Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/3 nk. 12-14
  • Biblia epekisi masano ya mbongo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia epekisi masano ya mbongo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo ya makila malamu ezali motambo
  • Ndenge oyo bazwaka mbano
  • “Motambo” oyo esengeli koboya
  • Masano ya mbongo
    Lamuká!—2015
  • Bilenge​—Basani mosusu ya sika!
    Lamuká!—1995
  • Masano ya mbongo ezali lisumu?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/3 nk. 12-14

Biblia epekisi masano ya mbongo?

BAFILME oyo eyebani mingi mpe baprogramɛ ya televizyo, elakisaka mbala mingi masano ya mbongo​—mingimingi na bisika oyo babɛtaka masano yango—​lokola nde bisika oyo bato ya kitoko, ya bomɛngo mpe ya mayele balekisaka ntango. Mpo na koloba solo, bato oyo batalaka bililingi yango, balobaka ete ezali kaka masapo mpamba to ezali te makambo ya solo.

Kasi, mpo na koloba solo, bato oyo babɛtisaka masano ya mbongo na ndakisa tombola, kotya mbongo mpo na koyeba ekipi nini ekolonga, mpe masano ya mbongo na Internet to na telefone, bawelanaka ná bato oyo babɛtisaka masano ya mbongo na casino mpo na kobenda likebi ya babɛti ya masano ya mbongo. Buku moko (Internet Gambling) elobi ete masano ya mbongo ezali “ezaleli moko ya mabe oyo epanzani mingi na mokili.” Na ndakisa, lisano ya karte ya mbongo babengi poker, ekómi lisano oyo bazali kolakisa mingi na televizyo mpe na internet. Zulunalo moko emonisi ete bato ya mayele balobi ete na États-Unis, motángo ya bato oyo babɛtaka lisano ya poker emati mbala mibale na boumeli ya mbula moko na sanza motoba oyo euti koleka.

Bato balobaka ete masano ya mbongo ezali kotya mbongo na likambo oyo oyebi mpenza te soki ekosuka ndenge nini. Bato mingi balobaka ete lokola mbongo ezali ya moto oyo abɛtaka masano ya mbongo mpe lokola akómi moombo na yango te, ezali mabe te kobɛta masano ya mbongo. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete masano ya mbongo “ezali lisumu te longola kaka soki kobɛta yango ekómi kopekisa moto akokisa mikumba na ye.” Kasi, ata mokapo moko te ya Biblia endimisi likanisi yango. Atako bongo, ndenge nini mokristo asengeli kotalela likambo yango? Biblia endimi masano ya mbongo to epekisi yango?

Tosengeli kosimba ete Makomami Mosantu elobeli polele te masano ya mbongo. Kasi, yango elingi koloba te ete tozali na toli te na likambo yango. Na esika ya kotyela biso mibeko na makambo to misala nyonso, Biblia elendisi biso ete ‘tókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.’ (Baefese 5:17) Ndenge E. W. Bullinger, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia amonisi yango, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kososola,” elimboli kosangisa bililingi ya eloko moko na lisalisi ya “kokanisa, boyebi oyo moto azwi na nzela ya kokanisa na mozindo na likambo moko.” Na ndenge yango, mokristo akoki kososola mokano ya Nzambe na likambo yango soki asangisi elongo mpe akanisi na batoli ya Biblia oyo ezali na boyokani na masano ya mbongo. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ oyo ezali awa na nse, okoki komituna boye: ‘Masano ya mbongo eyokani na vɛrsɛ oyo? Liloba ya Nzambe emonisi ete mokano ya Nzambe ezali nini na likambo yango?’

Likambo ya makila malamu ezali motambo

Lokola masano ya mbongo esɛngaka moto abɛta kozanga ayeba soki akozwa to te, kotya motema na makila malamu​—nguya ya mabe oyo balobaka ete etambwisaka masano yango—​esalaka mosala monene, mingimingi ntango bato batye mbongo na lisano. Na ndakisa, na batike ya tombola baponaka mitángo ya makila malamu; ezali na mwa maloba oyo bapekisaka bato oyo babɛtaka lisano moko ya Chine, oyo babengi mah-jong báloba, mpo bazalaka na bibangabanga; mpe batindaka mopɛpɛ na monɔkɔ likoló ya biloko ya lisano liboso ete babwaka yango. Mpo na nini? Mbala mingi, bato oyo babɛtaka masano ya mbongo bakanisaka ete makila malamu ekosalisa to ekoki kosunga ata moke mpo makambo esuka malamu.

Kotinda moto atya motema na makila malamu ezali mpenza lisano ya mabe te? Bato mosusu na Yisraele ya kala bazalaki kokanisa bongo. Bazalaki kokanisa ete makila malamu ekoki komemela bango bolamu. Ndenge nini Yehova ayokaki mpo na likambo yango? Na nzela ya mosakoli na ye Yisaya, Nzambe ayebisaki bango boye: “Bino bozali baoyo bazali kotika Yehova, baoyo bazali kobosana ngomba mosantu na ngai, baoyo bazali kotyela nzambe ya Makila Malamu biloko na mesa mpe baoyo bazali kotondisela nzambe ya Makambo Nyonso Etángamá vinyo oyo esangisami.” (Yisaya 65:11) Na miso ya Nzambe, kondimela makila malamu ezali lokola losambo ya bikeko mpe ezali na boyokani te na losambo ya solo. Yango esɛngaka kotya motema na nguya moko boye na esika ya kotalela Nzambe ya solo. Eloko moko te emonisi ete likanisi ya Nzambe na likambo yango ebongwani.

Ndenge oyo bazwaka mbano

Ezala batye mbongo na nzela ya internet, basombi batike ya tombola, to mpe babɛti masano mosusu ya mbongo, mbala mingi bato oyo babɛtaka masano yango babosanaka epai mbano ya eloko oyo bazali kowela eutaka. Masano ya mbongo ekeseni na kosala mombongo to kosomba eloko na ndenge elongobani, mpo mosani oyo azali kobɛta azali na mposa ya kolonga mbongo oyo basani mosusu bazangi.a Ebongiseli moko ya Canada oyo etalelaka bato oyo bamɛlaka bangi mingi mpe baoyo batungisamaka na makanisi elobi ete: “Na kati ya bato oyo bazwá ebele ya mbongo na tombola, ezali mpe na bamilio ya bato mosusu oyo babungisá mbongo na bango!” Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa mokristo ayeba ndenge Nzambe ayokaka mpo na likambo yango?

Mobeko ya nsuka na kati ya Mibeko Zomi oyo Nzambe apesaki Yisraele elobaki ete: “Osengeli te kolula mwasi ya moninga na yo, ezala moombo na ye ya mobali, ezala moombo na ye ya mwasi, ezala ngɔmbɛ na ye ya mobali, ezala mpunda na ye, ezala eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo.” (Kobima 20:17) Kolula biloko ya moninga​—biloko, bozwi mpe mbongo na ye—​ezalaki lisumu monene, oyo etángamaki nzela moko na kolula mwasi na ye. Basiɛklɛ na nsima, ntoma Paulo azongelaki mobeko yango mpo na bakristo: “Osengeli kolula eloko ya moto te.” (Baroma 7:7) Mokristo oyo azali koluka kolonga eloko oyo moto mosusu abungisi akoki kobengama moto ya bilulela?

Moto moko ya mayele na nkombo ya Phillip Vogel, na makambo etali masano ya mbongo akomi ete: “Ata soki [bato mingi oyo babɛtaka masano ya mbongo] bandimi yango to te, liboso ete lisano yango ebanda, balɔtaka ete mbongo oyo bazali kotya na lisano​—ata soki ezali kaka mwa moke—​ekoki kokóma mbongo ebele.” Basani yango balɔtaka kokóma bazwi mpenza kozanga ete básala ata mwa molende. Emonani ete likambo yango ekeseni na toli oyo Biblia epesi mokristo ete asengeli ‘kosala nde mosala makasi, asala na mabɔkɔ na ye mosala oyo ezali malamu, mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.’ (Baefese 4:28) Mpe ntoma Paulo amonisaki polele ete: “Soki moto alingi kosala mosala te, alya mpe te.” Abakisaki ete: “Bálya bilei oyo bango moko bazwi.” (2 Batesaloniki 3:10, 12) Kasi masano ya mbongo ekoki kotalelama lokola mosala ya malamu?

Atako masano ya mbongo ekoki kozala lisano moko makasi, mbongo nyonso oyo bakoki kopesa moto ekoki kozala mpo alongaki, kasi azwaki yango te mpo na mosala to misala oyo asalaki. Na masano ya mbongo, basani batyaka elikya mobimba na makila malamu, mpe bazalaka na elikya ete lelo to lobi makambo ekotambola malamu. Na mokuse, moto oyo abɛtaka masano ya mbongo alukaka kozwa eloko oyo amoneli mpasi te. Kasi, Biblia epesi bakristo ya solo toli ete basalaka mosala oyo elongobani mpo bázwa mbongo. Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki ete: “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.” Na nsima, abakisaki ete: “Yango . . . euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo.” (Mosakoli 2:24) Ya solo, basaleli ya Nzambe batyaka te elikya na bango na bandɔtɔ to balukaka te banzela mokuse mpo na kozwa mbongo, kasi batalelaka Nzambe mpo bázala na esengo mpe bázwa mapamboli.

“Motambo” oyo esengeli koboya

Ata soki mosani abɛti lisano ya mbongo mpe alongi, ekozala malamu atala te kaka bisengo ya ntango moke oyo azali na yango mpo alongi, kasi asengeli kotala nde makambo oyo masano ya mbongo ememaka na nsima. Mokanda ya Masese 20:21 elobi ete: “Libula ezwamaka na lokoso na ebandeli, kasi nsuka na yango ekopambolama te.” Bato mingi oyo balongá na masano ya tombola mpe na masano mosusu ya mbongo, bamonaki ete bomɛngo oyo bazwaki ememeli bango esengo te. Ezali mpenza malamu koyoka toli ya Biblia kasi te kotya elikya na biso na “bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.”​—1 Timote 6:17.

Longola kolonga mpe kobungisa, masano ya mbongo ezalaka mpe na makama mosusu. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama.” (1 Timote 6:9) Motambo esalemaka mpo na kokanga nyama. Ebele ya bato oyo bazalaki na ekateli ya kotya kaka mwa mbongo moke to komeka kobɛta masano ya mbongo kaka mpo na mwa ntango, bakangamaki na motambo ya masano yango mpe bakokaki lisusu te kolongwa na boombo na yango. Ebebisaki misala, esalaki mabe epai ya bato oyo bazalaki baninga mpe ebebisaki mabota.

Nsima ya kotalela ebele ya bavɛrsɛ oyo ezali na boyokani na likambo etali masano ya mbongo, omoni soki mokano ya Nzambe ezali nini na likambo yango? Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bakristo ete: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baroma 12:2) Mokano ya Nzambe nde esengeli kotambwisa bomoi ya mokristo kasi te makanisi oyo bato bazalaka na yango. Lokola azali “Nzambe ya esengo,” Yehova alingaka biso tósepela na bomoi, tózwa te makama oyo eutaka na motambo ya masano ya mbongo.​—1 Timote 1:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ 2000 (na Lifalanse), kobanda na lokasa 25 tii 27, ebimisami na Batatoli ya Yehova, elimboli ndenge kotya mbongo na bakompanyi ekeseni na masano ya mbongo.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Basaleli ya Nzambe basalaka mosala ya kolongobana mpo bázwa mbongo

[Etanda na lokasa 13]

Esengo oyo moto azalaka na yango soki alongi

Mposa ya kobɛta masano ya mbongo ekoki kokómisa moto moombo? Nsima ya koyoka biyano ya bato oyo babɛtaki masano ya mbongo na likambo etali kolonga mpe kolonga te, Dr. Hans Breiter amonaki ete “bɔɔngɔ ya moto oyo azwi mbongo na lisano ya mbongo esalaka ndenge moko na bɔɔngɔ ya moto oyo amɛlaka bangi, ntango azali komɛla yango.”

[Elilingi na lokasa 13]

Mbongo oyo bato oyo babɛtaka masano ya mbongo balikyaka kozwa ezali mbongo ya nani?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto