Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/4 nk. 28-31
  • Omemyaka lokumu na bango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omemyaka lokumu na bango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bandakisa oyo emonisi limemya
  • Lokumu kati na libota
  • Kati na lisangá ya boklisto
  • Tóbatela lokumu na biso moko
  • Tókumisa Yehova na etamboli ya lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Omemyaka basusu wana ozali kopesa bango toli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Lokumu ya bato esili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Moto nyonso akoki kozala na lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/4 nk. 28-31

Omemyaka lokumu na bango?

BANA ya Afrika bakangisamaki esika moko lokola banyama mpe batyamaki na esika ya bosɔtɔ mpe ya nsolo, na nsima bakɔtisaki bango na masuwa lokola mikumba kino na Amerika. Bakanisaki ete pene na katikati na bango bakokufa liboso ya kokóma na esika bazalaki kokende. Bato ya libota moko bakabwanaki na makasi, bakomonana lisusu te mpo na libela. Mombongo ya baombo ezalaki moko na likambo ya mabe koleka kati na lisolo ya konyokwama ya bato na mabɔkɔ ya bazalani na bango. Makambo mosusu ya motindo yango ezalaki kosalema ntango oyo bayangeli mabe bazalaki konyokola bato oyo bazangi libateli.

Kolongola lokumu ya moto ekoki kosuwa koleka mpasi ya bobɛtama. Yango ebulunganisaka makanisi ya moto. Atako boombo esilá kopekisama na mikili mingi, kobebisa lokumu ya bato ezali kokoba, mbala mosusu na lolenge oyo ezali komonana polele te.

Nzokande, baklisto ya solo, basalaka makasi mpo na kolanda likebisi ya Yesu ete ‘bálinga bazalani na bango lokola bango moko.’ Na yango, bamitunaka ete, ‘Namemyaka lokumu ya basusu?’—Luka 10:27.

Bandakisa oyo emonisi limemya

Engebene diksionere moko, lokumu ezali ezalela to kobonga na likambo moko, to kopesamela motuya. Yango ebongi mpenza mpo na kolobela Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, Yehova Nzambe! Kutu, mbala mingi Makomami malobelaka Yehova mpe boyangeli na ye na maloba ya lokumu. Mose, Yisaya, Ezekiele, Danyele, ntoma Yoane, mpe bato mosusu bazalaki na libaku malamu ya kozwa bimonaneli ya Oyo-Aleki-Likoló mpe efandelo na ye kuna na likoló, mpe bimonisi ete yango ezali esika ya nkembo monene mpe ya lokumu. (Exode 24:9-11; Yisaya 6:1; Ezekiele 1:26-28; Danyele 7:9; Emoniseli 4:1-3) Kati na libondeli moko ya masanzoli, Mokonzi Davidi alobaki ete: “Ɛ [Yehova], epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu. Zambi nyonso na likoló mpe na nse ezali na yo.” (1 Ntango 29:11) Ya solo, moto moko te abongi kopesamela lokumu mpe kotalelama na motuya koleka Yehova Nzambe.

Wana azalisaki moto na elilingi mpe na motindo na ye, Yehova apesaki bato motuya, limemya, mpe lokumu na meko ebongi. (Genese 1:26) Yango wana, kati na boyokani na biso na bamosusu, tosengeli kopesa moto na moto lokumu mpe limemya oyo ebongi na ye. Ntango tozali kosala yango, tozali mpenza kondima ete Yehova Nzambe azali Eutelo ya lokumu ya bato.​—Nzembo 8:4-9.

Lokumu kati na libota

Na kopemama na Nzambe, ntoma Petelo, oyo abalaki, akebisaki mibali baklisto ete bápesa basi na bango ‘lokumu lokola na mbɛki eleki motau.’ (1 Petelo 3:7; Matai 8:14) Ntoma Paulo apesaki toli ete: “Na ngámbo na ye, mwasi asengeli kozala na limemya mozindo mpo na mobali na ye.” (Baefese 5:33, NW) Yango wana, kati na libala, kopesa lokumu mpe komemya mobalani ezali lisɛngami ya Biblia. Ndenge nini yango ekoki komonisama?

Motindo moko mai epesaka nzete oyo ezali kokola bomoi, maloba ya elɛngi mpe bikela ya boboto kati na mobali mpe mwasi, ezala na miso ya bato to na nkuku, ekoki kokolisa boyokani na bango ya mwasi na mobali. Na bokeseni, maloba ya kozokisa, kofinga to kozanga limemya, maloba ya koyokisa nsɔni, ndenge eyokamaka mbala mingi na bateyatre na televizyo, ebebisaka libala. Ekoki kopesa moto mayoki ete azangi ntina, akonyokwama na makanisi, mpe nkanda; ekoki ata kozokisa na mayoki mpota oyo ekobela noki te.

Komemya lokumu ya bamosusu elimboli mpe kondima bango ndenge bazali, kozanga komeka koyokanisa bango na motindo oyo tolingi to kokokanisa bango na lolenge lobongi te na bamosusu. Yango ezali mpenza na ntina kati na mibali mpe basi na bango. Ntango bozali kosolola polele mpe kozanga nkaka mpe moto te azali kobanga ete bakoloba na ye mabe to bakopamela ye, boyokani ya penepene ekokola. Ntango mobali to mwasi azali komiyoka ete azali malamu kati na libala, ndako ekokóma solo ebombamelo mpo na kokima mokili oyo etondi na nkɛlɛ mpe makambo mabe.

Makomami esɛngisi bana ete bámemyaka mpe bátosaka baboti na bango. Nzokande, ebongi ete baboti ya mayele mpe ya bolingo bápesaka bana na bango lokumu. Kopesa longonya mpo na etamboli malamu, na disipilini oyo epesami na motema molai soki esengeli, eyeisaka makasi ‘malako ya Yehova.’ Kotyola, kongangela, mpe kofinga na maloba ya nsɔni lokola “zoba” to “bolole” ekosilikisa bango.​—Baefese 6:4.

Nkulutu moklisto moko oyo azali tata ya libota, azali na bana misato ya mibali mpe misato ya basi, alobi ete: “Na Ndako ya Bokonzi, tozalaki kopesa mwa disipilini oyo esengelaki na kimya nyonso. Mingimingi koningisa mwa moke to kotala na miso mabe ekokaki. Soki esengelaki kopesa disipilini ya makasi, tozalaki kopesa yango na nkuku na ndako na biso mpe na esika oyo bana mosusu bazali te. Sikawa, lokola bana yango bakoli, disipilini ezali kosɛngisa kopesa moko na moko toli ya bolingo, ya mayele oyo euti na Liloba ya Nzambe, engebene bamposa ya mwana na mwana. Na likambo yango tozali komeka kobomba sɛkɛlɛ ya likambo oyo etali moto ye moko, tozali komonisa limemya mpo na lokumu ya mwana mokomoko.”

Tóbosana te ete bizaleli malamu na maloba mpe na misala esengeli kozala kati na libota. Komesana esengeli te kobosanisa biso maloba lokola “nalɔmbi yo,” “melesi,” “limbisá ngai,” mpe “nasali mabe.” Bizaleli malamu ezali na ntina monene mpo na kobatela lokumu na yo moko mpe komemya lokumu ya bamosusu.

Kati na lisangá ya boklisto

Yesu alobaki ete: “Boyá liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.” (Matai 11:28) Baoyo bazalaki konyokwama, baoyo bazalaki kotungisama na makanisi, ata mpe bana mike, bazalaki kobɛlɛma na Yesu kozanga nkaka. Batyolamaki na bakonzi ya mangomba mpe bakambi ya eleko wana oyo bazalaki na lolendo mpe bamimonaki bayengebene. Kasi Yesu apesaki bango lokumu oyo ebongaki na bango.

Na komekoláká Yesu, biso mpe tosengeli kozala liziba ya kopema mpo na bandeko na biso bandimi. Yango elimboli koluka mabaku mpo na kolendisa bango na maloba mpe na misala na biso. Na bosembo nyonso, esengeli ete tólobaka maloba ya boboto mpe ya kolendisa kati na masolo na biso. (Baloma 1:11, 12; 1 Batesaloniki 5:11) Tokomonisa ete tozali komibanzabanza mpo na mayoki ya bato mosusu na kozaláká na bokɛngi na makambo oyo tozali koloba mpe na lolenge tozali koloba yango. (Bakolose 4:6) Molato ebongi mpe lolenge malamu ya kobongisa nzoto na makita ya boklisto emonisaka mpe ete tozali kopesa Nzambe na biso lokumu, losambo na ye, mpe bandeko na biso bandimi.

Yesu azalaki komemya lokumu ya bato ata ntango azalaki kosalela bango mosala. Alukaki komitombola te liboso ya bato mosusu to alukaki kokitisa bango te. Ntango moto na maba ayaki mpo ete abikisa ye, Yesu abenganaki ye te lokola moto na mbindo mpe oyo azangi ntina, asalaki mpe bisalasala te mpo na kobenda likebi likoló na ye moko. Nzokande, ntango moto ya maba abondelaki Yesu ete, “Nkolo, soko olingi okoki kopɛtola ngai,” Yesu akumisaki moto ya maba na kolobáká ete: “Nalingi.” (Luka 5:12, 13) Ekozala mpenza malamu soki tokosunga baoyo bazali na bosɛnga mpe lisusu tokondimisa bango ete bazali bozito te, kasi bazali na ntina mpe balingami! Na mokili, bato ya nsɔninsɔni, banyokwami na makanisi, mpe bibɔsɔnɔ, mbala mingi basundolamaka, baboyamaka, to batyolamaka. Nzokande, basengeli kokuta boninga ya solo mpe komona ete balingami ntango bazali elongo na bandeko na bango baklisto. Moko na moko asengeli kosala oyo ekoki na ye mpo na bolongi ya elimo yango.

Yesu alingaki bayekoli na ye lokola “bato na ye moko” mpe “alingaki bango kino nsuka” atako bazalaki na mabunga mpe bazalaki koswana na ntina na bokeseni ya bomoto. (Yoane 13:1) Amonaki kati na bango mitema ya pɛto mpe komipesa na molimo mobimba epai ya Tata na ye. Bobele bongo, tosengeli te kokanisa mabe mpo na bandeko na biso bandimi bobele mpo ete bazali kosala makambo ndenge biso tolingaki te to mpo ete bizaleli to bomoto na bango ezali kosilikisa biso. Limemya mpe lokumu ya bandeko na biso ekotinda biso ete tólinga mpe tóndima bango ndenge bazali, kondimáká ete bango mpe balingaka Yehova mpe bazali kosalela ye na makanisi malamu.​—1 Petelo 4:8-10.

Mpenzampenza, Bankulutu basengeli te kobimisa mitungisi ezangi ntina mpo na baoyo batyami na nse ya libateli na bango. (1 Petelo 5:2, 3) Ntango bakei kosolola na ndeko moko ya lisangá oyo asali lisumu, ekozala malamu ete bankulutu bálɛmbisa maloba na bango na boboto mpe bábatela lokumu ya moto mpe báboya kotuna mituna mizangi ntina oyo ekotungisa moto. (Bagalatia 6:1) Ata soki esengeli kopamela to kopesa disipilini ya makasi, bakotika te komonisela mosali na mabe lokumu mpe limemya.​—1 Timoté 5:1, 2.

Tóbatela lokumu na biso moko

Lokola tozalisamaki na elilingi mpe na motindo ya Nzambe, tosengeli komonisa, na meko oyo ekoki, bizaleli kitoko ya Nzambe—bakisa mpe lokumu na ye—na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (Genese 1:26) Bobele bongo, etinda ya “kolinga mozalani lokola yo moko” emonisi ntina ya kobatela lokumu mpe limemya na yo moko. (Matai 22:39) Ezali solo ete soki tolingaka ete bato mosusu bámonisela biso limemya mpe bápesa biso lokumu, tosengeli komonisa ete tobongi na yango.

Likambo lileki ntina mpo na kobatela limemya mpe lokumu na yo moko ezali bongo ya kobatela lisosoli ya pɛto. Lisosoli ya mbindo mpe mayoki ya komema ngambo, ekomema moto na komiyoka ete azangi ntina, na mitungisi makasi, mpe konyokwama na makanisi. Yango wana, soki moto moko asali lisumu monene, asengeli kosala nokinoki mpo na kobongola motema mpe koluka lisungi ya elimo epai ya bankulutu mpo na kozwa ‘ntango ya kopema euti na Nkolo.’ Kopema wana esangisi kozongisama ya lokumu mpe limemya ya moto.​—Misala 3:19.

Kasi, eleki malamu ete tósala makasi mpo na kobatela lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia; tótika nzela na eloko moko te ete ebebisa yango to elɛmbisa yango. Komipekisa na makambo nyonso ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo—kolya, komela, mombongo, kominanola, boyokani ya basi mpe mibali—ekosalisa biso ete tóbatela lisosoli ya pɛto mpe ekopesa biso nzela ya komonisa nkembo mpe lokumu ya Nzambe na bomoi na biso.​—1 Bakolinti 10:31.

Ezali boni soki liyoki ya komema ngambo na ntina na libunga na biso ezali kosila te? To ezali boni soki mpasi oyo bayokisaki biso ezali kobunga te na makanisi mpe ezali kotungisa biso? Yango ekoki kobebisa lokumu na biso mpe komema komitungisa makasi na makanisi. Maloba ya Mokonzi Davidi oyo mazwami na Nzembo 34:18 mazali mpenza kolendisa ete: “Yehova azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na [elimo enyatami, NW]”! Yehova azali pene mpe azali na mposa ya kosunga basaleli na ye ntango bazali kokutana na mitungisi na makanisi mpe komiyoka ete bazangi ntina. Esengeli kosala malɔmbo epai na ye mpe koluka lisungi ya baoyo bazali na makoki ya elimo, lokola baboti baklisto, bankulutu, mpe bandeko mosusu oyo bakɔmɛli kati na lisangá, mpo na kozongisa limemya mpe lokumu na yo moko.​—Yakobo 5:13-15.

Epai mosusu, tosengeli koyeba kokesenisa lokumu ya biso moko mpe lolendo. Makomami epesi toli ete: “Bóleka te komikanisa bino mpenza na motindo mobongi te. Kasi bómitánga na makanisi na sembo, moto na moto pelamoko na likabo na kondima oyo Nzambe apesi ye.” (Baloma 12:3) Atako elongobani kolona limemya mpo na biso moko, tosengeli te komipesa motuya oyo eleki ndelo, mpe tósala bokeseni kati na lokumu ya biso moko mpe moimi oyo, mpo na yango, bamoko bazali kosala milende mpo na komitombola liboso ya bamosusu.

Ɛɛ, komemya lokumu ya bamosusu ezali lisɛngisi ya boklisto. Esengeli mpe ebongi ete tómemya basangani ya libota na biso mpe bandeko na biso baklisto, tókumisa bango, mpe tótalela bango na motuya. Tosengeli koyeba mpe kobatela [na makanisi] ete Yehova apesaka mokomoko na biso mwa lokumu. Kasi likoló na nyonso, tosengeli kolona limemya mozindo mpo na lokumu mpe nkembo monene ya Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe.

[Elilingi na lokasa 31]

Bilenge bakoki komonisa limemya mpo na bibɔsɔnɔ

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto