Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/10 nk. 18-23
  • Tósomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tózwa ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia
  • Tosengeli kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso
  • Ndenge oyo bato mosusu bazwaka ntango mpo na koyekola
  • ‘Bilei oyo ezali kopesama na ntango oyo ebongi’
  • Tózala na momeseno ya kolya malamu
  • Matomba ya elimo oyo eutaka na kotánga mpe koyekola
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/10 nk. 18-23

Tósomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola

“[Bósomba] ntango oyo ebongi mpo na bino, mpamba te mikolo ezali mabe.”—BAEFESE 5:16, NW.

1. Mpo na nini ezali malamu tóbombaka ntango, mpe ndenge oyo tosalelaka ntango emonisaka nini?

MOTO moko alobá ete “kopona ntango ezali kobomba ntango.” Moto oyo atalelaka ntango na makambo oyo asengeli kosala, mbala mingi atikalaka na ntango mingi. Salomo, mokonzi ya mayele, akomaki boye: “Likambo na likambo ezali na ntango na yango, ezali na ntango mpo na makambo nyonso na nse ya likoló.” (Mosakoli 3:1, Moffatt) Biso nyonso tozalaka na ntango ndenge moko, kasi moto na moto asalelaka yango ndenge alingi. Makambo oyo totyaka liboso mpe ndenge tosalelaka ntango na biso emonisaka eloko nini oyo topesaka motuya mingi.—Matai 6:21.

2. (a) Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki nini mpo na bamposa na biso ya elimo? (b) Tosengeli komitalela na makambo nini?

2 Tolekisaka ntango na kolya mpe kolala mpamba te ezali makambo oyo nzoto na biso ezalaka na yango mposa. Kasi, tokoloba boni mpo na bamposa na biso ya elimo? Toyebi ete tosengeli mpe kokokisa bamposa yango. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bamposa na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW ) Yango wana “moombo ya sembo mpe ya mayele” ayebisaka biso mbala na mbala ntina ya kobomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola Biblia. (Matai 24:45) Mbala mosusu oyebaka ete makambo yango ezali na ntina mingi kasi omonaka ete ozali na ntango te mpo na koyekola to kotánga Biblia. Soki ezali boye, tótalela naino mwa makanisi oyo ekoki kosalisa biso na kozwa ntango ya kotánga Liloba ya Nzambe, ya koyekola biso moko, mpe ya kokanisa makambo yango.

Tózwa ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia

3, 4. (a) Toli nini ntoma Paulo apesaki mpo na ndenge ya kosalela ntango na biso, mpe yango etaleli makambo nini? (b) Paulo alingaki koloba nini na toli na ye ete ‘tósomba ntango oyo ebongi mpo na biso’?

3 Soki totali mikolo oyo tozali na yango, tozali komona ete biso nyonso tosengeli koyoka maloba ya ntoma Paulo ete: “Bókeba na ndenge oyo bozali kotambola, bózala lokola bazoba te kasi bato ya mayele mpenza. Bósomba ntango oyo ebongi mpo na bino, mpamba te mikolo ezali mabe. Yango wana bózala lisusu te bato oyo bazangi makanisi, kasi bósosolaka mokano ya Yehova.” (Baefese 5:15-17, NW ) Ya solo, lokola tozali baklisto oyo bamipesi, toli oyo etaleli makambo nyonso ya bomoi na biso. Tosengeli kozala na ntango ya kobondela, koyekola, kokende na makita, mpe lisusu kobima na mosala ya kosakola “Nsango Malamu ya Bokonzi,” na ndenge oyo makoki na biso ezali kopesa biso nzela.—Matai 24:14; 28:19, 20.

4 Lelo oyo, ezali komonana ete ebele ya basaleli ya Yehova bazali kokoka kozwa ntango te mpo na kotánga Biblia mpe koyekola mpenza. Ezali polele ete tokoki kobakisa ngonga mosusu te na mokolo moko, yango wana, ezali na ndenge mosusu oyo tosengeli kokanga ntina ya toli ya Paulo. Maloba ya Greke oyo ebongolami na “kosomba ntango oyo ebongi” ezali na likanisi ya kopesa eloko mosusu. William Vine alimboli yango na buku na ye (Expository Dictionary) lokola “kosalela malamu libaku malamu nyonso oyo emonani, kosalela libaku malamu nyonso na mayele mpo na kozwela yango mpenza litomba mpamba te soki eleki, ezongaka lisusu te.” Ndenge nini to epai wapi tokoki kosomba ntango oyo ebongi mpo na kotánga mpe koyekola Biblia?

Tosengeli kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso

5. Mpo na nini mpe ndenge nini tosengeli “kotalela makambo oyo eleki ntina”?

5 Longola misala na biso moko, tozalaka mpe na makambo mingi ya elimo. Lokola tomipesi na Yehova mpo na kosalela ye, tozali na “mosala mingi kati na mosala ya Nkolo.” (1 Bakolinti 15:58, NW ) Yango wana, Paulo apesaki baklisto ya Filipi toli ete ‘bátalelaka makambo oyo eleki ntina.’ (Bafilipi 1:10, NW ) Elingi koloba ete tosengeli kosala libosoliboso makambo oyo eleki ntina. Makambo ya elimo esengeli koleka liboso ya makambo mosusu nyonso. (Matai 6:31-33) Kasi, tosengeli kozala na bokatikati mpo na kokokisa mikumba na biso ya elimo. Lokola tozali baklisto, ndenge nini tosalelaka ntango na biso mpo na kosala makambo ndenge na ndenge oyo tozali na yango na bomoi na biso? Balapolo ya bakɛngɛli-batamboli ezali komonisa ete baklisto bakómi lokola kobosana ete koyekola bango moko mpe kotánga Biblia ezali kati ya “makambo oyo eleki ntina” oyo moklisto asengeli kosala.

6. Kosomba ntango ekoki kosɛnga makambo nini na mosala ya mosuni to na misala ya ndako?

6 Lokola touti komona yango, kosomba ntango esɛngi “kosalela malamu libaku malamu nyonso oyo emonani” mpe “kosalela libaku malamu nyonso na mayele mpo na kozwela yango mpenza litomba.” Na yango, soki tozali na momeseno malamu te ya kotánga Biblia mpe koyekola biso moko, ekozala malamu komitalela malamu mpo na koyeba soki tolekisaka ntango na biso na makambo nini. Soki mosala na biso ya mosuni ezwaka biso ntango mingi mpe elɛmbisaka biso mingi, tosengeli koyebisaka Yehova likambo yango na kati ya mabondeli na biso. (Nzembo 55:22) Tokoki kobongisa makambo mosusu mpo tótikala na ntango mpo na makambo ya ntina na losambo ya Yehova, lokola koyekola mpe kotánga Biblia. Balobaka solo mpenza ete mosala ya mwasi esilaka te. Yango wana, bandeko basi baklisto basengeli mpe kotya makambo ya ntina na esika ya liboso mpe kobomba ntango mpo na kotánga Biblia mpe koyekola mpenza.

7, 8. (a) Na makambo nini tokoki mingimingi kosomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola? (b) Kopemisa nzoto ezali na ntina nini, mpe soki tozali kobosana likambo yango te ndenge nini ekoki kosalisa biso na kotya makambo ya ntina na esika ya liboso?

7 Mingi kati na biso tokoki kosomba ntango, mingimingi na makambo oyo ezali mpenza na ntina te, mpo tókoka koyekola. Tokoki komituna mituna oyo: ‘Nalekisaka ntango boni mpo na kotánga bazulunalo ya mokili, kotala televizyo, koyoka miziki, to kosala masano ya video? Nalekisaka ntango mingi liboso ya ordinatɛrɛ koleka kotánga Biblia?’ Paulo alobi ete: “Bózala lisusu te bato oyo bazangi makanisi, kasi bósosolaka mokano ya Yehova.” (Baefese 5:17, NW ) Ezali komonana ete Batatoli mingi bazali kozanga ntango oyo ekoki mpo na koyekola mpe kotánga Biblia mpo bazali kolekisa ntango mingi na kotala televizyo.—Nzembo 101:3; 119:37, 47, 48.

8 Bato mosusu bakoki koloba ete bakoki koyekolaka ntango nyonso te, bazali na mposa ya kopemisa nzoto mwa moke. Toboyi te, kasi ekozala malamu kotalela ntango boni tozali kolekisa na kopema mpe kokokanisa yango na ntango oyo tolekisaka na koyekola mpe kotánga Biblia. Mbala mosusu ekokamwisa biso. Atako kozwa mopɛpɛ mpe kopema ezali na ntina, kasi esengeli makambo yango ezala na esika na yango. Ntina na yango ezali ya kopesa biso lisusu makasi mpo na kosala lisusu makambo ya elimo. Baemisyo mingi ya televizyo mpe masano ya video elɛmbisaka moto nsima ya kotala yango, nzokande kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe epesaka esengo mpe epesaka makasi.—Nzembo 19:7, 8.

Ndenge oyo bato mosusu bazwaka ntango mpo na koyekola

9. Wapi matomba ya kolanda toli oyo epesami na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—1999?

9 Maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo ya mobu 1999 elobi boye: “Ekozala malamu mingi kotalela na ntɔngɔ mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango oyo ezali na mwa buku oyo. Okomona mpe lokola nde Yehova, Molakisi Monene, azali kotambwisa yo na malako na ye. Esakweli elobaki na ntina na Yesu Klisto ete azwaki litomba na malako oyo Yehova azalaki kopesa ye ntɔngɔ nyonso: ‘Ntɔngɔ na ntɔngɔ [Yehova] azali kolamwisa; azali kolamwisa litoi na ngai mpo na koyoka lokola bato bateyami.’ Malako yango esalaki ete Yesu azala na ‘lolemo ya bato bateyami.’ Yango wana ‘ayebaki liloba ya kobimisa liboso na bato oyo balɛmbi.’ (Yis. 30:20; 50:4, NW; Mat. 11:28-30) Kozala moto oyo Liloba ya Nzambe ezali kolamwisa ntɔngɔ nyonso ekosalisa yo bobele te na kolonga mikakatano na yo. Ekosalisa mpe yo ete ozala na ‘lolemo ya bato bateyami’ mpo osalisa bato mosusu.”a

10. Ndenge nini bato mosusu bazwaka ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia, mpe matomba nini bazwaka?

10 Baklisto mingi balandaka toli yango; batángaka mokapo ya mokolo na komantɛrɛ na yango, mpe lisusu batángaka Biblia to mpe bayekolaka na ntɔngɔntɔngɔ. Na ekólo France, ezali na ndeko mwasi moko oyo aumeli mingi na mosala ya mobongisi-nzela; ye alamukaka ntɔngɔntɔngɔ mikolo nyonso mpe atángaka Biblia na boumeli ya miniti 30. Nini esalisaki ye asalaka likambo yango tii sikoyo bambula ebele? Alobi boye: “Nazalaka na mposa makasi ya kotánga Biblia mpe, ata ndenge nini, ngai nalandaka kaka programɛ oyo namityelá!” Ata soki toponi ntango nini na mokolo, likambo ya ntina ezali ete tótosa programɛ na biso. René Mica, oyo azalaki mobongisi-nzela na Mpoto mpe na Afrika ya Nɔrdi na boumeli ya mbula koleka 40, alobi boye: “Banda 1950 namityelá mokano ete na mbula moko nasengeli kotánga Biblia mobimba, mpe sikoyo nasili kotánga yango mbala 49. Namonaka ete ezali na ntina mingi mpo na kozala ntango nyonso na boninga makasi na Mozalisi na ngai. Komanyola Liloba ya Nzambe esalisaka ngai nakanga mpenza ntina ya bosembo ya Yehova mpe bizaleli na ye mosusu mpe epesaka ngai makasi mingi.”b

‘Bilei oyo ezali kopesama na ntango oyo ebongi’

11, 12. (a) “Kapita ya sembo” azali kopesa “bilei” nini? (b) Ndenge nini “bilei” ezali kopesama na ntango oyo ebongi?

11 Lokola momeseno ya kolya mokolo na mokolo esalaka ete moto azala nzoto kolɔngɔnɔ, kozala mpe na programɛ ya koyekola mpe ya kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaka moto azala malamu na elimo. Na Evanzile ya Luka, tozali kotánga maloba ya Yesu ete: “Nani azali kapita ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo akotya liboso ya bato na ye, ete apesa bango [bilei na bango na ntango oyo ebongi, NW ]?” (Luka 12:42) Eleki sikoyo mbula 120, ‘bilei’ ezali kopesama ‘na ntango oyo ebongi’ na nzela ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia.

12 Tótalela maloba “na ntango oyo ebongi.” Na ntango oyo ebongi mpenza, na nzela ya Mwana na ye mpe ya moombo na ye, Yehova, “Molakisi” na biso “Monene,” ateyi bato na ye mpe alakisi bango bizaleli ya malamu oyo basengeli kozala na yango. Ezali lokola nde biso nyonso toyokaki mongongo ezali koloba na biso ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na [loboko ya] mobali to na [loboko ya] mwasi.” (Yisaya 30:20, 21) Mpe lisusu, ntango bato bazali kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na likebi nyonso, mbala mingi bamonaka lokola nde makambo yango ekomamaki mpenzampenza mpo na bango. Ya solo, soki tozali kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe, tokozwa toli na ntango oyo ebongi, mpe yango ekosalisa biso tókwea na komekama te to tózwa mokano ya mabe te.

Tózala na momeseno ya kolya malamu

13. Tángá mwa mimeseno mosusu ya mabe ya kolya na elimo.

13 Mpo ete “bilei” oyo ezali kopesama na ntango oyo ebongi epesa biso matomba mingi, tosengeli kozala na momeseno ya kolya malamu. Tosengeli mpenza kozala na programɛ ya kotánga Biblia mpe ya koyekola mpe tosengeli kotosaka yango. Ozali na momeseno ya kolya malamu na elimo mpe ozali na programɛ ya koyekola yo moko na mozindo mpenza? Otángaka kaka likolólikoló masolo oyo babongiseli biso malamumalamu, to tóloba ete olyaka yango mbangumbangu, to mpe bilei mosusu osimbaka yango ata moke te? Bato mosusu balɛmbi na elimo to mpe bazongi nsima mpo balyaka malamu te na elimo.—1 Timote 1:19; 4:15, 16.

14. Mpo na nini kozongela masolo oyo ekoki komonana ete tomesaná na yango epesaka litomba?

14 Bato mosusu bakoki kokanisa ete bayebi mateya ya ebandeli mpe ete masolo nyonso te nde ezalaka na makambo ya sika; yango wana, ezali mpenza na ntina te koyekola na bozindo mpe koyangana na makita nyonso. Nzokande, Biblia emonisi ete tosengeli kozongelaka makambo oyo tosilá koyekola. (Nzembo 119:95, 99; 2 Petelo 3:1; Yuda 5) Lokola moto oyo ayebi kolamba malamu asalelaka se bikelakela wana kaka mpo na kolamba supu ndenge na ndenge ya elɛngi, moombo ya sembo apesaka biso bilei malamu ya elimo na ndenge mingi. Ata masolo ya makambo oyo esi elobelamá mbala mingi, ezalaka kaka na makambo malamu oyo tosengeli kolekisa te. Matomba oyo tozwaka na mikanda oyo tozali kotánga etalelaka mingimingi ntango mpe milende oyo tosalaka mpo na kotánga yango.

Matomba ya elimo oyo eutaka na kotánga mpe koyekola

15. Ndenge nini kotánga mpe koyekola Biblia esalisaka biso na kozala baministre malamu ya Liloba ya Nzambe?

15 Ezali na matomba ebele oyo tozwaka na kotánga mpe koyekola Biblia. Bazali kosalisa biso mpo na koyeba kokokisa moko ya mikumba ya ntina oyo tosengeli kokokisa, elingi koloba ete mokomoko na biso akóma ‘mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali ye kosembola liloba ya solo.’ (2 Timote 2:15) Soki tozali kotánga mpe koyekola Biblia mingi, bɔɔngɔ na biso mpe ekotonda na makanisi ya Nzambe. Na bongo, lokola Paulo, tokozala na likoki ya ‘kokanisa na bato na lisalisi ya Makomami, kolimbola mpe kondimisa na lisalisi ya mikapo’ solo kitoko ya mikano ya Yehova. (Misala 17:2, 3, NW ) Mayele na biso ya koteya ekobakisama, mpe masolo na biso, masukulu na biso, mpe toli na biso, ekolendisa mpenza na elimo.—Masese 1:5.

16. Matomba nini mokomoko na biso azwaka na kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe?

16 Lisusu, ntango oyo tozali kolekisa na kotalela Liloba ya Nzambe ekosalisa biso tóyeba kolanda malamu banzela ya Yehova na kati ya bomoi na biso. (Nzembo 25:4; 119:9, 10; Masese 6:20-23) Yango ekosalisa biso tókangama na bizaleli ya elimo lokola komikitisa, bosembo mpe esengo. (Deteronome 17:19, 20; Emoniseli 1:3) Ntango tozali kosalela boyebi oyo tozali kozwa na kotánga mpe koyekola Biblia, elimo ya Nzambe ekosala mpenza mosala na bomoi na biso, mpe yango ekosala ete tóbota mbuma ya elimo mingi na misala na biso.—Bagalatia 5:22, 23.

17. Makambo oyo totángaka mpe toyekolaka mpe ntango oyo tolekisaka mpo na kosala yango ezali na boyokani nini na boninga na biso na Yehova?

17 Likambo oyo eleki ntina ezali ete ntango oyo tokosomba na makambo mosusu mpo na kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe ekosalisa biso tózala na boyokani malamu na Nzambe. Paulo abondelaki ete bandeko na ye baklisto ‘bátonda na boyebi mpenza ya mokano ya [Nzambe], na mayele nyonso mpe na bososoli ya [elimo, NW ]. Na bongo, bakotambola na sembo ya Nkolo mpe bakosepelisa ye na makambo nyonso.’ (Bakolose 1:9, 10) Ndenge moko mpe, mpo ‘tótambola na sembo ya Nkolo,’ tosengeli ‘kotonda na boyebi mpenza ya mokano na ye na mayele mpe na bososoli nyonso ya elimo.’ Tomoni polele ete mpo Yehova apambola mpe andima biso, yango etaleli mingimingi ndenge oyo totángaka mpe toyekolaka Biblia mpe ntango oyo tolekisaka mpo na kosala yango.

18. Mapamboli nini tokoki kozwa soki tolandi toli ya Yesu oyo ezali na Yoane 17:3?

18 “Oyo ezali bomoi ya seko ete báyekola koyeba yo Nzambe moko ya solo mpe moto oyo otindi, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW ) Oyo ezali moko ya bavɛrsɛ oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mingi mpo na kosalisa bato mosusu báyeba ntina ya koyekola Liloba ya Nzambe. Ezali mpenza na ntina mingi ete mokomoko na biso asala yango. Elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko etaleli lolenge oyo boyebi na biso ya Yehova mpe ya Mwana na ye Yesu Klisto ezali kokola. Mpe kanisá litomba oyo boyebi yango ekomemela biso. Koyekola makambo ya Yehova ekozala na nsuka te, mpe tokozala na bomoi ya seko mpo na koyekola yango!—Mosakoli 3:11; Baloma 11:33.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Talá lisolo “Ntango oyo batángaka yango mpe matomba oyo bazwi,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1995, nkasa 20-21.

Mituna ya bozongeli

• Ndenge oyo tozali kosalela ntango na biso emonisaka nini?

• Na makambo nini tokoki kosomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola Biblia?

• Mpo na nini tosengeli kotalelaka malamu momeseno na biso ya kolya na elimo?

• Kotánga mpe koyekola Makomami epesaka matomba nini?

[Bililingi na lokasa 20, 21]

Soki tozali kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo, yango ekosalisa biso tóyeba ‘kosembola liloba ya solo’

[Bililingi na lokasa 23]

Kosomba ntango na ebele ya makambo oyo tozali na yango mpo na misala ya elimo ekomemela biso matomba mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto