Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/5 nk. 8-13
  • Nzembo mpo na kokumisa Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Banzela kati na yango tokoki kokumisa Yehova
  • Nzembo mpo na kokumisa Yehova na ntango ya kala
  • Boyembi nzembo ya makumisi​—eteni ya ntina mingi na losambo na biso
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na malamu ya Yehova na boyembi nzembo
  • Yembáká na esengo mpenza!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Esika ya MIZIKI KATI NA LOSAMBO NA MIKOLO NA BISO
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tóyembela Yehova na esengo nyonso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Tóyembela Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/5 nk. 8-13

Nzembo mpo na kokumisa Yehova

“Nakoyembela [Yehova], mpɔ ete ye alongi na nkɛmbo.”​—ESODE 15:1.

1. Bizaleli nini ya Yehova oyo bizali kopesa biso bantina ya kokumisa ye?

MBALA zomi na misato, Nzembo 150 epesi etindá ya kokumisa Yehova to Yah. Molɔngɔ́ ya nsuka moyebisi ete: “Biloko nyonso na mpema​—tika ete ekumisa Yah. Bino bato, bókumisa Yah!” Lokola tozali Batatoli ya Yehova, toyebi ete Yehova abongi na makumisi na biso. Azali Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Oyo-Aleki-Likoló, Mokonzi ya seko, Mozalisi na biso, Mobateli na biso. Akokani na mosusu te, azali bobele ye mei kati na makambo mingi. Aleki na mayele, aleki na nguya, akoki kati na boyengebene, mpe azali mpenza bolingo. Aleki nyonso na malamu; azali sembo. (Luka 18:19; Emoniseli 15:3, 4) Abongi na makumisi na biso, boye te? Abongi na yango mpenza!

2. Bantina nini tozali na yango mpo na komonisa botɔ́ndi epai na Yehova?

2 Yehova abongi te bobele na losambo na biso mpe na makumisi na biso, kasi abongi lisusu na botɔ́ndi na biso mpo na nyonso oyo asili kosalela biso. Epai na ye, ekoutaka “makabo nyonso kitoko mpe lipesi nyonso ya kokoka.” (Yakobo 1:17, NW) Azali liziba, Eutelo ya bomoi nyonso. (Nzembo 36:9) Biloko nyonso oyo tozali na yango lokola binama ya nzoto ya moto biuti na ye, mpo ete azali Mozalisi na biso Monene. (Yisaya 42:5) Azali mpe Mopesi ya mapamboli nyonso ya elimo oyo tozali kozwa na nzela ya elimo na ye, na ebongiseli na ye, mpe na Liloba na ye. Tosili kozwa bolimbisi ya masumu na biso mpo ete apesaki Mwana na ye lokola mbeka ya lisiko na biso. (Yoane 3:16) Tozali na elikya ya Bokonzi mpo na ‘makoló ya sika mpe mabelé ya sika oyo boyengebene ekozala kati na yango.’ (2 Petelo 3:13) Tozali na boyokani malamu elongo na baninga baklisto. (Baloma 1:11, 12) Tozali kozwa lokumu mpe mapamboli lokola tozali Batatoli na ye. (Yisaya 43:10-12) Mpe tozali na libaku kitoko ya kobondela. (Matai 6:9-13) Ya solo mpenza, tozali na bantina mingi ya kotɔ́ndo Yehova.

Banzela kati na yango tokoki kokumisa Yehova

3. Lolenge nini lokeseni oyo tokoki kokumisa Yehova mpe komonisa botɔ́ndi na biso epai na ye?

3 Lokola tozali basaleli ya Yehova baoyo bamipesi, lolenge nini tokoki kokumisa ye mpe komonisa botɔ́ndi na biso? Tokoki bongo kosala yango na kosanganáká kati na mosala ya boklisto: kotatola ndako na ndako, kosala bozongeli ya sika, kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpe kopesa litatoli na balabála. Tokoki mpe kokumisa ye na kopesáká litatoli ya libaku malamu soki nzela emonani mpo na yango. Lisusu, tokoki kokumisa Yehova na etamboli na biso ya sembo, na elateli na biso ya pɛto mpe ya bosawa mpe na kobongisa nzoto. Mbala mingi, Batatoli ya Yehova bazali ndakisa malamu kati na makambo oyo. Tokoki mpe kokumisa Yehova mpe kotɔ́ndo ye na nzela ya mabondeli.​—Talá 1 Ntango 29:10-13.

4. Lolenge nini loleki kitoko oyo tokoki kokumisa Tata na biso ya bolingo oyo na likoló?

4 Lisusu, moko na myango mileki kitoko oyo tokoki kokumisa Tata na biso ya likoló na bolingo, ezali na kosanzoláká ye mpe bizaleli na ye bibongi na nzela ya nzembo ya Bokonzi. Ebele na babɛti na mindule mpe basáli na nzembo, bandimi ete ebɛtɛli na mindule oyo eleki kitoko ezali bongo mongongo ya moto. Banganga-miziki oyo bayekoli yango na kelasi bapusami na kokoma mindule mpo ete koyoka mongongo ya moto kati na loyembo ezali mpenza kosepelisa.

5. Mpo na bantina nini oyo tosengeli kotalela boyembi nzembo na biso ya Bokonzi na motuya mingi?

5 Yehova akosepelaka mingi na koyoka nzembo na bato, mingi mpenza soki bazali koyemba nzembo ya makumisi mpe ya botɔ́ndi. Na bongo, tosengeli kotalela boyembi nzembo na biso ya Bokonzi na motuya mingi kati na mayangani na biso makeseni​—na makita ya lisangá, na mayangani ya zongazonga, na mayangani ya mokolo moko ya ntina mingi, na mayangani ya etúká, mpe na mayangani ya mokili mobimba. Búku na biso ya nzembo etondi na nzembo kitoko oyo, mbala mingi, ezali kopusa bato mosusu na kolobela yango mpo na malamu. Wana tozali kolanda kosangana na boyembi nzembo ya Bokonzi na motema mobimba, tozali mpe kosepelisa basusu, mpe biso mpenza tokozwa bolamu.

Nzembo mpo na kokumisa Yehova na ntango ya kala

6. Lolenge nini Bayisraele bamonisaki botɔ́ndi mpo na kobikisama na bango na Mai Motane?

6 Liloba ya Nzambe liyebisi biso ete Mose mpe Bayisraele mosusu bayembaki loyembo ya elónga ntango babikisamaki na mabɔkɔ ya mampinga ya Farao na Mai Motane. Loyembo na bango lobandaki na maloba oyo: “Ngai nakoyembela [Yehova], mpɔ ete ye alongi na nkɛmbɔ; ye abwaki mbalata mpe motamboli na yango kati na mai. [Yehova] ajali nguya na ngai mpe loyembo na ngai, ye akomi mpe lobiko na ngai; ye ajali Njambe na ngai, mpe nakosanjola ye.” (Esode 15:1, 2) Tokoki mpenza kokanisa mpo na nsai mpe esengo oyo Bayisraele bazalaki na yango na ntango bayembaki maloba wana nsima na kobikisama na bango na likamwisi!

7. Mabaku mosusu nini ya ntina oyo Makomami na Liebele mamonisi lolenge Bayisraele bazalaki kokumisa Yehova na nzembo?

7 Na 1 Ntango 16:1, 4-36, tozali kotánga ete Yehova akumisamaki na nzembo mpe na bibɛtɛli na miziki wana Davidi amemaki Sanduku ya Mibeko na Yelusaleme. Ezalaki mpenza libaku ya esengo monene. Ezalaki mpe na nzembo mpo na kokumisa Yehova elongo na bibɛtɛli ya miziki na ntango oyo mokonzi Salomo atongaki tempelo na Yelusaleme. Totángi na 2 Ntango 5:13, 14, ete: “Babɛti na mindule mpe bayembi na njembo babimisaki mingongo lokola moto mɔkɔ; bayokamaki ete bajali kokumisa [Yehova] mpe kotɔnda ye. Banɛtɔlaki mingongo likolo, esika mɔkɔ na mindule mpe bilonja mpe bilɔkɔ na musiki, basanjolaki [Yehova], bango ete, Jambi ye ajali malamu; boboto na ye ekoumela seko. Bongo, ndako yango, ndako na [Yehova], etondaki na lipata kino banganga bayebaki kotɛlɛma tɛ ete basala mosala mpɔ na lipata jambi nkɛmbɔ na [Yehova] etondisaki ndako na Njambe.” Yango emonisi nini? Emonisi ete Yehova azalaki koyoka loyembo wana ya makumisi mpe asepelaki na yango, likambo oyo limonisamaki na lipata ya likamwisi. Na nsima, yango eyembamaki na bituluku mibale ya bayembi na ntango ya bofungoli bifelo ya Yelusaleme na mikolo ya Nehemia.​—Nehemia 12:27- 42.

8. Nini emonisi ete Bayisraele batalelaki boyembi nzembo na motuya mingi?

8 Ya solo, boyembi nzembo ezalaki eteni moko ya ntina mingi na losambo na tempelo oyo Balevi 4 000 batyamaki mpo na mosala ya miziki. (1 Ntango 23:4, 5) Bazalaki elongo na bayembi. Miziki, mingimingi boyembi nzembo, ezalaki na ntina mingi kati na losambo, mpo na komonisa ntina ya Mibeko mpenza te, kasi mpo na komonisa elimo malamu mpo na losambo. Ezalaki kosalisa Bayisraele na kosambela Yehova kati na elimo. Talá kobongisama mpe likebi lityamaki na makambo oyo mataleli yango: “Motuya na bango, esika mɔkɔ na bandeko na bango baoyo balakisamaki njembo na [Yehova], baoyo yɔnsɔ bajalaki na mayɛlɛ, ejalaki nkama mibale na ntuku mwambe na mwambe.” (1 Ntango 25:7) Talá lolenge nini bazalaki kopesa motuya mingi na nzembo mpo na kokumisa Yehova. Bayekolaki loyembo mpe bazalaki na mayele!

9. Lolenge nini etindá ya koyemba nzembo elobelami mingi kati na Makomami na Greke ya boklisto?

9 Nini esalemaki wana ekómaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso? Na butu oyo akabamaki, elongo na makambo oyo mazalaki kotungisa ye, Yesu amonaki malamu kosukisa elambo ya Pasiká mpe kobandisa elambo ya Ekaniseli ya liwa na ye na nzembo mpo na kokumisa Yehova. (Matai 26:30) Lisusu, tozali kotánga ete “na katikati na butu,” nsima na kobɛtama mpe kotyama na bolɔkɔ, “Paulo na Sila bajalaki kobɔndɛla mpe koyembela Njambe njembo, mpe bato na bolɔkɔ bajalaki koyoka bango.”​—Misala 16:25.

Boyembi nzembo ya makumisi​—eteni ya ntina mingi na losambo na biso

10. Lolenge nini Liloba ya Nzambe lizali kopesa etindá ya kokumisa Nzambe na nzembo?

10 Okanisaka mbala mosusu ete ezali na ntina te na kotya likebi na motema na yo mobimba mpo na boyembi nzembo ya Bokonzi? Soki ezali bongo, osengeli te kotalela lisusu likambo yango, na lolenge oyo Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto bazali kopesa motuya na boyembi nzembo ya makumisi? Ya solo, Liloba ya Nzambe litondi na mitinda mpo na kosanzola Yehova mpe kokumisa ye na nzembo! Na ndakisa, na Yisaya 42:10, tozali kotánga ete: “Boyembela [Yehova] loyembo na sika, mpe lisanjoli kosanjola ye longwa na ndelo na mokili; bino bokokitaka kino mai na monana mpe yɔnsɔ ikotondisaka yango, mabongo na mai mpe bafandi kati na yango.”​—Talá mpe Nzembo 96:1; 98:1.

11. Toli nini ntoma Paulo apesaki mpo na boyembi nzembo?

11 Ntoma Paulo ayebaki ete boyembi nzembo ekoki kolendisa elimo na biso, bongo alendisi biso mbala misato na ntina na likambo oyo. Totángi na Baefese 5:18, 19, (NW) ete: “Bómitondisa na elimo, bólobanaka bino mpenza na nzembo mpe na makumisi mpo na Nzambe mpe na nzembo ya elimo; bino mpenza bóyembela Yehova elongo na miziki kati na mitema na bino.” Mpe totángi na Bakolose 3:16, (NW) ete: “Tika ete liloba ya Klisto lifanda mingi kati na bino na bwanya nyonso! Bólakisanaka mpe bópesanaka toli elongo na nzembo, na makumisi mpo na Nzambe, na nzembo ya elimo elongo na boboto, koyembela Yehova kati na mitema na bino.”

12. Bandakisa nini tozali na yango kati na nzembo na biso oyo ezali kosalisa biso na koteya mpe kolakisa basusu?

12 Talá ete na libaku moko na moko, Paulo azongelaki likambo ya koyemba, wana alobelaki ‘nzembo, makumisi mpo na Nzambe, nzembo ya elimo, koyemba elongo na miziki kati na mitema na bino.’ Lisusu, abandi maloba na ye epai na Bakolose ete, na likambo oyo, tokoki ‘kolakisana mpe kopesana toli.’ Mpe ezali yango nde tozali mpenza kosala, lokola tokoki komona yango na mitó ya makambo ya nzembo na biso​—na ndakisa, “Tika ete bikelamu binso bikumisa Yehova!” (nimero 5), “Tótɛlɛma ngwi, tótengatenga te!” (nimero 10), “Zalá na esengo mpo na elikya ya Bokonzi!” (nimero 16), “Bóbanga bango te!” (nimero 27), “Tósanzola Yehova, Nzambe na biso!” (nimero 100).

13. Lolenge nini “moombo na sembo mpe na mayele” amonisaki ntina ya boyembi nzembo lokola eteni ya losambo na biso?

13 Na boyokani na mitinda wana, “moombo na sembo mpe na mayele” azali kobongisa ete mayangani na biso​—makita ya lisangá, mayangani ya zongazonga, mayangani ya mokolo moko ya ntina mingi, mayangani ya etúká, mpe mayangani ya mokili mobimba​—mábanda mpe másuka na boyembi nzembo ya Bokonzi. (Matai 24:45) Lisusu, nzembo etyami na manáka ete éyembama na bantango mosusu na boumeli ya mayangani wana. Lokola makita na biso makobandaka ntango nyonso na boyembi nzembo ya Bokonzi, tosengeli kokóma na ntango malamu, liboso mpenza mpo na kosangana na eteni wana ya losambo na biso, boye te? Mpe lokola makita makosukaka na boyembi nzembo, tosengeli te kozela kino na loyembo ya nsuka oyo ekolandama nokinoki na libondeli?

14. Bandakisa nini tozali na yango mpo na nzembo oyo ebongi koponama mpo na manáka na biso?

14 Nzembo na makita na biso eponami malamu na boyokani na manáka. Na ndakisa, na mayangani ya etúká “Mateya mauti na Nzambe” na 1993, loyembo nimero 191, “Monisá solo”​—oyo elendisaki baklisto na kokabwana na Satana, na mokili, mpe na nzoto ya bolɛmbu​—elandamaki nokinoki na masukúlu misato oyo malobelaki mpenza banguna wana. Bobele bongo, loyembo nimero 164, “Bana bazali likabo kitoko liuti na Nzambe”​—oyo etondi na batoli mpo na baboti​—elandamaki nokinoki na lisukúlu oyo limonisaki malamu mikumba ya baboti mpo na kolakisa bana na bango. Loyembo nimero 70, “Tózala lokola Yilimia,” eyembamaki liboso na molɔngɔ́ ya masukúlu oyo matongamaki likoló na bisakweli ya Yilimia. Mpe nsima ya masukúlu-matongani (symposium) likoló na makambo ndenge na ndenge ya mosala na biso ya Bokonzi, loyembo nimero 156 eyembamaki, “Nalingi,” loyembo kitoko mpo na mosala ya kosakola. Bobele mwango wana moko nde ezali kosalema mpo na kopona nzembo ya Boyekoli na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na Likita ya Mosala, mpe na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi. Na yango, wana bankulutu bazali kosala masukúlu ya bato banso mpe kopesa loyembo ya bofungoli manáka, basengeli kopona loyembo oyo loyokani na motó ya likambo ya masukúlu na bango.

15. Lolenge nini moyembisi na nzembo na makita akoki komonisa motuya ya loyembo oyo losengeli koyembama?

15 Na koyebisáká loyembo losengeli koyembama, moyembisi akoki komonisa motuya ya loyembo yango na kopesáká motó ya likambo na yango. Tozali koyemba banimero te, kasi mitó ya makambo miuti na Makomami. Mpe komonisa makanisi ya mokapo oyo mozwami na nsé na motó ya likambo, ekosalisa lisangá na kotalela loyembo na motuya mingi. Lisusu, mwa makanisi makoki kopesama kati na likambo yango, na ndakisa lolenge oyo loyembo yango losengeli koyembama: na mɔ́tɔ mingi, na mayoki mingi, na esengo, to na kotya motema engebene mayoki ya loyembo wana.

Tómonisa botɔ́ndi mpo na malamu ya Yehova na boyembi nzembo

16. Lolenge nini tokoki kosimba makanisi ya nzembo na biso?

16 Lokola maloba na ntóki ya nzembo na biso ya Bokonzi mazali na ndimbola monene, tosengeli kokanisa mingi likoló na lolenge oyo tozali koyemba maloba yango. Tolingi kosimba likanisi ya loyembo moko na moko. Ndakisa lokola oyo eyokani na mbuma ya elimo oyo ete bolingo, ezali mpenza kosimba motema. (Bagalatia 5:22) Tozali koyemba yango na nguya mpe na mɔ́tɔ nyonso. Mosusu ezali ya esengo, mpe tosengeli komeka koyemba yango na nsai. Mosusu mpe ezali ya nguya, nzembo ya botamboli, mpe yango esengeli koyembama na esengo mingi mpe na elikya nyonso. Kati na Eteyelo na biso ya Mosala ya Teokrasi, tozali kozwa batoli ya komonisa mɔ́tɔ mpe mayoki mpe esengo kati na masoló na biso. Komonisa mɔ́tɔ, mayoki, mpe esengo wana tozali koyemba nzembo na biso, ezali mpe na ntina mingi.

17. (a) Mpamela nini epesamaki na Bayisraele bazangaki sembo oyo tosengeli kolinga te ete tozwa yango mpo na boyembi nzembo na biso? (b) Matomba nini makomonana soki totaleli na motuya batoli oyo ezwami mpo na nzembo na biso?

17 Soki toyembi nzembo na biso ya Bokonzi wana tozali kotya makanisi na biso likoló na makambo mosusu, kozanga kosimba ndimbola ya maloba na yango, tokozala lokola Bayisraele bazangaki sembo, baoyo bapamelamaki mpo ete wana bazalaki kokumisa Nzambe na mbebu na bango, mitema na bango mitangwaki mosika na ye, boye te? (Matai 15:8) Tolingi te ete mpamela oyo esalelama mpo na lolenge na biso ya koyemba nzembo ya Bokonzi, boye te? Na kosaleláká boyengebene na boyembi nzembo na biso ya Bokonzi, tokomilendisa bobele biso moko te, kasi lisusu baoyo bazali zingazinga na biso, bilenge mpe bazali kati na bango. Ya solo, soki baoyo nyonso bazali koyemba nzembo na Bandako na biso ya Bokonzi bataleli toli oyo ezwami mpo na nzembo yango na motuya, yango ekozala elendiseli monene mpo na kozala na molende kati na mosala ya kosakola mpe na kopɛngola mitambo ya kozanga sembo.

18. Boyembi nzembo na biso ya Bokonzi ezalaki na bopusi nini likoló ya mwasi moko?

18 Mbala mingi, bato ya libándá basepelaka na nzembo na biso ya Bokonzi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko ebimisaki maloba oyo: “Likambo oyo ete nzembo [na biso] ekoki lisusu kobenda bato mpo na koyeba Yehova Nzambe limonanaki epai na mwasi moko oyo azwaki batisimo na Liyangani ‘Elónga euti na Nzambe,’ oyo esalemaki na 1973, na Yankee Stadium, na engumba New York. Akendaki na Ndako ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso bobele ye moko mpe alandaki makita mibale ya mokolo wana. Lokola lisangá lizalaki koyemba . . . ‘Tyá miso na yo likoló na libonza!,’ akamwaki bongo na maloba mpe na lolenge oyo bazalaki koyemba kino azwaki ekateli ete, wana ezali esika oyo alingaki mpenza kozala. Na nsima, asololaki na Motatoli moko mpe asɛngaki boyekoli ya Biblia, mpe asalaki bokóli malamu kino kokóma moklisto Motatoli ya Yehova.”

19. Elendiseli nini ya nsuka oyo epesami mpo na boyembi nzembo na biso ya Bokonzi na motema mobimba?

19 Na makita na biso, bayoki bazali bobele na mwa mabaku moke mpo na komonisa mayoki mpe botɔ́ndi na bango. Kasi biso banso tokoki komonisa lolenge oyo tozali kokanisa na ntina na malamu ya Yehova na kosanganáká na motema mobimba na boyembi nzembo ya Bokonzi. Lisusu, wana tokutanaka esika moko, tozalaka na esengo, boye te? Na bongo, tosengeli kolinga koyemba nzembo! (Yakobo 5:13) Ya solo, mpo na komonisa ete tozali na botɔ́ndi mpo na malamu ya Yehova mpe boboto mpe ngolu na ye, tokoyemba nzembo mpo na kokumisa Ye na molimo na biso mobimba.

Lolenge nini okoyanola?

◻ Wapi bantina mibale ya moboko mpo na kokumisa Yehova?

◻ Lolenge nini lokeseni oyo tokoki kokumisa Yehova mpe komonisa botɔ́ndi na biso epai na ye?

◻ Lolenge nini loleki kitoko oyo tokoki kokumisa Tata na biso ya bolingo oyo na likoló?

◻ Bandakisa nini ya Makomami oyo tozali na yango mpo na kokumisa Yehova na nzembo?

◻ Lolenge nini tokoki kosalela boyengebene na boyembi nzembo na biso ya Bokonzi?

[Etanda na lokasa 11]

Tósepela na nzembo yango!

Emonani ete bamoko bazalaki na mwa mpasi mpo na koyekola nzembo mosusu ya sika. Nzokande, masangá mosusu mazalaki mpenza na mokakatano te mpo na koyemba mingi na nzembo yango. Ntango mosusu esengeli bobele kosala mwa molende mpo na koyekola oyo emonani lokola nde tomeseni na yango te. Liboso na komesena na nzembo wana, lisangá lisengeli kosepela na yango koleka oyo ezali na mpasi te mpo na koyekola. Bongo, bato banso kati na lisangá bakokoka koyemba yango na motema mobimba. Ee, bakokoka kosepela na nzembo yango!

[Etanda na lokasa 12]

Tóyemba nzembo ya Bokonzi na bokutani ya bato mingi

Boyembi nzembo na biso ya Bokonzi esengeli te kosalema bobele na Ndako ya Bokonzi. Paulo mpe Sila bayembaki makumisi mpo na Yehova wana bazalaki kati na bolɔkɔ. (Misala 16:25) Mpe moyekoli Yakobo alobaki ete: “Moto mɔkɔ ajali na esengɔ? Tika ete ayemba njembo.” (Yakobo 5:13, na nsé ya lokasa) Na bokutani ya bato mingi, bato nyonso bazalaka na esengo. Na bongo, mpo na nini te koyemba nzembo ya Bokonzi? Ekoki kozala esengo mpenza soki nzembo eyembami elongo na pianó to lindánda. Epai mosusu, ezali na bakasɛti ya nzembo na biso ya Bokonzi oyo ebɛtami na pianó; mabota mingi ya Batatoli mazali na album ya bakasɛti wana. Ezali kosalelama bobele mpo na boyembi nzembo, kasi ezali lisusu malamu mpo na miziki ebɛtami na mongongo ya nsé.

[Elilingi na lokasa 8, 9]

Nsima ya kobikisama na Mai Motane, Bayisraele bamonisaki esengo na bango na loyembo

[Elilingi na lokasa 10]

Nzembo ya esengo ezali lelo eteni ya losambo ya boklisto

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto