Libala na bino ekoba kozala lokola “nkamba ya nsinga misato”
“Nkamba ya nsinga misato ekokatama noki te.”—MOS. 4:12.
1. Nani abalisaki mwasi ná mobali ya liboso?
NSIMA ya kosala banzete mpe banyama, Yehova akelaki Adama, moto ya liboso. Na nsima, Nzambe alalisaki Adama mpɔngi makasi, azwaki mopanzi na ye moko mpe asalelaki ye mosungi oyo abongi na ye. Ntango Adama amonaki mwasi yango, alobaki boye: “Oyo azali . . . mokuwa ya mikuwa na ngai, mpe mosuni ya mosuni na ngai.” (Gen. 1:27; 2:18, 21-23) Yehova asepelaki na likambo yango, mpe abalisaki mwasi ná mobali ya liboso mpe apambolaki bango.—Gen. 1:28; 2:24.
2. Ndenge nini Satana abebisaki boyokani ya Adama ná Eva?
2 Likambo ya mawa, ebongiseli wana oyo Nzambe abandisaki eumelaki te kokóma na likama. Na ndenge nini? Anzelu moko ya mabe, oyo akómaki kobengama Satana, akosaki Eva mpe Eva alyaki mbuma ya nzete kaka moko oyo Nzambe apekisaki bango kolya. Na nsima, Adama alandaki mwasi na ye na botomboki na ye, mpe na ndenge yango baboyaki kotosa mitinda ya sembo ya Nzambe mpe litambwisi na ye. (Gen. 3:1-7) Ntango Yehova atunaki Adama ná Eva báyebisa ye likambo oyo basali, emonanaki ete bazalaki lisusu koyokana te. Adama apesaki mwasi na ye foti, alobaki ete: “Mwasi oyo yo opesaki ngai ete azala na ngai, apesi ngai mbuma ya nzete yango. Ngai mpe nalei.”—Gen. 3:11-13.
3. Ndenge nini Bayuda mosusu bakómaki kotalela libala?
3 Banda wana, Satana azali kosalela mayele ndenge na ndenge ya mabe mpo na kobebisa mabala ya bato. Na ndakisa, azalaki mbala mosusu kosalela bakonzi ya mangomba mpo bátinda bato bákóma kotalela libala na ndenge oyo eyokani na Makomami te. Bakonzi mosusu ya lingomba ya Bayuda baboyaki kolanda mitinda ya Nzambe mpe bakómaki kopesa mibali ndingisa ya koboya basi na bango ata mpo na makambo ya mikemike, na ndakisa soki mwasi alambi biloko ekoká mungwa te. Kasi, Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo abomi libala ná mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.”—Matai 19:9.
4. Makambo nini ezali kobebisa ebongiseli ya libala lelo oyo?
4 Tii lelo oyo, Satana azali kokoba kobebisa mabala ya bato. Makambo lokola kosangisa nzoto mibali ná mibali, mabala ya makango to “yaká tófanda,” koboma mabala mpambampamba, emonisi ete Satana azali mpenza kolonga na likambo yango. (Tángá Baebele 13:4.) Biso baklisto tosengeli kosala nini mpo tókóma kotalela libala ndenge wana te? Tótalela mwa makambo oyo ebongisaka mabala.
Bóbosanaka Yehova te na libala na bino
5. Na libala, maloba “nkamba ya nsinga misato” elimboli nini?
5 Mpo libala ezala malamu, Yehova asengeli kozala na esika na kati na yango. Liloba na ye elobi ete: “Nkamba ya nsinga misato ekokatama noki te.” (Mosakoli 4:12) Maloba “nkamba ya nsinga misato” esalelami awa na ndenge ya elilingi. Na libala, basalelaka maloba yango mpo na kolobela mwasi ná mobali, nsinga mibale ya liboso, oyo esangani na nsinga ya misato, Yehova Nzambe. Soki mwasi ná mobali bapesi Nzambe esika na libala na bango, bakozala na likoki ya kosilisaka mikakatano na bango, mpe yango ezali sɛkɛlɛ monene mpo na kozala malamu na libala.
6, 7. (a) Baklisto bakoki kosala nini mpo Nzambe azala na esika na libala na bango? (b) Makambo nini ndeko mwasi moko asepelaka na yango epai ya mobali na ye?
6 Kasi, mwasi ná mobali basengeli kosala nini mpo libala na bango ezala lokola nkamba ya nsinga misato? Davidi ayembaki ete: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo; ee Nzambe na ngai; mibeko na yo ezali kati na motema na ngai.” (Nzembo 40:8) Soki tolingaka Nzambe lokola Davidi, yango ekotinda biso tósalela ye na motema mobimba. Na ndenge yango, mwasi ná mobali bakokóma baninga ya Yehova mpe bakozala na esengo ya kosala mokano na ye. Mwasi to mobali asengeli mpe kosalisaka molongani na ye akóma kolinga Nzambe makasi.—Mas. 27:17.
7 Soki mibeko ya Nzambe ezali mpenza na kati ya mitema na biso, tokozala na bizaleli lokola kondima, elikya mpe bolingo; mpe yango ekokolisa bolingo na kati ya libala. (1 Kol. 13:13) Moklisto moko na nkombo Sandra, oyo aumeli na libala mbula 50 alobi boye: “Nasepelaka na mobali na ngai mingi mpo na toli euti na Biblia oyo apesaka ngai mpe bolingo na ye mpo na Yehova, oyo eleki kutu bolingo oyo azalaka na yango mpo na ngai.” Mobali, mwasi na yo akoki mpe koloba bongo mpo na yo?
8. Mwasi ná mobali basengeli kosala nini mpo na kozwa “lifuta malamu” na libala na bango?
8 Mwasi ná mobali, botyaka makambo ya Nzambe mpe matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bino? Lisusu, omonaka molongani na yo lokola moninga na yo na mosala ya Yehova? (Gen. 2:24) Salomo, mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Mibale baleki moko na malamu, zambi bakozala na [lifuta, NW] malamu na mosala na bango.” (Mos. 4:9) Ya solo, mobali ná mwasi basengeli kosala makasi mpo bázwa “lifuta malamu,” elingi koloba libala ya bolingo mpe ya libela, oyo Nzambe azali kopambola.
9. (a) Mikumba nini mibali bazali na yango? (b) Ndenge Bakolose 3:19 emonisi yango, ndenge nini mobali asengeli kofandaka na mwasi na ye?
9 Milende oyo mwasi ná mobali basalaka mpo na kotosa mitinda ya Nzambe nde emonisaka soki Nzambe azali na esika na libala na bango. Mokumba ya libosoliboso ya mibali ezali ya kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya mabota na bango. (1 Tim. 5:8) Biblia ezali mpe kolendisa bango bátalelaka mpe bamposa ya motema ya basi na bango. Totángaka na Bakolose 3:19 ete: “Bino mibali, bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasimakasi te.” Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete ‘koyokela basi nkanda makasimakasi’ elimboli “kokatela bango mangala, kobɛta bango makofi, koboya komonisela bango bolingo, koboya kokipe bango, koboya kobatela bango mpe koboya kosunga bango.” Na ntembe te, makambo ya ndenge wana ebongi ata moke te na mabala ya baklisto. Soki mobali azali kosalela bokonzi na ye na bolingo nyonso, mwasi na ye akokakatana te mpo na kotosa ye.
10. Ezaleli nini basi baklisto basengeli kozala na yango?
10 Basi baklisto oyo balingi Yehova azala na esika na mabala na bango basengeli mpe kotosaka mitinda na ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká basi bátosaka mibali na bango lokola epai ya Nkolo, mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá.” (Ef. 5:22, 23) Satana akosaki Eva ete koboya kotosa Nzambe ekomemela ye esengo ya libela. Ezali komonana polele ete kozanga botosi etondi mpenza na kati ya mabala lelo oyo. Kasi, basi oyo babangaka Nzambe bamonaka te ete kotosa mibali na bango ezali mabe. Babosanaka te ete Yehova akelaki Eva mpo azala “mosungi” ya mobali na ye, mpe na ntembe te Nzambe amonaki ete yango ezali esika ya lokumu mpo na Eva. (Gen. 2:18) Mwasi moklisto oyo atosaka ebongiseli wana azali mpenza “motole ya mobali na ye.”—Mas. 12:4.
11. Likambo nini ndeko moko amonaki ete esalisaki ye ná mwasi na ye mpo libala na bango ezala malamu?
11 Eloko mosusu oyo ekoki kosalisa mwasi ná mobali bápesa Nzambe esika na libala na bango ezali koyekola Liloba ya Nzambe elongo. Gerald, oyo afandi na mwasi na ye libala ya esengo na boumeli ya mbula 55 alobi boye: “Kotánga mpe koyekola Biblia elongo ezali nkisi monene mpo na kozala malamu na libala.” Abakisi boye: “Kosala makambo elongo, mingimingi makambo ya elimo, esalisaka mwasi ná mobali bákóma koyokana makasi, mpe bázala na boyokani na Yehova.” Koyekola Biblia elongo esalisaka libota bábosana mitinda ya Yehova te, bákolisa boyokani na bango na ye mpe bákoba kokende liboso na elimo.
12, 13. (a) Mpo na nini ezali na ntina mingi balongani bábondelaka elongo? (b) Wapi makambo mosusu ya elimo oyo ekolisaka boyokani na libala?
12 Basi ná mibali oyo bafandi na mabala ya esengo babondelaka mpe elongo. Soki mobali azali ‘kofungola motema na ye’ na mabondeli epai ya Yehova mpo na libota na ye, ye ná mwasi na ye bakokóma kolingana makasi. (Nz. 62:8) Na ndakisa, yo ná molongani na yo bokozala na mokakatano te ya kosilisa matata oyo ebimi na kati na bino soki bobondeli Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpo atambwisa bino! (Mat. 6:14, 15) Na boyokani na libondeli yango, ekozala malamu mwasi ná mobali bázwa ekateli moto na moto ya kosalisa molongani na ye mpe ya kokoba “kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.” (Kols. 3:13) Bóbosana te ete libondeli emonisaka ete totyaka motema epai ya Nzambe. Mokonzi Davidi alobaki boye: “Bato nyonso bakotalelaka yo na elikya.” (Nz. 145:15) Soki tozali kotalela Nzambe na elikya ntango tozali kobondela ye, tokobanda komitungisa mingi te, mpo toyebi ete ‘atyelaka biso likebi.’—1 Pet. 5:7.
13 Sɛkɛlɛ mosusu mpo na kopesa Yehova esika na kati ya libala ezali koyanganaka na makita ya lisangá mpe kobimaka elongo na mosala ya kosakola. Na makita na biso, basi ná mibali bayekolaka ndenge ya kolonga “mayele mabe” oyo Satana azali kosalela mpo na kobebisa mabota. (Ef. 6:11) Mwasi ná mobali oyo babimaka mingi elongo na mosala ya kosakola bayekolaka ‘kopikama makasi mpo báningana te.’—1 Kol. 15:58.
Ntango mikakatano ebimi
14. Makambo nini ekoki kobimisa mikakatano na libala?
14 Ya solo, ekoki kozala ete makanisi oyo epesami na likoló awa ezali mpenza ya sika te mpo na yo, kasi ekozala malamu otalela yango elongo na molongani na yo. Bótala soki ezali na makambo oyo bokoki kobongisa na libala na bino. Kutu, Biblia elobi ete ata bato oyo bapesi Nzambe esika na mabala na bango “bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” (1 Kol. 7:28) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, lokola mabe etondi na mokili oyo mpe Zabolo azali ntango nyonso kotyela biso mitambo, mikakatano ezangaka te ata na mabala ya basaleli ya sembo ya Nzambe. (2 Kol. 2:11) Kasi, Yehova apesaka biso makasi ya kolonga mikakatano yango. Ya solo, tokoki mpenza kolonga yango. Yobo, moto ya sembo, abungisaki bibwele, basali mpe bana na ye nyonso. Kasi, Biblia elobi ete: “Na kati na oyo nyonso, Yobo asalaki lisumu te mpe afundi Nzambe na ntina na mabe te.”—Yobo 1:13-22.
15. Mpasi ekoki kotinda moto asala nini, mpe ndenge nini balongani bakoki kolonga mokakatano yango?
15 Nzokande, mwasi ya Yobo alobaki na ye ete: “Okangi naino boyengebene na yo makasi? Lakelá Nzambe mabe mpe kufa!” (Yobo 2:9) Ya solo, ntango makama to mikakatano mosusu ekómeli biso, mpasi wana ekoki kotinda biso tósala makambo kozanga kokanisa. Salomo akomaki boye: “Minyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala makambo lokola moto ya ligboma.” (Mos. 7:7, NW) Soki molongani na yo akómi kokatela yo mangala mpo mpasi to “minyoko” eleki, meká kokanga motema. Koyanola ye mabe ekoki kotinda moko na bino to bino nyonso mibale bóloba makambo mosusu oyo ekopelisa lisusu mɔtɔ. (Tángá Nzembo 37:8.) Na yango, osengeli te kobomba na motema maloba ya mabe oyo molongani na yo alobi mpo na mpasi to mpo likambo moko esepelisi ye te.—Yobo 6:3.
16. (a) Ndenge nini tokoki kosalela maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 7:1-5 na mabala na biso? (b) Mpo na nini kozala na bokatikati na kati ya libala ezali na ntina mingi?
16 Mwasi to mobali asengeli te koluka ete molongani na ye akoka na makambo nyonso. Na ndakisa, okoki komona ete molongani na yo azali na mbeba moko mpe olobi ete, ‘nakobongola ye.’ Na bolingo mpe motema molai, okoki kosalisa molongani na yo abongwana malɛmbɛmalɛmbɛ. Kasi, kobosana te ete Yesu alobaki ete moto oyo alandelaka ata mabunga ya mikemike ya basusu azali lokola moto oyo azali komona “lititi” na liso ya ndeko na ye, kasi azali komona te “libaya” oyo ezali na liso na ye moko. Apesaki toli oyo: “Bótika kosambisa mpo bino bósambisama te.” (Tángá Matai 7:1-5.) Yango elingi koloba te ete tosengeli kokangaka miso na mabunga ya minene. Robert, oyo afandi na mwasi na ye mbula soki 40, alobaki boye: “Esɛngaka mwasi ná mobali básala mbongwana na bomoi na bango mpo bákóma koyebisana makambo nyonso mpe kondima makanisi ya malamu oyo moninga apesi.” Yango wana, osengeli kozala na bokatikati. Na esika omitungisaka mpo molongani na yo azangi ezaleli boye to boye, yekolá mpe kosepela na bizaleli ya malamu oyo azali na yango sikoyo.—Mos. 9:9.
17, 18. Soki mikakatano ebimi, tokoki koluka lisalisi wapi?
17 Soki mbongwana ekɔti na bomoi na bino, yango ekoki mpe kobimisa mikakatano. Na ndakisa, mwasi ná mobali bakoki kokóma na mikakatano ntango bakómi na bana. Moko na bango to mwana moko akoki kobɛla makasi. Baboti na bango bakoki konuna makasi mpe bakómi na mposa ya lisalisi na bango. Bana oyo bakómi mikóló bakoki kolongwa na ndako mpe kokende kofanda mosika. Mikumba ekoki mpe kobakisama na lisangá to na ebongiseli ya Yehova. Mbongwana nyonso wana ekoki komemela mwasi ná mobali mpasi mpe mitungisi.
18 Okoki kosala nini soki omoni ete mikakatano ya libala na yo ekómi kolekela yo? (Mas. 24:10) Kolɛmba te! Mposa ya Satana ezali kaka ete basaleli ya Nzambe bátika losambo ya solo. Akosepela lisusu makasi koleka soki mwasi ná mobali bapesi losambo ya solo mokɔngɔ. Yango wana, osengeli kosalaka nyonso mpo libala na yo ezala ntango nyonso nkamba ya nsinga misato. Biblia ezali na ebele ya masolo ya bato oyo batikalaki sembo atako bakutanaki na mikakatano. Na ndakisa, mokolo moko Davidi abondelaki Yehova boye: “Ee Nzambe, yokelá ngai mawa, mpo ete bato bazali . . . konyokola ngai.” (Nz. 56:1) “Bato” basilá konyokola yo? Ezala monyoko na yo ezali kouta epai ya bato mosusu to epai ya ndeko to moninga na yo, kobosana likambo oyo te: Davidi azwaki makasi ya koyika mpiko; yo mpe okoki kozwa makasi. Davidi alobaki boye: “Nalukaki [Yehova] mpe ye ayambaki ngai; abikisaki ngai na nsɔmɔ na ngai nyonso.”—Nz. 34:4.
Mapamboli mosusu
19. Ndenge nini tokoki kokima mitambo ya Satana?
19 Na ntango oyo ya nsuka, basi ná mibali basengeli kokoba “kobɔndisana mpe kolendisana.” (1 Tes. 5:11) Kobosana te, Satana azali ntango nyonso koloba ete tozali kosalela Yehova kaka mpo na koluka bolamu na biso moko. Akosala nyonso oyo akoki, ata mpe kobebisa mabala, mpo na kotinda biso tótika kozala sembo epai ya Nzambe. Mpo Satana alonga biso te, tosengeli kotyaka motema na biso mobimba epai ya Yehova. (Mas. 3:5, 6) Paulo akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”—Filp. 4:13.
20. Mapamboli nini tokozwa soki tozali ntango nyonso kopesa Nzambe esika na libala na biso?
20 Kopesa Nzambe esika na libala ezali na mapamboli mingi. Yango nde Joel ná mwasi na ye oyo bafandi mbula 51 bamoni. Alobi boye: “Natɔndaka Yehova ntango nyonso mpo apesá ngai mwasi ya malamu mpe mpo libala na biso ezali na esengo. Azali mpenza moninga ya solo mpo na ngai.” Sɛkɛlɛ na bango ezali nini? “Tosalaka makasi mpo tómoniselanaka boboto, motema molai mpe bolingo.” Moko te na kati na biso akoki kosala yango na ndenge ya kokoka na mokili oyo. Kasi, tosengeli kosala nyonso mpo na kosalela mitinda ya Biblia mpe kopesa Yehova ntango nyonso esika na libala na biso. Soki tosali bongo, libala na biso ekozala lokola “nkamba ya nsinga misato [oyo] ekokatama noki te.”—Mos. 4:12.
Ozali koyeba lisusu?
• Kopesa Yehova esika na libala elimboli nini?
• Balongani basengeli kosala nini soki mikakatano ebimi?
• Ndenge nini tokoki koyeba ete Nzambe azali na esika na libala na biso?
[Bililingi na lokasa 18]
Kobondela elongo esalisaka balongani bálonga mikakatano na libala na bango