Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/8 nk. 8-14
  • Tozali kosala na bosembo elongo na lisangá ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali kosala na bosembo elongo na lisangá ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolobela mingi mabunga ekoki kobebisa bosembo
  • Mabunga na biso moko
  • Kebá na mitindo mibombamá ya kozanga bosembo!
  • Bosembo ezali kokóba atako minyoko ezali
  • Tótalela baoyo bazali sembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Epai ya nani osengeli kozala sembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/8 nk. 8-14

Tozali kosala na bosembo elongo na lisangá ya Yehova

“Epai na moto na sembo okomimonisa sembo.”​—2 SAMWELE 22:26.

1, 2. Wapi mwa bandakisa ya bosembo oyo biso nyonso tokoki komona kati na lisangá?

NA MPOKWA moko, nkulutu moko azali kobongisa lisukúlu mpo na kosala yango na likita ya boklisto. Alingaki kotika mpe kominanola; kasi, akóbaki kobongisa yango, kolukáká bandakisa ya Makomami mpe masese oyo ekosimba mitema mpe kolendisa etonga. Na mpokwa ya mokolo ya likita yango, baboti mibale na lisangá wana balɛmbi basepelaki kolekisa mpokwa na ndako, kasi, babongisi bana na bango mpo na kokenda na makita. Nsima ya likita, etuluku moko ya bandeko bazali kolobela lisukúlu ya nkulutu yango. Ndeko mwasi moko alingaki koloba ete, liboso, ndeko yango azokisaki mayoki na ye; nzokande, alobeli na esengo nyonso moko ya makambo kitoko oyo amonisaki. Ozali kososola eloko moko oyo ezali komonana na makambo yango?

2 Eloko yango ezali bongo bosembo. Na bosembo nyonso, nkulutu amibongisaki mpo na kosunga etonga ya Nzambe; na bosembo nyonso baboti bayanganaki na makita; na bosembo nyonso ndeko mwasi akɔtelaki nkulutu. (Baebele 10:24, 25; 13:17; 1 Petelo 5:2) Ɛɛ, kati na makambo nyonso ya bomoi, tomonaka ndenge basaleli ya Nzambe bazali na ekateli ya kosala na bosembo nyonso elongo na lisangá ya Yehova.

3. Mpo na nini ezali mpenza na ntina ete tótikala sembo na lisangá ya Yehova na mabelé?

3 Ntango Yehova atalaka mokili oyo mosili kobeba, amonaka bobele mwa bosembo moke. (Mika 7:2) Oyo nde esengo azalaka na yango na motema ntango amonaka bosembo ya basaleli na ye! Ɛɛ, bosembo na yo esepelisaka ye. Nzokande, epesaka Satana motomboki ya liboso nkanda, mpe emonisaka ete azali mokosi. (Masese 27:11; Yoane 8:44) Osengeli koyeba ete Satana akomeka bosembo na yo epai na Yehova mpe na lisangá na Ye ya mabelé. Tiká ete tótalela mitindo mosusu oyo Satana asaleleka. Na yango, tokoki komona malamu lolenge tokoki kotikala sembo kino nsuka.​—2 Bakolinti 2:11.

Kolobela mingi mabunga ekoki kobebisa bosembo

4. (a) Mpo na nini ezali likambo ya pɛtɛɛ kokóma na elimo ya kotɔngatɔnga baoyo bazali na mikumba? (b) Lolenge nini Kola amonisaki kozanga bosembo na lisangá ya Yehova?

4 Soki ndeko moko azali na mokumba, mabunga na ye makoki komonana polele. Oyo nde likambo ya pɛtɛɛ kolongola ‘mpumbu oyo ezali na liso na ndeko na yo naino okanisi libaya lizali na liso na yo moko te’! (Matai 7:1-5) Nzokande, kolobela mingi mabunga ekoki kosala ete moto akóma na ezaleli ya kozanga bosembo. Mpo na komonisa yango, tótalela bokeseni kati na Kola mpe Davidi. Kola azalaki na mokumba monene, mpe mbala mosusu azalaki sembo na boumeli ya bambula mingi, kasi akómaki na mposa ya kozwa bokonzi. Akómaki kotyola bokonzi ya Mose mpe Alona, bandeko na ye. Atako Mose azalaki moto oyo alekaki bato nyonso na bopɔlɔ, na ntembe te Kola akómaki kotɔngatɔnga ye. Mbala mosusu amonaki mabunga ya Mose. Kasi, mabunga yango makokaki kopesa nzela te ete Kola azanga bosembo na lisangá ya Yehova. Abomamaki.​—Mituya 12:3; 16:11, 31-33.

5. Mpo na nini Davidi akokaki kozala na mayoki ya kotombokela Saulo?

5 Epai mosusu, Davidi azalaki kosala na ntango ya boyangeli ya Mokonzi Saulo. Liboso, azalaki mokonzi malamu, kasi na nsima akómaki mabe. Davidi asengelaki kozala na kondima, koyika mpiko, mpe kútu kozala na bokɛngi mpo na kolónga matumoli mpe zúwa ya Saulo. Nzokande, ntango Davidi azwaki libaku ya kozongisa mabe, alobaki ete ezali ‘mabe na miso ya Yehova,’ ete asala likambo lizangi sembo epai na mopakolami ya Yehova.​—1 Samwele 26:11.

6. Ata soki tozali komona bolɛmbu mpe mabunga ya bankulutu, eloko nini tosengeli kosala soko moke te?

6 Ntango baoyo bazali kotambwisa biso bataleli likambo na libunga, to babimisi maloba makasi, to emonani ete bazali na koponapona, tosengeli nde komilelalela mpo na yango, mbala mosusu kino kokóma kotɔngatɔnga kati na lisangá? Tosengeli nde kokima koyangana na makita ya boklisto mpo na komonisa ete tosiliki? Soko moke te! Lolenge moko na Davidi, tokopesa nzela soko moke te na mabunga ya basusu ete epusa biso na kozanga bosembo epai na Yehova mpe epai na lisangá na ye!​—Nzembo 119:165.

7. Makambo mabe nini ezalaki kosalema na tempelo na Yelusaleme, mpe Yesu azalaki na mayoki nini na ntina na yango?

7 Ndakisa eleki monene ya moto na sembo ezali bongo ya Yesu Klisto, oyo amonisamaki na lolenge ya esakweli ete azali “mosembwi.” (Nzembo 16:10, NW) Kosalelama mabe ya tempelo ya Yelusaleme etyaki bosembo ya bato na komekama. Yesu ayebaki ete mosala ya nganga monene mpe bambeka ezalaki komonisa mosala na ye mpe liwa na ye lokola mbeka, mpe ayebaki ete ezalaki na ntina ete bato bázwa liteya uta na yango. Na bongo, azalaki mpenza na elónga ya kosilika ntango amonaki ete tempelo ekómaki “libulu ya bayibi.” Na bokonzi oyo euti na Nzambe, mbala mibale akamataki mfimbo mpo na kopɛtola yango.a​—Matai 21:12, 13; Yoane 2:15-17.

8. (a) Lolenge nini Yesu amonisaki bosembo na ebongiseli ya tempelo? (b) Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali kosepela kosambela Yehova elongo na lisangá na ye ya pɛto?

8 Kasi, bosembo ya Yesu esimbaki ebongiseli ya tempelo. Uta bomwana na ye, ayanganaki na milulu na tempelo mpe mbala mingi ateyaki kuna. Kútu afutaki ntako ya tempelo​—atako asɛngisamaki te kofuta yango. (Matai 17:24-27) Yesu akumisaki mobola mokufeli-mobali mpo ete atyaki “mosolo na ye nyonso” kati na ebombelo ya tempelo. Mwa moke nsima, Yehova asundolaki tempelo yango mpo na libela. Kasi kino ntango wana, Yesu azalaki sembo na tempelo yango. (Malako 12:41-44; Matai 23:38) Lelo oyo, lisangá ya Yehova na mabelé eleki ebongiseli ya Bayuda mpe tempelo na yango. Ya solo, ezali ya kokoka te; yango wana mbongwana esalemaka na bantango mosusu. Kasi ebebisami soko moke te, Yehova akokitinya yango mpe na mosusu te. Tosengeli soko moke te kotika nzela na mabunga oyo tozali komona kati na yango ete eyokisa biso nkanda to epusa biso ete tókóma na ezaleli ya komilelalela. Kasi, tiká ete tómekola bosembo ya Yesu Klisto.​—1 Petelo 2:21.

Mabunga na biso moko

9, 10. (a) Lolenge nini ebongiseli ya biloko ya Satana ezali kosalela mabunga na biso mpo ete elɛngola biso kati na etamboli ya kozanga bosembo? (b) Moto oyo asali lisumu monene asengeli kosala nini?

9 Satana mpe azali komeka kolendisa kozanga bosembo na kosaleláká mabunga na biso. Ebongiseli na ye ezali kozwa matomba na bolɛmbu na biso, komekáká biso ete tósala oyo ezali mabe na miso ya Nzambe. Likambo ya mawa, mbula na mbula bankóto ya bato bazali kokwea na misala ya mbindo. Longola yango, basusu bazali komonisa ezaleli ya kozanga bosembo na kozaláká na lolenge mibale ya bomoi, bazali kokóba kosala mabe wana bazali komimonisa lokola baklisto ya sembo. Na ntina na masoló ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . . ” oyo mabimaki kati na zulunalo Lamuká! likoló na likambo yango, elenge mwasi moko akomaki ete: “Masoló yango malobelaki mpenza makambo oyo nasalaki na bomoi na ngai.” Na nkuku, azalaki na boninga na bilenge oyo balingaka Yehova te. Mbuma na yango ezalaki nini? Akomi ete: “Bomoi na ngai ebebaki, mpe namikɔtisaki na misala ya mbindo mpe na yango nazwaki mpamela. Boyokani na ngai na Yehova ebebaki, baboti na ngai mpe bankulutu bazalaki lisusu kotyela ngai motema te.”b

10 Elenge mwasi yango azwaki lisungi ya bankulutu mpe azongelaki mosala na ye ya sembo mpo na Yehova. Nzokande, likambo ya mawa, bato mingi bazali konyokwama mpo na matomba mabe, mpe mingi bazongaka na lisangá te. Oyo nde likambo malamu koleka, kozala sembo mpe kotɛmɛla bopusi na mokili mabe oyo! Talelá makebisi ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na makambo lokola boninga ya mokili mpe kominanola ya mbindo. Komikɔtisa soko moke te na etamboli ezangi sembo. Kasi soki yango ekómeli yo, komeka soko moke te komonisa ezaleli ya bokosi. (Nzembo 26:4) Nzokande, luká lisalisi. Baboti mpe bankulutu bazali wana mpo na yango.​—Yakobo 5:14.

11. Mpo na nini ezali libunga komimona biso moko ete tozali mabe koleka, mpe ndakisa nini ya Biblia ekoki kosalisa biso na kosembola makanisi na biso?

11 Mabunga na biso makoki kotya biso na likámá na lolenge mosusu. Basusu oyo basali likambo moko ya kozanga bosembo bakómi kotika koluka kosepelisa Yehova. Omikundolá ete, Davidi asalaki masumu minene mpenza. Nzokande, nsima ya liwa ya Davidi, Yehova atángaki ye lokola mosaleli ya sembo. (Baebele 11:32; 12:1) Mpo na nini? Mpamba te atikaki soko moke te kosepelisa Yehova. Masese 24:16 elobi ete: “Moyengebeni akokwea mbala nsambo nde akotɛma lisusu.” Ya solo, soki tokwei na masumu mike​—ɛɛ, mbala na mbala—​na ntina na bolɛmbu moko oyo tozali kobunda na yango, tokoki kozala naino sembo na miso ya Yehova soki tolandi “kotɛma”​—elingi koloba, na bosembo nyonso tozali kobongola motema mpe kozongela kosala mosala ya sembo.​—Kokanisá na 2 Bakolinti 2:7.

Kebá na mitindo mibombamá ya kozanga bosembo!

12. Na kotaleláká oyo Bafalisai bazalaki kosala, lolenge nini makanisi ya kotingama mpe ya bokangami na mibeko ekoki kopesa nzela na ezaleli ya kozanga bosembo?

12 Ezaleli ya kozanga bosembo eyaka mpe na mitindo mibombamá. Ekoki kútu komonana lokola bosembo! Na ndakisa, Bafalisai na mikolo ya Yesu bazalaki mbala mosusu kokanisa ete bazalaki mpenza sembo koleka.c Kasi balóngaki te komona bokeseni kati na moto oyo azali sembo mpe moto oyo azali kokangama na mibeko ya bato, mpamba te bazalaki na makambo makasi mpe na ezaleli ya koluka kosambisa basusu. (Kokanisá na Mosakoli 7:16.) Na yango, bazangaki mpenza bosembo​—epai na bato oyo basengelaki kosalela, bazangaki bosembo na kotalela Mibeko oyo bazalaki koteya, mpe bazangaki bosembo epai na Yehova. Na bokeseni, Yesu azalaki sembo na kotaleláká mpenza Mibeko, oyo mizwaki moboko likoló na bolingo. Na yango atongaki mpe alendisaki bato, bobele ndenge elobelamaki na bisakweli bitalelaki Masiya.​—Yisaya 42:3; 50:4; 61:1, 2.

13. (a) Na lolenge nini baboti baklisto bakoki kozanga bosembo? (b) Mpo na nini baboti basengeli kopɛngola kozala na makambo makasi, kokitisa to maloba mabe wana bazali kopesa bana na bango disipilini?

13 Baklisto oyo bazali na mikumba bazali kozwa matomba mingi na kolandáká ndakisa ya Yesu na likambo yango. Na ndakisa, baboti ya sembo bayebi ete basengeli kopesa bana na bango disipilini. (Masese 13:24) Kasi bamindimisaka ete bazali kotumola bana na bango te na disipilini ya makasi oyo epesami na nkanda to na maloba ya kokitisa bango ntango nyonso. Bana oyo bamiyokaka ete bakoki soko moke te kosepelisa baboti na bango to oyo bamiyokaka ete lingomba ya baboti na bango ezali bobele kokómisa bango bafingi, bana yango bakoki kolɛmba na motema mpe, mbuma oyo ekoki komonana ezali ete bakoboya kondima solo.​—Bakolose 3:21.

14. Lolenge nini baklisto bakɛngɛli bazali komonisa bosembo na etonga oyo bazali kosalela?

14 Bobele bongo, bankulutu baklisto mpe bakɛngɛli-batamboli batyaka likebi na mikakatano mpe makámá oyo etonga ekoki kokutana na yango. Lokola bazali babateli ya sembo ya bampate, bapesaka toli na ntango oyo esengeli, komindimisáká ete liboso bazali na bilembeteli nyonso mpe na likebi nyonso bazali kosala na boye ete makambo oyo bazali koloba mázwa moboko na yango na Biblia mpe na mikanda ya la Société. (Nzembo 119:105; Masese 18:13) Bayebi mpe ete bampate bazali kotyela bango motema mpo na kotongama mpe koleisama na elimo. Na yango, balukaka komekola Yesu Klisto, oyo azali Mobateli Malamu. Na bosembo nyonso, basalelaka bampate pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na makita ya boklisto​—kasi batyolaka bango te, nzokande, batongaka mpe balendisaka kondima na bango.​—Matai 20:28; Baefese 4:11, 12; Baebele 13:20, 21.

15. Na lolenge nini basusu na ekeke ya liboso bamonisaki ete bazali na bosembo oyo elongobani te?

15 Motindo mosusu ebombamá ya kozanga bosembo ezali bongo kozala sembo na lolenge elongobani te. Bosembo ya solosolo na ndimbola ya Biblia epesaka nzela te ete tómonisa botosi ata na likambo nini liboso ya bosembo na biso epai na Yehova. Na ekeke ya liboso, Bayuda mingi bakangamaki na Mibeko ya Mose mpe ebongiseli ya biloko ya Bayuda. Nzokande, ntango ekokaki mpo na Yehova ete alongola lipamboli na ye likoló na libota wana ya batomboki mpe apesa yango na libota ya Yisalaele ya elimo. Bobele mwa ndambo moke nde bazalaki sembo epai na Yehova mpe bamiyokanisaki na mbongwana yango ya ntina mingi. Ata kati na baklisto ya solo, basusu oyo bakangamaki na bonkɔkɔ ya bayuda batingamaki ete bázongela “biloko yango na pɛtɛpɛtɛ” ya Mibeko ya Mose, oyo misilaki kokokisama na Klisto.​—Bagalatia 4:9; 5:6-12; Bafilipi 3:2, 3.

16. Lolenge nini basaleli ya sembo ya Yehova batalelaka mbongwana?

16 Na bokeseni, na mikolo na biso, basaleli ya Yehova bazali komonisa bosembo na bango na ntango mbongwana esalemi. Lokola pole ya solo oyo emonisami ezali kokóba kongɛnga, mbongwana ezali kosalema. (Masese 4:18) Eumeli naino mingi te, “moombo ya sembo mpe ya mayele” auti kosembolela biso ndimbola ya liloba “libota” oyo esalelami na Matai 24:34 mpe ntango ya kosambisama ya “bampate” mpe “bantaba” oyo elobelami na Matai 25:31-46, bakisa mpe makanisi na biso na ntina na misala mosusu oyo Letá azali kosɛnga. (Matai 24:45) Na ntembe te, bapɛngwi mosusu bakokaki kosepela soki Batatoli ya Yehova mingi batingamaki na ndimbola ya liboso ya makambo motindo wana mpe baboyaki kokende liboso. Yango esalemi bongo te. Mpo na nini? Mpamba te basaleli ya Yehova bazali sembo.

17. Na lolenge nini balingami na biso bakoki mbala mosusu kotya bosembo na biso na komekama?

17 Nzokande, komonisa bosembo oyo elongobani te ekoki kotalela biso mpenza. Ntango moninga moko ya motema to ata mosangani moko ya libota aponi kobuka mitindá ya Biblia, tokoki komiyoka ete tomekami kati na basembwi. Na momeseno, tomimonisaka sembo epai na basangani ya libota. Kasi tosengeli soko moke te kotya bokangami na basangani ya libota na biso liboso ya bosembo na biso epai na Yehova! (Kokanisá na 1 Samwele 23:16-18.) Tokolinga soko moke te kosalisa basáli na mabe ete bábomba lisumu monene to komitya na ngámbo na bango mpo na kotɛmɛla bankulutu oyo bazali kolinga ‘kosembola bango na elimo ya bopɔlɔ.’ (Bagalatia 6:1) Kosala bongo ekomonisa ezaleli ya kozanga bosembo epai na Yehova, na lisangá na ye mpe na molingami yango. Nzokande, kopekisa moto oyo akwei na lisumu ete azwa disipilini oyo esengeli ezali mpenza koboya komonisela moto yango bolingo ya Yehova. (Baebele 12:5-7) Omikundola mpe ete “mpota izokisami na moninga ikondimama.” (Masese 27:6) Ya solo, toli ya bolingo oyo ezwi moboko na Liloba ya Nzambe ekoki kozokisa moto na lolɛndɔ mpe molingami na biso oyo asali mabe, kasi ekoki kobikisa ye na nsima!

Bosembo ezali kokóba atako minyoko ezali

18, 19. (a) Ahaba alingaki nini epai na Nabota, mpe mpo na nini Nabota aboyaki? (b) Bosembo ya Nabota ebongaki na kopesamela motuya? Limbolá.

18 Mbala mosusu matumoli ya Satana likoló na bosembo na biso ezalaka polele. Tótalela oyo ekómelaki Nabota. Ntango Mokonzi Ahaba apusaki ye ete atekela ye elanga na ye ya vinyo, ayanolaki ete: “[Yehova] apekisa ete napesa yo libula na batata na ngai te.” (1 Mikonzi 21:3) Nabota azalaki motó makasi te; azalaki sembo. Mibeko ya Mose esɛngaki ete Moyisalaele moko te atekisa libula ya mabelé mpo na libela. (Levitike 25:23-28) Na ntembe te Nabota ayebaki malamu ete mokonzi wana ya mayele mabe akoki koboma ye, mpamba te Ahaba asilaki kopesa nzela na mwasi na ye, Yɛzabɛlɛ, koboma ebele ya basakoli ya Yehova! Kasi Nabota atikalaki ngwi.​—1 Mikonzi 18:4.

19 Mbala mosusu bosembo esɛngaka motuya. Yɛzabɛlɛ, na lisalisi ya “bato mpamba” bakweisaki Nabota na likambo oyo asalaki te. Mpo na yango, ye mpe bana na ye ya mibali babomamaki. (1 Mikonzi 21:7-16; 2 Mikonzi 9:26) Yango elingi koloba ete bosembo ya Nabota esalelamaki na lolenge mabe? Te! Nabota azali kati na mibali mpe basi mingi ya sembo oyo bazali ‘na bomoi’ kati na makanisi ya Yehova sikawa, balali na libateli nyonso kati na nkunda kino ntango ya lisekwa.​—Luka 20:38; Misala 24:15.

20. Na lolenge nini elikya ekoki kosalisa biso ete tótikala sembo?

20 Lelo oyo, elaka yango ya lisekwa ezali kopesa endimiseli epai na basembwi ya Yehova. Toyebi ete bosembo na biso ekoki kosɛnga biso motuya monene na mokili oyo. Mpo na bosembo na ye, Yesu afutaki bomoi na ye, mpe ayebisaki bayekoli na ye ete bakosalela bango makambo na lolenge malamu te. (Yoane 15:20) Lokola elikya na ye mpo na mikolo mizali koya elendisaki ye, biso mpe tolendisami na oyo ya biso. (Baebele 12:2) Na yango, tokoki kotikala sembo liboso ya mitindo nyonso ya minyoko.

21. Bindimiseli nini Yehova azali kopesa na basembwi na ye?

21 Ya solo, lelo oyo bato moke kati na biso bazali kokutana na matumoli motindo wana ya polele mpo na bosembo na biso. Kasi, basaleli ya Nzambe bakoki kokutana na minyoko mingi koleka liboso ete nsuka ekóma. Lolenge nini tokoki komindimisa na kotikaláká ntango nyonso sembo? Na kobateláká bosembo na biso sikawa. Yehova asili kopesa biso etindá monene​—kosakola mpe koteya Bokonzi na ye. Tiká ete tókóba na bosembo nyonso na mosala yango ya lobiko. (1 Bakolinti 15:58) Soki toboyi kopesa nzela ete mabunga ya bato elongola bosembo na biso na lisangá ya Yehova mpe soki tokebi na mitindo mibombamá ya kozanga bosembo, na yango tokobongisama malamu ata soki bosembo na biso etyami na komekama makasi. Ezala ata likambo nini ekómeli biso, tokoki ntango nyonso komindimisa ete Yehova azali sembo epai na basaleli na ye ya sembo. (2 Samwele 22:26) Ɛɛ, akobatela basembwi na ye!​—Nzembo 97:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yesu azalaki na mpiko mpo na kopanza ebongiseli wana ya mombongo ya lokoso. Engebene mokomi moko ya lisoló ya bato, ntako (taxe) ya tempelo esengelaki kofutama na mosolo moko ya sikisiki ya Bayuda ya kala. Na yango, bato mingi oyo bazalaki koya na tempelo basengelaki kosanze mosolo na bango mpo na kofuta ntako. Basenzi ya mosolo bapesamelaki nzela ya kotya ntalo ya kosanze, na yango basenzi bazalaki kozwa mosolo mingi mpenza.

b Talá Lamuká! ya 22 Desɛ́mbɛ 1993; mpe 8 Yanuáli 1994; mpe 22 Yanuáli 1994 (ebimeli ya Lifalansé).

c Lisangani na bango eutaki na oyo ya ba Hasidim, etuluku moko oyo ebimaki bikeke mingi liboso mpo na kobundisa bopusi ya Bagreke. Ba Hasidim bazwaki bankombo na bango na liloba ya Liebele chasi·dhimʹ, elingi koloba “basembwi” to “bato malamu.” Mbala mosusu bakanisaki ete mikapo oyo mizalaki kolobela “basembwi” ya Yehova mizalaki kotalela bango na lolenge moko ya sikisiki. (Nzembo 50:5, NW) Bango mpe na nsima Bafalisai, bazalaki bakɔtɛli ya mokanda ya Mibeko.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Lolenge nini tokoki kopɛngola kopesa nzela na mabunga ya basusu ete ekómisa biso na kozanga bosembo?

◻ Na mitindo nini mabunga na biso moko ekoki kokómisa biso na etamboli ya kozanga bosembo?

◻ Lolenge nini tokoki kotɛmɛla bopusi ya kozala na bosembo oyo elongobani te?

◻ Nini ekosalisa biso ete tókóba na bosembo na biso ata na ntango ya minyoko?

[Etanda na lokasa 9]

Kosala na bosembo nyonso na Betele

Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete makambo yango nyonso másalama na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.” (1 Bakolinti 14:40) Paulo ayebaki ete mpo ete lisangá litambola malamu, esengelaki kozala na “mobulu te.” Bobele bongo lelo oyo, bankulutu basengeli kozwa bikateli likoló na makambo ya ntina, na ndakisa, kokabola basangani ya lisangá na bituluku bikeseni ya boyekoli ya mokanda, kobongisa makita ya mosala ya kosakola, mpe kotalela mosala oyo mosalemi na teritware. Bibongiseli motindo wana bikoki mbala mosusu kotya bosembo na komekama. Ezali mitindá oyo mipemami te na Nzambe, mpe mikoki te kosepelisa moto nyonso.

Na bantango mosusu, omonaka yango lokola mokakatano, kozala sembo na bibongiseli mosusu oyo bikamatami na lisangá ya boklisto? Soki bongo, okoki komona ete ndakisa ya Betele ekosunga yo. Nkombo Betele, liloba ya Liebele oyo elimboli “Ndako ya Nzambe,” epesami na bafiliale 104 ya la Société Watch Tower, bakisa mpe Biro monene oyo ezali na États-Unis.* Basali ya bolingo malamu oyo basalaka mpe bafandaka na bandako ya Betele balingaka ete bisika yango bimonisa lokumu mpe limemya mpo na Yehova. Yango esɛngaka ete mokomoko na bango azala sembo.

Bato oyo bayaka kotala Betele mbala mingi balobelaka molɔngɔ́ mpe bopɛto oyo bamonaka kuna. Basáli bazali kosala na bomoko mpe na esengo; masoló na bango mpe etamboli na bango, mpe ata molato na bango emonisaka lolenge ya bato oyo batɛli mpe bazali na lisosoli ya boklisto oyo liteyami na Biblia. Basangani nyonso ya libota ya Betele batosaka na bosembo nyonso mitindá ya Liloba ya Nzambe.

Lisusu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebimiseli bango mokanda moko oyo mozali na motó na likambo ete Habitons ensemble dans une étroite union, oyo na boboto nyonso ezali komonisa bibongiseli oyo bikamatami mpo ete libota yango monene lisala mosala malamu mpe na bomoko. (Nzembo 133:1) Na ndakisa, ezali kolobela makambo matali kobongisa ndako, bilei, bopɛto, bilamba mpe monzɛlɛ, mpe makambo mosusu ya motindo wana. Basangani ya libota ya Betele bazali kotosa mpe kosalela bibongiseli motindo wana na bosembo nyonso, ata soki bolingi na bango moko ezali kotinda bango ete básala ndenge mosusu. Batalelaka te mokanda yango lokola liboke ya mibeko mpe mitindá ya makasimakasi, kasi batalelaka yango lokola litambwisi libongi oyo lipesami mpo na kokólisa bomoko mpe molɔngɔ́. Bakɛngɛli bazalaka sembo na ntango bazali kosalela myango yango oyo mizwi moboko na Biblia, mpe basalelaka yango na lolenge lobongi mpo na kotonga mpe kolendisa libota mpe kolanda mosala na bango ya bulɛɛ kati na Betele.

* Ndako yango ya bonyati mikanda, biro, mpe ndako ya kolala ezali te tempelo monene ya Nzambe na elimo, to mpe ndako oyo afandaka. Tempelo ya Nzambe na elimo ezali ebongiseli na ye mpo na losambo ya pɛto. (Mika 4:1) Na bongo, etaleli te ndako moko awa na mabelé.

[Etanda na lokasa 10]

Motosi na mitindá mpe mokangami na mibeko

Na mobu 1916 búku Encyclopædia of Religion and Ethics elobaki ete “bokeseni kati na motosi na mitindá mpe mokangami na mibeko ekoki komonana ntango nyonso mpe bisika nyonso.” Elimbolaki ete: “Mokangami na mibeko ezali moto oyo azali kosala oyo elobami, azali kobuka mobeko te; azali sembo na liloba oyo likomami mpe likoki kotángama. Motosi na mitindá ezali moto oyo azali kosala bongo kasi akoki . . . kotyelama motema koleka, oyo azali kotya makanisi na ye nyonso na mosala, oyo azali koyokanisa makanisi na ye na elimo ya mokano oyo mosengeli kokokisama.” Na nsima, búku yango elobaki ete: “Kotosa mitindá eleki kokangama na mibeko. . . . Motosi na mitindá akeseni na mokangami na mibeko na boye ete motosi na mitindá azali kosala na motema na ye mobimba to na makanisi na ye mobimba . . . Asalaka masumu na nkó te, aboyaka te kosala malamu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto