Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 1 nk. 6-7
  • Batoli mpo na kofanda malamu na basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batoli mpo na kofanda malamu na basusu
  • Lamuká!—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Limbisáká
  • Zaláká na komikitisa mpe na limemya
  • Koponaka bilongi te
  • Zaláká na boboto
  • Kabáká mpe pesáká matɔndi
  • Bato oyo bakabaka bazalaka na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • ‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tólimbisanaka na motema moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge nini okoki kozongisa kimya na basusu?
    Lamuká!—2012
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 1 nk. 6-7

Batoli mpo na kofanda malamu na basusu

Nzambe oyo akelá biso ayebisi biso oyo tokoki kosala mpo na kofanda malamu na basusu, na ndako, na mosala to na baninga. Tózwa ndakisa ya batoli ya malamu oyo bato mingi basaleli mpe esimbi.

Limbisáká

“Bókoba . . . kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”​—BAKOLOSE 3:13.

Biso nyonso tosalaka mabunga. Tokoki kosala likambo moko oyo ekoki kopesa basusu mpasi, bango mpe bakoki kosala likambo moko oyo ekoki kopesa biso mpasi. Yango elingi koloba, lokola tozali na mposa bálimbisa biso, biso mpe tosengeli kolimbisa basusu. Ntango tolimbisi, tokokangela moto oyo apesi biso mpasi nkanda na motema te. ‘Tokozongisa mabe na mabe te,’ mpe tokolobela moto yango ntango nyonso te mabe oyo asalaki biso. (Baroma 12:17) Kasi, tokosala nini soki toyoki mpasi makasi mpe tozali kokoka kobosana te likambo oyo basali biso? Soki bongo, tosengeli kosolola na moto yango na limemya mpenza kaka biso mibale. Mokano na biso ezali ya kotya kimya, kasi ya komonisa moto yango te ete asalaki biso mabe.​—Baroma 12:18.

Zaláká na komikitisa mpe na limemya

“Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”​—BAFILIPI 2:3.

Soki tozali na komikitisa mpe na limemya, bato bakosepela kozala elongo na biso. Mpo bayebi ete tokosalela bango makambo na boboto, tokopesa bango kilo, mpe tokopesa bango mpasi na nko te. Kasi, soki tozali komimona ete toleki bato mosusu to soki tozali kotingama ete bato básalaka makambo kaka ndenge tolingi, tokobimisa matata ná kowelana. Bato bakokima biso, mpe tokozala lisusu na baninga mingi te, mbala mosusu ata moko te.

Koponaka bilongi te

“Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—MISALA 10:34, 35.

Nzambe oyo akelá biso amonaka te ete bato moko boye baleki basusu mpo na mboka na bango, monɔkɔ na bango, mbongo na bango, to mpo na loposo na bango. Kasi, Biblia elobi ete: “Na moto moko asalaki bikólo nyonso ya bato.” (Misala 17:26) Yango elingi koloba ete, biso nyonso tozali bandeko. Ntango tozali kopesa bato kilo mpe kosalela bango makambo na boboto, tokopesa bango esengo, biso moko mpe tokozala na esengo, mpe tokosepelisa Nzambe oyo akelá biso.

Zaláká na boboto

“Bólata . . . boboto.”​—BAKOLOSE 3:12.

Soki tozali na boboto, tokosilikisa bato te. Bakobanga te kosolola na biso mpe bakoki kutu ata kosembola biso mpo bayebi ete tokosilika te. Mpe ntango moto asilikeli biso, eyano ya boboto ekoki kokitisa nkanda na ye. Masese 15:1 elobi: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.”

Kabáká mpe pesáká matɔndi

“Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—MISALA 20:35.

Lelo oyo, bato mingi bazali na lokoso mpe bakanisaka kaka bolamu na bango moko. Kasi, bato oyo bakabaka nde bazwaka esengo ya solosolo. (Luka 6:38) Bato oyo bakabaka bazalaka na esengo mpo balingaka bato koleka biloko. Bolingo yango etindaka bango bápesaka matɔndi mpe bámonisaka ete basepeli ntango bakabeli bango. (Bakolose 3:15) Omituna boye: ‘Nalingaka kozala elongo na bato oyo bazangi botɔndi mpe bakabaka te to nde elongo na bato oyo bakabaka mpe bapesaka matɔndi?’ Yango eteyi biso nini? Saláká makambo ndenge olingi ete basusu básalelaka yo.​—Matai 7:12.

Natyolaka lisusu moto te

“Biblia elobi: ‘Bókanisaka bamosusu ndenge bomikanisaka . . . Bókóma bato ya mayele na miso na bino moko te.’” (Baroma 12:16) “Toli oyo esalisaki ngai natika lolendo mpe kotyola bato. Namonaka lisusu te ete ekólo na ngai eleki ya bato mosusu, natyolaka lisusu mpe te bato ya lingomba mosusu. Lisusu, nakómá kolinga bato mpe kopesaka bato mbote.”​—Asha.

Mpo na koyeba makambo mosusu:

Mpo na kozwa toli ya malamu oyo ekosalisa yo obongisa boninga na yo ná bato mosusu, kɔtá na jw.org mpe kende na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > KIMYA MPE ESENGO > KOYOKANA NA BATO.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto