Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/11 nk. 29-31
  • Tito “Mosalani na ngai mpo na bolamu na bino”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tito “Mosalani na ngai mpo na bolamu na bino”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo ya kokatama ngenga
  • Atindami na Kolinti
  • Na esanga ya Kelete
  • Mokanda ya Biblia nimero 56—Tito
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • 1 | Koponaka bilongi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Mokanda ya Biblia nimero 47—2 Bakolinti
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/11 nk. 29-31

Tito “Mosalani na ngai mpo na bolamu na bino”

MIKAKATANO mizalaki kobima na bantango mosusu na kati ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso. Yango esengelaki kosilisama, mpe ezalaki kosɛngisa mpiko na botosi. Mobali moko oyo akutanaki na likambo yango mbala mingi mpe alongaki yango ezalaki Tito. Lokola asalaki mosala elongo na ntoma Paulo, asalaki milende mpo na kosalisa bato ete básala makambo ndenge Nzambe alingaka. Yango wana, Paulo ayebisaki baklisto ya Kolinti ete Tito azali ‘mosalani na ye mpo na bolamu na bango.’—2 Bakolinti 8:23.

Tito azalaki nani? Mokumba nini akokisaki mpo na kosilisa mikakatano? Mpe ndenge nini tokoki kozwa litomba na etamboli na ye?

Likambo ya kokatama ngenga

Tito azalaki Mogreke oyo akatamaki ngenga te. (Bagalatia 2:3)a Lokola Paulo abéngi ye “mwana na ngai na solo kati na kondima na biso nyonso,” ekoki kozala ete Tito azalaki moko kati na bana ya Paulo na elimo. (Tito 1:4; kokanisá na 1 Timote 1:2.) Tito azalaki elongo na Paulo, na Balanaba, na basusu oyo bautaki na Antiokia, na ekólo Sulia, ntango bakendaki na Yelusaleme pene na mobu 49 T.B., mpo na kosolola likambo ya kokatama ngenga.​—Misala 15:1, 2; Bagalatia 2:1.

Balobaka ete lokola kobongwana ya bato ya mabota oyo bakatamaki ngenga te ebimisaki ntembe na Yelusaleme, yango wana bamemaki Tito mpo na komonisa ete Bayuda to bato ya mabota mosusu mpe bakokaki kozwa ngɔlu ya Nzambe ezala bakatamaki ngenga to te. Basusu na lisangá ya Yelusaleme oyo bazalaki Bafalisai kala balobaki ete bato ya mabota oyo bakómaki baklisto basengelaki kokatama ngenga mpe kotosa Mibeko ya Mose. Kasi likanisi yango endimamaki te. Soki batingamaki ete Tito mpe bato mosusu ya mabota bákatama ngenga, yango elingaki kolimbola ete baboyi kondima ete bato bakozwa lobiko mpo na ngɔlu ya Nzambe mpe na kondimela Yesu Klisto, kasi bakozwa yango nde na misala ya Mibeko. Yango elingaki lisusu komonisa ete bawangani ete bato ya mabota mosusu, to baoyo bazalaki Bayuda te, bazwaki elimo santu ya Nzambe te.​—Misala 15:5-12.

Atindami na Kolinti

Ntango likambo ya kokatama ngenga esilaki, Paulo na Balanaba batindamaki ete bákende koteya bato ya mabota. Basalaki lisusu makasi mpo na kokanisa babola. (Bagalatia 2:9, 10) Yango wana, mbula soko motoba na nsima, ntango Biblia elobeli lisusu Tito, azali sikoyo na Kolinti epai Paulo atindaki ye kokɔngɔla makabo mpo na babulami. Nzokande, ntango akendaki kosala mosala yango, akutanaki na likambo moko ya monene.

Mokanda ya Paulo epai na Bakolinti emonisi ete akomelaki bango ‘básangana na bato na pite te.’ Ayebisaki bango bábengana kati na bango moto na pite oyo azali kobongola motema te. Ya solo, mokanda oyo Paulo akomelaki bango epesaki bango mpasi na motema. Kutu, azalaki kokoma yango “na mpisoli mingi.” (1 Bakolinti 5:9-13; 2 Bakolinti 2:4) Na ntango yango, Tito atindamaki na Kolinti kotala makabo oyo bazalaki kokɔngɔla kuna mpo na kosunga baklisto ya Yudea. Ekoki mpe kozala ete atindamaki lisusu mpo na kotala ndenge Bakolinti bayambaki mokanda ya Paulo.​—2 Bakolinti 8:1-6.

Ndenge nini Bakolinti batalelaki toli ya Paulo? Lokola azalaki komitungisa mpo na koyeba yango, mbala mosusu Paulo atindaki Tito uta na Efese kokatisa Mai Monene ya Égée kino na Kolinti mpe ayebisaki ye ete azonga noki mpenza. Soki mokumba yango ekokisamaki liboso ete eleko ya elanga ebanda (pene na katikati ya Novɛ́mbɛ), mbɛlɛ Tito alingaki kokende na engumba Toloa na masuwa to na nzela ya mokili koleka na mongala babéngi Dardanelles. Emonani ete Paulo nde akómaki na Toloa moto ya liboso, mpamba te mobulu oyo basali biloko na pauni babimisaki epusaki ye alongwa na Efese nokinoki. Nsima ya kozela mingi na Toloa, Paulo amonaki ete Tito akokaki koya na nzela ya mai te. Bongo, Paulo akamataki nzela ya mokili na elikya ya kokutana na ye na nzela. Ntango akómaki na Mpoto, Paulo alekaki na nzela ebéngami Via Egnatia, mpe akutanaki na Tito na Makedonia. Nsango malamu oyo Paulo ayokaki na ntina na Bakolinti ebɔndisaki ye mpe esepelisaki ye. Bandeko na lisangá bayambaki toli ya Paulo na ndenge ya malamu.​—2 Bakolinti 2:12, 13; 7:5-7.

Atako Paulo azalaki komitungisa na ndenge bakoyamba motindami na ye, Nzambe asalisaki Tito mpo akokisa mokumba na ye. Bayambaki Tito na “nsɔmɔ mpe na kolɛnga.” (2 Bakolinti 7:8-15) Thomas, molimboli ya Biblia alobi ete: “Tokoki koloba ete kozanga kolɛmbisa maloba ya Paulo, [Tito] asololaki na Bakolinti na mayele mpe na bokɛngi. Asosolisaki bango ete makambo oyo Paulo akomelaki bango na mokanda, ezalaki bobele mpo na koluka bolamu na bango ya elimo.” Na yango, Tito akómaki kolinga baklisto ya Kolinti mingi mpenza, mpamba te batosaki mpe babongwanaki. Ezaleli na bango ya malamu elendisaki ye.

Tokoloba boni mpo na ntina mosusu ya mobembo ya Tito na Kolinti—kokɔngɔla makabo mpo na babulami oyo bazalaki na Yudea? Tito akokisaki mokumba yango ndenge 2 Bakolinti emonisi yango. Mokanda yango ekomamaki mpenza na Makedonia na nsuka ya mobu 55 ya ntango na biso, mwa moke nsima ya kokutana ya Tito na Paulo. Paulo akomaki ete Tito, oyo abandisaki mosala ya kokɔngɔla makabo, elongo na bandeko mibale oyo bankombo na bango etángami te bazongaki lisusu na Kolinti mpo na kosilisa likambo yango. Lokola alingaki Bakolinti mingi, Tito asepelaki kozonga kuna. Ntango Tito azongaki na Kolinti, emonani ete amemaki mokanda mopemami oyo Paulo atindelaki Bakolinti.​—2 Bakolinti 8:6, 17, 18, 22.

Tito azalaki moto oyo ayebi kotambwisa makambo. Azalaki mpe moto oyo abongaki kopesamela mikumba minene na ntango ya mpasi. Azalaki mobali ya mpiko, oyo akɔmeli, mpe ya ngwi. Paulo amonaki ete Tito akokaki mpo na kosilisa matata oyo “bantoma mineneminene” bazalaki kobimisa. (2 Bakolinti 11:5) Ezaleli wana ya Tito emonani lisusu na mokumba mosusu ya monene oyo asengelaki kokokisa ndenge emonisami na Makomami.

Na esanga ya Kelete

Ekoki mpenza kozala ete Paulo akomaki mokanda epai na Tito na kati ya mobu 61 kino 64 T.B. Ntango yango, Tito azalaki kosala mosala ya Nzambe na esanga ya Kelete na Mai Monene ya Méditerranée. Paulo atikaki ye kuna mpo ‘abongisa makambo oyo matikalaki mpe ete apona [bankulutu] na mboka na mboka.’ Bato ya Kelete bayebanaki lokola “babuki na lokuta, banyama mabe, bato na lokoso mpe na goigoi.” Yango wana, na Kelete lisusu, Tito asengelaki kozala na mpiko mpe kozala ngwi. (Tito 1:5, 10-12) Ezalaki mokumba monene, mpamba te yango elingaki kopesa nzela ete boklisto ya solo na esanga wana epikama. Na lisungi ya elimo ya Nzambe, Paulo alimbolelaki Tito polelepolele masɛngami oyo bandeko mibali basengelaki kokokisa mpo báponama bankulutu.

Biblia eyebisi te ntango oyo Tito alongwaki na Kelete. Aumelaki kuna ntango molai, mpamba te Paulo asɛngaki ye akokisa bamposa ya Zena na Apolo, baoyo basalaki mobembo kuna na eleko oyo eyebisami sikisiki te. Kasi, Tito asengelaki kofanda na esanga seko na seko te. Paulo azalaki kokana kotinda Alatema to Tukiko bákende kuna. Bongo, Tito akuta ye na Nikapoli, engumba ya lokumu na nɔrdi-wɛsti ya ekolo Grèce.​—Tito 3:12, 13.

Na lisolo mokuse oyo Biblia elobi mpo na Tito, tomoni ete pene na mobu 65 T.B., Paulo atindaki ye na teritware mosusu. Akendaki na Dalamatia, etúká moko na ɛsti ya Mai Monene Adriatique, oyo lelo ezali na ekólo Croatie. (2 Timote 4:10) Toyebi te makambo Tito asengelaki kosala kuna, kasi likanisi epesamaki ete atindamaki mpo na kobongisa makambo ya masangá, mpe kosala mosala ya misionere. Soki ezalaki bongo, Tito asengelaki kosala bobele ndenge asalaki na Kelete.

Tozali na botɔndi mingi mpo na bakɛngɛli baklisto oyo bakɔmeli lokola Tito! Bososoli na bango ya polele na mitinda ya Biblia mpe mpiko oyo bamonisaka mpo na kosalela yango esungaka mpo na kobatela elimo ya lisangá. Tómekola kondima na bango mpe tózala lokola Tito na kotomboláká matomba ya elimo ya bandeko na biso bandimi.​—Baebele 13:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Galatia 2:3 elobi ete Tito azali Mogreke (Helʹlen). Ekoki kozala ete bankɔkɔ na ye bazalaki Bagreke. Nzokande, elobami ete bakomi mosusu ya lokota ya Greke bazalaki kosalela liloba yango na boike (Helʹle·nes) mpo na kolobela bato oyo bazalaki Bagreke te, kasi bazalaki koloba lokota ya Greke mpe bazalaki kolanda bonkɔkɔ ya Bagreke. Ekoki mpenza kozala ete Tito azalaki Mogreke na ndimbola wana.

[Elilingi na lokasa 31]

Tito azalaki mosalani ya mpiko mpo na bolamu ya baklisto ya Kolinti mpe ya bipai nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto