Okangaka solo motema na mabunga ya bato mosusu?
OSILÁ kosilika makasi mpo na ezaleli mabe ya moto moko boye? Okokaka kokanga motema te ntango omonaka ete bizaleli mabe ezali kokɔtela mpenza baninga na yo ya motema?
Mbala mosusu esɛngaka mpenza kosala noki mpe kozala na mpiko mpo na kopekisa ete lisumu moko monene epalangana. Na ndakisa, na ekeke ya 15 L.T.B., ntango misala ya mbindo elingaki kobebisa Bayisalaele, Fineasi, nkɔkɔ ya Alona azwaki ekateli ya kosilisa makambo mabe. Yehova Nzambe andimaki likambo oyo asalaki, na maloba oyo: “[Fineasi] . . . abongoli nkanda na ngai na bato na Yisalaele, awa esalaki ye zuwa lokola zuwa na ngai kati na bango, bongo nabebisi bato na Yisalaele na zuwa na ngai te.”—Mituya 25:1-11.
Fineasi asalaki mpenza likambo oyo ebongi, mpo ete mabe epalangana te epai ya bato nyonso. Kasi ezali boni soki tolekisi ndelo na kolandela mabunga nyonso oyo bato basalaka mpo na kozanga kokoka? Soki tozalaka ntango nyonso motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpo na mabunga ya bato mosusu ata na makambo ezangi ntina, na ntembe te, tokokóma mpenza bilombe ya kolandela mabunga ya bato, tokoyebana lokola bato oyo batikaka ata moke te ete mabunga to kozanga kokoka ya bato mosusu eleka bango na miso. Nini ekoki kosalisa biso tókima motambo wana?
‘Yehova alimbisaka mabunga na yo nyonso’
Yehova azali ‘Nzambe ya zuwa, Nzambe oyo andimaka bombanda te.’ (Exode 20:5, NW, maloba na nse ya lokasa) Lokola azali Mozalisi, azali na lotomo ya kosɛnga ete tósambela kaka ye moko. (Emoniseli 4:11) Kasi, Yehova alandelaka bolɛmbu ya bomoto te. Yango wana, Davidi mokomi ya nzembo ayembaki boye mpo na ye: “Yehova azali na motema molai, azali mpe na mawa, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na boboto. Alandelaka ntango nyonso mabunga te . . . Apesaki biso oyo ekoki na masumu na biso te; apesaki biso libonza oyo ekoki na lofundo na biso te.” Ya solo, soki tobongoli mpenza motema, Nzambe ‘akolimbisa mabunga na biso nyonso.’ (Nzembo 103:3, 8-10, NW)
Lokola Yehova ayebi bomoto na biso ya masumu, ‘alandelaka ntango nyonso mabunga te’ epai ya basali na mabe oyo babongoli motema. (Nzembo 51:5; Baloma 5:12, NW) Na ntembe te, mokano na ye ezali ya kosilisa lisumu mpe kozanga kokoka. Tii akokokisa mokano yango, na esika ete apesa biso ‘oyo ekoki na biso,’ Nzambe, na mawa na ye, azali mpenza kolimbisa na nzela ya mbeka ya Yesu oyo epesamaki mpo na kosikola biso. Moto moko te kati na biso akokaki kotángama ete abongi mpo na kobika, soki Yehova amonisaka mawa na ye te na ntango ebongi. (Nzembo 130:3) Tosengeli kozala na botɔndi ndenge Tata na biso ya likoló, oyo azali na lotomo ya kosɛnga ete tósambela kaka ye moko, azali Nzambe ya motema mawa!
Esengeli kozala na bokatikati
Lokola Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba akangaka motema na bolɛmbu ya bato ya kozanga kokoka, biso mpe tosengeli kosala bongo, boye te? Kokanga motema elimboli kozala na motema molai mpo na makanisi mpe bizaleli ya bato mosusu. Tomonisaka mpenza ezaleli ya ndenge wana, elingi koloba momeseno ya kozala na motema molai mpe na boboto ntango bato mosusu balobi to basali makambo oyo ezali mpenza masumu te, kasi nde ezali mpenza na nzela te?
Ya solo, elingi koloba te ete tosengeli kokanga miso na mabunga nyonso. Na ndakisa, makambo ya mabe mingi ezali kosalema ntango bakonzi ya mangomba bazali kokanga miso na misala mabe ya basango oyo bazali ntango nyonso kobebisa bana mibali mpe bana basi. Mopanzi-sango moko na ekólo Irlande alobaki boye: “Lokola bakonzi ya mangomba bamonaki ete bana wana bazalaki libaku oyo ezalaki kokweisa sango na lisumu, likambo oyo bango bamonaki malamu ya kosala ezalaki nde ya kotinda sango oyo asalaki makambo mabe wana na esika mosusu.”
Kolongola moto na esika moko mpo na kotinda ye na esika mosusu, ezali nde ndakisa malamu ya kokanga motema na mabunga ya basusu? Ezali yango te! Kanisá ete lisangá ya minganga etiki nzela na monganga-mopasoli moko oyo azali kokokisa mosala na ye malamu te, ete akoba kopasola bato, bazali kotinda ye na balopitalo mosusu, atako azali koboma bato to kobakisela bango mpasi mosusu na nzoto. Wana ezali lolenge mabe ya kobatela boyokani kati na bango minganga; yango nde ebimisaka ezaleli ya kokanga miso na mabunga na ndenge ya mabe. Kasi ezali boni mpo na baoyo basili kokufa to baoyo bomoi na bango ebebisami mpenza mpo na kozanga kosala mosala na ndenge esengeli, to kosala makambo na nko?
Likama mosusu mpe ekoki koya soki tozali kotikela bato nzela na likambo moko te. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bayuda mosusu oyo bayebanaki na nkombo ya Bazelote, balukaki kosalela ndakisa ya Fineasi na lolenge ya mabe mpo na koluka kolongisa misala na bango moko. Moko ya makambo yango ya Bazelote oyo elekaki mabe, ezalaki ya “komikɔtisa kati na bibele oyo bazalaki na Yelusaleme na ntango ya bilambo mpe na mabaku mosusu ya motindo wana, mpe kotuba banguna na bango mbɛli na ndenge ya kobombama.”
Biso baklisto tokoki soki moke te kokende mosika ndenge Bazelote bazalaki kosala, kobundisa baoyo basepelisaka biso te. Kasi mwa ezaleli ya kozanga kokanga motema na makambo ya bato mosusu etindaka nde biso tóbundisa baoyo tosepelaka na bango te na balolenge mosusu—ekoki kozala na koloba mabe mpo na bango? Soki tokangaka mpenza motema na mabunga ya bato mosusu, tokoki soki moke te kobimisa maloba ya kozokisa ya ndenge wana.
Bafalisai ya ekeke ya liboso bazalaki mpe etuluku mosusu ya bato oyo bazalaki te kokanga motema na mabunga ya bato mosusu. Bazalaki ntango nyonso kokweisa bato mosusu mpe bazalaki kobosana ete tozali bato ya kozanga kokoka. Bafalisai oyo batondaki na lolendo, bazalaki komona bato nyonso mpamba, bazalaki kotalela bato ya mabota mosusu lokola bato oyo “basili kolakelama mabe.” (Yoane 7:49) Yesu asalaki mpenza malamu ndenge abimisaki mabe ya bato yango polele, oyo bazalaki komitalela lokola baleki bato nyonso na boyengebene, alobaki ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Zambi bokokabaka ndambo na zomi na eidosomo mpe na aneti mpe na nkumina, nde bokotikaka kosala makambo maleki na bozito kati na Mibeko, yango: kosambisa-sembo mpe koyoka mawa mpe kondima. Ekokaki kosala oyo mpe kotika yango na liboso te.”—Matai 23:23.
Na maloba yango, Yesu alingaki te komonisa ete Mibeko ya Mose ezangi ntina. Azalaki nde komonisa ete “makambo maleki na bozito,” to makambo oyo eleki ntina na Mibeko ya Mose, esɛngaki kosalela yango na boboto mpe na ngɔlu. Yesu na bayekoli na ye bamonisaki mpenza ezaleli ya kokanga motema na mabunga ya bato mosusu, na kokesana na Bafalisai mpe Bazelote!
Ezala Yehova to Yesu Klisto bakangaka miso na makambo mabe te. Etikali moke, ‘etumbu ekopesama na baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu.’ (2 Batesaloniki 1:6-10) Nzokande, na molende na ye mpo na boyengebene, Yesu amonisaki motema molai ya Tata na ye ya likoló, motema mawa, mpe bolingo epai ya baoyo balingaka kosala oyo ezali sembo. (Yisaya 42:1-3; Matai 11:28-30; 12:18-21) Oyo nde ndakisa malamu Yesu atikeli biso!
Bóyikanaka mpiko
Ata soki tozali na molende mingi mpo na kosala oyo ezali sembo, tiká tósalela toli oyo ya ntoma Paulo: “Soki moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola Yehova, NW] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.” (Bakolose 3:13; Matai 6:14, 15) Kokanga motema na mabunga ya bato mosusu esɛngaka koyika mpiko na mabunga mpe na mbeba na bango, na kati ya mokili oyo ezangi kokoka. Tosengeli kozala bato ya makambo makasi te epai ya bato mosusu.—Bafilipi 4:5.
Kokanga motema na mabunga ya bato mosusu elimboli te kondima misala na bango ya mabe to kokanga miso na mabunga na bango. Ekoki kozala ete moninga na biso mondimi akómi komitambwisa to kokanisa na lolenge oyo eyokani te na mitinda ya Yehova. Atako mbala mosusu akómi naino mosika te na etamboli mabe na ye mpo Nzambe aboya ye, esengeli tókebisa ye ete ebongi abongwana. (Genese 4:6, 7) Oyo nde bolingo ntango baoyo bazali na makoki ya elimo bazali komeka kozongisa mobungi yango na nzela na elimo ya bopɔlɔ! (Bagalatia 6:1) Nzokande, mpo ete milende yango ezwa mbano, esengeli kosala yango na elimo ya kotɔngatɔnga te, kasi na bolingo mpo na moto yango.
‘Na bopɔlɔ mpe na limemya mozindo’
Ezali boni mpo na komonisa motema molai epai ya bato oyo bindimeli na bango ya lingomba ekeseni na oyo ya biso? Na 1831, na ekólo Irlande, babakaki na biteyelo nyonso makomi oyo ezalaki na motó ya likambo oyo: “Liteya Monene.” Makomi yango ezalaki koloba boye: “Yesu Klisto alukaki soki moke te ete bato bákóma baklisto na makasi. . . . Koswanisa bazalani na biso to kofinga bango ezali lolenge malamu te ya kondimisa bango ete biso tozali na nzela ya solo, kasi bango babungi nzela. Eleki malamu kondimisa bango ete biso tozali na elimo ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba te.”
Yesu ateyaki mpe asalaki makambo na ndenge oyo ezalaki kobenda likebi ya bato na liloba ya Nzambe. Biso mpe tosengeli kosala bongo. (Malako 6:34; Luka 4:22, 32; 1 Petelo 2:21) Lokola azalaki moto ya kokoka mpe na bososoli oyo euti na Nzambe, akokaki koyeba makambo oyo ezalaki na mitema ya bato. Yango wana, na ntango esengelaki, Yesu azalaki na likoki ya kotɔndɔla polele mabe ya banguna ya Yehova. (Matai 23:13-33) Ndenge asalaki bongo, Yesu amonisaki te ete azangaki kokanga motema na mabunga ya bato mosusu.
Na bokeseni na Yesu, biso tozali na likoki te ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato. Yango wana, tosengeli kolanda toli oyo ya ntoma Petelo: “Bóbulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; bóselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monɔkɔ na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino.” (1 Petelo 3:15) Lokola tozali basaleli ya Yehova, tosengeli kokɔtela makambo oyo tondimaka, mpamba te makambo yango euti mpenza na Liloba ya Nzambe. Kasi tosengeli kosala yango na lolenge oyo ekomonisa limemya mpo na bato mosusu mpe mpo na bindimeli oyo bango basili kokangama na yango na motema moko. Paulo akomaki boye: “Tiká ete maloba na bino mazala na ngɔlu, na elɛngi na mungwa ntango nyonso ete bóyeba soki ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.”—Bakolose 4:6.
Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso malingi bino ete bato básalela bino yango, bino bósalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Na yango, tiká ete na motema molai mpenza, tóyikanaka mpiko mpe tómonisa limemya epai ya baoyo tozali kosakwela bango nsango malamu. Soki tosaleli molende na biso mpo na boyengebene na ndenge ya bokatikati, elongo na ezaleli ya kokanga motema na mabunga ya bato mosusu, ezaleli oyo euti na Biblia, tokosepelisa Yehova mpe tokozala mpenza bato oyo bakangaka solo motema na mabunga ya bato mosusu.
[Elilingi na lokasa 23]
Tólanda te ezaleli ya Bafalisai, ya koboya kokanga motema na mabunga ya bato mosusu
[Elilingi na lokasa 23]
Yesu amonisaki elimo oyo Tata na ye azali na yango, elimo ya kokanga motema na mabunga ya bato mosusu. Yo mpe osalaka bongo?