndakisa, apemisaki Lameke, mokitani moko ya mosika na libota ya Adama na nzela ya mwana na ye Sete ete, asakola na ntina na oyo mwana mobali ya Lameke asengelaki kosala: “Ye oyo akobɔndisa biso kati na bolózi na biso epai na mokili oyo elakaki [Yehova] mabe.” (Genese 5:29) Na boyokani na elaka wana, mwana mobali yango abyangamaki Noa, oyo ezali na ndimbola ete “Kopema” to “Kobɔndisama.”
7, 8. (a) Likambo nini etindaki Yehova ayoka mawa ete azalisaki bato, mpe akanaki kosala nini na ntina yango? (b) Lolenge nini Noa akokisaki ndimbola ya nkombo na ye?
7 Bobele na ntango yango, Satana azalaki kopɛngwisa baanzelu mosusu ya likoló ete bálanda ye. Balataki nzoto ya bato mpe bakamataki basi kitoko kati na bakitani ya Adama lokola basi na bango. Na nsima, bosangani wana ya bikelamu ya mitindo mikeseni ebebisaki libota na bato mpe ebimisaki libota ya Banefilime, bato oyo bazalaki kotuka Nzambe, “bakwei,” baoyo batondisaki mabelé na mobulu. (Genese 6:1, 2, 4, 11; Yuda 6) “[Yehova] amonaki ete masumu na bato izalaki mingi na mokili . . . [Yehova] ayokaki mawa ete asalaki bato kozala na nsé, mpe likambo yango epesaki ye bolózi na motema.”—Genese 6:5, 6.
8 Yehova akanaki koboma mokili wana mabe na mpela ya mokili mobimba, kasi liboso asalaki ete Noa atonga masúwa mpo na kobatela bomoi. Na lolenge yango, libota ya bato mpe nyama ya lolenge nyonso babatelamaki. Noa mpe libota na ye bazwaki mpenza kopema nsima na Mpela ntango babimaki na masúwa mpo na kofanda na mabelé mapɛtɔlami! Oyo nde libɔndisi na komona ete kolakelama mabe likoló na mabelé esilaki kolongolama, kosaláká ete mosala ya bilanga ekóma malamu mingi! Ya solo, esakweli ya Lameke ekokisamaki, mpe Noa amitambwisaki engebene nkombo na ye. (Genese 8:21) Lokola azalaki mosaleli ya sembo ya Nzambe, Noa azalaki na mokumba monene mpo na oyo etali komema mwa “libɔndisi” epai na bato. Nzokande, bopusi mabe ya Satana mpe ya baanzelu mabe na ye ezali naino kosala ete bato bákimela na nsé ya bozito ya lisumu, ya bokɔnɔ, mpe ya kufa.
Moto oyo aleki Noa
9. Lolenge nini Yesu Klisto amonisaki ete azalaki mosungi mpe mobɔndisi mpo na bato oyo babongoli motema?
9 Na nsima, ntango mibu pene na 4000 ya lisoló ya bato ekokaki, Mombóto oyo alakamaki ayaki. Mpo na bolingo monene oyo azalaki na yango epai na bato, Yehova Nzambe atindaki Mwana mobotami bobele moko na ye awa na mabelé ete akufa lokola lisiko mpo na bato na masumu. (Yoane 3:16) Yesu Klisto azali kopesa kopema monene mpo na basumuki oyo babongoli motema mpe bazali na kondima kati na kufa na ye lokola mbeka. Baoyo nyonso bazali kopesa bomoi na bango na Yehova mpe bazali kokóma bayekoli babatisami ya Mwana na ye bazali kozwa kopema mpe libɔndisi ya seko. (Matai 11:28-30; 16:24) Ata bazali bato ya kozanga kokoka, bazali kozwa esengo mozindo na kosaleláká Nzambe na lisosoli moko ya pɛtɔ. Oyo nde libɔndisi mpo na bango na koyeba ete bakozwa libonza ya bomoi ya seko, soki balandi komonisa kondima epai na Yesu! (Yoane 3:36; Baebele 5:9) Soki basali lisumu monene na ntina na bolɛmbu oyo bazali na yango, bongo bazali na mosungi, to mobɔndisi, oyo ezali bongo Yesu Klisto asekwisami. (1 Yoane 2:1, 2) Na koyamboláká lisumu motindo yango mpe na kosaláká matambe ya Makomami mpo na kopɛngola kozala basáli ya masumu, bazali kozwa kopema, awa bayebi ete ‘Nzambe azali sembo mpe moyengebeni mpo na kolimbisa masumu na bango.’—1 Yoane 1:9; 3:6; Masese 28:13.
10. Tozali koyekola nini na ntina na makamwisi oyo Yesu asalaki awa na mabelé?
10 Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amemaki mpe kopema na kosikoláká baye bazalaki na bilimu mabe, na kobikisáká lolenge nyonso ya makɔnɔ, mpe na kosekwisáká balingami oyo bakufaki. Ya solo, makamwisi motindo yango mapesaki bobele matomba ya mwa ntango mokuse, mpamba te na nsima, baoyo bazwaki mapamboli yango bakómaki mibangé mpe bakufaki. Nzokande, na nzela yango Yesu azalaki komonisa mapamboli ya seko oyo akosopa mpo na bato banso na mikolo mizali koya. Lokola azali sikawa Mokonzi ya nguya mingi na likoló, mosika te akosala lisusu koleka kobimisa bobele bilimu mabe. Akobwaka bango elongo na mokonzi na bango, Satana, kati na libulu mozindo ya kozanga mosala. Na nsima Bokonzi ya Mbula Nkóto ya Klisto ekobanda.—Luka 8:30, 31; Emoniseli 20:1, 2, 6.
11. Mpo na nini Yesu amibyangaki ete “Nkolo na Sabata”?
11 Yesu alobaki ete azali “Nkolo na Sabata,” mpe asalaki mingi ya makamwisi na ye ya kobikisa bato na mokolo ya Sabata. (Matai 12:8-13; Luka 13:14-17; Yoane 5:15, 16; 9:14) Mpo na nini bongo? Sabata ezalaki kati na Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisalaele mpe na yango ezalaki “elilingi na makambo [malamu] malingi koya.” (Baebele 10:1) Mikolo motoba ya pɔ́sɔ mpo na kosala mosala mizali kokundwela biso mibu 6000 ya lisoló ya bato kati na boombo na nsé ya boyangeli mabe ya Satana. Mokolo ya Sabata na nsuka ya pɔ́sɔ ezali kokanisela biso kobɔndisama oyo bato bakozwa na boumeli ya Bokonzi ya Mbula Nkóto ya Noa Monene, Yesu Klisto.—Kokanisá na 2 Petelo 3:8.
12. Makambo nini ya kobɔndisa tosengeli kozela yango na esengo nyonso?
12 Oyo nde kopema bayangelami na bokonzi ya Klisto bakozwa awa na mabelé ntango, nsukansuka, bakomona ete basikolami mobimba na bopusi mabe ya Satana! Libɔndisi mosusu likozwama ntango bakobikisama na makɔnɔ na bango nyonso ya nzoto, ya mayoki, mpe ya bɔɔngɔ́. (Yisaya 65:17) Bongo, kanisá esengo na bango ntango bakobanda koyamba balingami na bango oyo bakozongisama lisusu na bomoi! Na mikolo wana Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.” (Emoniseli 21:4) Wana matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu makosalelama mokemoke mpo na bango, bayangelami na Bokonzi ya Nzambe bakotombwana kino kokoka, kosikolamáká bongo mobimba na mbuma nyonso mabe ya lisumu ya Adama. (Emoniseli 22:1-5) Na nsima Satana akokangwama lisusu mpo na “mwa ntango moke.” (Emoniseli 20:3, 7) Bato nyonso oyo bazali kosimba na bosembo lotómo ya Yehova ya kozala Nkolo-Mokonzi bakozwa mbano ya bomoi ya seko. Kanisá naino esengo monene mpe kobɔndisama oyo ekouta na ‘kosikwama na boombo na libebisi’! Na lolenge yango bato na botosi bakokóma na ‘nkembo ya bana na Nzambe.’—Baloma 8:21.
13. Mpo na nini baklisto nyonso ya solo bazali na mposa ya libɔndisi ya Nzambe?
13 Na kozeláká yango, tokolanda kokimela mpe komona mpasi lokola bato banso oyo bazali kobika kati na ebongiseli ya Satana. Bokóli ya makɔnɔ na nzoto mpe kobulungana na makanisi ezali konyokola bato ya mitindo nyonso, bakisa mpe baklisto ya sembo. (Bafilipi 2:25-27; 1 Batesaloniki 5:14) Longola yango, lokola tozali baklisto tonyokwamaka mbala mingi na botyoli mpe monyokoli ezangi ntina oyo Satana azali kotyela biso mpamba te ‘tozali kotosa Nzambe liboso na kotosa bato.’ (Misala 5:29) Na yango, soki tolingi koyika mpiko na kosaláká mokano ya Nzambe kino nsuka ya mokili oyo ya Satana, tozali na mposa ya libɔndisi, ya lisungi, mpe ya nguya oyo apesaka.
Epai wapi tokozwa libɔndisi
14. (a) Elaka nini Yesu apesaki na butu oyo ezalaki liboso na kufa na ye? (b) Nini ezali na ntina soki tolingi mpenza kozwa libɔndisi ya elimo santu ya Nzambe?
14 Na butu oyo ezalaki liboso ya kufa na ye, Yesu amonisaki polele epai na bantoma na ye ya sembo ete mosika te asengelaki kotika bango mpe kozonga epai na Tata na ye. Likambo yango ebulunganisaki bango mpe epesaki bango mawa. (Yoane 13:33, 36; 14:27-31) Koyebáká mposa na bango ya libɔndisi ya ntango nyonso, Yesu apesaki elaka oyo: “Ngai nakobondela Tata mpe akopesa bino Mosungi [“Mobɔndisi,” NW, maloba na nsé ya lokasa] mosusu ete afanda na bino libela. (Yoane 14:16) Awa Yesu azalaki kolobela elimo santu ya Nzambe, oyo esopamelaki bayekoli na ye mikolo 50 nsima ya lisekwa na ye.a Na makambo mosusu, elimo ya Nzambe ebɔndisaki bango na komekama na bango mpe elendisaki bango ete bákóba kosala mokano ya Nzambe. (Misala 4:31) Nzokande, lisungi motindo yango lisengelaki te kotalelama lokola eloko oyo eyaka yango moko. Mpo na kozwa litomba na yango, moklisto moko moko asengeli kotika te kobondela mpo na kobɔndisama na lisungi oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya elimo na ye.—Luka 11:13.
15. Wapi myango mosusu oyo na nzela na yango Yehova apesaka biso libɔndisi?
15 Mwango mosusu oyo na nzela na yango Nzambe azali kopesa libɔndisi ezali bongo Liloba na ye, Biblia. Paulo akomaki ete: “Nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyoka mpiko mpe na kolendisama na makomi.” (Baloma 15:4) Oyo ezali komonisa biso ntina ya koyekola mokolo na mokolo mpe ya komanyola likoló na Biblia mpe mikanda oyo mikolimbolaka Biblia. Tosengeli mpe koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto, epai kuna makanisi ya kobɔndisa mazali kopesama uta na Liloba ya Nzambe. Moko na bantina minene ya makita ezali bongo kolendisana moko na mosusu.—Baebele 10:25.
16. Bibongiseli ya libɔndisi ya Nzambe bisengeli kolendisa biso na kosala nini?
16 Mokanda ya Paulo epai na Baloma ekóbi komonisa matomba malamu oyo tozali kozwa wana tozali kosalela malamu bibongiseli ya Nzambe oyo bizali kopesa libɔndisi. Paulo akomaki ete: “Tiká ete Nzambe oyo apesaka mpiko mpe libɔndisi asala ete bózala na elimo motindo moko na oyo ezalaki na Klisto Yesu, ete na bomoko mpe na mongongo moko bókoka kopesa nkembo na Nzambe mpe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (Baloma 15:5, 6, NW) Ee, na kozwáká matomba na bibongiseli ya Nzambe mpo na kopesa libɔndisi, tokokóma lokola Mokonzi na biso ya mpiko, Yesu Klisto. Yango ekolendisa biso ete tokóba kosalela minɔkɔ na biso mpo na kokumisa Nzambe kati na mosala na biso ya kopesa litatoli, na makita, na masoló elongo na baninga na biso bandimi, mpe na mabondeli na biso.
Na ntango ya komekama makasi
17. Lolenge nini Yehova abɔndisaki Mwana na ye, mpe epesaki litomba nini?
17 Yesu “abulunganaki mpenza” mpe ‘ayokaki mawa mingi’ na butu oyo ezalaki liboso na kufa na ye ya mpasi. (Matai 26:37, 38) Na yango, amibendaki mwa ntáká mosika na bayekoli na ye mpe abondelaki Tata na ye mpo na kozwa lisungi. “Ayokami mpo na kotosa na ye malamu.” (Baebele 5:7) Biblia eyebisi ete “mwanze na Likoló amonanaki na ye kokembisa ye.” (Luka 22:43) Mpiko oyo amonisaki liboso na batɛmɛli na ye ezali elembeteli ete Nzambe asalelaki mwango moko ya nguya mpo na kobɔndisa Mwana na ye.—Yoane 18:3-8, 33-38.
18. (a) Ntango nini mpenza ya bomoi ya ntoma Paulo ezalaki na komekama makasi? (b) Lolenge nini tokoki kopesa libɔndisi epai na bankulutu ya motema boboto oyo bazali kosala mosala makasi?
18 Ntoma Paulo akutanaki mpe na ntango ya komekama makasi. Na ndakisa, mosala na ye na Efese ezalaki kati na “mpisoli, mpe na bimekeli bibimelaki [ye] mpo na myango na Bayuda.” (Misala 20:17-20) Nsukansuka, Paulo alongwaki na Efese ntango bakɔteli ya nzambe mwasi Alatɛmi babimisaki yikiyiki kati na engumba na ntina na mosala na ye ya kosakola. (Misala 19:23-29; 20:1) Wana ezalaki Paulo kokenda na engumba ya Toloa epai na nɔ́rdi, likambo mosusu lizalaki kotungisa makanisi na ye. Mwa ntango moke liboso ete yikiyiki ebima na Efese, azwaki nsango moko ya kobulunganisa. Lisangá ya sika na Kolinti ebebisamaki na bokabwani, mpe lizalaki kokanga miso likoló na pite. Na yango, uta na Efese, Paulo akomaki mokanda moko ya mpamela makasi na elikya ete ekosilisa mokakatano yango. Yango ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na ye. Na nsima, amonisaki kati na nkomá na ye ya mibale ete, “Nakomeli bino na bolózi mpe na mpasi mingi na motema mpe na mpisoli mingi.” (2 Bakolinti 2:4) Lokola Paulo, bankulutu oyo bazali na motema boboto bamonaka ete ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te kopesa toli mpe mpamela mpo na kosembola makambo, mbala mosusu mpo ete bango moko bazali mpenza koyeba malamu bolɛmbu na bango. (Bagalatia 6:1) Na bongo, tiká ete tózwa kobɔndisama na koyanoláká nokinoki na batoli ya Biblia oyo epesami na bolingo nyonso.—Baebele 13:17.
19. Mpo na nini Paulo akendaki longwa na Toloa kino na Makɛdɔnia, mpe lolenge nini azwaki kopema na nsima?
19 Ntango azalaki na Efese, Paulo asukaki te bobele na kokomela bandeko na Kolinti kasi atindaki mpe Tito mpo na kosunga bango, kopesáká ye mokumba ya kozonga na eyano ya nkomá na ye. Paulo azalaki na elikya ete akokutana na Tito na Toloa. Kuna Paulo azwaki mapamboli mingi kati na mosala ya kozalisa bayekoli. Kasi yango ekitisaki motema na ye te mpamba te Tito akómaki naino te. (2 Bakolinti 2:12, 13) Yango wana asalaki mobembo kino na Makɛdɔnia, na elikya ete akokutana na Tito kuna. Mitungisi ya Paulo mibakisamaki ntango akutanaki na botɛmɛli makasi ya mosala na ye. Amonisaki ete: “Wana tokómaki na Makɛdɔnia, nzoto na biso ezwi epemelo te nde banyokoli biso bipai nyonso, na libándá etumba mpe na katikati nsɔ́mɔ. Kasi Nzambe oyo akobɔndisaka basɔkɛmi abɔndisi biso mpo na koya na Tito.” (2 Bakolinti 7:5, 6) Oyo nde libɔndisi ntango Tito akómaki mpe ayebisaki Paulo na ntina na eyano malamu oyo Bakolinti bazongisaki na nkomá na ye!
20. (a) Lokola emonani na ndakisa ya Paulo, nini ezali mwango mosusu ya ntina mingi oyo na nzela na yango Yehova apesaka libɔndisi? (b) Tokotalela nini kati na lisoló lilandi?
20 Makambo oyo Paulo akutanaki na yango mazali kobɔndisa basaleli ya Nzambe na mikolo na biso, oyo mingi kati na bango bazali mpe kokutana na komekama oyo ezali ‘kolɛmbisa,’ to ‘konyokola’ bango. Ee, ‘Nzambe na kobɔndisa’ ayebi mposa ya moto na moto kati na biso mpe akoki kosalela biso mpo na kobɔndisana moko na mosusu, motindo moko lokola Paulo abɔndisamaki na lapólo oyo Tito apesaki na ntina na ezaleli ya kobongola motema ya Bakolinti. (2 Bakolinti 7:11-13) Na lisoló na biso lilandi, tokotalela eyano ya bolingo oyo Paulo apesaki epai na Bakolinti mpe lolenge nini yango ekoki kosunga biso lelo oyo mpo ete tózala bapesi malamu ya libɔndisi ya Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moko na misala ya ntina oyo elimo ya Nzambe esalaki epai na baklisto ya ekeke ya liboso ezalaki bongo kopakola bango lokola bana ya Nzambe na elimo mpe bandeko ya Yesu. (2 Bakolinti 1:21, 22) Yango ezali bobele mpo na bayekoli 144000 ya Yesu Klisto. (Emoniseli 14:1, 3) Lelo oyo motángo monene ya baklisto bapesami na boboto nyonso elikya ya bomoi ya seko kati na paladiso na mabelé. Atako bapakolami na elimo te, bango mpe bazali kozwa lisungi mpe libɔndisi ya elimo santu ya Nzambe.
Okoki koyanola?
◻ Lolenge nini bato bakómaki na mposa ya libɔndisi?
◻ Lolenge nini Yesu amonisaki ete alekaki Noa?
◻ Mpo na nini Yesu amibyangaki “Nkolo na Sabata”?
◻ Lolenge nini Nzambe azali kopesa libɔndisi lelo oyo?
Karte/Bililingi na lokasa 10]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Paulo azwaki libɔndisi monene na lapólo oyo Tito apesaki na ntina na Bakolinti
MACEDONIA
Philippi
GREECE
Corinth
ASIA
Troas
Ephesus