-
Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamuSepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
3. Salelá makambo oyo Biblia elobi
Ndenge nini mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo ntango ozali kozwa bikateli? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.
Bonsomi ya kopona ezali nini?
Mpo na nini Yehova apesá biso bonsomi ya kopona?
Yehova apesá biso nini mpo tózwaka bikateli ya malamu mpenza?
Tángá Baefese 5:15, 16 mpo na komona etinda moko ya Biblia. Mpe na nsima lobelá ndenge okoki ‘kosalela ntango na yo malamu’ mpo na . . .
kotánga Biblia mbala na mbala.
kokóma molongani ya malamu, moboti ya malamu, to mwana ya malamu.
koyanganaka na makita ya lisangá.
-
-
Poná kominanola to masano oyo esepelisaka YehovaSepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
2. Mpo na nini ezali na ntina tókata ngonga oyo tokolekisa na kominanola to na masano?
Ata soki kominanola oyo toponi ezali mabe te, tosengeli kaka kozala ekɛngɛ mpo ezwa biso ntango mingi te. Soki te, tokoki kozanga ntango ya kosala makambo oyo eleki ntina. Biblia eyebisi biso ete ‘tósalela ntango na biso malamu mpenza.’—Tángá Baefese 5:15, 16.
-
-
Poná kominanola to masano oyo esepelisaka YehovaSepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
4. Salelá ntango na yo malamu
Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.
Atako ndeko oyo balobeli na video azalaki kotala eloko ya mabe te, akómaki na mokakatano nini?
Tángá Bafilipi 1:10, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Ndenge nini vɛrsɛ oyo ekoki kosalisa biso tókata ntango boni tokolekisa na kominanola?
-