Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/10 lok. 15
  • Limbisá na motema moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Limbisá na motema moko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • ‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tólimbisanaka na motema moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bolimbisi elimboli nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini koyeba kolimbisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/10 lok. 15

TOLI MOKO YA KALA OYO ETALI MPE BATO YA MIKOLO NA BISO

Kolimbisa na motema moko

TOLI YA BIBLIA: “Bókoba . . . kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.”​—Bakolose 3:13.

Mwasi oyo atomboli lobɔkɔ na ye, apesi mwasi mosusu mokɔngɔ mpe azali kokende

Yango elimboli nini? Biblia elobi ete lisumu ezali lokola nyongo mpe kolimbisa lokola kotika nyongo yango. (Luka 11:4) Buku moko elobi ete na Biblia, liloba ya grɛki oyo ebongolami na “kolimbisa” elimboli “kosundola nyongo kozanga kosɛnga yango.” Na yango, soki tolimbisi moto moko oyo asalaki biso mabe, tokozela te ete aya lisusu koluka biso mpo na kobongisa likambo yango. Kondima kolimbisa moto elimboli te ete tosepeli na ezaleli mabe oyo amonisi to likambo yango esali biso mpenza mpasi te. Kasi, toboyi nde kobomba nkanda, ata soki tomoni ete ‘azali na likambo na biso.’

Ezali na ntina lelo oyo? Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tosalaka masumu. (Baroma 3:23) Na yango, ekozala malamu tólimbisaka basusu mpo lelo to lobi, biso mpe tokozala na mposa bálimbisa biso. Longola yango, kolimbisa ememelaka mpe biso moko bolamu. Ndenge nini?

Basi mibale bayambani

Soki tobombi nkanda na motema mpe toboyi kolimbisa, tozali komisala mabe. Yango ekoki kolongola biso esengo, kopekisa biso tósala makambo mosusu to tókóma bato ya mawa. Ekoki mpe kotya sante na biso na likama mpenza. Lapolo ya zulunalo moko (Journal of the American College of Cardiology) oyo Doktɛrɛ Yoichi Chida ná Andrew Steptoe Profesɛrɛ moko ya pisikoloji, bakomaki, elobi boye: “Bamonaki ete kobomba nkanda, kozala nkandankanda mpe maladi ya motema esalaka moto mabe ndenge moko.”

Kasi, tótalela matomba oyo kolimbisa ebimisaka. Ntango tolimbisaka basusu na motema mobimba, tóbatelaka bomoko, kimya mpe boninga. Oyo eleki nyonso, tomonisaka ete tomekolaka Nzambe oyo alimbisaka basumuki oyo babongoli motema mpe alingaka ete tósala mpe bongo.​—Marko 11:25; Baefese 4:32; 5:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto