Bózalaka na motema mawa
“Bomilatisa mitema na mawa, na boboto.”—BAKƆLƆSƐ 3:12.
1. Mpo na nini bato bazali na mposa mingi ya motema mawa lelo?
KOLEKA ndenge ezalaki liboso, lelo bato mingi bazali mpenza na mposa ete bámonisela bango ezaleli ya motema mawa. Na ntina na bokɔnɔ, nzala, kozanga mosala, mabe, bitumba, mobulu, mpe makámá mauti na biloko bizalisami, bamilió ya bato bazali na mposa ya lisalisi. Kasi ezali na likambo moko ya mpasi mingi koleka, yango ezali ezalela ya kozanga elikya oyo bato bazali na yango na elimo. Satana, oyo ayebi ete ntango na ye ezali mokuse, “azali kozimbisa mabelé mobimba oyo bato bafandi.” (Emoniseli 12:9, 12, NW) Na yango, mingimingi, baoyo nyonso bazali libándá ya lisangá ya boklisto bazali na likámá ya kobungisa bomoi na bango, mpe Biblia epesi te elikya ya lisekwa mpo na baoyo bakobomama na mokolo ya kosambisa ya Nzambe oyo ezali koya.—Matai 25:31-33, 41, 46; 2 Batesaloniki 1:6-9.
2. Mpo na nini Yehova amipekisaki mpo na koboma bato mabe?
2 Nzokande, kino na eteni oyo ya nsuka ya mikolo ya nsuka, Yehova Nzambe azali kokóba komonisa motema pɛtɛɛ mpe motema mawa epai na bato bazangi botɔ́ndi mpe basáli na mabe. (Matai 5:45; Luka 6:35, 36) Asali bongo na ntina bobele moko mpo na yango azangaki kopesa etumbu nokinoki epai na libota ya Yisraele oyo ezangaki sembo. “Nkolo [Yehova] alobi ete, ‘Lokola ejali ngai na bomɔi, najui esɛngɔ na liwa na moto mabe tɛ, bobɛlɛ ete moto mabe abongwa na njela na ye mpe abika; bongwa, bongwa na njela mabe na bino; jambi bino bolingi kokufa mpɔ na nini, ɛ ndako na Yisalaele?’”—Ejekiele 33:11.
3. Ndakisa nini tozali na yango emonisi motema mawa ya Yehova epai na baoyo bazali basaleli na ye te, mpe yango eteyi biso nini?
3 Motema mawa ya Yehova emonisamaki mpe epai na basáli na mabe ya engumba Ninive. Yehova atindaki mosakoli na ye Yona mpo na kokebisa bango na ntina na libebi oyo ebɛlɛmaki. Basalaki na boyokani na kosakola ya Yona mpe babongolaki mitema. Yango esalaki ete Yehova, Nzambe ya motema mawa, atika koyeisa libebi likoló na engumba na ntango wana. (Yona 3:10; 4:11) Soki Nzambe ayokelaki bato ya Ninive mawa, baoyo bakokaki kozala na elikya ya lisekwa, motema mawa ya lolenge nini asengeli kozala na yango epai na bato oyo lelo bazali liboso ya kobomama ya seko!—Luka 11:32.
Mosala moko monene ya motema mawa
4. Lolenge nini Yehova azali komonisa motema mawa epai na bato lelo?
4 Na boyokani na ezaleli na ye ya koyokela mawa, Yehova apesaki na Batatoli na ye mokumba ya kolanda kotala bazalani na bango na “nsango malamu ya Bokonzi.” (Matai 24:14, NW) Mpe wana bato bazali koyamba na botɔ́ndi nyonso mosala wana oyo ezali kobikisa bomoi, Yehova azali kofungola mitema na bango ete básimba nsango ya Bokonzi. (Matai 11:25; Misala 16:14) Na komekoláká Nzambe na bango, baklisto ya solo bazali komonisa ezaleli ya motema mawa na kozongeláká bato oyo bamonisaki bosepeli, kosalisáká bango, epai likoki ezali, na nzela ya boyekoli ya Biblia. Yango wana, na mobu 1993, koleka bamilió minei na ndambo ya Batatoli ya Yehova, kati na mikili 231, basalaki koleka miliare moko ya ngonga na kosakola ndako na ndako mpe na koyekola Biblia elongo na bazalani na bango. Na ngala na bango, bato wana ya sika oyo bamonisi bosepeli, bazali na libaku ya kopesa bomoi na bango epai na Yehova mpe bazali kosangana kati na molɔngɔ́ ya Batatoli na ye oyo basili kozwa batisimo. Na yango, bango mpe bazali na mokumba ya kosangana na mosala wana monene ya motema mawa mpo na litomba ya bato oyo bakoki kokóma bayekoli oyo bakangami naino kati na mokili ya Satana oyo elingi kokufa.—Matai 28:19, 20; Yoane 14:12.
5. Ntango motema mawa ya Nzambe ekokóma na nsuka na yango, nini ekokómela mangomba oyo bazali komonisa Nzambe na lolenge ya mabe?
5 Mosika te Yehova akosala lokola “mobali na etumba.” (Esode 15:3) Na motema mawa mpo na nkombo na ye mpe mpo na bato na ye, akolongola mabe mpe akotya mokili ya sika ya bosembo. (2 Petelo 3:13) Bato ya liboso baoyo mokolo ya nkanda ya Nzambe ekokwela ekozala mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Motindo moko Nzambe abatelaki te tempelo na ye oyo ezalaki na Yelusaleme na mabɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, bobele bongo akobatela mpe te mangomba oyo bamonisaki ye na lolenge mabe. Nzambe akotya likanisi yango kati na mitema ya basangani ya Mabota Masangani (O.N.U.) mpo na kobebisa boklisto ya nkombo mpamba mpe mitindo nyonso mosusu ya mangomba ya lokuta. (Emoniseli 17:16, 17) Yehova alobi ete: “Mpe mpɔ na ngai, liso na ngai ekotala na mawa tɛ, mpe nakotika tɛ, kasi nakojongisa kotambola na bango na likolo na motó na bango.”—Ejekiele 9:5, 10.
6. Na makambo nini Batatoli ya Yehova bapusami na komonisa motema mawa?
6 Lokola ntango ezali naino, Batatoli ya Yehova bazali kokóba komonisa motema mawa epai na bazalani na bango na kosakoláká na molende nyonso nsango ya lobiko ya Nzambe. Mpe mbala mingi, epai likoki lizali, basalisaka mpe bato oyo bazali na mposa na biloko ya mosuni. Nzokande, na likambo oyo litali kosalisa bato na mosuni, mokumba ya liboso bazali na yango ezali ya kokokisa bamposa ya basangani ya mabota na bango mpe bandeko na bango kati na kondima. (Bagalatia 6:10; 1 Timoté 5:4, 8) Bibongiseli mingi ya kosunga bato oyo Batatoli ya Yehova basalaka mpo na litomba ya baninga na bango bandimi oyo bazali konyokwama na bampasi ndenge na ndenge ezali bandakisa minene oyo emonisi ezalela ya motema mawa. Atako bongo, baklisto basengeli te kozela bobele ntango ya mpasi makasi liboso ya komonisa motema mawa. Bazali komonisa nokinoki ezaleli wana ezala na ntango ya bisengo mpe ya bampasi ya bomoi ya mokolo na mokolo.
Motema mawa ezali eteni ya bomoto ya sika
7. (a) Na Bakɔlɔsɛ 3:8-13, lolenge nini motema mawa ekangani na bomoto ya sika? (b) Likambo nini bolingo ya motema ezali koyeisa mpo na baklisto ete básala yango?
7 Ezali solo ete ezalela na biso ya masumu mpe bopusi mabe ya mokili ya Satana ezali bipekiseli mpo na komonisa ezaleli ya motema mawa. Yango wana Biblia ekebisi biso ete tólongola “nkɛlɛ, nkanda, kotɔnga, kotuka, [mpe] maloba na nsɔni.” Na esika ya kosala makambo wana, tozwi nde toli ya ‘komilatisa biso moko bomoto ya sika’—bomoto oyo ekokani na elilingi ya Nzambe. Libosoliboso, tosɛngisami na komilatisa biso moko “mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.” Na nsima, Biblia emonisi biso lolenge lobongi mpo na komonisa bizaleli wana. “Sɔkɔ moto mɔkɔ ajali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. Pelamɔkɔ [Yehova] alimbisi bino, bino bobɛlɛ bongo.” Ekozala pɛtɛɛ mpo na kolimbisa soki tolónaki ‘ezaleli ya motema mawa’ mpo na bandeko na biso.—Bakɔlɔsɛ 3:8-13.
8. Mpo na nini ezali na ntina kozala na ezaleli ya kolimbisa?
8 Epai mosusu, kozanga komonisa motema mawa mpo na kolimbisa ekoki kobebisa boyokani na biso elongo na Yehova. Yango emonisamaki polele na Yesu kati na lisese na ye ya moombo mabe, oyo nkolo na ye atyaki ye na bolɔ́kɔ “kino akofuta ye nyongo na ye yɔnsɔ.” Moombo wana azwaki etumbu oyo mpamba te aboyaki na nkó nyonso komonisa motema mawa epai na moninga na ye moombo oyo asɛngaki ye ete ayokela ye mawa. Yesu asukisaki lisese na kolobáká ete: “Tata na ngai na Likolo akosalela bino bongo sɔkɔ bokolimbisa na mitema na bino moto na moto ndeko na ye tɛ.”—Matai 18:34, 35.
9. Lolenge nini motema mawa ezali eteni ya ntina mingi ya bomoto ya sika?
9 Kozala na motema mawa ezali eteni ya ntina ya bolingo. Mpe bolingo ezali elembo mpo na koyeba boklisto ya solo. (Yoane 13:35) Yango wana, lolenge oyo Biblia ezali kolobela bomoto ya sika esuki na maloba oyo: “Nde likolo na oyo yɔnsɔ, bomilatisa bolingo oyo ejali ekanganeli ekoki mpenja.”—Bakɔlɔsɛ 3:14.
Zuwa—Epekiseli mpo na motema mawa
10. (a) Eloko nini ekoki kosala ete zuwa ekɔta kati na mitema na biso? (b) Wapi matomba mabe makoki kouta na zuwa?
10 Na ntina na ezalela na biso ya bato ya masumu, mayoki ya zuwa makoki kozanga nkaká kokɔta kati na mitema na biso. Ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko akoki kozala na makoki ya kobotama to azwi lipamboli na biloko ya mosuni oyo biso tozali na yango te. To mbala mosusu ndeko moko azwi lipamboli na makambo ya elimo mpe mabaku kitoko ya mosala. Soki tokómi na zuwa mpo na bandeko wana, tokozala solo na likoki ya komonisela bango motema mawa? Tokoki koloba ete te. Nkutu, mayoki ya zuwa makoki na nsima komonisama yango moko na matɔ́ngi to na misala mizangi boboto, mpamba te Yesu alobaki na ntina na bato ete: “Na ntina na makambo mingi mazali na motema, monɔkɔ ezali koloba.” (Luka 6:45, NW) Basusu bakoki komikotisa na matɔ́ngi wana. Na bongo kimya ya libota to ya lisangá ekoki kobebisama.
11. Lolenge nini bandeko zomi ya Yosefe bazangaki mawa kati na mitema na bango, mpe yango ebimisaki makambo nini?
11 Tótalela oyo ekómelaki libota moko monene. Bana mibali zomi ya Yakobo oyo bazalaki mikóló bakómaki na zuwa mpo na Yosefe lɛki na bango ya mobali, mpamba te tata na bango alingaki ye mingi. Yango esalaki ete, “bakokaki kolobela ye na motema malamu tɛ.” Na nsima, Yosefe apambwamaki na bandɔ́tɔ oyo eutaki epai na Nzambe, komonisáká bongo ete andimamaki epai na Yehova. Yango esalaki ete bandeko na ye “bayinaki ye na koleka.” Lokola babenganaki zuwa te kati na mitema na bango, yango elongolaki ezaleli ya motema mawa epai na bango mpe ememaki bango na lisumu monene.—Genese 37:4, 5, 11.
12, 13. Tosengeli kosala nini soki mayoki ya zuwa makɔti kati na motema na biso?
12 Kozanga mawa, batekisaki Yosefe na boombo. Kolukáká mwango mpo na kozipa mabe na bango, bakosaki tata na bango na likanisi ete Yosefe abomamaki na nyama moko ya zámba. Bambula mingi na nsima, lisumu na bango eyaki komonana polele wana nzala esɛngisaki bango na kokita na Ezipito mpe kosomba bilei. Moto oyo azalaki kotalela bilei yango, oyo bango bayebaki te ete ezalaki ye nde Yosefe, alobaki na bango ete bazalaki banɔ́ngi mpe alobaki na bango ete báya lisusu te koluka lisalisi epai na ye soki Bɛnyamina, lɛki na bango ya moke azali te elongo na bango. Na ntango wana Bɛnyamina akómaki mwana oyo tata na bango azalaki kolinga mingi, mpe bayebaki ete Yakobo akolinga te ete bákende na ye.
13 Na bongo, wana batɛlɛmaki liboso ya Yosefe, lisosoli na bango epusaki bango na kondima ete: “Sɔlɔ tokiti na ntina na ndeko na biso [Yosefe], wana emɔnaki biso mawa na motema na ye, ebɔndɛlaki ye biso, mpe toboyaki koyoka. Yango wana mawa oyo ekiteli biso.” (Genese 42:21) Nzokande na motema mawa na ye, oyo emonisaki ekateli ya ngwi, Yosefe asalisaki bandeko na ye na komonisa mpenzampenza kobongola motema na bango. Na nsima amimonisaki epai na bango mpe na bolingo nyonso alimbisaki bango. Bomoko ya libota ezongaki. (Genese 45:4-8) Lokola tozali baklisto, tosengeli kozwa liteya na likambo wana. Lokola toyebi mbuma mabe ya zuwa, tosengeli kobondela Yehova mpo ete asalisa biso na kolongola zuwa mpe na komilatisa ‘ezaleli ya motema mawa.’
Bipekiseli mosusu mpo na motema mawa
14. Mpo na nini tosengeli koboya kotala mpambampamba makambo ya mobulu?
14 Epekiseli mosusu mpo ete tókoka kozala na motema mawa te ekoki kouta na komitika biso moko mpambampamba na kotala makambo ya mobulu. Masano mpe kominanola oyo ezali kolakisa mobulu ezali kokólisa mposa makasi ya kolinga makambo ya yikiyiki lokola mwango ya komisepelisa. Na ntango ya kala, mbala mingi bapakano bazalaki kotala bitumba ya babundi mpe mitindo misusu ya minyoko ya bato na bisika ya masano oyo ezalaki na Loma. Kominanola motindo wana, engebene mokomi moko ya makambo na kala, “ezalaki kobebisa mayoki ya koyoka mawa mpo na bato oyo bazali komona mpasi, mayoki oyo ekesenisaka moto na nyama.” Makambo mingi ya kominanola na mokili na biso ya lelo ezali na bopusi lolenge moko. Baklisto, oyo bazali kosala makasi mpo na kozala na motema mawa, basengeli mpenza koyeba kopona mikanda oyo bazali kotánga, bafilime oyo bazali kotala, mpe makambo oyo bazali kotala na televizyó. Na mayele nyonso bazali kobatela kati na makanisi na bango maloba ya Nzembo 11:5 (NW) “[Yehova] ayini mpenza ye oyo alingi mobulu.”
15. (a) Lolenge nini moto akoki komonisa mpenza ete azangi motema mawa? (b) Lolenge nini baklisto ya solo bayanolaka na bamposa ya baninga na bango bandimi mpe bazalani na bango?
15 Moto ya moimi azali mpe na motema mawa te. Yango ezali likambo ya lisɛki te, lokola ntoma Yoane amonisi yango: “Nde sɔkɔ moto nani, oyo ajali na bilɔkɔ na mokili, amɔni ndeko na ye na kojanga mpe akangeli ye motema na ye, bolingo na Njambe eumeli kati na ye boni?” (1 Yoane 3:17) Kozanga motema mawa motindo moko emonisamaki epai na nganga oyo azalaki komitánga moyengebene ye moko mpe Molevi, baoyo balobelami kati na lisese oyo Yesu apesaki ya Mosamalia ya boboto. Wana emonaki bango mpasi ya ndeko na bango Moyuda oyo azalaki pene na kokufa, bango bakatisaki na ngámbo mosusu ya balabála mpe balandaki nzela na bango. (Luka 10:31, 32) Nzokande, baklisto oyo bazali na motema mawa bayanolaka nokinoki na bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya bandeko na bango. Mpe lokola Mosamalia oyo alobelami na lisese ya Yesu, bazali mpe komibanzabanza mpo na bamposa ya bapaya. Na bongo na esengo nyonso bazali kopesa ntango, nguya, mpe biloko na bango ya mosuni mpo na kokólisa mosala ya kozalisa bayekoli na mokili mobimba. Kosaláká bongo, bazali kopesa mabɔkɔ na lobiko ya bamilió ya bato.—1 Timoté 4:16.
Motema mawa mpo na babɛli
16. Bandelo nini tokutanaka na yango liboso ya bokɔnɔ?
16 Bokɔnɔ ezali likambo oyo ekómelaka bato nyonso bazangi kokoka, baoyo babyangami kokufa. Yango ekómelaka baklisto lokola, mpe mingi kati na bango bayebi malamumalamu makambo matali monganga te, mpe bakoki te kosala bikamwiseli lokola esalaki yango baklisto ya liboso oyo bazwaki nguya uta na Klisto mpe na bantoma na ye. Na nsima ya liwa ya bantoma ya Klisto mpe baninga na bango ya penepene, nguya wana ya kosala bikamwiseli esukaki. Na yango, makoki na biso ya kosalisa baoyo bazali na bokɔnɔ na nzoto, kati na yango mpasi ya bɔɔngɔ́ mpe kotungisama na makanisi, ezali na ndelo.—Misala 8:13, 18; 1 Bakolinti 13:8.
17. Liteya nini tozwi na lolenge oyo basalelaki Yobo, moto oyo azalaki na bokɔnɔ mpe akufelaki bato?
17 Kotungisama na makanisi mbala mingi epesaka maladi. Na ndakisa Yobo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, atungisamaki mingi na ntina na bokɔnɔ na ye makasi mpe mitungisi oyo Satana abimiselaki ye. (Yobo 1:18, 19; 2:7; 3:3, 11-13) Azalaki na mposa ya baninga oyo basengelaki koyokela ye mawa mpe baoyo bakokaki “kozala na maloba ya kobɔndisa.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) Na esika ya kosala bongo, babɔndisi misato ya nkombo mpamba bakendaki kotala ye mpe babimisaki maloba oyo mazalaki kopesa mpasi na motema. Babakiselaki Yobo motungisi na makanisi na kolobáká ete bampasi na ye euti na mabunga na ye moko. Lokola bazali na motema mawa, baklisto basengeli kopɛngola kokwea na motambo motindo wana ntango baninga na bango bandimi bazali na bokɔnɔ to banyokwami na makanisi. Mbala mosusu, eloko ya ntina mingi oyo bato motindo wana bazali na yango mposa ezali bongo kozwa bavizite ya boboto ya bankulutu to baklisto mosusu oyo bakɔmeli, oyo bakoyoka bango na motema mawa nyonso, oyo bakomonisa bososoli, mpe kopesa batoli ya bolingo oyo euti na Makomami.—Baloma 12:15; Yakobo 1:19.
Motema mawa mpo na bato na bolɛmbu
18, 19. (a) Lolenge nini bankulutu basengeli kosala liboso na bato na bolɛmbu to baoyo basali mabunga? (b) Ata soki ebongi kosala komité ya kosambisa, mpo na nini ezali na ntina mpo na bankulutu ete bámonisa motema mawa epai na basáli na mabe?
18 Bankulutu basengeli komonisa mingimingi motema mawa. (Misala 20:29, 35) Biblia elobi ete: “Biso . . . baoyo tozali na nguya tómema bolɛmbu ya baoyo bazali na nguya te.” (Baloma 15:1, NW) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso banso tosalaka mabunga. (Yakobo 3:2) Boboto esengeli komonisama ntango moto moko “anyati litambe mabe liboso ete ayeba yango.” (Bagalatia 6:1, NW) Bankulutu bakolinga soko moke te kozala lokola Bafalisai oyo bazalaki koluka boyengebene na bango moko, baoyo bazalaki na makambo makasi na lolenge na bango ya kosalela Mibeko ya Nzambe.
19 Nzokande, bankulutu bazali kolanda bandakisa ya motema mawa ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto. Mosala na bango ya liboso ezali ya koleisa, ya kolendisa, mpe kobatela bampate ya Nzambe. (Yisaya 32:1, 2) Na esika ya komeka kotambwisa makambo na ebele ya mibeko, bazali nde kolanda mitindá kitoko oyo mizali kati na Liloba ya Nzambe. Na yango, mokumba ya bankulutu esengeli kozala ya kolendisa, ya kopesa esengo mpe bosepeli mpo na bolamu ya Yehova kati na mitema ya bandeko na bango. Soki moninga moklisto asali libunga ya moke, nkulutu akopɛngola ezaleli ya kosembola ye na miso ya bandeko mosusu. Soki ntina ezali ya kolobela ye yango, mayoki ya mawa masengeli kopusa nkulutu na kobénga moto yango na mpembeni mpe kolobela ye likambo yango kozanga ete basusu báyoka yango. (Kokanisá na Matai 18:15.) Atako ezali mpasi boni mpo na koyokana na moto yango, lolenge oyo nkulutu akosolola na ye esengeli komonisa motema pɛtɛɛ mpe mposa ya kopesa lisalisi. Akoluka soko moke te mwango ya kobimisa ndeko yango na lisangá. Ata ntango emonani malamu ete básala komité ya kosambisa, bankulutu bakomonisa motema mawa epai na ndeko oyo asali likambo ya mabe. Boboto na bango ekoki komema ndeko yango na kobongola motema.—2 Timoté 2:24-26.
20. Ntango nini ebongi te komonisa mayoki ya motema mawa, mpe mpo na nini?
20 Nzokande, ezali na bantango oyo mosaleli ya Yehova akoki te komonisa mayoki ya motema mawa. (Kokanisá na Deteronome 13:6-9.) Mpo na moklisto, “kosangana te” na moninga moko ya motema to na ndeko na biso oyo abimisami na lisangá ekoki kozala komekama moko monene. Na likambo motindo oyo, ezali ntina mingi ete tómitika te koyangelama na mayoki ya mawa. (1 Bakolinti 5:11-13) Etɛlɛmɛlo makasi motindo oyo ekoki nkutu kolendisa moto oyo asalaki mabe na kobongola motema. Lisusu, kati na boyokani na bango elongo na basi mpe elongo na mibali, baklisto basengeli kopɛngola komonisa motema mawa na motindo mozangi kolongobana, oyo ekoki kopesa nzela na kosala pite.
21. Kati na makambo nini mosusu tokoki komonisa motema mawa, mpe matomba nini tokozwa?
21 Esika ekozanga biso mpo na kolobela makambo nyonso oyo tosengeli komonisa motema mawa—kati na boyokani na biso elongo na mibangé, na baoyo bakufeli bato, na baoyo bazali konyokwama na babalani na bango oyo bazali bandimi te. Bankulutu oyo bazali kosala makasi ebongi mpe ete tómonisela bango motema mawa. (1 Timoté 5:17) Tómemya bango mpe tósunga bango. (Baebele 13:7, 17) Ntoma Petelo akomaki ete: “Bino yɔnsɔ bojala . . . na mitema mawa.” (1 Pɛtɛlɔ 3:8) Na kosaláká bongo na makambo nyonso oyo masɛngi yango, tozali kokólisa bomoko mpe bolamu kati na lisangá mpe tozali kobenda bato ya libándá kati na solo. Oyo eleki mpenza, tozali kokumisa Yehova, Tata na biso ya motema mawa.
Mituna ya bozongeli
◻ Lolenge nini Yehova azali komonisa motema mawa epai na bato na masumu?
◻ Mpo na nini ezali ntina komonisa motema mawa?
◻ Wapi makambo oyo makoki kozala bipekiseli mpo na komonisa motema mawa?
◻ Lolenge nini tosengeli kotalela babɛli mpe bato banyokwami na makanisi?
◻ Nani abongi mpenza ete bámonisela ye motema mawa, mpe mpo na nini?
[Etanda na lokasa 19]
BAFALISAI BAZANGI MOTEMA MAWA
MOKOLO ya bopemi ya Sabata ezalaki mokolo ya kozwa mapamboli na elimo mpe na mosuni mpo na libota ya Nzambe. Nzokande, bakonzi na mangomba ya Bayuda, batyaki ebele ya malako oyo mazalaki kotyola Mibeko ya Nzambe na ntina na Sabata mpe bakómisaki yango kilo mingi mpo na bato. Na ndakisa, soki moto azwi likámá to azali na bokɔnɔ, akokaki kozwa lisalisi te na Sabata longola bobele soki bomoi na ye ezalaki na likámá.
Eteyelo moko ya Bafalisai ezalaki na makambo makasi mingi na lolenge na yango ya kolimbola mibeko ya Sabata, balobaki ete: “Moto moko te asengeli kobɔndisa baoyo bazali kolela bakufi, soko kotala babɛli na mokolo ya Sabata.” Bakonzi mosusu ya mangomba bazalaki kopesa nzela na kokende na bisika motindo wana na mokolo ya Sabata kasi balobaki ete: “Epekisami kolela.”
Yango wana, Yesu akweisaki bakonzi na mangomba ya Bayuda mpamba te babosanaki makambo maleki ntina kati na Mibeko, lokola bosembo, bolingo, mpe koyokela mawa. Likambo ya kokamwa ezali te soki alobaki na Bafalisai ete: “Bokoyeisaka Liloba na Nzambe mpamba na ntina na mibeko na bino ya bonkɔ́kɔ”!—Malako 7:8, 13, NW; Matai 23:23; Luka 11:42.
[Bililingi na lokasa 17]
Kati na mikili 231, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mosala moko monene ya motema mawa kati na bandako ya bato, kati na balabála, ata mpe kati na bolɔ́kɔ
[Elilingi na lokasa 18]
Kotala mobulu, lokola oyo elakisami na televizyó, esilisaka motema mawa