Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/5 lok. 32
  • Ozali “Kosomba ntango malamu”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali “Kosomba ntango malamu”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/5 lok. 32

Ozali “Kosomba ntango malamu”?

NA EKEKE ya liboso, ntoma Paulo apesaki baklisto ya Efese toli oyo: “Bongo, bókeba mpo na etamboli na bino, bózalaka bazoba te kasi bato ya mayele mpenza. [Bósombaka ntango malamu, NW], zambi mikolo ezali mabe.” (Baefese 5:15, 16) Toli yango ezalaki mpenza na ntina nini? Mpo na kopesa eyano na motuna yango, esengeli tóyeba makambo oyo baklisto bazalaki kokutana na yango na engumba wana ya kala.

Efese eyebanaki mpo na bozwi na yango mingi, makambo minene ya mbindo, mobulu ya koleka, mpe misala ndenge na ndenge ya bilimu mabe. Lisusu, baklisto oyo bazalaki kuna basengelaki kobunda na mateya ya filozofi oyo ezalaki na ntango wana. Bagrɛki ya Efese oyo bazalaki baklisto te bazalaki kondima te ete ntango ekendaka mbala moko. Filozofi ya Bagrɛki eteyaki bango ete bomoi ezongelamaka mbala na mbala mpe ezalaka na nsuka te. Soki moto abebisi ntango na ye na bomoi moko, akoki kozwa lisusu mobimba na yango nsima, na bomoi mosusu. Lolenge wana ya kokanisa ekokaki kotinda baklisto ya Efese ete bázanga kotya likebi na manaka oyo Yehova atii mpo na kokokisa makambo, ezala mpe manaka na ye mpo na mokolo ya kosambisa mokili. Yango wana, toli ya Paulo ya ‘kosomba ntango malamu’ ebongaki mpenza.

Paulo azalaki te kolobela ntango na ndenge oyo toyebi yango. Liloba ya Grɛki oyo asalelaki elimboli ntango oyo ebongi, ntango malamu mpo na kokokisa mokano moko. Paulo azalaki kopesa baklisto ya ekeke ya liboso toli ya kosalela na mayele eleko malamu, to ntango ya kondimama oyo bazalaki na yango, naino nsuka na yango eyei te, naino Nzambe azali komonisa motema mawa na ye, mpe naino elikya ya lobiko ezali.​—Baloma 13:11-13; 1 Batesaloniki 5:6-11.

Tozali mpe kobika na ntango oyo ebongi. Na yango, na esika ya kobebisa ntango oyo ya kondimama, oyo ekozonga lisusu te, na komipesáká na bisengo ya ntango mokuse oyo mokili ezali kopesa, baklisto bakomonisa mayele soki basaleli ntango oyo bazali na yango mpo na komonisa “bizaleli ya bulɛɛ mpe ya kosambela Nzambe.” Na kosaláká bongo, bakolendisa boyokani na bango na Mozalisi, Yehova Nzambe.​—2 Petelo 3:11; Nzembo 73:28; Bafilipi 1:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto