Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/6 nk. 12-15
  • Mai oyo ezali kopesa bomoi ya seko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mai oyo ezali kopesa bomoi ya seko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biblia ezali na nguya ya kopɛtola bato
  • Mai oyo epesaka bomoi ya seko
  • Bazali kobenga moto nyonso
  • Mai ezali na ntina mingi mpo na bomoi
    Lamuká!—2004
  • ”Tika moyoki aloba ete: ‘yaka!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mai ya pɛto
    Lamuká!—2023
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/6 nk. 12-15

Mai oyo ezali kopesa bomoi ya seko

“Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te, kasi mai oyo ngai nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali . . . kopesa bomoi ya seko.”​—YOANE 4:14.

“NA MBALA moko, namonaki na sanza, . . . eloko moko ya langi ya bule mpe mpɛmbɛ, oyo ezalaki kongɛnga lokola biju. Ezalaki lokola sɛrklɛ moko ya langi ya bule oyo ezingamaki na basɛrklɛ ya mpɛmbɛ, mpe ezalaki kobimba mokemoke lokola mwa liyaka moko na kati ya mai ya moindo.”​—Edgar Mitchell, moto moko oyo akendaka na likoló (astronaute), nde alobelaki ndenge amonaki mabelé ntango azalaki na likoló.

Nini epesaka mabelé kongɛnga nyonso wana oyo etindaki Edgar alobela yango na maloba kitoko ndenge wana? Ezali mai, oyo ezipi ndambo monene (3/4) ya etando ya mabelé. Mai esukaka kaka te na kokómisa mabelé na biso kitoko, kasi esimbi mpe bomoi ya bikelamu nyonso awa na mabelé. Kutu, pene na nzoto mobimba ya moto (65 %), esalemá na mai. Yango wana, buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Ezali mpenza na ntina mpo na bomoi; esalaka mosala monene na bomoi ya banzete, bato mpe banyama.”

Lokola mai emipɛtolaka ntango nyonso, ekoki kosila to kokóma moke te. Buku mosusu (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Litangá mokomoko ya mai oyo tosalelaka ekendaka tii na mbu. Mpe kuna, moi ematisaka yango na likoló, mpe na nsima ezongaka lisusu na mabelé na nzela ya mbula. Tosalelaka kaka mai moko wana mbala na mbala. Ebebaka to esilaka te.” Soki mbula koleka 3 000, Biblia elobelaki likambo yango: “Bibale nyonso ekotyola kino mai-ya-monana; kasi mai-ya-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” Likambo yango ezali mpenza likamwisi ya Nzambe!​—Mosakoli 1:7.

Na kotalela ntina ya mai mpo na bomoi mpe lolenge ya kokamwa oyo tozwaka yango, tokokamwa te na ndenge Biblia elobeli yango mbala koleka 700. Mbala mingi, Biblia elobelaka makambo malamu ya mai, mingimingi likoki na yango ya kopɛtola mpe kobatela bomoi, mpo na komonisa nguya oyo Biblia ezali na yango ya kopɛtola biso mpe kosalisa biso tózala na boyokani na Nzambe.​—Yisaya 58:11; Yoane 4:14.

Biblia ezali na nguya ya kopɛtola bato

Lokola Bayisalaele bazalaki kosukola mbala na mbala, bayebanaki lokola bato ya pɛto. Bazalaki na momeseno ya kosukola makolo na bango soki bakɔti na ndako moko mpo na kolya. (Luka 7:44) Longola kopɛtola nzoto mpe biloko na bango, Bayisalaele bazalaki mpe kosalela mai na milulu ya komipɛtola liboso ya Nzambe. Banganga-nzambe oyo bazalaki kosala na tabenakle basengelaki kosukolaka nzoto mpe bilamba na bango mbala na mbala. (Exode 30:18-21) Na nsima, na tempelo ya Yelusaleme, Salomo asalaki “saani ya ebende” ya kwivre, oyo ekokaki kokɔta litrɛ 44 000 ya mai, oyo ezalaki kosalisa mpo na kokokisa mibeko oyo Nzambe atyaki mpo na bopɛto. (2 Ntango 4:2, 6) Lolenge wana oyo bazalaki kosalela mai mpo na komipɛtola liboso ya Nzambe ezali na ndimbola nini mpo na baklisto lelo oyo?

Ntoma Paulo alobaki ete Yesu apɛtolaki lisangá ya baklisto na “mai na nzela ya liloba.” Lokola mai oyo epɛtolaka nzoto na biso, solo ya Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kopɛtola bizaleli mpe elimo na biso. Yango nde esalisaka baklisto bázala ‘basantu mpe bázanga mbeba.’ (Baefese 5:25-27) Na yango, moto nyonso oyo alingi Nzambe asepela na ye, asengeli kosala makasi mpo na kopɛtola bizaleli mpe elimo na ye mpo ‘azanga litɔnɔ mpe mbeba.’ (2 Petelo 3:11, 14) Ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaka bango bámipɛtola?

Bato oyo balukaka kosepelisa Yehova Nzambe bamɛlaka mai ya elimo mokolo na mokolo na nzela ya boyekoli ya Biblia. Soki boyebi oyo bazali kozwa esimbi makanisi mpe motema na bango, epesaka bango mposa makasi ya kosala oyo Biblia elobi: “Bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”​—Baloma 12:2.

Boyebi ya solosolo ya mokano ya Nzambe esalisaka bango bámona matɔnɔ mpe mbeba nyonso oyo ezali na etamboli mpe makanisi na bango. Soki basaleli toli ya Biblia na bomoi na bango na boumeli ya mwa ntango, Liloba ya Nzambe oyo ezali lokola mai, ekosalisa bango ‘básukolama pɛɛ’ ata na masumu ya minene.​—1 Bakolinti 6:9-11.

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge Alfonso, elenge mobali moko ya Espagne, abongwanaki. Alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 18, nazalaki kosepela te na bomoi oyo nazalaki na yango.” Amipesaki na komɛla bangi, na koboma bato mpe kosala makambo mosusu ya mabemabe. “Soki nakanisi makambo oyo nazalaki komisala mpe kosala basusu, nakómaki komimona mbindo.

“Na kelasi na biso, tozalaki na elenge mwasi moko oyo tozalaki na ye mbula moko, oyo elateli mpe etamboli na ye ezalaki kokesenisa ye mpenza na bayekoli mosusu. Ndakisa na ye epesaki ngai mposa ya kokóma lokola ye. Asɛngaki ngai nakende na makita ya Batatoli ya Yehova mpe nandimaki. Mosika te, nabandaki koyekola Biblia mpe kobongisa boyokani na ngai na Nzambe. Nsima ya mbula moko mpamba, napɛtolaki bomoi na ngai mpe nazwaki batisimo. Mbongwana monene wana oyo nasalaki etindaki baboti mingi ya kartye na biso básɛnga ngai nasalisa bana na bango oyo bamipesaki mpe na bangi.”

Mai oyo epesaka bomoi ya seko

Mokolo moko, Yesu alobaki na mwasi moko ya Samalia oyo ayaki kotoka mai na libulu ya Yakobo ete akoki kopesa ye “mai ya bomoi.” Alobaki boye: “Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te, kasi mai oyo ngai nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali . . . kopesa bomoi ya seko.” (Yoane 4:10, 14) Maloba ya Yesu emonisi ete “mai ya bomoi” ezali bibongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kopesa bato bomoi, ndenge Liloba na ye Biblia emonisi yango. Bibongiseli yango ezali kopesa bato likoki ya kozala na bomoi libela na libela. Mbeka oyo Klisto Yesu apesaki mpo na kosikola biso ezali mpe na kati ya mai yango ya elimo, mpe ezali na ntina mingi. Yesu alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16.

Alfonso, oyo tolobelaki liboso, akómá mpenza kolinga “mai ya bomoi” oyo Nzambe apesaka. Mpo na baninga na ye oyo batikalaki na bomoi wana ya mobulu mpe ya komɛla bangi, alobi boye: “Yaya na ngai ná baninga na ngai nyonso ya kala bakufá. Boyebi ya Liloba ya Nzambe esalisi ngai nakufa te lokola bango. Soki bibongiseli ya Yehova te, mbele nazali lisusu na bomoi te.” Longola yango, makambo nyonso oyo Alfonso ayekoli na Liloba ya Nzambe epesi ye elikya ya kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.​—2 Petelo 3:13.

Bazali kobenga moto nyonso

Mokanda ya nsuka ya Biblia elobeli “ebale moko ya mai ya bomoi, pɛɛ lokola klisitali, ezali kotiyola uta na kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Mpate.” (Emoniseli 22:1) Ebale yango ezali bibongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kosalisa biso tókóma lisusu bato ya kokoka ndenge Adama ná Eva bazalaki na ebandeli.

Nsima ya kolobela ebale yango, Biblia ekobi boye: “Tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.” (Emoniseli 22:17) Lelo oyo, bato ya mabelé mobimba bazali kobengama. Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova na mikili koleka 235 bazali kolekisa ngonga koleka miliare moko na kosalisa bato bázwa boyebi ya Biblia oyo ezali kopesa bomoi.

Ozali na mposa ya mai ya bomoi? Soki ozali komɛla mai wana ya pɛto, elingi koloba ozali koyekola mpe kosalela bibongiseli oyo Mozalisi na biso azwi, yo mpe okoki kozala na kati ya bato oyo bazali ‘komibombela moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.’​—1 Timote 6:19.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Lokola mai oyo epɛtolaka nzoto na biso, Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kopɛtola bizaleli mpe elimo na biso

[Etanda/​Bililingi na lokasa 15]

NDENGE BAZALAKI KOZWA MAI NA NTANGO YA KALA

Na ntango ya kala, bato basengelaki kosala makasi mpo na kozwa mai ya malamu. Abalayama ná Yisaka batimolaki mabulu pene na Bele-seba mpo bango ná mabota na bango mpe bibwɛlɛ na bango bázwaka mai.​—Genese 21:30, 31; 26:18.

Mbala mingi, mabulu oyo ezalaki mozindo te ezalaki kokauka na ntango ya elanga. Mpo libulu ekaukaka te, esengelaki kozala mozindo. (Masese 20:5) Libulu moko oyo ezalaki na Lakisi, ezali na bozindo ya mɛtrɛ 44. Oyo ya Gibona ezali na bozindo ya mɛtrɛ koleka 25 mpe na bonene ya mɛtrɛ 11. Mpo na kotimola libulu wana, esɛngaki kobimisa tone soki 3 000 ya mabanga. Mwasi Mosamalia oyo ayaki kotoka mai na libulu ya Yakobo alobaki na Yesu boye: “Libulu ezali mozindo.” Libulu yango ezalaki mozindo mpenza, mɛtrɛ soki 23.​—Yoane 4:11.

Bato ya Moyen-orient bazalaki mpe kozwa mai na bibombeli ya mai (citerne). Bibombeli yango ya nse ya mabelé ezalaki kobomba mai ya mbula oyo ebɛtaka kobanda na sanza ya zomi tii na sanza ya minei. Bazalaki kopasola banzela likoló ya ngomba oyo ezalaki komema mai ya mbula tii na bibombeli yango. Bayisalaele bazalaki kosala bibombeli ya mai ya minene.​—2 Ntango 26:10.

Kotoka mai na mabulu mpe na bibombeli ezalaki mosala makasi, ndenge kaka ezali lelo oyo. Basi lokola Lebeka mpe bana ya Yetro bazalaki kosala mosala monene ya kotokaka mai mokolo na mokolo mpo na mabota mpe bibwɛlɛ na bango.​—Genese 24:15-20; Exode 2:16.

[Elilingi na lokasa 15]

Alfonso lelo oyo, azali kosakola Liloba ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto