Botosi oyo ebongi kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo
“ESALAKA mpasi koleka likofi. . . . Namiyokaka lokola ete nazokizoki nzoto mobimba, kasi ata moto moko te akoki komona yango.” “Mbala mosusu namiyokaka lokola ete nakufa na ngai . . . to nakima ndako mpe nazonga lisusu te.” “Mbala mosusu ezalaka mpasi mpo na kokanisa na lolenge malamu.”
Maloba oyo mauti na motema mazali komonisa mayoki ya mawa mpe ya kozala yo moko. Maloba yango euti na bato oyo banyokolami na maloba mabe—bifundeli, makaneli, kofingama, kozanga kolobisama—ata mpe konyokolama oyo babalani mpe basangani ya libota bazali konyokola bango na nzoto. Mpo na nini bato yango banyokolami makasi boye? Ezali bobele mpo ete bazali na bindimeli ya losambo ekeseni na oyo ya bango. Kati na ezalela ya makambo motindo wana, kofanda kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo esalaka ete kosambela Yehova ekóma likambo ya mpasi. Nzokande, baklisto mingi oyo bakutani na monyoko motindo wana balóngaka komonisa botosi oyo ebongi mpenza.
Likambo ya malamu ezali ete mawa mpe mpasi motindo wana emonanaka te kati na bandako nyonso oyo ekabwani na makambo ya losambo. Kasi, yango ezali mpenza. Yango emonanaka kati na libota na yo? Na bongo, ekoki mbala mosusu kozala mpasi mpo ete okoka ntango nyonso komonisa botosi epai na mobalani na yo to epai na baboti na yo. Kati na ezalela motindo oyo, soki ozali mwasi ya libala to mwana, lolenge nini okoki kolónga na komonisáká botosi oyo ebongi kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo? Lisungi nini basusu bakoki kopesa? Mpe lolenge nini Nzambe azali mpenza kotalela likambo yango?
Mpo na nini komonisa botosi ezalaka mpasi?
Ezaleli ya moimi mpe ya kozanga botɔ́ndi oyo ezali kati na mokili ezali na bopusi likoló na bizaleli na yo ya moto ya kozanga kokoka mpe esalaka ete komonisa botosi oyo ebongi ekóma likambo ya mpasi. Satana ayebi yango, mokano na ye ezali ete abebisa elimo na yo. Mbala mingi, asalelaka basangani ya libota oyo bazali bobele na bosepeli moke to basepelaka ata moke te na mitindá ya Nzambe mpe batosaka yango te. Bizaleli na yo bitombwani ya elimo mpe ya malamu ezalaka mbala mingi na bokeseni na oyo ya basangani ya libota oyo bazali bandimi te. Yango elimboli kozanga koyokana ya etamboli mpe ya misala. (1 Petelo 4:4) Bopusi oyo bazali kosala mpo ete otika mitindá ya boklisto ekoki kozala makasi, mpamba te osili kotosa etindá oyo ete: “Bosangana te na misala na molili mijangi mbuma.” (Baɛfɛsɛ 5:11) Na miso na bango, makambo nyonso oyo ozali kosala ezali lisusu malamu te. Matata nyonso wana ebimi mpo na lingomba na yo. Mama moko atungisamaki mingi mpo ete bana na ye bazalaki na bokono, asɛngaki lisungi ya mobali na ye mpe mobali yango azongiselaki ye eyano ya mabe, ete: “Ozali na ntango mpo na lingomba na yo; ozali na mposa ya lisalisi te.” Maloba motindo oyo ekómisaka botosi mpasi mingi koleka.
Ezalaka na bantango mosusu oyo ondimaka te makambo oyo mazali na boyokani te na Makomami. Nzokande, oyebi ete ozali mosangani ya libota moko mpe mpo na yango ozali na masengami oyo osengeli kokokisa. Connie alobi ete: “Nabulunganisamaka mingi na maoki na ntango nakanisaka na lolenge oyo tata na ngai asalelaka biso mpamba te namoni ete amiokaka ye moko. Nasengeli komikundola mbala mingi ete natomboka te mpo na botɛmɛli ya tata na ngai. Nasengeli komilobela ngai moko ete ezali na ntina makasi mpo na yango ayinaka to aboyaka etɛlɛmɛlo na biso. Satana azali mokonzi ya ebongiseli ya biloko oyo.” Susan, ye oyo mobali na ye azali mondimi te, alobi ete: “Na ebandeli, nazalaki na momeseno ya kokanisa ete nalingaki koboma libala—kasi sikawa lisusu te. Nayebaki ete Satana azalaki kosalela ye mpo na komeka ngai.”
Ekoki komonana ete milende oyo Satana azali kosala mpo na koyokisa yo ete ozangi ntina ezali mpenza makasi. Mikolo mingi mikoki koleka kozanga ete bosolola elongo na mobalani na yo. Okoki mpenza komioka ete ozali bobele yo moko. Yango ekoki kobebisa ezaleli na yo ya komityela motema mpe ya komimemya mpe kotya botosi na yo oyo ebongi kati na komekama. Bana mpe bayokaka bolɛmbu na maoki mpe na nzoto. Na ndakisa, atako baboti na bango baboyaki, bilenge misato basaleli ya Nzambe bakendeki koyangana na makita ya boklisto na bosembo nyonso. Moko na bango, oyo azali sikawa mosaleli ya ntango nyonso, alobaki ete: “Tozalaki kobanga mpe kolɛmba na maoki; tokokaki kolala mpongi te; toyokaki mawa mpenza.”
Eloko nini Nzambe azali kosɛnga epai na biso?
Kotosa Nzambe ezalaka ntango nyonso likambo ya liboso, mpe botosi oyo ezali na ndelo epai na mobali, ye oyo azali mokonzi ya libota, esengeli ntango nyonso kopesama na lolenge oyo Yehova azali kosɛnga yango. (Misala 5:29) Yango ekoki kozala mpasi, kasi ekoki kosalema. Talelá ntango nyonso Nzambe mpo na kozwa lisalisi. Alingi ete ‘osambela ye na elimo mpe na solo’ mpe oyoka mpe olanda litambwisi na ye. (Yoane 4:24) Wana boyebi ya Liloba ya Nzambe ezali kotonda kati na motema oyo ezali sembo, epusaka moto ete azala na botosi. Ata ezalela ya makambo na yo makoki kobongwana, kasi Yehova akobongwanaka te, mpe Liloba na ye ekobongwanaka te. (Malaki 3:6; Yakobo 1:17) Yehova apesaki bokonzi epai na mobali. Yango ekotikala sé bongo, ezala soki azali kondima bokonzi ya Klisto to te. (1 Bakolinti 11:3) Atako yango ekoki kozala mpasi mpo na kondima soki ozali konyokolama mpe ozali kotyolama, moyekoli Yakobo alobi ete: “Nde mayɛlɛ mauti na Likolo ejali . . . na kotosa nɔki.” (Yakobo 3:17) Mpo na kondima bokonzi yango kozanga nkaka mpe kotosa yango, ezali kosɛnga kozala na elimo ya Nzambe, mingimingi mbuma na yango oyo ete bolingo.—Bagalatia 5:22, 23.
Soki ozali na bolingo mpo na moto moko, ekozala mpasi te mpo ete okoka komonisa botosi oyo ebongi epai na ebongiseli ya bokonzi oyo etyami na Nzambe. Baɛfɛsɛ 5:33 epesi toli oyo ete: “Tika ete mɔkɔ na mɔkɔ na bino alinga mwasi na ye lokola ye mɔkɔ mpe tika ete mwasi atosa mobali na ye.”
Tótala ndakisa ya Yesu. Anyokolamaki na maloba mpe na nzoto, kasi afingaki moto te. Azalaki ata na mbeba moko te. (1 Pɛtɛlɔ 2:22, 23) Mpo na Yesu, koyika mpiko na koyokisama nsoni monene motindo wana esɛngaki mpiko mingi mpe bolingo makasi mpo na tata na ye, Yehova. Kasi, bolingo “ekoyikaka yɔnsɔ mpiko.”—1 Bakɔlinti 13:4-8.
Paulo akundwelaki Timoté moninga na ye ya mosala, mpe azali kokundwela biso lelo oyo ete: “Mpo ete Njambe apɛsaki biso [elimo, NW] na kobangabanga tɛ kasi elimo na nguya mpe na bolingo mpe na komikanga motɛma.” (2 Timɔtɛ 1:7) Bolingo mozindo mpo na Yehova mpe Yesu Klisto ekoki kopusa yo na komonisa botosi oyo ebongi ntango emonani lokola ete tokoki koyika mpiko te. Makanisi malamu makoki kosalisa yo na kotalela makambo na bokatikati mpe kotya makanisi likoló na boyokani na yo elongo na Yehova mpe Yesu Klisto.—Kokanisá na Bafilipi 3:8-11.
Babálani oyo bazali kolónga na komonisáká botosi oyo ebongi
Mbala mosusu osengeli kozela ntango molai liboso na komona lolenge oyo Yehova akosilisa mikakatano na yo. Nzokande, lobɔkɔ na ye ezali mokuse te. Mwasi moko oyo alóngaki na komonisáká botosi oyo ebongi apesaki toli ete: “Salaká ntango nyonso makambo oyo Yehova azali kopesa yo lotómo mpe libaku ya kosala yango—kosambela ye na makita mpe na mayangani, koyekola, kobima na mosala ya kosakola, mpe kobondela.” Ezali milende na yo nde Yehova azali kopambola, bobele te makambo oyo osili kosala. Kati na 2 Bakɔlinti 4:17, ntoma Paulo alobaki ete ‘bolɔji eumeli bobɛlɛ ntango mokɛ ejali kobɔngisa biso mpɔ na nkɛmbɔ oyo ekoumela libela.’ Manyolá likoló na yango. Yango nde ekokitisa yo motema. Mwasi moko alobaki ete: “Bomoi na ngai ya libota ezali kobonga te, mpe mbala mosusu namitunaka soki Yehova asepelaka na ngai. Kasi oyo natalelaka lokola ete ezali lipamboli ya Yehova ezali bongo likambo oyo ete nalóngaka mikakatano wana koleka mobali na ngai. Koyeba ete misala na biso mizali kosepelisa Yehova, esalaka ete molende yango ezala na ntina.”
Yehova alaki ete akoki te kotika yo kati na ezalela ya makambo oyo eleki mpiko na yo. Tyá motema na yo epai na ye. Ayebi mingi koleka yo, mpe ayebi yo malamu koleka yo moko. (Baloma 8:35-39; 11:33; 1 Bakɔlinti 10:13) Kosambela Yehova kati na mikakatano esungaka mpenza. Bondelá ete elimo na ye ekamba yo, mingimingi, na ntango oyo oyebi te nzela nini ekoki na yo kotambola to lolenge nini kosilisa mokakatano moko. (Mosakoli 3:5; 1 Petelo 3:12) Landá ntango nyonso kosɛnga ye apesa yo ezaleli ya motema pɛtɛɛ, ya komipekisa, mpe ya komikitisa mpo na kotosa bokonzi kati na bomoi na yo. Mokomi na Nzembo alobaki ete: “[Yehova] ajali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai.” (Nzembo 18:2) Komikundola likambo oyo ezali lisungi oyo ekopesaka makasi epai na baoyo bazali kati na mabota oyo ekabwani makasi na makambo ya losambo.
Mingi mpenza, salá makasi ete libala na yo ezala ya esengo. Ee, Yesu amonaki yango liboso ete nsango malamu esengelaki kokabola bato. Kasi, bondelá ete bokabwani moko te ebima mpo na ezaleli to etamboli na yo. (Matai 10:35, 36) Mpo na yango, boyokani malamu ekitisaka mikakatano ya libala. Ata na ntango ezali bobele yo moko nde ozali komonisa ezaleli malamu motindo oyo, yango ekoki kopɛngola ete mikakatano mikóma makasi te; na boye ete matata mpe koswana eleka ndelo te. Kozala na motema pɛtɛɛ mpe na bolingo ezali na ntina mingi. “Zala na boboto” mpe na “komipekisa liboso na mabe.”—2 Timoté 2:24.
Ntoma Paulo akómaki “nyonso mpo na bato ya lolenge nyonso.” (1 Bakolinti 9:22, NW) Lolenge moko mpe, atako okoki te kobebisa mikumba ya boklisto, ekoki kosɛnga na yo ete obongisa manáka na yo mpo na kolekisa ntango mingi elongo na mobalani na yo mpe libota na yo. Pesá ntango mingi epai na ye oyo oponaki ete bolekisa bomoi elongo na ye. Monisá limemya ya boklisto. Yango ezali elembo ya botosi oyo ebongi.
Mwasi oyo azali kobanga Nzambe mpe azali na botosi, oyo azalaka na makambo makasi te mpe azali na motema malamu azalaka na mokakatano te mpo na komonisa botosi oyo ebongi. (Baɛfɛsɛ 5:22, 23) Maloba ya boboto, na “elɛngi na mongwa,” esalisaka ete koswana ezongaka mbala na mbala te.—Bakɔlɔsɛ 4:6; Masese 15:1.
Mayele mauti na Nzambe ezali kolendisa biso ete tosilisa mikakatano nokinoki mpe tozongisa kimya na maloba malamu oyo ezali kotonga, na esika ete tokende kolala na “nkanda.” (Baɛfɛsɛ 4:26, 29, 31) Yango ezali kosɛnga komikitisa. Tyá mpenza motema epai na Yehova mpo na kozwa makasi. Mwasi moklisto moko andimaki na komikitisa nyonso ete: “Nsima ya libondeli ya mozindo, namiokaki ete elimo ya Yehova epusaki ngai ete nalinga mobali na ngai mingi lisusu koleka.” Liloba ya Nzambe epesi biso lisusu toli ete: “Bojongisaka mabe mpɔ na mabe tɛ . . . jongisa mabe nsima mpɔ na malamu.” (Baloma 12:17-21) Oyo ezali toli ya mayele mpe nzela ya botosi oyo ebongi.
Bana oyo bazali komonisa botosi oyo ebongi
Epai na bino bana oyo bozali kati na mabota makabwani, toli ya Yehova elobi ete: “Bino bana, botosaka baboti na bino na makambo yɔnsɔ, mpɔ ekoki bongo kati na Nkolo.” (Bakɔlɔsɛ 3:20) Tomoni ete Nkolo Yesu mpe alobelami wana. Na yango, komonisa botosi epai na baboti ezali na ndelo. Tokoki mpe koloba ete toli oyo ezwami kati na Misala 5:29, ‘kotosa Njambe liboso na kotosa bato,’ ezali kosalelama mpe mpo na bilenge baklisto. Makambo makobima, oyo ekosɛnga na yo ete ozwa ekateli na ntina na oyo oyebi ete ezali sembo engebene Makomami. Ekoki kosala ete opesamela etumbu, mpo ete oboyaki kosangana na mosala moko ya losambo ya lokuta. Atako yango ezali likambo moko ya esengo te, kasi okoki kozwa libondisi mpe okoki kosepela kati na likambo oyo ete ozali konyokwama mpo ete osali oyo ezali sembo na miso ya Nzambe.—1 Petelo 2:19, 20.
Lokola makanisi na yo matambwisami na mitindá ya Biblia, okoki mbala mosusu kozala na makanisi makeseni na oyo ya baboti na yo likoló na makambo mosusu. Yango esali te ete bango bakóma banguna na yo. Atako bazali te basaleli ya sembo ya Nzambe, babongi na kozwa lokumu. (Baefese 6:2) Salomo alobaki ete: “Yokamela tata na yɔ oyo aboti yɔ mpe tiola mama na yɔ tɛ.” (Masese 23:22) Luka kososola mpasi oyo bango bazali kooka mpo ete yo ozali kolanda losambo oyo bango bayebi te. Sololá elongo na bango, mpe “tika ete ezaleli na yo ya makambo makasi te eyebana.” (Bafilipi 4:5, NW) Yebisa bango mayoki mpe mabanzo na yo. Zalá ngwi mpo na oyo etali kolanda mibeko ya Nzambe, kasi, “sɔkɔ ekokoka, mpe lokola ejali likambo na bino, bojala na bato yɔnsɔ kimya.” (Baloma 12:18) Likambo oyo ete ozali kotosa mibeko ya baboti ezali sikawa komonisa epai na Yehova ete ozali na mposa ya kolanda kozala na botosi lokola moko kati na bayangelami ya Bokonzi.
Oyo basusu bakoki kosala
Baklisto oyo bazali kati na mabota oyo ekabwani na makambo ya losambo bazali na mposa ya lisungi mpe ete bandeko mosusu ya lisangá bamitya na esika na bango. Yango emonani polele kati na maloba ya elenge moko oyo alobaki ete: “Nazali mpenza komioka ete nazangi elikya mpe nazangi lisungi, mpamba te moto moko te akoki kosala likambo mpo na ngai, mpe ezali na likambo moko te oyo nakoki kosala mpo na kobongola yango. Nazali kotya elikya epai na Yehova mpo ete akokokisa mokano na ye kati na libota na biso, ata soki yango ekozala ndenge nini.”
Kosangana esika moko na bandeko mibali mpe bandeko basi ya elimo kati na makita ezali libateli. Moto yango alobaki lisusu ete bomoi na ye ekokani “lokola bamboka mibale: moko oyo nasengeli kozala kati na yango mpe mosusu oyo nasepelaka kozala kati na yango.” Bolingo kati na bandeko ezali yango nde ezali kosala ete baoyo banyokwami bayika mpiko mpe basalela Nzambe kati na ezalela ya makambo ya motindo nyonso. Tótyaka bango kati na mabondeli na biso. (Baefese 1:16) Mbala na mbala, na mabaku nyonso, lobá maloba ya kolendisa, ya malamu, mpe ya kobondisa epai na bango. (1 Batesaloniki 5:14) Na ntango ebongi mpe emonani malamu, bokɔtisa bango kati na misala na bino ya teokrasi mpe ya kominanola.
Mapamboli mpe matomba ya komonisa botosi oyo ebongi
Manyolá mokolo na mokolo na ntina na mapamboli mpe matomba ya komonisa botosi oyo ebongi kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo. Salá makasi ete ozala na botosi. ‘Kolɛmba te.’ (Bagalatia 6:9) Koyika mpiko kati na ezalela ya makambo ya mpasi mpe bokesene “mpo na lisosoli malamu liboso na Nzambe . . . ezali likambo moko malamu” liboso na Nzambe. (1 Petelo 2:19, 20, NW) Monisá botosi na meko oyo mitindá mpe mibeko ya sembo ya Yehova mibebisami te. Yango ezali komonisa bosembo epai na bibongiseli ya Yehova. Ezaleli na yo ya kobanga Nzambe ekoki mbala mosusu kobikisa bomoi ya mobalani na yo, ya bana na yo, to ya baboti na yo.—1 Bakolinti 7:16; 1 Petelo 3:1.
Na ntango ozali kosala makasi mpo na kokokisa masɛngi mpe mikano ya libota oyo ekabwani na makambo ya losambo, omikundola ntina ya kobatela bosembo epai na Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto. Okoki kotika makambo mingi, kasi kotika bosembo ezali bongo kotika makambo nyonso, ata mpe bomoi yango moko. Ntoma Paulo alobaki ete: “Njambe . . . Na mikɔlɔ oyo na nsuka asololi na biso kati na Mwana oyo atii ye mosangoli na libula na bilɔkɔ yɔnsɔ; na ye mpe ajalisaki bikeke.” Soki oyebi “lobiko monɛnɛ” oyo, yango ekosalisa yo ete ozala na botosi.—Baɛbɛlɛ 1:1, 2; 2:3.
Botosi na yo ya sembo mpe bokangami makasi na mitindá ya sembo ya bizaleli malamu ezali libateli kitoko mpo na yo mpe mpo na mobalani na yo oyo azali mondimi te. Bosembo esalaka ete mabota matongama makasi. Masese 31:11 elobi na ntina na mwasi oyo akoki mpe oyo azali sembo ete: “Motema na mobali na ye ekondima ye libela.” Etamboli na yo ya pɛto mpe botosi mozindo ekoki kofungola miso ya mobali na yo. Ekoki komema ye ete andima solo ya Nzambe.
Botosi oyo ebongi ezali solo na motuya monene mpe ekobikisa bomoi. Sambelá mpo na yango kati na libota na yo. Ekopesa kimya ya elimo mpe ekosanzola Yehova.