“Bósalelaka Nkolo Klisto lokola baombo”
NA BOUMELI ya lisoló mobimba ya bato, bamilió mingi ya bato basili konyokwama na minyɔlɔlɔ ya boombo. Na ndakisa, eleki bankóto ya bambula, Bayisalaele banyokwamaki makasi na maboko ya bakɛngɛli Baezipito. Lokola Biblia elobi yango, “batyaki bakapita liboso na bango mpo na konyokola bango na mikumba bozito,” mingimingi na kosala biliki.—Exode 1:11.
Na mikili mingi lelo oyo, ekoki kozala ete bato bazali na boombo te na lolenge ya solosolo, kasi mingi bazali kosala mosala na boumeli ya bangonga mingi koleka na kati ya monyoko—mbala mosusu na lolenge oyo ebongi te. Bazali na bozito monene ya likambo oyo ekoki kobéngama ete boombo ya nkita.
Nzokande, ezali na lolenge moko ya boombo oyo ezali na bozito te. Ntoma Paulo asɛngaki na bandeko bandimi ete: “bósalelaka Nkolo Klisto lokola baombo.” (Bakolose 3:24) Baoyo bazali kopona kokóma baombo ya Klisto bazali kozwa lisalisi mpo na bozito na bango monene. Yesu ye moko alobaki ete: “Boyá liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”—Matai 11:28-30.
Kondima ekanganeli ya Klisto ekosikola moto te na mikumba na ye mitali kokokisa bamposa ya libota na ye. (1 Timoté 5:8) Nzokande, yango ezali kopesa bonsomi na minyɔlɔlɔ mingi mitali koluka biloko mingi ya mosuni. Na esika ya kokómisa likambo ya kozala na biloko mingi ya mosuni mokano kati na bomoi na bango, baklisto bazali kosepela na biloko oyo bisengeli.—1 Timoté 6:6-10; kokanisá na 1 Bakolinti 7:31.
Baklisto bazali mpe kozwa kopema na kokokisáká mokumba na bango etali kosakola “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Yango ezali kopesa esengo mpe bosepeli ya solosolo!
Tosengeli kozala na botɔ́ndi ete tokoki ‘kosalela Nkolo Klisto lokola baombo’!