Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/11 nk. 4-7
  • Mbongwana ya motindo na moto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbongwana ya motindo na moto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya likambo
  • Motindo na moto ekoki kobongolama
  • “Diable oyo alobelami na Makomami”
  • Kobongisama ya biloko nyonso
  • “Mikolo na nsuka” Lolenge oyo Biblia emonisi yango
  • “Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe na nguya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nzambe azali moto ya ndenge nini?
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/11 nk. 4-7

Mbongwana ya motindo na moto

FILOZOFE lsaiah Berlin alobaki ete: “Moto asengeli kozala na bomoi te bobele mpo na kobundisa mabe. Azali mpe lisusu na mikano malamu na bomoi na ye mpo na kobongisa makambo na ye moko mpe oyo ya bato mosusu.” Kasi bato boni bazali kolónga koyeba “mikano malamu mpo na kobongisa”? Mbala mingi motindo na moto ezali kotinda sé likoló na mikano mabe mpe oyo na kobebisa.

Ndakisa, na Grande-Bretagne, ntalo ya banzela na misala euti kobakisama sikawa na 11 %. Premier ministre britannique alobaki ete, “mosala na biso ezali ya komeka komona bisaleli oyo bisengeli mpo na kopesa bomoi malamu epai na libota na biso oyo esili kobeba.” Kasi, mibeko mpe mitinda ya politike oyo mizali kobangisa, ata euti na makanisi malamu mpenza, ekoki nde kosilisa mposa ya kosala mabe? Lokola botyoli ya mibeko ezali mpenza kosalema mpe nkutu ezali nde kobakisama, atako mibeko mizali mpe bazali kotosisa yango na makasi, emonisi mpenza likambo yango polele. Esengeli mpenza eloko mosusu na esika ya mibeko. Ezali motindo na moto nde esengeli kobongolama.

Biblia ezali koloba na bosolo mpe na bosembo nyonso mpo na makanisi mabe ya moto. Na ndakisa, kati na mokanda na ye epai na baklisto ya Galatia, ntoma Paulo azali kotanga “makanisi ya mbindo, makambo na bosoto, pite, Mpe na nsima koyinana, kokabwana mpe koswana, zuwa, ezalela mabe, nkanda. . . . Ezali likunya, bilulela, kolangwa . . , lokoso mpe makambo mabe mosusu ya motindo moko.” Engebene la Parole vivante (libongoli ya Kuen), oyo etangamaki awa, misala nyonso wana mabe mizali na “moto oyo amitiki kotambwisama na makanisi na ye ya kobotama.”​—Bagalatia 5:19-21.

Ebandeli ya likambo

Nzokande, Biblia ya Kuen ezali libongoli na bonsomi, mpe liloba “moto amipesi na makanisi na ye ya motema” ezali bobele elobeli na mokuse ya maloba oyo Paulo alobaki mpenza Liloba na greke oyo ye asalelaki (sarx) elimboli “nzoto,” kasi elimboli te “makanisi ya motema.” Ezali mpo na ntina yango nde mabongoli oyo mazali kolanda liloba moko na moko ezali kosalela liloba “misala ya nzoto” mpo na kobongola malamu mpenza liloba oyo Paulo asalelaki kati na minoko oyo milobami na ntango na biso.a

Lisolo na Biblia oyo lizali kolobela kokota ya lisumu kati na mokili ezali polele mpe ezali petee; ebele na bato bazali koboya kondima yango mpo ete ezali petee mpenza. Tala oyo Paulo alobaki: “Na bongo, mabe ekotakaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Awa azali kolobela lisolo ya Genese, mokanda na liboso ya Biblia, mpe na kozalisama ya mobali na liboso, Adam, mpe ya mwasi na ye, Eve. Kozanga na bango ya botosi na mokano na bango moko eyebani malamu. Tala ntina oyo bazwaki etumbu ya liwa. Bakitani na bango basangolaki kozanga kokoka na bango mpe balakelami na liwa. Na bongo, “bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” Ezali mpenza mpo na ntina wana monene nde lelo oyo motindo na moto ezali bobele mwa elilingi moke ya oyo ezalaki na ebandeli, ntango Nzambe azalisaki moto na kokoka.​—Baloma 3:23; Genese mikapo 2 mpe 3.

Motindo na moto ekoki kobongolama

Nzokande, likoki ezali mpo na kosilisa ebele na bizaleli mabe oyo bikangani na motindo na moto. Ya solo, Biblia elobi ete tokoki kobongola motindo na biso na kobongoláká bomoto. Nini ezali kopesa nzela na kolonga? Lisalisi ya elimo santu na Nzambe.​—Baloma 8:9.

Kati na mokanda na ye epai na baklisto ya Kolose, Paulo akomaki ete: “Bobwaka bomoto na kala na misala na yango nyonso, mpe bolata bomoto na sika oyo ezalisami boyebi ya solo, kino ekozwa ye motindo na Mozalisi na yango.” Kati na misala ya bomoto na kala, atangi mwa bizaleli oyo bizali komema bato na oyo ezali kobebisa mposa mabe, nkele mpe nkanda. Bakolose 3:5-10.

Kolobáká epai na Baefese, Paulo alobeli lisusu ntina ya kolata “bomoto na sika oyo ezalisamaki engebene mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.” Mpe na nsima alimbolaki malamu likanisi na ye na kolobáká ete: “Makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotonga, malongwa na bino mpe makambo nyonso na mabe lokola. Bozalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana moko moko.” Baefese 4:24, (MN) 31, 32.

Maloba ya Paulo mazalaki solo? Tokoki mpenza kobongola bomoto? Ee, mpamba te baklisto ya ekeke na liboso basalaki mpenza mbongwana monene kati na bomoi na bango. Lokola etuluku, bazalaki komitangola na mokili oyo ezingaki bango. Justin, mokomi na lisolo ya bato na ebandeli ya boklisto, akomaki boye: “Biso bato tozalaki kopesa nzela na likunya mpe na koboma, baoyo na ntina na mimeseno tozalaki koboya ata koyamba mopaya epai na biso, lelo oyo, nsima na komonana na Klisto, tozali kokabola bomoi ya motindo moko, tozali kobondela mpo na banguna na biso, tozali komeka kolonga na baoyo bazali koyina biso kozanga ntina na kolanda kondima na biso, mpo ete baoyo bazali na bomoi engebene makanisi malamu ya Klisto, bakoka kozwa bolamu motindo moko na biso, epai na Nzambe, nkolo ya molongo.”

Ezali boni mpo na mikolo na biso? Likoki ezali na kobongola mpenza motindo na moto moko? Ya solo! Bandakisa ya bato mingi ezali kondimisa yango. Tala moko kati na yango.

Stefane abokwamaki na engumba moko monene ya Angleterre. Tata na ye azalaki kondima Nzambe te. Na mibu 12, Stefane atindamaki na boloko moko epai kuna alekisaki mibu misato. Andimaki ete ayibaki bato 64. Mosika te abungisaki limemya nyonso mpo na bokonzi, mpe ntango akómaki mokólo, asalaki lisusu bambeba minene koleka. Abandaki kosalela bokosi, amipesaki na molangwa, akómaki na etamboli ya mbindo mpe akómaki kino kobeta bapolisyé, likambo oyo ekotisaki ye na boloko. Akómaki mabe koleka. Azalaki koloba ete, “eloko moko te ekoki kopekisa moto mabe na kosala likambo moko ya mabe ata ya ndenge nini, soki azali mpenza na mposa ya eloko.”

Nini ebendaki mobomi monene yango na kobongwana? Nsuka nsuka Stefane andimaki lisalisi ya ndeko na ye ya mobali, oyo akómaki Témoin de Jéhovah. Wana ezalaki ye koyekola Biblia uta mwa mikolo, abandaki kolata “bomoto ya sika,” mpe asalaki mbongwana minene kati na bomoi na ye. Lelo oyo, mibu mitano na nsima, asili kobala mpe azali kati na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah epai kuna azali mosaleli na misala.

Na bongo, moto akoki kobongola motindo ya bomoto na ye. Kasi, ezali bobele bolembu ya bomoto yango moko nde ezali ‘kobebisa mibeko mpenza ya bomoi na bato’?

“Diable oyo alobelami na Makomami”

Ntoma Paulo akomaki esakweli moko ya kokamwa na ntina na “mikolo na nsuka.” Maloba na ye mazingami na milongo awa na likoló. Yeba ete kobakisama ya mobulu mpe ya mabe esengeli komema ‘mikolo na nsuka mpe na mpasi.” Kasi, motindo na moto yango moko nde ezali mpenza kobimisa makambo nyonso wana?​—2 Timote 3:1.

Te, ezali na likambo mosusu, ekelamu moko mabe na nguya nde azali kosalela bolembu ya bato. Lokola bato mingi bazali mpenza na nkaka mpo na kondima ete moto asili kosangola lisumu, ezali na bango mpe mpasi na kondima ete ekelamu yango ekoki kozala na nguya oyo eleki ya moto, oyo azali koluka kokosa bango. Kasi Biblia endimi ete nguya yango azali mpenza; ezali bongo Satan le Diable.

Kati na Makomami, tozali kokuta mbala 33 liloba “Diable” oyo elimboli “motongi” mpe mbala 52 liloba “Satana” oyo elimboli “motemeli.” Maloba nyonso wana mibale ezali kolobela bobele ekelamu moko wana ya elimo. Atako bongo, bamosusu bazali koboya kondima ete ekelamu moko na nkombo. Satana azali, mpe bazali komona malamu na koloba ete “motindo na moto mpe mposa na yango na kosala lisumu, nde ezali diable oyo alobelami na Makomami.”b Nzokande, kati na lisolo oyo etali Yobo, mosaleli na sembo ya Jéhovah, makomami na hébreu ezali kosalela liloba hassatan, yango elimboli le Satan, mpe na Luka 4:2 tozali kotanga ete ezali le Diable (na greke, ho diabolos) nde amekaki Yesu (Yobo 1:6). Kati na makambo nyonso mibale, maloba oyo masalelami mamonisi ete ezali moto mosusu mpenza. Motindo na moto elobelami mpenza te. mobimba,’ kosaleláká mpenza ezalela na bolembu ya moto. (Emoniseli 12:9) Ezali mpo na ntina yango nde Paulo azali kosɛnga na nguya nyonso epai na baklisto ete “batelema ngwi liboso na mayele ya Diable.” Ye nde azali ntina ya liboso ya kobeba na mokili, kobeba oyo tozali komona sikawa.​—Baefese 6:11.

Kobongisama ya biloko nyonso

Ntoma Petelo, oyo azalaki moto ya eleko na Paulo, azali kondimisa biso ete Diable mpe bilimu mabe na ye bakozala ntango nyonso te na mokili mpo na kobundisa bato. Alobi ete: “Nde tozali kotalela likoló na sika mpe nse na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) Na yango, mosika mingi te, mabe kati na lolenge na yango nyonso ekolimwa kati na mokili. Satana mpe bilimu mabe na ye bakobomama. (Baloma 16:20; Emoniseli 20:1-3) Na bongo, motindo na moto ekomonisa “nkembo na Nzambe,” mpe bato nyonso bakozala na elikya ya kofanda libela na libela.​—Baloma 3:23.

Thomas Jefferson, prezida ya Amerike alobaki ete, “nalobaka ntango nyonso mpe nakoloba lisusu ete, botangi na likebi mpenza ya Mokanda na bulee ezali kokómisa ba citoyens malamu koleka . . . Biblia ezali kokómisa bato malamu mingi mpenza.” Lokola tomonaki yango, likoki ezali na biso ete tobongola motindo na biso soki totiki ete nsango na nguya ya Biblia ezala na bopusi likoló na bomoi na biso. (Baloma 12:2) Tokoki kopona na kondima makambo oyo mazali peto mpe malamu liboso na Nzambe. Mpe, mpo na kolendisa biso na kolondendela kati na milende oyo tozali kosala mpo na komibongola, tokoki kozwa ekateli ya koyanganaka elongo na baoyo bazali kosala milende ya solo kati na likambo yango. (Baebele 10:24, 25) Ba Témoins de Jéhovah bakoki kosalisa yo kati na meko nyonso oyo nzela epesameli bango. Mpo na nini te kokutana na bango uta sikawa?

“Mikolo na nsuka” Lolenge oyo Biblia emonisi yango

“Kasi ososola likambo oyo ete, na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Mpo ete bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matondi, bato bazangi bulee, bazangi bolingo, bazangi boboto, batongi, batomboki bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali koangana nguya na yango Opengwa (na bato) ndenge yango.”​—2 Timoté 3:1-5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala Les Saintes Écritures Traduction du monde nouveau; Bible Segond; Traduction Œcuménique de la Bible; Bible de Darby; Version Synodale.

b Déclaration de foi officielle ya christadelphianisme, lingomba moko ya boklisto na lokuta.

[Elilingi na lokasa 7]

Mosika te, motindo na moto ekomonisa na mobimba na yango nkembo na Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto